Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • si nk. 175-181
  • Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai
  • “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MAKAMBO MAZALI KATI NA MATAI
  • LITOMBA NA YANGO
  • Mokanda ya Biblia nimero 42—Luka
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 41—Malako
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yesu Klisto azali nani?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
si nk. 175-181

Mokanda ya Biblia nimero 40—Matai

Mokomi: Matai

Esika ya bokomi: Palestine

Nsuka ya bokomi: soko 41 T.B.

Boumeli ya lisoló: 2 L.T.B.-33 T.B.

1. (a) Elaka nini Yehova atyaki liboso na bato longwa na Edene? (b) Lolenge nini elikya kati na Masiya eyaki makasi epai na Bayuda?

KOBANDA ntango ya botomboki na Edene, Yehova asilaki kotya liboso na bato elaka moko ya kobɔndisama ete akopesa lobiko epai na bato nyonso oyo balingaka boyengebene na nzela ya Mombóto ya “mwasi” na ye. Mombóto yango, to Masiya, alakamaki ete akobima longwa na libota ya Yisalaele. Na boumeli ya bikeke, apesaki nzela ete bakomi Baebele oyo bapemamaki bákoma ebele ya bisakweli mpo na komonisa ete Mombóto yango akozala Moyangeli na Bokonzi ya Nzambe mpe ete akosala nyonso mpo na kobulisama ya nkombo ya Yehova, kopɛtolaka yango mpo na libela na bifundeli nyonso oyo biyeisamaki likoló na yango. Makambo mingi mayebisamaki epai na basakoli wana na ntina na ye oyo akozala mobekoli ya Yehova mpe akoyeisa lobiko longwa na bobangi, minyoko, lisumu mpe liwa. Na nsuka ya bokomi ya Makomami ya Liebele, elikya ya Bayuda kati na Masiya ekómaki makasi mpenza.

2. Ntango Masiya amonanaki, lolenge nini makambo na ntango wana mapesaki nzela na kopalanganisama ya nsango malamu?

2 Na ntango yango, makambo ya mokili masilaki kobongwana. Nzambe asilaki kosalela mabota mpo na kolɛngɛla komonana ya Masiya mpe makambo ya ntango wana mabongisamaki mpenza malamu mpo na kopalanganisama ya nsango yango monene na biteni nyonso ya mokili. Grèce, nguya ya mitano ya mokili mobimba, esilaki kopesa lokótá bobele moko mpo na kosolola na bonsomi nyonso kati na mabota na mokili mobimba. Loma, nguya ya motoba ya mokili mobimba, esilaki koyanganisa mabota kati na boyangeli bobele moko na mokili mobimba mpe esalaki balabála mingi mpo na kotambola na bonsomi na biteni nyonso ya boyangeli yango. Bayuda mingi basilaki kopalangana na boyangeli yango, na boye ete bato mosusu bayaki koyeba elikya oyo Bayuda bazalaki na yango na ntina na Masiya oyo azalaki koya. Mpe talá, mbula koleka 4 000 nsima na elaka oyo epesamaki na Edene, Masiya amonanaki! Mombóto oyo alakamaki, oyo bazalaki kozela uta kala, ayaki! Makambo maleki minene oyo masalemaki mosika kati na lisoló ya bato mayaki kozwa ndimbola polele wana Masiya azalaki kokokisa na bosembo nyonso mokano ya Tata na ye awa na mabelé.

3. (a) Ebongiseli nini Yehova akamataki mpo na kokomisa makambo matalaki bomoi ya Yesu? (b) Bokeseni nini bozali kati na Evanzile mokomoko, mpe mpo na nini nyonso minei ezali na ntina?

