Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/05 nk. 5-6
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka voti?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka voti?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 6/05 nk. 5-6

Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka voti?

Biblia ezali na mitinda ya polele oyo ezali kosalisa basaleli ya Nzambe bázala na makanisi malamu na likambo yango. Nzokande, emonani ete ezali na etinda moko te oyo epekisi mpenza voti yango moko. Na ndakisa, ezali mabe te mpo bakambi ya kompanyi moko básala voti mpo na kozwa mikano oyo etali mosala na bango. Mbala mingi masangá ya Batatoli ya Yehova esalaka voti mpo na kopona ngonga ya makita na bango mpe ndenge ya kosalela mbongo oyo ezali na kɛsi ya lisangá; batombolaka lobɔkɔ mpo na kosala voti yango.

Kasi, ezali boni mpo na voti na makambo ya politiki? Eyebani ete na mikili oyo ezali na boyangeli ya demokrasi, bato 50 na kati ya bato 100 bakendaka kovote te. Batatoli ya Yehova bapekisaka moto te asala voti; basalaka mpe eloko moko te oyo ekopekisa bato básala voti mpo na kopona bakonzi ya politiki. Batatoli ya Yehova bazalaka na limemya mpe batosaka bakonzi oyo baponamaka na bavoti yango. (Baloma 13:​1-7) Mpo na koyeba soki Motatoli ya Yehova akopona to te moto oyo apesi nkombo na ye na voti, mokomoko asalaka eloko oyo lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia etindaka ye mpe asengeli koyeba mokumba azali na yango liboso ya Nzambe mpe ya Leta. (Matai 22:21; 1 Petelo 3:16) Mpo na kopona likambo oyo akosala, Motatoli asengeli kotalela mwa makambo mosusu.

Ya liboso, Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Bazali bato ya mokili te, [lokola] ngai nazali moto ya mokili te.” (Yoane 17:14) Batatoli ya Yehova batalelaka etinda yango na lisɛki te. Lokola “bazali bato ya mokili te,” bakɔtaka na makambo ya politiki te.​—⁠Yoane 18:⁠36.

Ya mibale, ntoma Paulo amibengaki “ambasadɛrɛ” ya Klisto epai ya bato ya ntango na ye. (Baefese 6:20; 2 Bakolinti 5:20) Batatoli ya Yehova bandimaka ete Klisto Yesu azali lelo oyo Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló, mpe lokola bango bazali baambasadɛrɛ, basengeli koyebisa bato nsango yango. (Matai 24:14; Emoniseli 11:15) Baambasadɛrɛ basengeli te kokɔtela lingomba moko ya politiki mpe koyina mosusu, mpe basengeli te komikɔtisa na makambo ya ekólo oyo batindi bango. Lokola bazali bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló, Batatoli ya Yehova bamonaka ete bazali na mokumba ndenge moko; mokumba ya koboya kokɔta na makambo ya politiki ya ekólo oyo bafandi.

Likambo ya misato ya kotalela yango oyo: baoyo baponaka moto na voti bakoki kozala na ngambo na makambo oyo moto yango asalaka. (Talá 1 Timote 5:22.) Baklisto basengeli kotalela malamu soki bakondima komema ngambo yango.

Ya minei, Batatoli ya Yehova babatelaka makasi bomoko na bango ya boklisto. (Bakolose 3:14) Ntango mangomba emikɔtisi na makambo ya politiki, mbala mingi ememaka bokabwani kati na bandimi na yango. Na ndakisa ya Yesu Klisto, Batatoli ya Yehova baboyaka komikɔtisa na makambo ya politiki, yango wana, babatelaka bomoko na bango ya boklisto.​—⁠Matai 12:25; Yoane 6:15; 18:​36, 37.

Ya mitano mpe ya nsuka, koboya komikɔtisa na makambo ya politiki epesaka Batatoli ya Yehova molende ya koteya bato ya parti politiki nyonso nsango ya Bokonzi, nsango yango ezali na ntina mingi.​—⁠Baebele 10:⁠35.

Na kotalela mitinda ya Makomami oyo tolobeli, Motatoli ya Yehova mokomoko azwaka mokano mpo na ye moko ete akosala voti te mpo na kopona moto ya politiki, mpe mibeko ya mboka endimi bonsomi na ye ya kosala oyo alingi. Kasi, tokoloba boni soki mobeko ya Leta esɛngi na makasi ete moto nyonso asala voti? Soki makambo ezali bongo, Motatoli ya Yehova mokomoko azali na mokumba ya kosala likambo oyo lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia ekotinda ye. Soki Motatoli moko amoni ete akokende na biro ya voti, yango etali kaka ye moko. Likambo oyo akosala kuna etali kaka ye na Mozalisi na ye.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1950 (na Lingelesi), nkasa 445 mpe 446, elobaki ete: “Na bipai oyo Kaisala azali kosɛnga bato na makasi ete básala voti . . . [Batatoli] bakoki kokende na biro ya voti mpe bakokɔta tii na esika kɛsi ya voti ezalaka. Ezali kuna nde basengeli kotya elembo na lokasa to kolakisa etɛlɛmɛlo na bango. Bato mosusu bakɔtisaka lokasa oyo bakomi eloko te na kɛsi ya voti. Basusu bakomaka na lokasa ya voti mpo na komonisa likambo lisosoli na bango etindi bango básala. Ezali awa nde batatoli basengeli komonisa Nzambe ete batosaka mibeko na ye mpe basalaka na boyokani na kondima na bango. Ezali mokumba na biso te ya koteya bango likambo basengeli kosala na lokasa ya voti.”

Kasi, ezali boni soki ndeko mwasi moko oyo mobali na ye azali mondimi te ayebisi ye ete akende kosala voti? Azali na nse ya bokonzi ya mobali na ye, ndenge baklisto bazali na nse ya bakonzi ya Leta. (Baefese 5:22; 1 Petelo 2:​13-17) Soki atosi mobali na ye mpe akei, yango etali kaka ye moko. Moto moko te asengeli koloba na ye mabe.​—⁠Talá Baloma 14:⁠4.

Ezali boni na ekólo oyo etyá mobeko moko te mpo na kopusa bato na makasi básala voti, kasi bayinaka makasi bato oyo basalaka yango te, mbala mosusu kutu babɛtaka bango? To soki bato, atako mibeko ezali kopusa bango na makasi te básala voti, kasi bazali kopesa bango etumbu makasi na lolenge moko to mosusu soki basali voti te? Na ntango yango, moklisto asengeli kopona oyo ye moko akosala. “Moto na moto akomema bozito na ye moko.”​—⁠Bagalatia 6:⁠5.

Ekoki kozala na bato mosusu oyo babɛtaka libaku soki bamoni na ntango ya voti na mboka na bango, Batatoli ya Yehova mosusu bakei kosala voti kasi bamosusu bakei te. Bakoki koloba ete, ‘Batatoli ya Yehova bazali bongolabongola.’ Kasi, bato basengeli koyeba ete na makambo oyo etali lisosoli ya moto na moto lokola na likambo oyo, moklisto mokomoko asengeli kopona oyo akosala liboso ya Yehova Nzambe.​—⁠Baloma 14:⁠12.

Ata soki Motatoli ya Yehova mokomoko aponaka oyo akosala na makambo mosusu, basalaka makasi ete bámikɔtisa na makambo ya politiki te mpe bábatela molende na bango. Na makambo nyonso, batyaka motema na bango epai ya Yehova Nzambe mpo apesa bango makasi, apesa bango mayele, mpe asalisa bango mpo bátika kondima na bango te. Bamonisaka kondima na maloba ya mokomi ya nzembo oyo alobaki boye: “Yo ozali libanga na ngai mpe ndako makasi na ngai; mpo na nkombo na yo, kambá ngai tambolisá ngai alima.”​—⁠Nzembo 31:⁠3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto