Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ndenge ya kobanda koyekola na bato buku Biblia eteyaka
    Mosala ya Bokonzi—2006 | Janvier
    • Ndenge ya kobanda koyekola na bato buku Biblia eteyaka

      Mingi kati na biso tosepelaka kotambwisa boyekoli ya Biblia kaka soki tobandi koyekola na moto. Buku ya sika Biblia eteyaka mpenza nini? ekoki kosalisa biso. Maloba ya ebandeli oyo ezali na nkasa 3-7 ebongisami mpo na kosalisa moto alanda lisolo ya Biblia na lisalisi ya buku yango. Ata basakoli oyo bamesani mpenza te na mosala ya kosakola bakomona ete ezali mpasi te kobanda koyekola na bato na buku yango.

      ◼ Okoki kosalela lokasa 3 mpo na komeka lolenge oyo ya kobanda lisolo:

      Nsima ya kolobela nsango moko to likambo moko oyo eyebani na esika bofandi, bendá likebi ya moto oyo ozali kosolola na ye na mituna oyo ezali na makomi ya moindo na lokasa 3, mpe sɛngá ye alobela yango. Na nsima, fungolá nkasa 4-5.

      ◼ To mbala mosusu okosepela kolobela makambo oyo ezali na nkasa 4-5 mpo na kobanda lisolo:

      Okoki koloba boye, “Ekozala likambo ya esengo te soki makambo oyo ezali na elilingi oyo esalemi?” To okoki kotuna boye, “Na bilaka oyo nyonso, oyo wapi olingi mpenza ete ekokisama?” Yoká eyano na ye na likebi mpenza.

      Soki moto oyo ozali kosolola na ye amonisi ete asepeli mingi na moko ya bavɛrsɛ yango, bótalela baparagrafe oyo elobeli vɛrsɛ yango na buku, mpo na komonisa ye oyo Biblia eteyaka na likambo yango. (Talá etanda na siplema.) Talelá makambo yango elongo na ye kaka ndenge osalaka ntango ozali koyekola na moto. Okoki kosolola na moto ndenge wana na boumeli ya miniti mitano to zomi, na mbala ya liboso oyo okutani na ye mpe na porte na ye.

      ◼ Okoki mpe kosalela lokasa 6 mpo na kosalisa moto abimisa makanisi na ye:

      Bendá likebi ya moto oyo ozali kosolola na ye na mituna oyo ezali na nse ya lokasa yango, mpe tuná ye boye, “Omituna naino te motuna moko kati na mituna oyo ezali awa?” Soki asepeli na moko na mituna yango, fungolá na baparagrafe oyo epesi eyano na motuna yango na kati ya buku. (Talá etanda na siplema.) Ntango ozali kotalela makanisi yango elongo na ye, ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia.

      ◼ Okoki kosalela lokasa 7 mpo na komonisa moto ndenge ya koyekola:

      Tángá bafraze misato ya ebandeli oyo ezali na lokasa yango,na mpe na nsima, fungolá na mokapo 3, mpe salelá paragrafe 1-3 mpo na komonisa ndenge boyekoli esalemaka. Yokaná na ye mpo bólobela biyano ya mituna oyo ezali na paragrafe 3 ntango okozongela ye.

      ◼ Ndenge ya kobongisa mpo na kozongela moto:

      Na nsuka ya boyekoli ya liboso, lobelá likambo moko oyo ekopesa yo nzela ya kokoba kosolola na ye. Okoki kaka koloba boye, “Na miniti moke toyekoli oyo Biblia eteyaka mpo na likambo moko ya ntina. Mbala ekoya, tokoki kolobela [tuná motuna moko oyo bokotalela]. Olingi ete mbala ekoya tósolola kaka na boumeli ya miniti oyo tosololi lelo?”

      Lokola ntango oyo Yehova aponá ekómi pene, azali kokoba kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mosala oyo apesi biso. (Mat. 28:19, 20; 2 Tim. 3:17) Tiká ete tósalela malamu esaleli yango ya kitoko mpe ya sika oyo apesi biso mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

  • Ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka
    Mosala ya Bokonzi—2006 | Janvier
    • Ndenge ya kolakisa buku Biblia eteyaka

      Siplema oyo ezali na makanisi ndenge na ndenge oyo etali kolakisa buku Biblia eteyaka. Mpo makanisi yango ebimisa matomba, lobá yango na maloba na yo moko, yokanisá yango na bamposa ya bato ya teritware na bino, mpe luká komesana na makanisi oyo ezali na buku yango, oyo okoki kosalela mpo na kosolola na bato. Okoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango, oyo ebongi na bato ya teritware na yo.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005, lok. 8.

      Armagedona

      ◼ “Ntango bato bayokaka liloba ‘Armagedona,’ mingi bakanisaka ete ezali kobomama ya ebele ya bato. Okokamwa soki nayebisi yo ete Armagedona ezali eloko oyo tosengeli kozela yango na esengo mpenza? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Emoniseli 16:14, 16.] Talá ndenge maloba oyo emonisi ndenge oyo bomoi ekozala nsima ya Armagedona.” Fungolá nkasa 82-84, mpe tángá paragrafe 21.

      Biblia

      ◼ “Bato mingi balobaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Omituná naino te mpo na nini buku oyo bato bakomá bábenga yango Liloba ya Nzambe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 2 Petelo 1:21, tángá mpe paragrafe 5 na lokasa 19.] Buku oyo ezali kopesa biyano ya Biblia na mituna yango.” Lakisá ye mituna oyo ezali na lokasa 6.

      ◼ “Lelo oyo bato bazali na likoki ya koyeba makambo mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Kasi, okanisi ete epai wapi tokoki kozwa toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu mpe ya esengo? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 2 Timote 3:16, 17, tángá mpe paragrafe 12 na nkasa 22-23.] Buku oyo elimboli ndenge oyo tokoki kozala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe mpe matomba oyo tokozwa.” Lakisá ye etanda mpe elilingi ya nkasa 122-123.

      Liwa/Lisekwa

      ◼ “Bato mingi balukaka koyeba nini mpenza ekómelaka moto nsima ya liwa. Okanisi ete tokoki koyeba yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Mosakoli 9:5, tángá mpe paragrafe 5-6 na nkasa 58-59.] Buku oyo elimboli mpe ndenge elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi ekokokisama mpo na bato oyo bakufá.” Lakisá ye elilingi ya lokasa 75.

      ◼ “Soki moto moko oyo tolingaka akufi, biso nyonso tozalaka na mposa ya komona ye lisusu. Ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Bato mingi babɔndisamaka na elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi. [Tángá Yoane 5:28, 29, tángá mpe paragrafe 16-17 na nkasa 71-72.] Mokapo oyo epesi mpe biyano na mituna oyo.” Lakisá ye mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo na lokasa 66.

      Bomoi ya seko

      ◼ “Bato mingi balingaka kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi molai. Kasi, soki ezalaka bongo, olingaki mpenza kosepela kozala na bomoi libela na libela? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Emoniseli 21:3, 4 mpe paragrafe 17 na lokasa 54.] Buku oyo elobeli oyo tokoki kosala mpo na kozala na bomoi ya seko mpe ndenge oyo bomoi ekozala ntango elaka yango ekokokisama.”

      Libota

      ◼ “Biso nyonso tolingaka kozala na libota ya esengo. Ezali bongo te? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elobeli eloko oyo moto mokomoko na kati ya libota akoki kosala mpo libota ezala na esengo​—komekola ndenge oyo Nzambe amonisaka bolingo.” Tángá Baefese 5:1, 2, tángá mpe paragrafe 4 na lokasa 135.

      Ndako

      ◼ “Na bisika mingi, ekómi mpasi kozwa esika ya malamu ya kofanda na ntalo moke. Okanisi ete mokolo mosusu moto nyonso akozala na esika ya kofanda ya malamu? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yisaya 65:21, 22, tángá mpe paragrafe 20 na lokasa 34.] Buku oyo elimboli ndenge oyo elaka wana ya Nzambe ekokokisama.”

      Yehova Nzambe

      ◼ “Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe, balingaka komiyoka penepene na ye. Oyebi ete Biblia esɛngi biso tópusana penepene na Nzambe? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yakobo 4:8a, tángá mpe paragrafe 20 na lokasa 16.] Buku oyo ebongisami mpo na kosalisa bato báyekola makambo mingi etali Nzambe na Biblia na bango moko.” Lakisá ye mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo na lokasa 8.

      ◼ “Bato mingi basambelaka ete nkombo ya Nzambe esantisama to ezala mosantu. Omituná naino te soki ezali nkombo nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Nzembo 83:18, tángá mpe paragrafe 2-3 na lokasa 195.] Buku oyo emonisi oyo Biblia eteyaka mpenza na ntina etali Yehova Nzambe mpe mikano oyo azali na yango mpo na bato.”

      Yesu Klisto

      ◼ “Bato ya mokili mobimba bayoká nsango ya Yesu Klisto. Basusu balobaka ete azalaki kaka moto moko ya lokumu. Bamosusu basambelaka ye lokola Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Okanisi ete makambo oyo tondimaka na ntina etali Yesu Klisto ezali mpenza na ntina?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Yoane 17:3, tángá mpe paragrafe 3 na nkasa 37-38. Bendá likebi na ye na mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo yango.

      Libondeli

      ◼ “Omituná naino te ndenge nini Nzambe andimaka mabondeli? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 1 Yoane 5:14, 15, tángá mpe paragrafe 16-18 na nkasa 170-172.] Mokapo oyo elimboli mpe ntina oyo tosengeli kobondelaka Nzambe mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo ayoka mabondeli na biso.”

      Lingomba

      ◼ “Bato mingi bakómi kokanisa ete mangomba nde ezali kobimisela bato mikakatano na esika ya kosilisa yango. Okanisi ete mangomba ezali kolakisa bato nzela oyo ebongi mpenza? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Matai 7:13, 14, tángá mpe paragrafe 5 na nkasa 145-146.] Mokapo oyo elobeli makambo motoba oyo emonisaka losambo oyo Nzambe andimaka.” Lakisá ye liste na lokasa 147.

      Makama/Bampasi

      ◼ “Soki likama moko esalemi, bato mingi bamitunaka soki Nzambe atyelaka mpenza bato likebi mpe soki amonaka bampasi na bango. Omituná naino te mpo na likambo yango? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá 1 Petelo 5:7, tángá mpe paragrafe 11 na lokasa 11.] Buku oyo elimboli ndenge Nzambe akosilisa bampasi ya bato mpo na libela.” Lakisá ye mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo na lokasa 106.

      Bitumba/Kimya

      ◼ “Na mokili mobimba, bato balingaka kozala na kimya. Okanisi ete elikya ya kozala na kimya awa na mabelé ezali kaka ndɔtɔ mpamba? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Nzembo 46:8, 9.] Buku oyo elobeli ndenge Nzambe akokokisa mokano na ye mpe akotya kimya na mabelé mobimba.” Lakisá ye elilingi ya lokasa 35, mpe bótalela paragrafe 17-21 na nkasa 34-36.

      [Etanda na lokasa 5]

      Ndenge ya kolobela makabo

      “Soki okosepela kopesa mwa likabo lelo mpo na mosala na biso ya kosakola na mokili mobimba, nakozwa yango na esengo mpenza.”

      “Atako totɛkaka mikanda na biso te, tondimaka mwa makabo oyo bato bapesaka mpo mosala na biso ya kosakola na mokili mobimba ekende liboso.”

      “Mbala mosusu, okoki komituna ndenge oyo tozwaka mbongo mpo na kosala mosala oyo. Ezali mpo na makabo oyo bato basepelaka kopesa mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Soki olingi kopesa mwa likabo lelo, nakosepela mingi kozwa yango.”

  • (1) Motuna, (2) Vɛrsɛ, mpe (3) Mokapo
    Mosala ya Bokonzi—2006 | Janvier
    • (1) Motuna, (2) Vɛrsɛ, mpe (3) Mokapo

      Lolenge ya pɛtɛɛ ya kolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali (1) kotuna motuna moko oyo ekotinda moto apesa likanisi na ye, (2) kotánga vɛrsɛ moko oyo ebongi, mpe (3) kolakisa moto mokapo oyo elobeli likambo yango na buku mpe kotángela ye mituna oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya mokapo yango. Soki moto oyo ozali kosolola na ye asepeli, okoki kosalela baparagrafe ya ebandeli ya mokapo yango mpo na komonisa ye ndenge toyekolaka na bato Biblia. Okoki kosala bongo mpo na kobanda koyekola na moto ntango okutani na ye mbala ya liboso to ntango ozongeli ye.

      ◼ “Okanisi ete biso bato tokoki koyeba Mozalisi na biso oyo azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ndenge emonisami awa na Biblia?” Tángá Misala 17:26, 27, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 1.

      ◼ “Na kotalela mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo, okanisi ete tokoki mpenza kobɔndisama mpe kozala na elikya ndenge emonisami awa?” Tángá Baloma 15:4, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 2.

      ◼ “Soki ozalaki na likoki ya kosala makambo oyo, olingaki kosala yango?” Tángá Emoniseli 21:4, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 3.

      ◼ “Okanisi ete mokolo mosusu bana na biso bakozala na bomoi lokola oyo balobeli na loyembo oyo ya kala?” Tángá Nzembo 37:10, 11, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 3.

      ◼ “Okanisi ete maloba oyo ekokokisama mokolo mosusu?” Tángá Yisaya 33:24, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 3.

      ◼ “Omituná naino te soki bato oyo bakufá bayebaka makambo bato ya bomoi basalaka?” Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Mosakoli 9:5, mpe lakisá ye mokapo 6.

      ◼ “Okanisi ete ekoki kosalema mokolo mosusu ete tómona bandeko na biso oyo bakufá, ndenge Yesu amonisaki yango na vɛrsɛ oyo?” Tángá Yoane 5:28, 29, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 7.

      ◼ “Okanisi ete ekosɛnga nini mpo mokano ya Nzambe esalema awa na mabelé ndenge ezali kosalema na likoló, ndenge balobaka yango na libondeli oyo eyebani mingi? Tángá Matai 6:9, 10, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 8.

      ◼ “Okanisi ete tokómi na eleko oyo balobeli na esakweli oyo?” Tángá 2 Timote 3:1-4, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 9.

      ◼ “Bato mingi bamitungisaka ndenge mikakatano ezali se kobakisama. Mbala mosusu ntina na yango ekoki kozala oyo; osilá kokanisa yango?” Tángá Emoniseli 12:9, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 10.

      ◼ “Oluká naino te koyeba eyano na motuna lokola oyo?” Tángá Yobo 21:7, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 11.

      ◼ “Okanisi ete kosalela toli oyo ya Biblia ekoki kosalisa moto na kozala na libota ya esengo?” Tángá Baefese 5:33, mpe tiká ye apesa eyano. Na nsima, lakisá ye mokapo 14.

      Tokotánga boyekoli ya Biblia soki toyekoli na moto moko mbala mibale nsima ya koyokana mpe kolakisa ye ndenge boyekoli esalemaka, mpe soki tomoni ete moto yango akokoba koyekola.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto