Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/06 lok. 8
  • Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Masolo mosusu
  • ‘Tóngɛnga lokola miinda’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tópesa litatoli na kozaláká na etamboli malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • “Tiká pole na bino engɛnga” mpo na kopesa Yehova nkembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 1/06 lok. 8

Bilenge oyo bazali kongɛnga lokola miinda

1. Ndenge nini Biblia emonisi ete baklisto basengelaki kokesana na bato mosusu, mpe ndenge nini maloba yango ezali kokokisama epai ya bilenge baklisto lelo oyo?

1 Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bino bozali pole ya mokili.” (Mat. 5:14, 16) Lokola engumba oyo ezali likoló ya ngomba engɛngaka makasi soki moi ebimi, ndenge moko mpe bango basengelaki kokesana na bato mosusu. Lelo oyo, bilenge mingi bazali “kongɛnga lokola miinda na mokili” na nzela ya etamboli na bango ya sembo mpe na ndenge bapesaka litatoli na molende.​—Filp. 2:15; Mki. 3:18.

2. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosalela mpo na kopesa litatoli epai ya balakisi mpe baninga ya kelasi?

2 Na kelasi: Ndenge nini okoki kopesa litatoli na kelasi? Bilenge mosusu bapesaki litatoli ntango bazali kosolola masolo na kelasi na makambo etali komɛla bangi, liteya ya evolisyo, mpe ndenge Banazi babomaki Bayuda na ndenge ya nsɔmɔ​—mpo na kotánga kaka mwa bandakisa wana. Ndeko mwasi moko asalelaki libaku oyo azwaki na kelasi ya kosala lisolo moko oyo elobelaki terorisme mpo na kopesa litatoli na ntina etali Bokonzi ya Nzambe ete ezali elikya ya solo mpo na bato. Molakisi akamwaki mingi na lisolo wana oyo abongisaki malamu, mpe yango epesaki ndeko mwasi nzela ya kopesa ye litatoli.

3. Ndenge nini okoki kotika ete pole na yo engɛnga na nzela ya etamboli na yo?

3 Lolenge mosusu ya kongɛnga lokola mwinda ezali kozala na etamboli ya malamu, kolata mpe kokata nsuki na ndenge ebongi. (1 Kol. 4:9; 1 Tim. 2:9) Ntango bana-kelasi mpe balakisi bazali komona ete etamboli na yo ekeseni na oyo ya bana mosusu, basusu bakoki kobendama na solo mpo na etamboli na yo ya malamu mpe yango ekopesa yo nzela ya koyebisa bango solo ya Biblia. (1 Pet. 2:12; 3:1, 2) Mbala mosusu, ekoki kozala mpasi komonisa etamboli ya moto oyo amipesi na Nzambe, kasi Yehova akosopela yo ebele ya mapamboli. (1 Pet. 3:16, 17; 4:14) Mpo na kosalisa basusu básepela na nsango malamu, okoki mbala mosusu kotángaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na ntango ya bopemi to kotya yango na esika oyo basusu bakoki komona.

4. Wapi mwa matomba ya kopesa litatoli na kelasi?

4 Soki ozali kotika ete pole na yo engɛnga na kelasi, kondima na yo ekokóma makasi mpe yango ekosalisa yo osepela na ndenge ozali mosaleli ya Yehova. (Yil. 9:24) Yango mpe ezali libateli mpo na yo. Ndeko mwasi moko alobaki boye: “Litomba oyo nazwaka ndenge nayebisaka basusu makambo ya losambo oyo nandimaka ezali ete bana-kelasi bamekaka te kotinda ngai na makasi nasala makambo oyo eyokani te na oyo Biblia elobi.”

5. (a) Bilenge mosusu bazali kosala nini mpo na komipesa mingi na mosala ya kosakola? (b) Mikano nini ya elimo ozali na yango?

5 Kosala mingi: Lolenge mosusu oyo bilenge mingi bazali kongɛnga lokola miinda ezali na ndenge bazali komipesa mingi na mosala ya kosakola. Nsima ya kozwa diplome, ndeko mobali moko akendeki kosala esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki makasi. Akendaki na lisangá moko ya moke oyo ezalaki kaka na nkulutu moko. Akomelaki moninga na ye moko boye: “Nazali na bomoi ya malamu mpenza awa. Mosala ya kosakola ezali kosalema malamu! Na porte mokomoko, tozali kosolola miniti soki 20 mpo bato bazali na mposa ya koyoka nyonso oyo tolingi koyebisa bango.” Alobi lisusu boye: “Nalingi ete bilenge nyonso básala mosala oyo mpo báyoka ndenge ngai nazali koyoka. Ezali na likambo moko te oyo eleki kosalela Yehova na nyonso oyo tozala na yango.”

6. Makambo nini esepelisaka yo epai ya bilenge oyo bazali na lisangá na bino?

6 Bilenge, tozali mpenza koseplela na bino na ndenge bozali kongɛnga lokola miinda na mokili! (1 Tes. 2:20) Soki bosaleli Yehova na motema na bino mobimba, na molimo na bino mobimba, na makanisi na bino nyonso, mpe na makasi na bino nyonso, bokobuka “mbala nkama sikoyo na eleko oyo, . . . mpe na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ezali koya bomoi ya seko.”​—Mko. 10:29, 30; 12:30.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto