Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ezaleli ya koyika mpiko epesi biso mbano
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Août
    • Ezaleli ya koyika mpiko epesi biso mbano

      1 “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko bokozwa milimo na bino.” (Luka 21:19) Maloba oyo ya esakweli ya Yesu etali “bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ezali komonisa polele ete soki tolingi kotikala sembo, tosengeli koyeba ete komekama ekoya. Kasi na lisalisi oyo Yehova apesaka, mokomoko na biso akoki ‘koyika mpiko tii na nsuka’ mpe “akobika” ​—⁠Mat. 24:​3, 13; Filp. 4:⁠13.

      2 Mokolo na mokolo, makambo lokola minyoko, mikakatano ya nzoto, mitungisi ya mbongo mpe mitungisi ya makanisi, ekoki kokóma komekama mpo na biso. Kasi, tosengeli kobosana ata moke te ete Satana nde azali komeka kobebisa bosembo na biso epai na Yehova. Mokolo na mokolo oyo tozali kotikala sembo epai ya Tata na biso, tozali nde kopesa eyano na ntembe ya Motumoli. Ezali mpenza likambo ya esengo koyeba ete Yehova abosanaka te “mpisoli” oyo tobimisaka ntango tokutani na komekama! Yango ezali na motuya mingi na miso ya Yehova, mpe bosembo na biso esepelisaka mpenza motema na ye!​—⁠Nz. 56:8; Mas. 27:⁠11.

      3 Komekama ebongisaka biso: Minyoko ekoki kosalisa biso na komona esika oyo kondima na biso ezali makasi te to komona ezaleli moko ya mabe na bomoto na biso, na ndakisa, lolendo to kozala motema mɔtɔmɔtɔ. Na esika ya koluka kokima minyoko to kosilisa yango na banzela oyo eyokani te na Makomami, tosengeli nde kotya likebi na toli ya Liloba ya Nzambe oyo elobi ete, “tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba.” Mpo na nini? Mpamba te soki tozali koyika mpiko na bosembo mpenza na mimekano, tokokóma “bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, kozangáká eloko te.” (Yak. 1:​2-4) Ezaleli ya koyika mpiko ekoki kosalisa biso na kolona bizaleli mingi ya malamu mpenza, lokola kozala makambo makasimakasi te, koyeba komitya na esika ya basusu mpe motema mawa.​—⁠Lom. 12:⁠15.

      4 Motindo ya kondima oyo emekami: Ntango tozali koyika mpiko na mimekano, tozali kokóma na lolenge moko ya kondima oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe. (1 Pet. 1:​6, 7) Kondima ya ndenge wana ezali kobongisa biso na kotikala sembo na mimekano oyo tokoki kokutana na yango na mikolo ekoya. Lisusu, tokoki komiyoka ete Nzambe andimi mpe elikya na biso ekokóma makasi koleka, mpe tokomona ete elikya yango ekokokisama mpenza.​—⁠Lom. 5:​3-5.

      5 Mbano monene koleka oyo tokoki kozwa soki tozali na ezaleli ya koyika mpiko, emonisami polele na Yakobo 1:​12, oyo elobi boye: “Esengo na moto oyo azali kokoba koyika mpiko na komekama, mpamba te na kokómáká moto oyo andimami akozwa motole ya bomoi.” Na bongo, tiká ete tókangama makasi na komipesa na biso epai na Yehova, mpe tózala na kondima ete akopambola mpenza “baoyo bazali kokoba kolinga ye.”

  • Eteni 2​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Août
    • Eteni 2​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola

      Ndenge ya komibongisa mpo na kotambwisa boyekoli

      1 Mpo na koteya malamumalamu moto oyo tozali koyekola na ye Biblia, tosengeli kosuka kaka te na kolobela makambo oyo ezali na lisolo mpe kotalela bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te. Tosengeli nde kolobela makambo na ndenge oyo ekosimba mpenza motema ya moyekoli. Yango esɛngaka komibongisa malamu na kotalela bamposa ya moyekoli.​—⁠Mas. 15:⁠28.

      2 Ndenge ya komibongisa: Bandá na kobondela Yehova mpo na moto yango mpe bamposa na ye. Sɛngá Yehova asalisa yo mpo osimba motema ya moyekoli. (Kols. 1:​9, 10) Mpo na kokanga mpenza ntina ya likambo oyo lisolo ezali kolobela, talelá malamumalamu motó ya likambo ya mokapo to liteya yango, mitó mike ya likambo, mpe biloko nyonso oyo okoki kolakisa bato oyo ozali koteya. Omituna boye: ‘Ntina ya lisolo oyo ezali nini?’ Yango ekosalisa yo olobela mingi makanisi ya ntina ntango ozali koyekola na moto.

      3 Talelá paragrafe mokomoko ya lisolo yango na likebi mpenza. Luká biyano ya mituna oyo ezali na mokanda mpe tyá bilembo kaka na maloba ya ntina. Talelá makanisi nini ya bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te eyokani na likanisi ya ntina ya paragrafe, mpe poná bavɛrsɛ oyo bokotánga ntango bokoyekola. Soki okomi mwa makambo pembeni ya lisolo na esika lokasa etikali pamba, yango ekosalisa yo. Moyekoli asengeli komona polele ete makambo oyo azali koyekola euti mpenza na Liloba ya Nzambe.​—⁠1 Tes. 2:⁠13.

      4 Yokanisá lisolo na bamposa ya moyekoli: Na nsima, bongisá lisolo yango na kotalela bamposa ya moto oyo ozali koyekola na ye. Meká kokanisa mituna nini akoki kotuna mpe makambo oyo ekoki kozala mpasi mpo na ye akanga ntina na yango to andima yango. Omituna boye: ‘Likambo nini azali na mposa ya kokanga ntina na yango to kosalela mpo akola na elimo? Ndenge nini nakoki kosimba motema na ye?’ Na nsima, talelá bamposa na ye ntango ozali koteya ye. Mbala mosusu, okomona ete osengeli kobongisa ndakisa moko, kolimbola likambo moko, to kotuna mwa mituna mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya likambo moko to ya vɛrsɛ moko. (Neh. 8:⁠8) Kasi, kolinga te kokɔtisa makanisi mosusu oyo eyokani mpenza te na motó ya likambo oyo bozali kotalela. Soki bosali mwa bozongeli na nsuka ya boyekoli, yango ekosalisa ye na kokanga makambo ya ntina.

      5 Tosepelaka mpenza ntango tomonaka bato ya sika bazali kobota mbuma ya boyengebene mpo na lokumu ya Yehova! (Filp. 1:11) Mpo na kosalisa bango bábota mbuma yango, osengeli komibongisaka malamu ntango nyonso oyo osengeli kotambwisa boyekoli ya Biblia.

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto