Mokili oyo ezali kokende wapi?
Makambo ya minene mpe ya nsɔmɔ ekómi kosalema mingi na mokili! Makambo yango elingi koloba nini?
LIBATELI YA MOTO NA MOTO: Babɔmbi ezali kopanzana na bazando. Bazali koboma balakisi ná bana-kelasi na masasi na biteyelo. Bazali kokima na bana mike ntango kaka baboti na bango bapesi mokɔngɔ. Na moi mpenza, bazali kokanela basi ná mibali oyo banuni mpe bazali koyiba biloko na bango.
MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MANGOMBA: Mangomba ezali kopesa mabɔkɔ na baoyo bazali kobunda bitumba. Bazali kofunda bakonzi ya mangomba ete babomisaki ebele ya bato (génocide). Basango bazali kosangisa nzoto na bana mike; mangomba ezali kosala nyonso mpo na kobomba makambo yango. Bato bazali lisusu kokende mingi te na bandako-nzambe; bakómi kotɛka bandako-nzambe.
ZAMBA, MAI MPE MOPƐPƐ: Bato bazali kobebisa bazamba mpo na kosala mimbongo na bango. Babola bazali kokatakata banzete mpo na kozwa nkoni. Mai ebebi, komɛla yango ekómi likama. Bosɔtɔ oyo baizini ezali kobwaka na mai mpe mayele mosusu oyo bazali kosalela mpo na koboma mbisi esali ete mbisi ezala lisusu mingi te. Mopɛpɛ ekómi kokanga bato mpema mpo ebebi kobeba.
MBONGO YA KOBIKELA: Na mikili ya Afrika oyo ezali na sudi ya Sahara, mbongo oyo moto mokomoko azwaka na mbula ekoki kozala dolare 480. Lokoso ya bakonzi ya bakompanyi ezali kokweisa bakompanyi, yango ezali kosala ete ebele ya bato bázanga misala. Kobuba bato ezali kosala ete baoyo bazali kotya mbongo na bakompanyi to na mimbongo bábungisa mbongo nyonso oyo bamonelá mpasi.
KOZANGA YA BILEI: Na mokili mobimba, bato pene na milio 800 bazali kolala nzala mokolo na mokolo.
BITUMBA: Bato koleka milio 100 bakufaki na boumeli ya bitumba oyo esalemaki na siɛklɛ ya 20. Ezali na ebele ya bibundeli ya nikleere oyo ekoki koboma bato nyonso ata mbala boni. Bitumba ezali kosalema kati ya bana-mboka. Terorisme ezali se kokóma mingi na mokili.
MALADI MABE MPE BAMALADI MOSUSU: Grippe espagnole ebandaki na 1918 mpe ebomaki bato milio 21. “Na bamaladi nyonso oyo epalanganaka na bisika mingi,” sida ezali sikoyo “kosilisa mpenza bato koleka ndenge emonaná naino te liboso.” Maladi ya kansɛr mpe ya motema ezali konyokola bato na mokili mobimba.
Sangisá makambo yango nyonso oyo toyokaka na bansango. Ezali ata na boyokani moko te kati na yango? To ezali motindo ya makambo oyo esengeli komonana na mokili mpe ezali mpenza na ndimbola ya solosolo?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
Nzambe atyelaka biso mpenza likebi?
Lokola bato mingi bazali komitungisa mpo na makambo mabe oyo ezali kosalema to mpe mpo babungisi biloko ebele to bato oyo balingaka, bazali komituna mpo na nini Nzambe azali kosala eloko te mpo na kopekisa makambo yango.
Nzambe atyaka mpenza likebi. Azali kopesa litambwisi ya malamu mpe libɔndisi ya solosolo uta sikawa. (Matai 11:28-30; 2 Timote 3:16, 17) Azwi bibongiseli mpo na kosukisa mobulu, maladi mpe liwa. Bibongiseli oyo azwi emonisi ete likebi na ye esuki kaka epai ya bato ya ekólo moko te kasi bato ya bikólo nyonso, ya mabota nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso.—Misala 10:34, 35.
Totyelaka mpenza Nzambe likebi? Oyebi nani azali Mozalisi ya likoló ná mabelé? Nkombo na ye nani? Mokano na ye ezali nini? Apesi biyano na mituna yango na Biblia. Kuna ayebisi biso makambo oyo azali kosala mpo na kosilisa mobulu, maladi mpe liwa. Tosengeli kosala nini mpo tózwa litomba na makambo yango? Tosengeli koyekola makambo na ye mpe mokano na ye. Tókanisa soki moke te ete tokoki kozwa litomba na bibongiseli oyo azali kozwa soki tozali komonisa kondima epai na ye te. (Yoane 3:16; Baebele 11:6) Esengeli mpe kotosa masɛngami na ye. (1 Yoane 5:3) Ozali kotyela Nzambe likebi mpenza mpe olingi kotosa masɛngami na ye?
Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na makambo oyo ezali lelo, tosengeli koyeba likambo moko ya ntina mingi oyo ebimisaki ntembe. Biblia epesi ndimbola na yango. Na lokasa 15 ya mwa buku oyo, bamonisi soki ntembe yango ezali nini.