3 Libaku ya kotya makambo minene wana kati na makomi mapemami emonanaki lisusu. Elimo ya Yehova epemisaki mibali minei ya sembo mpo na kokoma masoló makeseni, oyo makozala elembo ya matatoli minei oyo makomonisa ete Yesu azalaki Masiya, Mombóto oyo alakamaki mpe Mokonzi, mpe makolobela likambo mokomoko litali bomoi na ye, mosala na ye, liwa na ye mpe lisekwa na ye. Masoló wana mabéngami Baevanzile, liloba “evanzile” elimboli “nsango malamu.” Atako masoló minei wana makokani mpe mbala mingi mazali kolobela sé makambo ya lolenge moko, nzokande ezali mpe na makambo oyo makesenisi moko na mosusu. Baevanzile misato ya liboso ebéngami mingimingi sinɔptike, oyo elimboli “makanisi makokani,” mpamba te ezali kolobela na bomoko mpenza lisoló ya bomoi ya Yesu awa na mabelé. Kasi moko na moko na bakomi yango minei—Matai, Malako, Luka mpe Yoane—azali na lolenge na ye moko ya koyebisa lisoló mpenza ya Klisto. Moko na moko azali na motó na likambo na ye ya sikisiki mpe mokano na ye, azali komonisa bomoto na ye mpenza mpe azali komibanzabanza mpo na lolenge ya batángi na ye. Soki tokotalela mingi na bozindo makomi na bango, boye tokososola mpe mingi makambo oyo makesenisi moko na moko mpe tokondima ete mikanda minei wana mipemami ya Biblia mizali masoló makeseni, maye mazali kokokisana moko na mosusu mpe mazali na boyokani mpo na oyo etali bomoi ya Yesu Klisto.

4. Makambo nini mayebani na ntina na mokomi ya Evanzile ya liboso?

4 Moto ya liboso mpo na kokoma nsango malamu na ntina na Klisto ezalaki Matai. Nkombo na ye ezali mpenza lolenge mokuse ya nkombo ya Liebele “Mattithiah,” oyo elimboli “Likabo ya Yehova.” Azalaki moko kati na bantoma 12 oyo Yesu aponaki. Na boumeli ya ntango oyo Nkolo azalaki kotambola na mokili ya Palestine kosakoláká mpe koteyáká na ntina na Bokonzi ya Nzambe, Matai azalaki na boyokani ya penepene mpe ya solosolo elongo na ye. Liboso ya kokóma moyekoli ya Yesu, Matai azalaki mokɔngɔli na mpako, mosala oyo Bayuda bazalaki mpenza koyina, mpamba te yango ezalaki kokundwela bango ntango nyonso ete bazalaki na bonsomi te, kasi bazalaki nde na nsé ya boyangeli ya Loma. Matai ayebanaki liboso na nkombo ya Levi mpe azalaki mwana ya Alafai. Ayanolaki nokinoki na libyangami oyo Yesu apesaki ete alanda ye.​—Mat. 9:9; Mko. 2:14; Luka 5:27-32.

5. Lolenge nini emonisami ete Matai nde azali mokomi ya Evanzile ya liboso?

5 Atako Evanzile oyo endimami ete ezali ya Matai, nzokande yango etángi nkombo na ye te lokola mokomi na yango, litatoli ya nguya ya bakomi na makambo na kala ya mangomba nde emonisi ete azali mokomi na yango. Mbala mosusu ezali na búku ata moko te ya kala oyo bato bamonisi mokomi na yango polele mpe na bomoko koleka mokanda ya Matai. Uta kala kino Papias ya Hiérapolis (pene na ekeke ya mibale ya T.B.) tozali na molɔngɔ́ ya batatoli ya liboso oyo bamonisi ete Matai nde akomaki Evanzile wana mpe ete yango ezali eteni ya solo ya Liloba ya Nzambe. Búku Cyclopedia ya McClintock mpe Strong elobi ete: “Mikapo ya Matai mitángamaki na Justin le Martyr, na mokomi ya mokanda epai na Diognète (talá kati na Justin Martyr ya Otto, vol. ii), na Hégésippe, Irénée, Tatien, Athénagore, Théophile, Clément, Tertullien mpe Origène. Ezali te bobele na ntina na makambo makomami na kati, kasi na lolenge oyo yango etángami, na ekomeli lokola oyo ya moto apesameli lotómo, na kozanga ntembe nyonso nde tozali kotalela yango lokola búku oyo ekomamaki na bato mibale te.”a Likambo oyo ete Matai azalaki ntoma, mpe na etɛlɛmɛlo wana azalaki na elimo ya Nzambe likoló na ye, yango endimisi biso ete makambo oyo ye akomaki ezali lisoló ya sembo.

6, 7. (a) Na ebandeli, Evanzile ya Matai ekomamaki na ntango nini mpe na lokótá nini? (b) Nini emonisi ete ekomamaki libosoliboso mpo na Bayuda? (c) Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na nkombo Yehova mbala boni kati na Evanzile oyo, mpe mpo na nini?

