-
Ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisaMosala ya Bokonzi—2005 | Janvier
-
-
Ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa
1. Ndenge nini tosengeli kotalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa?
1 Maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa mpo na kolakisa bazulunalo mpe mikanda mosusu ebimaka mbala na mbala na Mosala na biso ya Bokonzi. Ntango tozali na mosala ya kosakola, tosengeli te kozongela maloba oyo bapesi lokola ndakisa kaka ndenge ekomami. Batyaka yango mpo esalisa biso tóyeba makambo oyo tokoloba. Tokosolola na bato malamu soki tolobi yango na maloba na biso moko. Koloba na maloba na biso moko ekosala ete moto oyo tozali kosolola na ye amiyoka malamu mpe ekomonisa ete makambo tozali koloba ezali solo mpe ete biso moko tondimi yango.—2 Kol. 2:17; 1 Tes. 1:5.
2. Mpo na nini tosengeli kotalela mimeseno ya bato ya esika oyo tofandi ntango tozali kobongisa maloba na biso ya kobanda lisolo?
2 Maloba na yo ya kobanda lisolo etalela moto oyo ozali kosolola na ye: Ndenge oyo toyebisaka bato nsango malamu etalelaka mingi mpenza mimeseno ya esika oyo tofandi. Osengeli naino kopesa moto mbote mpe na nsima kobanda lisolo, to bato ya teritware na bino balingaka nde ete moto aloba mbala moko likambo oyo azali na yango? Yango etaleli esika na esika, mpe ntango mosusu moto na moto. Esengeli mpe kozala na mayele ntango ozali kotuna mituna. Mituna oyo bato ya esika moko bamonaka malamu, ekoki ntango mosusu komonana mabe na esika mosusu. Yango wana, tosengeli kozala na ekɛngɛ mpe koyokanisa maloba na biso ya kobanda lisolo na mimeseno ya bato ya esika oyo tofandi.
3. Mpo na nini tosengeli kotalelaka mimeseno ya bato oyo tozali kosolola na bango mpe ndenge oyo bakanisaka?
3 Lisusu, ntango tozali komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosala, tosengeli kotalela mimeseno ya bato ya teritware na biso mpe ndenge oyo bakanisaka. Na ndakisa, okolobela Matai 6:9, 10 ndenge moko te epai ya mondimi ya Katolike mpe epai ya moto oyo ameseni te na libondeli ya “Tata na biso.” Soki tokanisi moke liboso, tokobanda koyokanisa masolo na biso na mimeseno ya bato oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola mpo básepela lisusu mingi.—1 Kol. 9:20-23.
4. Mpo na esengeli komibongisaka malamu?
4 Ata soki tomoni malamu kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa ndenge kaka bakomi yango to te, esengeli kaka komibongisaka malamu. Tosengeli kotánga malamu lisolo oyo tolingi kolakisa mpe koluka makanisi oyo ekoki kobenda likebi ya bato. Na nsima, tósalela makanisi yango mpo na kobanda lisolo. Tokolakisa mikanda na biso na esengo soki tomeseni na makambo oyo ezali na kati.
5. Mpo na nini tokoki kobongisa lolenge mosusu ya kobanda lisolo, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
5 Ndenge mosusu ya kobanda lisolo: Tosengeli kosalelaka kaka maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa? Te. Soki omoni malamu kosalela maloba mosusu to vɛrsɛ mosusu, salelá yango. Mingimingi mpo na bazulunalo, salá makasi olakisaka masolo oyo ezali na kati ya zulunalo, oyo ekoki kobenda mpenza likebi ya bato ya teritware na bino. Soki esengeli kosala bilakiseli ya maloba ya kobanda lisolo na Likita ya mosala, bokoki mpe kosala bilakiseli ya maloba ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware na bino. Yango ekosalisa basakoli nyonso báyebisa nsango malamu na ndenge oyo ekobota mbuma.
-
-
Ndenge ya kolakisa bazulunaloMosala ya Bokonzi—2005 | Janvier
-
-
Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Yan.
“Biso nyonso tolingaka tózala na bomoi ya malamu elongo na bana na biso, kasi bato mingi bakokaka te kokokisa mposa yango. Okanisi tokoki kopona makambo oyo ekokómela biso na mikolo ezali koya? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi ete tokoki kokokisa mposa yango mpe ete bomoi na biso na mikolo ezali koya etaleli bikateli oyo tozali kozwa lelo.” Tángá Deteronome 30:19.
Lamuká! 22 Yan.
“Ntango tobɛli, biso nyonso tosepelaka na monganga oyo ayebi komitya na esika na biso. Kasi, okanisi ete bato mingi ya maladi bamityaka mpe na esika ya minganga na bango? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela mikakatano oyo minganga bakutanaka na yango mpe elikya oyo bakoki kozala na yango mpo na mikolo ezali koya.” Tángá Yisaya 33:24.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Feb.
“Ntango omonaka ndenge bazali konyokola ebele ya bato mpe kosalela bango mobulu, yango etungisaka yo te? [Lobelá likambo moko oyo eyebani na esika ofandi, mpe tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi ya moto. Ezali mpe kolimbola ndenge Nzambe akobikisa biso na bampasi ya lelo oyo.” Tángá Nzembo 72:12-14.
Lamuká! 8 Feb.
“Moko ya mikakatano minene oyo tozali kobundana na yango lelo oyo ezali mitungisi. Bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia esakolaki mpenza ete ekozala bongo. [Tángá 2 Timote 3:1.] Zulunalo oyo epesi makanisi oyo ebongi mpenza, oyo ekoki kosalisa yo ná libota na yo bólonga mitungisi.”
-