-
Ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingiMosala ya Bokonzi—2005 | Juin
-
-
Ndenge ya kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi
1. Na ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso, ndenge nini lelo oyo mpe baklisto bazali kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi, mpe yango ezali kobimisa matomba nini?
1 Lokola bayekoli ya Yesu ya liboso, lelo oyo mpe baklisto balukaka koyebisa bato nsango malamu na bisika nyonso oyo bakoki kokuta na bango. (Mis. 16:13; 17:17; 20:20, 21) Milende oyo baklisto bazali kosala mpo na kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi esali ete bákutana na bato oyo bazali kosepela na solo, bato oyo mbala mosusu bakutaná na bango naino te na mosala ya ndako na ndako.
2. Mpo na nini esengeli kozala na bososoli ntango tozali kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi, mpe tokoki kosala nini mpo makambo esalema na molɔngɔ?
2 Esengeli kozala na bososoli ntango tozali kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi. Mbala mingi, ezalaka malamu koboya kobenda likebi ya bato. Na ndakisa, soki basakoli mingi bazali kopesa litatoli na kartye moko to kotala bato oyo bazali kotɛka esika moko, bato mosusu bakomona lokola tokei kotungisa bango. Yango ekokitisa lokumu ya mosala na biso mpe ekoki kosala ete mosala na biso ebota mpenza mbuma mingi te. Tokoki kosala nini mpo likambo ya ndenge wana ekómela biso te? Masangá mosusu oyo bazalaka na bisika mingi oyo bato bazalaka mingi, bamonaki malamu kopesa na mosakoli mokomoko eteni na ye ya teritware yango. (1 Kol. 14:40) Lisusu, tokoki kosala ete makambo esalema na molɔngɔ soki tozali kosakola kaka na teritware ya lisangá na biso, longolá kaka soki Komite ya mosala ya lisangá ezwi bibongiseli ya kosakola na teritware ya lisangá mosusu mpo na kosalisa bango.—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1998, lok. 6, par. 18-19.
3. Lolenge nini ya kobanda lisolo bato mosusu bamonaka ete ebimisaka matomba ntango bazali kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi?
3 Kosolola na bato: Ntango Yesu asololaki na mwasi moko pene na libulu ya mai, alobelaki naino mwa likambo moko mpe mokemoke, asololaki na mwasi yango makambo mingi ntango amonaki ete asepelaki na lisolo yango. (Yoa. 4:7-26) Ndenge wana ya kobanda lisolo ebimisaka mpe matomba lelo oyo. Basakoli mosusu bamonaka ete mpo na kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi, ezali malamu kolekisa mwa miniti na kopesa bato mbote mpe kosolola na bango mwa moke liboso ya koyebisa bango nsango ya Bokonzi, mpo na komonisa ete ozali kosepela na bango. Balobelaka likambo moko oyo ezali kobenda likebi ya bato mingi ya teritware na bango, mpe mbala mingi yango epesaka bango nzela ya kosolola na bato. Bayokaka na likebi mpenza ntango basusu bazali kolobela makambo oyo ezali kotungisa bango. Baumelaka te kozwa libaku ya kobɔndisa moto na Liloba ya Nzambe.—Lom. 15:4.
4. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo basepeli ntango tosololi na bango ete básepela na nsango malamu lisusu koleka?
4 Salisá bato básepela na nsango malamu: Mbala nyonso oyo tosololi malamu na moto moko, tosengeli kosalisa moto yango asepela na nsango malamu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Na nsuka ya lisolo, okoki kozwa kaye na yo mpe koloba boye: “Nasepeli mingi na lisolo na biso. Tokoki kokoba na masolo yango mbala ya nsima?” To okoki koloba boye: “Nakosepela otánga lisolo moko oyo nandimi mpenza ete ekosepelisa yo. Nakoki koyela yo yango na ndako to na biro?” Basakoli mosusu batunaka boye: “Nakoki kobenga yo na nimero nini ya telefone?” Mbala mingi, bato bapesaka biyano ya malamu.
5. Mokano nini tosengeli kozala na yango ntango tozali kopesa litatoli na bisika oyo bato bazalaka mingi?
5 Bato mingi oyo basakoli bakutanaki na bango mpo na mbala ya liboso na bisika oyo bato bazalaka mingi, bandimaki koyekola Biblia. Tokoki koyekola na bato ya ndenge wana na bandako na bango, na bisika na bango ya mosala, na esika oyo bato bazali mingi kasi ebongi mpo na koyekola, to na telefone. Tiká ete tómityela mokano ya kobanda koyekola na bato Biblia ntango tozali kopesa litatoli malamumalamu na bisika oyo bato bazalaka mingi.
-
-
Ndenge ya kolakisa bazulunaloMosala ya Bokonzi—2005 | Juin
-
-
Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Yuni
“Mingi na biso tokolekisa pene na bomoi na biso mobimba na mosala. Bato mosusu bamonaka mosala lokola lipamboli; kasi, basusu bamonaka yango lokola etumbu. Okanisi nini mpo na yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Mosakoli 2:24.] Zulunalo oyo emonisi ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tólekisa ndelo te na ndenge oyo totalelaka mosala. Ezali mpe komonisa ndenge ya kosilisa mitungisi ya mosala.”
Lamuká! 22 Yuni
“Okanisi ete mboka na biso elingaki kozala malamu soki moto nyonso atosaka maloba oyo? [Tángá Baefese 4:28. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo elobeli mpasi oyo ekómelaka biso nyonso mpo bato bayibaka biloko na bamagazini. Ezali mpe kolobela ndenge oyo koyiba biloko na bamagazini mpe makambo mosusu ya mobulu etikali moke esila.”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Yuli
“Biso nyonso toyebi bato oyo bamonanaka na miso ete bazali na bomoi ya malamu, kasi bango moko bamimonaka ete bazangi eloko moko. Okanisi ete balukaka nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Matai 5:3.] Zulunalo oyo ezali kolobela sɛkɛlɛ ya kozala na kimya ya makanisi; sɛkɛlɛ yango ezali nde kokokisa bamposa na biso ya elimo.”
Lamuká! 8 Yuli
“Lelo oyo, lokola kozwa mosala ekómi mpenza etumba, bato mingi bazali lisusu na misala te. Zulunalo oyo elobeli makambo mitano ya ntina oyo esalisaka moto azwa mosala. [Lobelá mitó mike ya makambo oyo ezali na makomi ya moindo na lisolo “Makambo mitano ya ntina mpo na kozwa mosala.”] Ezali mpe kopesa makanisi oyo ekoki kosalisa moto abatela mosala na ye.” Tángá Masese 22:29, oyo batye yango na lokasa 10.
-