Loyembo 198
Tóyekola koyeba Nzambe na biso
(Yoane 17:3, NW)
1. Boyebi tozwi, yango nsai
Mpo na biso.
Yah’opesi mingi; tosikwami;
Toyebi yo.
2. Nzambe, bolingo mpe boboto
Na yo seko.
Totii motema mpo na mawa,
Solo na yo.
3. Toyekola Yah, tósosola,
Tóyeba ye.
Yesu, ndakisa; tómekola
Nzela na ye.
4. Bolingo na Yah, tómekola,
Tótika te.
Tokosakola solo na Yah,
Nkombo na ye.