6 Matai akomaki lisoló na ye na Palestine. Mbula ya sikisiki eyebani te, kasi maloba ya ebandeli na nsuka ya mikanda misusu (nyonso ezali na badati nsima ya ekeke ya zomi T.B.) elobi ete ezalaki na mobu 41 T.B. Elembeteli ezali oyo emonisi ete na ebandeli Matai akomaki Evanzile na ye na Liebele oyo ezalaki kolobama na bato nyonso ya ntango wana mpe na nsima abongolaki yango na Greke. Kati na búku na ye De viris inlustribus (Na ntina na bato minene), mokapo III, Jérôme alobi ete: “Matai, oyo abéngami mpe Levi, azalaki mokɔngɔli na mpako liboso ya kokóma ntoma, moto ya liboso mpo na kokoma Evanzile ya Klisto na Yudea na lokótá ya Liebele mpo na litomba ya baoyo bakatamaki ngenga, oyo bazalaki kondima yango.”b Jérôme abakisi ete makomi ya Liebele ya Evanzile wana ebatelamaki kino na mikolo na ye (ekeke ya minei mpe ya mitano T.B.) na bibliotɛkɛ oyo Pamphile asalaki na Kaisalia.

7 Na ebandeli ya ekeke ya misato, Origène, wana ezalaki ye kolobela Baevanzile, atángami na Eusèbe lokola moto oyo alobaki ete [evanzile] ya “liboso ekomamaki . . . engebene Matai, . . . oyo abimisaki yango mpo na baoyo bautaki na losambo ya Bayuda mpe bakómaki bandimi, akomaki yango na lokótá ya Liebele.”c Likambo oyo ete yango ekomamaki liboso mpo na Bayuda emonisami na kolandana na yango ya mabota, oyo emonisi libota mpenza oyo Yesu autaki longwa na Abalayama, mpe na ndenge ezali kotánga mingi Makomami ya Liebele, oyo mazalaki kolobela koya ya Masiya. Ebongi na kondima ete Matai asalelaki nkombo ya Nzambe, Yehova, kati na lolenge na yango ya Tetragrami wana azalaki kotánga biteni ya Makomami ya Liebele oyo bizalaki na nkombo yango. Yango wana kati na Libongoli ya Mokili ya Sika (ebimeli ya Lingelesi), mokanda ya Matai ezali na nkombo Yehova mbala 18, motindo moko yango ezali kati na libongoli ya Matai na Liebele, oyo ebimisamaki libosoliboso na F. Delitzsch na ekeke ya 19. Matai asengelaki kozala na mayoki motindo moko lokola Yesu mpo na oyo etali nkombo ya Nzambe mpe alingaki komipekisa te na kosalela yango na ntina na biyambayamba biyebanaki ya Bayuda oyo bipekisaki kosalela nkombo yango.​—Mat. 6:9; Yoa. 17:6, 26.

8. Lolenge nini likambo oyo ete Matai azalaki liboso mokɔngɔli na mpako emonisami kati na makambo oyo mazali na Evanzile na ye?

8 Mpo ete Matai azalaki mokɔngɔli na mpako, ezalaki mpasi te ete alobela mbongo, mitángo mpe mituya na bosikisiki. (Mat. 17:27; 26:15; 27:3) Amonisaki botɔ́ndi mozindo mpo na motema mawa oyo Nzambe amoniselaki ye mokɔngɔli na mpako oyo ayinamaki, na kopesáká ye nzela ete akóma ministre ya nsango malamu mpe moninga ya penepene ya Yesu. Na yango, kati na bakomi minei ya Baevanzile, bobele Matai nde amonisi biso lolenge Yesu azalaki kotya likebi mbala na mbala na ntina na motema mawa esɛngami likoló na mbeka. (9:9-13; 12:7; 18:21-35) Matai alendisamaki mingi na motema-boboto ya Yehova mpe na lolenge lolongobani akomaki ndambo na maloba maleki kobɔndisa oyo Yesu ayebisaki: “Bóya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola na ngai; zambi ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na bozito te.” (11:28-30) Oyo nde maloba ya kobɔndisa mpe ya boboto epai na mokɔngɔli na mpako wana ya kala, epai na ye oyo, kozanga ntembe, bazalani, bato ya mboka na ye bazalaki kotuka!

