Loyembo 148
Tósanzola Nzambe, Mokonzi na biso
1. Ɛ tóyembela Yehova,
Nzambe na biso, na nguya!
Tósakola nkombo na ye!
Tokobɛlɛm’epai na ye.
Ye nde Mosungi na biso;
Ye akosalisa biso.
Tómimonisa na sembo;
Nzambe na mawa, boboto.
2. Ebongi tózala sembo.
Tika tósanzola Nkolo!
Tólanda banzela na ye!
Tika mpe tókumisa ye!
Bato banso balingi ye,
Bakobatelama na ye.
Mpo na ye, bakosalisa
Bato, Nzamb’akumisama.
3. Bokonzi ebɛlɛmi mpo
Ekata makambo manso,
Yango malamu to mabe.
Boye, tósakolani bɛɛ.
Yah’atii Mokonzi na nguya;
Moto te akotɛmɛla.
Akoboma bato mabe,
Nkembo’a Bokonzi ya Nzambe.