“Bozwi ofele, bópesa ofele”
“BOZWI ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:8) Yesu apesaki bantoma na ye malako wana ntango atindaki bango bákende kosakola nsango malamu. Bantoma batosaki nde etinda yango? Ɛɛ, batosaki yango mpe bakobaki kosala bongo ata ntango Yesu azalaki lisusu awa na mabelé te.
Na ndakisa, ntango Simona, oyo liboso azalaki moto ya maji, amonaki nguya ya kosala makamwisi oyo ntoma Petelo ná ntoma Yoane bazalaki na yango, alobaki na bango ete apesa bango mbongo mpo bápesa ye mpe nguya yango. Kasi Petelo apamelaki Simona na maloba oyo: “Palata na yo ebeba elongo na yo, mpamba te okanisaki kozwa likabo ya ofele ya Nzambe na mbongo.”—Misala 8:18-20.
Ntoma Paulo azalaki na makanisi ndenge moko na Petelo. Paulo akokaki kosɛnga bandeko na ye baklisto ya Kolinti bákokisaka bamposa na ye. Kasi, azalaki kosala na mabɔkɔ na ye moko mpo na kokokisa bamposa na ye. (Misala 18:1-3) Yango wana alobaki kozanga kokakatana ete asakolaki nsango malamu epai ya Bakolinti “kozanga koluka lifuti.”—1 Bakolinti 4:12; 9:18.
Ezali mawa mingi komona ete bato mingi oyo bazali komibenga lelo oyo baklisto balingaka te ‘kopesa ofele’ ndenge bantoma basalaki. Kutu, bakonzi mingi ya mangomba ya boklisto “balakisaka kaka mpo na kozwa lifuti.” (Mika 3:11, NW) Yango wana, bakonzi mosusu ya mangomba bakómi na bozwi mingi mpo na mbongo oyo bazali kokɔngɔla epai ya bandimi na bango. Na 1989, na États-Unis, bakatelaki pastɛrɛ moko etumbu ya bolɔkɔ ya mbula 45. Mpo na nini? Azalaki “koyiba bandimi na ye bamilio ya badolare mpe kosalela mbongo yango mpo na kosomba bandako, mituka, kosala mibembo; kutu asombelaki mpe mbwa na ye ndako oyo ezali na masini oyo epesaka mopɛpɛ kitoko.”—Zulunalo People’s Daily Graphic, ebimeli ya 7 Ɔkɔtɔbɛ 1989.
Zulunalo moko (Ghanaian Times, ebimeli ya 31 Marsi 1990) elobi ete na Ghana, sango moko ayokaki nkanda mpe abwakelaki bandimi mbongo ya mabonza oyo bautaki kokɔngɔla na misa. Zulunalo yango elobaki ete “asalaki bongo mpamba te akokaki kondima te ete mikóló ndenge wana bápesa mbongo ya nkasa mikemike.” Tokokamwa te ete, na mangomba mingi, bazali ata mpe kolona lokoso na mitema ya bandimi, wana bazali kobongisa masano ya mbongo mpe makambo mosusu mpo na kozwa mbongo.
Na bokeseni na mangomba wana, Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yesu ná bayekoli na ye ya liboso. Bazali te na bakonzi ya lingomba oyo bafutamaka mpo na mosala na bango. Motatoli mokomoko azali ministre oyo azali na mokumba ya kosakola “nsango malamu ya bokonzi.” (Matai 24:14) Na yango, bato koleka milio motoba na mokili mobimba bamipesi na mosala ya komemela bato “mai ya bomoi” ofele. (Emoniseli 22:17) Na ndenge yango, ata bato oyo ‘bazali na mosolo te’ bakoki koyoka nsango ya Biblia. (Yisaya 55:1) Atako mosala na bango oyo ezali kosalema na mokili mobimba esimbami na makabo ya bolingo malamu, basɛngaka mabonza te. Lokola bazali baministre ya solosolo ya Nzambe, bazali te “batɛkisi ya liloba ya Nzambe,” kasi bazali nde koloba “na bosembo, ɛɛ, lokola bato batindami na Nzambe.”—2 Bakolinti 2:17.
Kasi, mpo na nini Batatoli ya Yehova basalisaka bato ofele? Nini mpenza etindaka bango básala bongo? Elingi nde koloba ete, lokola bazali kopesa ofele, bakozwa ata mbano moko te mpo na milende na bango?
Bazali kopesa eyano na ntembe oyo Satana abimisaki
Lelo oyo, baklisto ya solo bazali kosalela Yehova libosoliboso mpo bazali na mposa ya kosepelisa ye, kasi te mpo na koluka bozwi. Na yango, bazali kopesa eyano na ntembe oyo Satana Zabolo abimisaki eleki lelo bankóto ya bambula. Mpo na moyengebene Yobo, Satana atunaki Yehova motuna oyo: “Yobo akotosaka Nzambe bobele mpamba?” Satana alingaki koloba ete Yobo azalaki kosalela Nzambe kaka mpo Nzambe azalaki kobatela ye. Alobaki ete soki balongoli bozwi nyonso oyo Yobo azalaki na yango, akolakela Nzambe mabe na miso na ye!—Yobo 1:7-11.
Mpo na kosukisa ntembe yango, Nzambe apesaki Satana nzela ya kotya Yobo na komekama mpe alobaki na ye ete: “Nyonso oyo ezali na ye, ezali na lobɔkɔ na yo.” (Yobo 1:12) Esukaki ndenge nini? Yobo amonisaki polele ete Satana azali mokosi. Ata na bampasi nyonso oyo ekómelaki ye, Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. Alobaki ete: “Kino nakokufa nakomilongwela sembo na ngai te!”—Yobo 27:5, 6.
Basambeli ya solo lelo oyo bazali komonisa elimo oyo Yobo azalaki na yango. Bazali te kosalela Nzambe mpo na biloko ya mokili.
Likabo ya ofele oyo Nzambe apesi na nzela ya boboto monene na ye
Ntina mosusu oyo baklisto ya solo bazali kondima ‘kopesa ofele’ ezali mpo bango moko mpe ‘bazwi ofele’ epai ya Nzambe. Lisumu ya nkɔkɔ na biso Adama ekómisá bato nyonso baombo ya lisumu mpe ya liwa. (Baloma 5:12) Na bolingo nyonso, Yehova andimaki ete Mwana na ye akufa mpo na kopesa bomoi na ye mbeka—likambo oyo esengelaki kopesa Nzambe mpasi mpenza. Bato babongi te básalela bango likambo wana. Ezali mpenza nde likabo ya Nzambe.—Baloma 4:4; 5:8; 6:23.
Yango wana, ndenge ekomami na Baloma 3:23, 24, Paulo ayebisaki baklisto bapakolami ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe, mpe ezali lokola likabo ya ofele ndenge bazali kotángama bayengebene na nzela ya boboto monene na ye na lisalisi ya kosikolama na nzela ya lisiko oyo Klisto Yesu afutaki.” Baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé bazwi mpe “likabo ya ofele.” Likabo yango epesi mpe nzela ete tókóma kotángama bayengebene mpe kobengama baninga ya Yehova.—Yakobo 2:23; Emoniseli 7:14.
Mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa bato epesi mpe baklisto nyonso nzela ya kokóma baministre ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete: “Nakómaki ministre [ya sɛkɛlɛ yango mosantu] engebene likabo ya ofele ya boboto monene ya Nzambe.” (Baefese 3:4-7) Lokola bazwi mosala yango na nzela ya likabo oyo babongaki na yango te, baministre ya solosolo ya Nzambe basengeli te kolikya ete báfuta bango ntango bazali kosakola nsango ya likabo yango.
Bato bazali kosalela Nzambe kaka mpo na bomoi ya seko?
Elingi nde koloba ete Nzambe azali kosɛnga na baklisto básalela ye kaka mpamba, kozanga lifuti? Ezali bongo te, mpamba te ntoma Paulo alobaki na baninga na ye bandimi ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.” (Baebele 6:10) Yehova azangi mpe bosembo te. (Deteronome 32:4, NW) Yehova azali nde “mopesi-mbano ya baoyo bazali koluka ye makasi.” (Baebele 11:6) Kasi, bato bazali kosalela Nzambe kaka mpo alaki bango bomoi ya seko na Paladiso?—Luka 23:43.
Te. Ya liboso, Nzambe ye moko moto atyá na mitema ya bato mposa ya kozala na bomoi libela na libela na Paladiso. Ye moko moto apesaki mobali ná mwasi ya liboso elikya yango. (Genese 1:28; 2:15-17) Ntango Adama ná Eva bazangisaki bana na bango likoki ya kozala na bomoi libela na libela, Yehova azongiselaki bango elikya yango. Nzambe alaki na kati ya Liloba na ye ete “bozalisi yango moko mpe ekolongolama na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Baloma 8:21) Yango wana, ebongi ete baklisto bálanda ndakisa ya Moize, moto ya kala, elingi koloba bátala “na likebi mpenza epai mbano ekofutama.” (Baebele 11:26) Likabo yango oyo Nzambe apesi bato ezali te ete afuti bango avoka. Azali kopesa likabo yango nde mpo na bolingo ya solosolo oyo azali na yango mpo na basaleli na ye. (2 Batesaloniki 2:16, 17) Yango wana biso mpe “tozali kolinga, mpamba te ye alingaki biso liboso.”—1 Yoane 4:19.
Ntina ya malamu ya kosalela Nzambe
Atako bongo, baklisto lelo oyo basengeli ntango nyonso kotalela malamumalamu ntina mpenza oyo bazali kosalela Nzambe. Tozali kotánga na Yoane 6:10-13 ete Yesu aleisaki bato koleka nkóto mitano na ndenge ya likamwisi. Na nsima, bamosusu bakómaki kolandalanda Yesu kaka mpo na kozwa litomba. Yesu alobaki na bango ete: “Bozali koluka ngai . . . mpo bolyaki mampa mpe botondaki.” (Yoane 6:26) Mbula soki ntuku misato na nsima, baklisto mosusu bazalaki mpe kosalela Nzambe, kasi “na likanisi ya pɛto te.” (Bafilipi 1:17) Bato mosusu oyo ‘bazalaki te kondima maloba ya Yesu Klisto oyo epesaka litomba’ bazalaki mpe koluka kozwa matomba na kati ya lisangá ya boklisto.—1 Timote 6:3-5.
Lelo oyo, moklisto oyo azali kosalela Nzambe kaka mpo azali na mposa ya kozala na bomoi libela na libela na Paladiso azali mpe koluka litomba na ye moko. Nsukansuka, akoki kolɛmba na elimo. Lokola nsuka ya ebongiseli ya makambo ya Satana ezali komonana lokola eumeli mingi koleka, moto ya ndenge wana akoki kokanisa ete nsuka ekoya lisusu sikoyo te mpe, mpo na yango, akoki ‘kolɛmba.’ (Bagalatia 6:9) Akoki ata mpe kokóma koimaima mpo amipimelaki makambo mosusu mpo na kosalela Nzambe. Yesu alobi na biso boye: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Ɛɛ, moto oyo azali kosalela Nzambe libosoliboso mpo alingaka ye akoki te komikatela mikolo to bambula oyo akosalela ye. Akozwa nde ekateli ya kosalela ye libela na libela! (Mika 4:5) Akomilela te mpo na makambo oyo amipimelaki mpo na kosalela Nzambe. (Baebele 13:15, 16) Bolingo na ye mpo na Nzambe ekotinda ye atya matomba ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na ye.—Matai 6:33.
Lelo oyo, basambeli ya solosolo ya Nzambe koleka milio motoba ‘bazali komipesa na bolingo malamu’ mpo na kosalela Yehova. (Nzembo 110:3, NW) Yo mpe ozali moko ya bato yango? Soki ezali bongo te, kanisá malamumalamu makambo oyo okoki kozwa epai ya Nzambe: boyebi ya sikisiki; (Yoane 17:3) kolongwa na boombo ya mateya ya lokuta; (Yoane 8:32) elikya ya kozala na bomoi libela na libela. (Emoniseli 21:3, 4) Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa yo na koyeba ndenge oyo okoki kozwa makambo nyonso wana epai ya Nzambe mpe bakosala yango ofele.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 22]
Lelo oyo, baklisto ya solo bazali kosalela Yehova libosoliboso mpo bazali na mposa ya kosepelisa ye, kasi te mpo na koluka bozwi
[Elilingi na lokasa 21]
Lisiko oyo Nzambe apesá ofele ezali kotinda baklisto básakola mpe nsango malamu ofele