Loyembo 32
“Na ndako na ndako”
1. Tókende ndako na ndako
Kosakola nsango!
Mboka na mboka, tóluka
Bandimi ya solo.
Yesu’asakolaki ete:
‘Nsang’oyo’a Bokonzi,
Ekokóma bipai binso
Kati na mokili.
2. Tósakola bipai binso:
‘Kosikw’ebɛlɛmi
Na ye oy’akobelela
Nkombo’a Mozalisi.
Mpo bato bayeba Nzambe,
Tósakola nsango.
Bongo bakobelela ye
’Te bazwa lobiko.
3. Bato mosusu ya ndako
Bakoboya biso;
Mpe bakoboya koyoka,
Bakofinga biso.
Yesu mpe ayambamaki
Sé na bato moke,
“Bampate” bakoyoka ye,
Biso tólɛmba te.
4. Tókende na ndako inso
Kosakola nsango!
Kasi’ekateli’ezali’epai
Na moto na moto.
Tómema nkombo ya Nzambe,
Tóyebisa solo.
Ndako na ndako, tóluka
“Bampate” na sembo.