-
MayebisiMosala ya Bokonzi—2004 | Mai
-
-
Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Bósala makasi mpo na kolakisa buku Tósambela Nzambe, ntango bozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ekoki kozala baoyo bayanganaki na ekaniseli to na bibongiseli mosusu ya lisangá kasi bayekolaka te to bayanganaka mpenza te na makita ya Batatoli ya Yehova. Bósala makasi bóbanda koyekola na bango Biblia na buku yango, mingimingi baoyo basilisá koyekola buku Boyebi mpe mwa buku Azali kosɛnga. Yuni: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa mwa buku Azali kosɛnga. Ntango bozali kosalela mwa buku yango, bósala makasi bóbanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Ntango moto oyo olingaka akufi.
◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke na nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.
◼ Mbongo nyonso oyo etyami na kɛsi ya Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, esengeli kotindama na biro. Esengeli te kosalela yango na makambo ya lisangá. Mbongo oyo lisangá eyokanaki ete bakobanda kopesa mpo na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, esengeli kozwa yango na kɔnti ya lisangá mpe kobakisa yango na Makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe kotinda yango na biro.
◼ Lapolo ya Ekaniseli (S-7) esengeli kotindama nokinoki na depo mpo balekisa yango na biro nsima ya Ekaniseli. Mokɛngɛli ya zongazonga akokoma mitango mibale ya lapolo ya ekaniseli na nse ya formilɛrɛ na ye S-303: “Ekaniseli XXX mpe X.” Lapolo yango esengeli kokóma na biro liboso ya 15 Sɛtɛmbɛ 2004. (Na mbula eleki, balapolo koleka 250 ekómaki na biro na nsima ya dati oyo etyamaki.)
◼ Babakisi nimero moko ya telefone oyo bokoki kosalela mpo na kobenga Betele na makambo ya nokinoki mpenza: 081 658 7675 (Vodacom). Tosɛngi bino soki bózali na Celtel bóbenga na nimero ya Celtel; soki bózali na Vodacom, bóbenga na nimero ya Vodacom mpe bongo na bongo, mpo bóbebisa mbongo te: Celtel: 98 189 791; Starcell: 88 43 213; Vodacom: 081 658 7675; Fax: 88 46 944.
-
-
Ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi MoneneMosala ya Bokonzi—2004 | Mai
-
-
Ndenge ya kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi Monene
◼ “Okanisi ete mokili elingaki kozala malamu koleka soki bato basalelaki toli oyo? [Tángá Matai 7:12a. Na nsima tiká ye apesa eyano.] Buku oyo ezali na mateya mingi ya moteyi oyo aleki bateyi nyonso.” Lobelá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 17.
◼ “Lelo oyo baboti mingi bateyaka mokemoke bizaleli malamu epai ya bana na bango. Okanisi ete ezali na ntina kosala yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 22:6.] Vɛrsɛ oyo emonisi ete baboti basengeli kobanda koteya bana na bango ntango bazali naino mike mpenza. Bakomi buku oyo mpo na kosalisa baboti báteyaka bana na bango.” Lobelá bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 15, 18, to 32.
◼ “Mbala mingi baboti bakamwaka ntango bayokaka mituna oyo bana na bango batunaka. Mituna yango mosusu ezalaka mpasi mpo na kopesa eyano, ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá 2 Timote 3:14, 15.] Mama ya Timote mpe nkɔkɔ na ye bateyaki ye Makomami banda bomwana. Buku oyo ekoki kosalisa baboti básala mpe bongo lelo oyo.” Lobelá mwa moke bililingi mpe maloba oyo ezali na nse ya bililingi ya mokapo 11 mpe 12 to 34 tii 36.
-
-
Lolenge moko ya kosalisa bangoMosala ya Bokonzi—2004 | Mai
-
-
Lolenge moko ya kosalisa bango
Baklisto ya solo basalaka mosala mpo na bolamu ya bato nyonso na ndenge bapalanganisaka nsango malamu. (Filp. 2:17) Mpo na kokokisa malamu mosala yango, batye mwabuku mosusu, batrakte, mpe mikanda mosusu na minɔkɔ 20 na site ya internet oyo: www.watchtower.org. Site yango esalemi te mpo na kokabolela Batatoli ya Yehova mikanda. Ntina mpenza basali yango ezali ya kosalisa bato báyeba malamumalamu mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bateyaka.
Na mikolo eleki, bautaki kobakisa mikanda mosusu na site na biso. Babakisi mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? na minɔkɔ 220. Lisusu, banimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bandá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya 8 Yanuali, ekobanda kozala na adresi ya site na biso na lokasa ya nsuka.
Ndenge nini okoki kosalela esaleli yango? Mbala mosusu, okoki kokutana na moto moko oyo amonani ete asepeli na nsango malamu, kasi alobaka monɔkɔ mosusu. Soki moto yango asalelaka internet, okoki kolakisa ye adresi yango na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Na ndenge yango akoki kotánga mwa buku Azali kosɛnga na monɔkɔ ya mboka na bango, tii ntango okomemela ye mikanda oyo ezali na monɔkɔ yango. To mbala mosusu, tii ntango okokutana na bato ya lisangá to ya etuluku oyo esalaka makita na monɔkɔ yango.
-