Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Eteni 3​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Novembre
    • Eteni 3​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola

      Kosalela Makomami malamu

      1. Mpo na nini tosengeli kosalela mingi Makomami ntango tozali koyekola na bato Biblia?

      1 Ntango tozali koyekola na bato Biblia, mokano na biso ezali ya ‘kokómisa bango bayekoli,’ mpe ya kosalisa bango bákanga ntina ya mateya ya Liloba ya Nzambe, bándima yango mpe básalela yango na bomoi na bango. (Mat. 28:​19, 20; 1 Tes. 2:13) Yango wana, makambo oyo tozali koloba na ntango ya boyekoli esengeli mpenzampenza kouta na Makomami. Na ebandeli, ekozala malamu tólakisa bayekoli ndenge ya koluka bavɛrsɛ oyo tolingi kotánga na Biblia na bango moko. Kasi, ndenge nini tokoki kosalela Makomami mpo na kosalisa bato yango bákola na elimo?

      2. Ndenge nini tokoki kopona bavɛrsɛ oyo tokotánga mpe tokolimbola?

      2 Poná bavɛrsɛ oyo bokotánga: Ntango ozali komibongisa, luká koyeba ndenge vɛrsɛ mokomoko oyo batii maloba na yango na lisolo te eyokani na likambo oyo bokotalela, mpe poná bavɛrsɛ oyo bokotánga mpe oyo bokolobela ntango bokoyekola. Mbala mingi, ezalaka malamu kotánga bavɛrsɛ oyo esimbi bindimeli na biso. Ntango mosusu, ekozala na ntina te kotánga bavɛrsɛ oyo ezali kopesa bandimbola ya makambo mosusu oyo elobelami. Talelá bamposa mpe lolenge ya bomoi ya moyekoli mokomoko.

      3. Kotuna mituna ezali na litomba nini, mpe ndenge nini kosala yango?

      3 Tuná mituna: Na esika ya kolimbola bavɛrsɛ, sɛngá moyekoli ye moko alimbola yango. Okoki kopesa ye nzela ya kosala bongo soki ozali kotuna ye mituna oyo ebongi. Soki ndenge ya kosalela vɛrsɛ moko emonisami polele, okoki kosɛnga ye amonisa ndenge vɛrsɛ yango esimbi makambo oyo ezali na paragrafe. Ntango mosusu, ekoki kosɛnga kotuna motuna moko to kolandisa mituna mingi mpo na kosalisa moyekoli akóma na likanisi oyo esengeli. Soki esɛngi opesa bandimbola mosusu, okoki kosala yango ntango moyekoli akosilisa kopesa eyano.

      4. Ndenge nini tosengeli kolimbola bavɛrsɛ oyo tozali kotánga?

      4 Koluka mindɔndɔ te: Mbala mingi, moto ya bokila oyo ayebi mosala na ye malamu, azalaka na mposa ya mbanzi moko kaka mpo na koboma nyama. Ndenge moko mpe, moteyi ya malamu azalaka na mposa te ya koloba makambo mingi mpo na kolimbola likanisi moko. Akoki koloba na kozanga mindɔndɔ, na maloba ya polele mpe ya sikisiki. Na bantango mosusu, ekosenga olukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpo na kokanga ntina ya vɛrsɛ moko mpe koyeba kolimbola yango malamumalamu. (2 Tim. 2:15) Kasi, ntango bozali koyekola, koluka te kopesa bandimbola nyonso ya vɛrsɛ mokomoko. Lobelá kaka ndimbola oyo eyokani na likambo oyo bozali kotalela.

      5, 6. Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli básalela Liloba ya Nzambe na bomoi na bango, kasi likambo nini tosengeli kosala te?

      5 Monisá ndenge ya kosalela yango: Soki likoki ezali, monisá moyekoli ndenge vɛrsɛ yango etaleli ye. Na ndakisa, ntango bozali kotalela Baebele 10:​24-25 elongo na moyekoli oyo abandi naino te koyangana na makita, okoki kolobela likita moko mpe kobenga ye na likita yango. Kasi, koluka te kotindika ye na makasi. Tikelá Liloba ya Nzambe nzela etinda ye asala makambo oyo esengeli mpo na kosepelisa Yehova.​—⁠Ebe. 4:⁠12.

      6 Ntango tozali kokokisa etinda ya kokómisa bato bayekoli, tiká “[tókolisa] botosi na nzela ya kondima,” wana tozali kosalela Makomami malamu.​—⁠Lom. 16:⁠26.

  • Ndenge ya kolakisa bazulunalo
    Mosala ya Bokonzi—2004 | Novembre
    • Ndenge ya kolakisa bazulunalo

      (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

      Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛl 15 Nov.

      “Bato mingi balingaka kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi ya molai. Kasi, soki yango ekokaki kosalema, olingaki mpenza kosepela kozala na bomoi libela na libela? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yoane 17:⁠3.] Zulunalo oyo ezali kolobela elaka ya bomoi ya seko oyo Biblia epesi. Ezali mpe komonisa ndenge bomoi ekozala ntango elaka yango ekokokisama.”

      Lamuká! 22 Nov.

      “Na mbula 20 oyo euti koleka, bato basali milende mpenza mpo na koyekola maladi ya sida mpe koluka nkisi ya kosilisa yango. Kasi, ezali na bato mingi oyo bayebi naino maladi yango malamu te. [Lakisá ye etanda “Makanisi oyo bato bazalaka na yango mpo na sida,” mpe tiká ye alobela yango.] Zulunalo oyo ezali kolobela ndenge baboti bakoki kobatela bana na bango.” Tángá Deteronome 6:​6-7.

      Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛlii 1 Des.

      “Moko ya makambo oyo ekesenisaka bato ná banyama ezali ete bato bayebaka kokesenisa malamu ná mabe. Na mawa nyonso, bato mingi basalaka nde makambo ya mabe. Na makanisi na yo, mpo na nini basalaka bongo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yilimia 17:9 to Emoniseli 12:⁠9.] Zulunalo oyo elobeli makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba mpe tósala makambo ya malamu.”

      Lamuká! 8 Des.

      “Bamasini oyo ezali kobima sika ebongoli te mposa oyo moto azalaka na yango ya kozala na baninga. Kasi, omoni te ete bomoi ya bato ndenge ezali kobongwana ekoki kosala ete ekóma mpasi lelo oyo kozwa baninga ya motema? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Masese 18:24.] Zulunalo oyo elobeli ndenge tokoki kozwa baninga ya malamu mpe kobatela boninga na bango.”

Mikanda na Lingala (1984-2025)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto