LITEYA 49
Makanisi ya solosolo mpo na kondimisa
NTANGO olobi likambo moko, bato oyo bazali koyoka yo bakoki komituna: “Likambo yango ezali mpenza solo? Eloko nini ye amonisi biso mpo tóndima maloba na ye?” Yo moteyi, ozali na mokumba ya kopesa biyano na mituna wana to kosalisa bato oyo bazali koyoka yo bázwa biyano bango moko. Soki likambo yango ezali na ntina mingi mpo na lisolo na yo, salá nyonso omonisa bato oyo bazali koyoka yo bantina ya solosolo mpo bándima yango. Soki osali bongo, okondimisa bato lisolo na yo kozanga mpasi.
Ntoma Paulo mpe azalaki kondimisa bato. Mpo na kosalisa bato oyo bazalaki koyoka ye bábongwana, Paulo azalaki kobimisa makanisi ya solosolo mpo na kondimisa likambo oyo azali koloba, azalaki kolimbola makambo na molɔngɔ, mpe azalaki kolendisa bango makasi. Ezali ndakisa malamu mpo na biso. (Mis. 18:4; 19:8) Ya solo, ezali na bato mosusu oyo basalaka masukulu oyo basalelaka mayele ya kondimisa mpo na kokosa bato. (Mat. 27:20; Mis. 14:19; Kols. 2:4) Bakoki kobanda na likambo moko oyo euti na makanisi ya lokuta, to na biyokayoka, bazali komonisa makanisi na mozindo mpenza te, koboya kolobela makambo ya solosolo oyo emonisi lokuta na bango, to mpe kosalela maloba oyo ezali kobɛtisa bato mitema, na esika ya kotinda bango bákanisa. Biso tosengeli kosalela mayele ya ndenge wana ata moke te.
Euta mpenza na Liloba ya Nzambe. Makambo oyo tozali koteya esengeli te kozala makanisi na biso moko. Mosala makasi oyo tozali kosala ezali ya koyebisa bato makambo oyo toyekoli na Biblia. Mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele esalisi biso mingi na mosala yango. Mikanda yango ezali kolendisa biso tótalelaka Makomami malamumalamu. Biso mpe, tozali kolakisa bato Biblia, kasi ezali te mpo na kondimisa bango ete biso tolobaka solo; na komikitisa mpenza, tozali nde na mposa ya kolakisa bango Biblia mpo bango moko bámona makambo oyo ezali na kati. Likanisi na biso ezalaka ndenge moko na oyo ya Yesu Klisto, moto oyo alobaki na Tata na ye na libondeli ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoa. 17:17) Ezali ata na moto moko te oyo makanisi na ye eleki ya Yehova Nzambe, Mozalisi ya likoló na nse. Yango wana, soki tolingi makanisi oyo tobimisi ezala makanisi ya solo mpenza, esengeli kouta na Liloba na ye.
Na bantango mosusu, okoki kosolola na bato oyo bayebi Biblia te to oyo bandimaka te ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Salelá bososoli mpo na koyeba ntango nini mpe ndenge nini okoki kokɔtisa mikapo ya Biblia na lisolo. Osengeli kosala nyonso mpo, ntango likoki emonani, obenda makanisi na bango na mokanda wana ya koteya.
Elingi nde koloba ete soki otángi maloba ya vɛrsɛ moko oyo ebongi osengeli kosuka kaka wana mpo epesi likanisi ya kosilisa ntembe mbala moko? Te, na bantango mosusu ekosɛnga obakisa mwa makambo mosusu. Ekosɛnga na yo mbala mosusu ete obenda likebi ya moto na bavɛrsɛ oyo ezali liboso to nsima ya vɛrsɛ yango mpo na komonisa ye mpenza ete vɛrsɛ oyo otángi ezali mpenza kondimisa makambo oyo olobi. Soki otángi vɛrsɛ moko mpo na kobimisa etinda moko mpe soki bavɛrsɛ oyo ezali liboso to na nsima ya vɛrsɛ yango ezali kolobela likambo mosusu, ekosɛnga obakisa makanisi mosusu oyo esengeli mpo na kondimisa bato. Okoki mbala mosusu kosalela bavɛrsɛ mosusu oyo ezali kolobela lisolo na yo mpo bato oyo bazali koyoka yo bámona mpenza ete maloba na yo euti na Makomami.
Kolobela mingi te likambo moko oyo vɛrsɛ moko ezali kondimisa. Tángá nde vɛrsɛ yango malamumalamu. Mpo mbala mosusu vɛrsɛ wana etali lisolo na yo mobimba, kasi likambo moko mpamba te. Nzokande, mpo makanisi oyo ozali kobimisa endimisa mpenza, moto oyo azali koyoka yo asengeli komona ye moko, na kati ya vɛrsɛ wana, likambo oyo yo olobi ete vɛrsɛ yango ezali kolobela.
Kobakisa makambo mosusu mpo na kondimisa. Na bantango mosusu, mpo na kosalisa bato bámona ete makambo oyo Makomami elobi ezali solo, ekozala malamu kosalela makanisi mosusu oyo euti na Biblia te, kasi na mikanda to na biloko mosusu oyo bato bandimaka.
