Loyembo 89
Ndakisa na bolingo ya Nzambe
1. Yehova Nzambe atondi mayele,
Bolingo,
Bolingo.
Tómekola ye na molende solo
Ntango inso,
Ntango inso.
Tika tólanda nzela ya bosembo
Oyo Yehova alakisi biso.
Mpe nzela yango ekozala seko,
Yah, bolingo,
Azali sembo.
2. Tólanda mpenza nzela ya kolinga
Bandeko,
Bandeko.
Tópesa bango lisungi mpo ete
Bázwa kimya,
Bázwa kimya.
Tómonisela bango bolingo bɛɛ,
Mpo bamekami mpenza na Satana.
Mpe bakokemba kati na bondeko
Ya bolingo,
Solo bolingo.
3. Nkembo na Nzambe, Yehova y’ozali
Bolingo,
Bolingo.
Okokokisa mpe bilaká na yo
Na bolingo,
Na bolingo.
Tólendendeli na mosala na Yo;
Tokosalisa bampate ya Nzambe.
Tósalela ye na motema moko.
Yango nzela
Oy’a bolingo.