Kondima ekoki kokómisa bomoi na yo malamu
“MOTO akoki kozala na bizaleli malamu ata soki alandaka makambo ya Nzambe te.” Oyo ezali maloba ya mwasi moko oyo andimaka mateya ya filozofi oyo elobaka ete moto akoki koyeba Nzambe te (agnostique). Mwasi yango alobaki ete ye abɔkɔlaki bana na ye mpe ateyaki bango bizaleli malamu; na nsima, bana yango bateyaki bana na bango bizaleli malamu, kasi bazalaki bandimi te.
Yango elingi nde koloba ete kondimela Nzambe ezali na ntina te? Tomoni ete na makanisi ya mwasi yango, ezali bongo. Ezali mpe solo ete moto oyo andimelaka Nzambe te azalaka kaka moto mabe te. Ntoma Paulo alobaki ete “bapakano,” atako bayebi Nzambe te, ‘basalaka makambo ya Mibeko.’ (Baloma 2:14) Moto nyonso, ezala baoyo balobaka ete moto akoki koyeba Nzambe te, bazali na lisosoli. Bato mingi batosaka lisosoli na bango kasi baboyaka kondimela Nzambe oyo apesi bango mayele wana ya kokesenisa malamu na mabe.
Kasi, kondima ya solosolo epai ya Nzambe, kondima oyo moto akómaka na yango soki ayekoli Biblia, ezali mposa makasi ya kosala malamu; yango ezali kaka likambo ya kotosa lisosoli te. Kondima oyo euti na Biblia Liloba ya Nzambe eteyaka lisosoli ya moto, epesaka yango lisusu mayele ya kokesenisa mpenza mabe na malamu. (Baebele 5:14) Lisusu, kondima yango elendisaka moto azala ntango nyonso na bizaleli malamu ata soki bazali kotindika ye na kosala makambo ya mabe. Na ndakisa, na ekeke ya 20, mikili mingi ezalaki na baguvɛrnɛma ya mabe oyo ezalaki kotinda bato na makasi básala makambo mabe. Nzokande, soki totali malamu bato yango bazalaki mpenza bato mabe te. Kasi, bato oyo bazalaki na kondima ya solosolo, epai ya Nzambe baboyaki kosala makambo oyo lisosoli na bango emonaki mabe, ata soki ekokaki komemela bango liwa. Lisusu, moto akoki kokóma na bomoi ya malamu soki akómi na kondima oyo euti na Biblia. Kondima ekoki kozongisa moto na nzela ya malamu, ata soki moto yango amonanaki lokola nde abebi. Kondima yango ekoki mpe kosalisa bato na kokima makambo ya mabe. Tótala mwa bandakisa.
Kondima ekoki kobongisa libala
Na Angleterre, zuzi moko oyo akataki likambo ya John na Tania oyo bazalaki kowela bana, alobaki boye: “Kondima na bino esalisi bino na kosala likambo oyo ekokaki kosalama te.” Ntango matata ya John na Tania ekómaki na mabɔkɔ ya bazuzi, bazalaki na libala ya makango, kasi bazalaki lisusu koyokana ata moke te. John azalaki komela bangi mpe azalaki kobɛta masano ya mbongo; akómaki kosala mobulu mpo azwa mbongo ya kokokisa bamposa na ye. Asundolaki bana na ye na mama na bango. “Likamwisi” nini esalemaki na nsima?
Mokolo mosusu, John ayokaki mwana ya yaya na ye azali koloba likambo ya Paladiso. Yango ebendaki likebi na ye mpe atunaki baboti ya mwana yango. Baboti yango bazalaki Batatoli ya Yehova, mpe basalisaki John ayeba likambo yango na lisalisi ya Biblia. Malɛmbɛmalɛmbɛ, John na Tania bakómaki na kondima oyo euti na Biblia mpe bomoi na bango ekómaki ndenge mosusu. Bakomisaki libala na bango na mikanda ya Leta mpe batikaki makambo na bango ya mabe. Ntango bato ya Leta bakendaki kosala ankɛtɛ na ndako na bango, bamonaki likambo oyo bakokaki kondima te ete ekoki kosalema mwa basanza liboso: bakutaki libota yango bafandi na esengo na ndako ya pɛto, esika malamu mpenza oyo bana basengeli kobɔkɔlama. Zuzi yango alobaki mpenza solo ete kondima oyo John na Tania bakómaki na yango esalaki “likamwisi” wana.
Na mboka mosusu oyo ezali mosika na Angleterre, na Moyen-Orient, elenge mwasi moko alingaki kosala likambo moko mabe mpenza. Akanaki koboma libala na ye ndenge ezali kosalema epai ya bamilio ya bato mbula na mbula. Azalaki na mwana moko, kasi mobali na ye azali mokóló na ye mingi. Yango wana, bandeko na ye bazalaki kotya ye mpanzi likoló mpo akabwana na mobali yango, mpe azalaki kobongisa makambo mpo aboma libala na ye. Kasi, mwasi yango azalaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova moko. Ntango Motatoli yango ayokaki likambo wana, ayebisaki ye makambo oyo Biblia elobi mpo na libala. Na ndakisa, ayebisaki ye ete libala ezali likabo ya Nzambe, yango wana ezali eloko ya kosakana na yango te. (Matai 19:4-6, 9) Mwasi yango akanisaki mpe alobaki boye na kati ya motema na ye: ‘Mwasi oyo azali ndeko na ngai te, kasi azali koluka ete libota na ngai ekufa te, nzokande, bandeko na ngai moko balingi naboma libala.’ Kondima oyo akómaki na yango esalisaki ye abatela libala na ye.
Likambo mosusu ya mabe oyo ezali kosalema mingi na mabota ezali likambo ya kolongola zemi. Lapolo moko ya ONU emonisaki ete mbula na mbula, bato bazali kolongola bazemi soki milio 45. Nyonso wana ezali makambo ya nsɔmɔ. Biblia esalisaki mwasi moko na ekólo Philippines alongola zemi te.
Batatoli ya Yehova bakutanaki na mwasi yango mpe andimaki kozwa mwa buku moko oyo ezali na motó ya likambo ete Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?a mpe abandaki koyekola Biblia. Nsima ya mwa basanza, ayebisaki ntina oyo andimaki koyekola Biblia. Mwasi yango azalaki na zemi ntango Batatoli ya Yehova bakutanaki na ye mpo na mbala ya liboso. Ye na mobali na ye bayokanaki bálongola zemi yango. Kasi, fɔtɔ ya mwana oyo azali na kati ya libumu na lokasa 24 ya mwa buku yango esimbaki motema ya mwasi yango. Ntango atángaki maloba oyo ezali pembeni ya fɔtɔ yango, ete Biblia emonisi ete bomoi ezali bulɛɛ mpamba te ‘Nzambe nde apesaka bomoi’ atikaki makanisi ya kolongola zemi wana. (Nzembo 36:9, NW ) Lelo oyo azali mama ya mwana moko kitoko oyo azali mpe na nzoto kolɔngɔnɔ.
Kondima esalisaka baoyo bamonanaka lokola bato mpamba
Na mboka Éthiopie, bato mibale bakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova kasi balataki malamu te. Na nsuka ya makita, Motatoli ya Yehova moko apesaki bango mbote na esengo. Bato yango basɛngaki ye mbongo. Na esika ya mbongo, Motatoli apesaki bango eloko oyo eleki ata mbongo. Alobaki na bango báyekola ndenge bakoki kokóma na kondima epai ya Nzambe, kondima oyo “eleki motuya ya wolo.” (1 Petelo 1:7) Kati na bango, moko andimaki mpe abandaki koyekola Biblia. Bomoi na ye ebongwanaki mpenza. Ntango kondima na ye ebandaki kokola, atikaki komela likaya, kolangwa masanga, kosala makambo ya bosɔtɔ mpe kolya khat (lokasa moko oyo elangwisaka). Akómaki kosala mosala mpo na kozwa mbongo na esika asɛngaka, mpe lelo oyo azali na bomoi ya malamu mpe ya ntina.
Na Italie, bakatelaki moto moko ya mbula 47 bolɔkɔ ya mbula zomi mpe batyaki ye na lopitalo ya bato ya maladi ya motó. Motatoli ya Yehova moko oyo azalaki na ndingisa ya kokɔta na babolɔkɔ mpo na kosalisa bato na elimo ayekolaki na ye Biblia. Moto yango akolaki noki na elimo. Kondima ekómisaki bomoi na ye malamu na boye ete lelo oyo, bato mosusu ya bolɔkɔ batunaka ye toli soki bazali na mikakatano. Bato batosaka ye mpe basepelaka na ye, mpe lisusu, bakonzi ya bolɔkɔ batyelaka ye motema; nyonso wana mpo azali na kondima oyo euti na Biblia.
Na bambula oyo euti koleka, bazulunalo elobelaki mingi bitumba oyo ezali kosalema na Afrika. Bato mingi bayokaki mpasi na motema ntango bayokaki ete bazali kokɔtisa bana mike na mosala ya soda. Bazali komelisa bana yango bangi, konyokola bango mpe kotinda bango na makasi ete básala bandeko na bango makambo mabe mpo bakonzi na bango bándima ete bazali kotosa bango. Kondima oyo euti na Biblia ekoki mpenza kosala ete bomoi ya bilenge ya ndenge yango ekóma malamu? Tozali na ndakisa mibale ya bilenge oyo babongwanaki.
Na ekólo Liberia, Alex azalaki mwana ya misa na Lingomba ya Katolike. Ntango akokisaki mbula 13, akɔtaki mosala ya soda na limpinga moko ya barebɛlɛ mpe ayebanaki mingi atako azalaki naino mwana moke. Mpo azala soda ya mpiko mpenza, Alex azwaki nkisi. Amonaki ndenge baninga na ye ebele bakufaki na bitumba, kasi ye abikaki. Na 1997, akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe amonaki ete bazalaki komona ye lokola eloko mpamba te. Kutu, basalisaki ye na koyeba makambo oyo Biblia elobi mpo na mobulu. Alex atikaki mosala ya soda. Ntango kondima na ye ebandaki kokola, alandaki toli ya Biblia oyo elobi ete: “Aboya mabe mpe asala makambo ya malamu; aluka [kimya, NW ] mpe alanda yango.” —1 Piere 3:11, Boyokani ya Sika.
Se na ntango yango, Samson, ye mpe azalaki soda atako azalaki naino mwana moke, akendaki na mboka oyo Alex akómaki kofanda. Liboso, Samson azalaki moyembi na korale, kasi na 1993 akɔtaki mosala ya soda mpe akómaki komela bangi, azwaki nkisi, mpe amipesaki na pite. Na 1997, balongolaki ye na mosala ya soda. Samson azalaki kokende na engumba Monrovia mpo na kozongela mosala ya soda na limpinga moko ya sekirite, kasi moninga na ye moko alendisaki ye ayekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe yango esalisaki ye akóma na kondima oyo euti na Biblia. Kondima yango epesaki ye makasi ya kotika makambo ya bitumba. Lelo oyo, Alex na Samson bazali bato ya kimya mpe bazali na bizaleli malamu. Okanisi mpenza ete, longola Biblia, ezali na eloko mosusu oyo ekokaki kobongola bomoi ya bato oyo banyokwamaki ndenge yango?
Kondima ya solosolo
Oyo totángi ezali kaka bandakisa moke, tokoki kobakisa bandakisa mosusu ebele mpo na komonisa makambo oyo kondima ya solosolo oyo euti na Biblia esalaka. Ya solo, ezali moto nyonso te oyo alobaka ete andimelaka Nzambe nde azalaka na bizaleli malamu oyo Biblia esɛngi. Kutu, bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azali bazali na bizaleli malamu koleka bato mosusu oyo balobaka ete bazali baklisto. Ezali bongo mpamba te kondima oyo euti na Biblia ezali kondima ya maloba mpamba te.
Ntoma Paulo alobaki ete kondima ezali “kozela na motema mobimba makambo oyo ozali kolikya, elakiseli ya solo ya makambo oyo ezali komonana te.” (Baebele 11:1, NW ) Yango elingi koloba ete kondima esɛngi kozala na elikya makasi, elikya oyo esimbami na bilembeteli ya solosolo, na makambo oyo ezali komonana te. Yango esɛngi mpenza ete moto azala na ntembe te ete Nzambe azali, amibanzabanzaka mpo na biso mpe akopambola baoyo basalaka mokano na ye. Ntoma Paulo alobaki lisusu boye: “Ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.”—Baebele 11:6.
Kondima ya ndenge wana nde ebongolaki bomoi ya John, Tania, na bato mosusu oyo tolobeli na lisolo oyo. Esalisaki bango bákóma kotyela Biblia, Liloba ya Nzambe, motema mpo na kolakisa bango ndenge oyo bakoki kozwa mikano ya malamu. Esalisaki bango bándima makambo mosusu ya mpasi mpo na mwa ntango mpo na nsima bálanda nzela ya mabe te ata soki yango emonani ete ezali pɛtɛɛ. Atako makambo na bango ezalaki ndenge moko te, nyonso ebandaki se ndenge moko. Mokomoko na bango ayekolaki Biblia na Motatoli ya Yehova, mpe bamonaki ete Biblia elobi solo ete: “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Nguya ya Liloba ya Nzambe esalisaki mokomoko na bango akóma na kondima makasi oyo ebongisaki bomoi na ye.
Batatoli ya Yehova bazali kosala mosala na bango na mikili mpe na bisanga ya mai monene koleka 230. Bazali kolendisa yo oyekola Biblia. Mpo na nini? Mpo bayebi ete kondima oyo euti na Biblia ekoki mpe kobongisa bomoi na yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 3]
Kondima oyo euti na Biblia ekómisaka bomoi ya bato malamu