Na ndakisa, mpo na kondimisa moto ete Mozalisi azali, okoki kolakisa ye biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́. Okoki kolobela mibeko oyo tomonaka na kati ya biloko Nzambe asalá, na ndakisa, gravitation oyo esalaka ete mabele to moi to sanza ebendaka biloko oyo ezali pene na yango; na nsima okoki kokanisa elongo na ye likoló ya mibeko wana mpo akoka komona ete soki mibeko wana ezali, elingi koloba Moto oyo asalaki mibeko yango mpe azali. Mpo makanisi na yo ezala solo mpenza, esengeli koyokana na makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi. (Yobo 38:31-33; Nz. 19:1; 104:24; Lom. 1:20) Biloko wana oyo Nzambe asalá esalisaka mpenza, mpamba te ezali komonisa ete oyo Biblia elobi ekokani na makambo oyo emonanaka na miso.
Ozali nde koluka kosalisa moto moko ayeba ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe? Ntango mosusu okotángela ye maloba ya bato ya mayele oyo balobaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, kasi yango ekoki nde mpenza kosilisa ntembe? Yebá ete maloba ya bato wana ya mayele endimisaka moto nyonso te, kaka bato oyo bakumisaka bango. Okoki nde kolobela makanisi ya bato ya siansi mpo na kondimisa bato ete Biblia ezali mokanda oyo elobaka solo? Kobosana te ete makanisi wana euti na bato ya kozanga kokoka mpe, soki osaleli yango mpo na kondimisa makambo ya Biblia, ekozala lokola nde ozali kotonga ndako likoló ya zɛlo. Nzokande, soki obandi naino na Liloba ya Nzambe mpe na nsima omonisi makambo oyo bato ya siansi balobi, oyo ezali kolakisa ete Biblia elobaka solo, makanisi oyo ozali kobimisa ekozala lokola ndako oyo etongami likoló ya mabanga.
Mpo na likambo nyonso oyo olingi kondimisa, monisá bato makambo ya solosolo oyo ekoki mpenza mpo na kosilisa ntembe na bango. Soki omonisi bato oyo bazali koyoka yo likambo moko ya solosolo mpe yango endimisi bango, okoki kosuka wana, kasi soki endimisi bango te, osengeli kobakisa makambo mosusu. Na ndakisa, soki ozali kosala lisolo oyo etali makambo ya mikolo ya nsuka ndenge balobeli yango na 2 Timote 3:1-5, okoki kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo na nsango moko oyo bato mingi bayoki, oyo emonisi na ndakisa ete bato bazangi “bolingo ya libota.” Mwa ndakisa moko wana ekoki kokoka mpo na kondimisa ete likambo wana oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka ezali mpenza kokokisama mikolo oyo.
Mbala mingi, ezalaka mpe malamu kokokanisa biloko mibale oyo ekokani na makambo mingi ya ntina. Elingi koloba te ete soki osali boye nde ekondimisa makambo oyo ozali koloba; bato bakondima kaka soki makambo yango ekokani na oyo Biblia ezali koloba. Atako bongo, kokokanisa biloko mibale ekoki kosalisa moto amona ete likanisi oyo olobi ezali likanisi ya solo. Okoki kosalela yango, na ndakisa, ntango ozali komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnɛma. Okoki komonisa ete kaka ndenge baguvɛrnɛma ya bato ezalaka na bakonzi, na bato oyo bakonzi yango bazali koyangela, na mibeko, na ebongiseli ya kosambisa bato, mpe na ebongiseli ya kotángisa bato kelasi, Bokonzi ya Nzambe mpe ezali na nyonso wana.
Mbala mingi, ezalaka mpe malamu koyebisa bato makambo ya solosolo oyo esalemá mpo na komonisa bango ete kosalela toli ya Biblia ezali nzela ya mayele. Okoki mpe kobɛta masolo ya makambo oyo yo moko okutaná na yango mpo na komonisa ete mateya oyo ozali kopesa ezali solo. Na ndakisa, ntango ozali kolakisa moto ntina ya kotánga Biblia mpe koyekola yango, okoki kobɛtɛla ye lisolo na yo moko, komonisa ye ndenge nini kotánga mpe koyekola Biblia ebongisaki bomoi na yo. Mpo na kolendisa bandeko na ye, ntoma Petelo abɛtɛlaki bango lisolo ya kongɛnga ya Yesu, oyo ye amonaki na miso. (2 Pet. 1:16-18) Paulo mpe alobelaki makambo oyo ye moko akutanaki na yango. (2 Kol. 1:8-10; 12:7-9) Kasi kobɛta masolo ya bomoi na yo moko mingimingi te noki okobenda likebi ya bato epai na yo moko.
Lokola makambo mpe makanisi ya bato nyonso ezalaka ndenge moko te, likambo oyo ondimisi na yango moto oyo, ntango mosusu ekondimisa moto mosusu te. Yango wana, talelaká makanisi oyo bato oyo bakoyoka yo bazali na yango ntango ozali koluka likanisi oyo okosalela mpo na kosilisa ntembe mpe ndenge ya kolobela yango. Masese 16:23, (NW) elobi boye: “Motema ya moto ya bwanya epesaka monɔkɔ na ye bososoli, mpe ebakiselaka mbɛbu na ye mayele ya kondimisa.”