9. Motó na likambo nini mpe lolenge nini ya kokoma oyo emonisami na Matai?

9 Matai alobelaki mingimingi ete motó na likambo ya mateya na Yesu ezalaki “bokonzi ya Likoló.” (4:17, NW) Mpo na ye, Yesu azalaki Mokonzi-Mosakoli. Asalelaki liloba “bokonzi” mbala mingi (koleka mbala 50) na boye ete Evanzile na ye ekoki kobéngama Evanzile ya Bokonzi. Matai azalaki na lobanzo ya komonisa kolandana ya sikisiki ya makambo kati na masukúlu mpe masoló ya Yesu na esika ya kosuka bobele na kolandana ya sikisiki ya ntango oyo masukúlu mpe masoló yango masalemaki. Na mikapo 18 ya liboso, Matai alobeli mingi motó na likambo ya Bokonzi, yango esali ete amibanzabanza te na ntango ya sikisiki oyo makambo yango masalemaki. Nzokande, mikapo zomi ya nsuka (19 kino 28) mingimingi elandani na kotalela ntango, wana yango ezali mpe kolanda kolobela Bokonzi.

10. Makambo nini mazali bobele kati na Matai, mpe makambo oyo malobelami na Evanzile oyo masangisi eleko nini?

10 Makambo ntuku minei na mibale likoló na monkámá oyo mazali na lisoló ya Evanzile ya Matai ezwami te kati na Baevanzile mosusu misato.d Yango esangisi masese, to bilakiseli soko zomi: Matiti mabe kati na elanga (13:24-30), eloko ya motuya oyo ebombami (13:44), mangaliti ya motuya monene (13:45, 46), molubá (13:47-50), moombo mabe (18:23-35), basáli mpe denali (20:1-16), tata mpe bana mibale (21:28-32), libala ya mwana na mokonzi (22:1-14), baseka zomi (25:1-13), mpe talanta (25:14-30). Na mokuse, mokanda oyo ezali koyebisa lisoló kobanda kobotama ya Yesu, na mobu 2 L.T.B., kino bokutani na ye elongo na bayekoli na ye, mwa moke liboso ya komata na ye na likoló, na mobu 33 T.B.

MAKAMBO MAZALI KATI NA MATAI

11. (a) Lolenge nini Evanzile oyo ebandi mpenza, mpe wapi makambo ya liboso oyo yango elobeli? (b) Wapi mwa ndambo na bisakweli bikokisamaki oyo Matai azali kobenda likebi na biso?

11 Koyebisa makambo matali Yesu mpe nsango na “bokonzi ya Likoló” (1:1–4:25). Na lolenge lobongi, Matai abandi na kolandana ya bankɔ́kɔ ya Yesu, komonisáká lotómo oyo Yesu azali na yango lokola mokitani ya Abalayama mpe ya Davidi. Na yango, likebi ya batángi Bayuda ebendamaki. Na nsima, tozali kotánga lisoló ya kosalema ya kokamwa ya zemi ya Yesu, kobotama na ye na Beteleme, mobembo ya banganga-minzoto, nkanda ya Elode oyo atindaki ete báboma bana mike nyonso ya mibali oyo bakokisaki naino mbula mibale te, kokima ya Yosefe mpe Malia na Ezipito elongo na mwana na bango ya moke, mpe bozongi na bango na nsima mpo na kofanda na Nasalete. Matai azali mpenza kobenda likebi na kokokisama ya bisakweli mpo na komonisa ete Yesu azalaki Masiya oyo asakolamaki.​—Mat.1:23—Yis. 7:14; Mat. 2:1-6—Mika 5:2; Mat. 2:13-18—Hos. 11:1 mpe Yil. 31:15; Mat. 2:23—Yis. 11:1, NW, maloba na nsé ya lokasa.

12. Likambo nini lisalemi na ntango ya batisimo na Yesu, mpe nokinoki nsima na yango?

12 Lisoló ya Matai na mbala moko ememi biso soko na mibu 30 na nsima. Yoane Mobatisi azali kosakola kati na mokili mokauki ya Yudea: “Bóbongola mitema! Mpo ete Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” (Mat. 3:2) Azali kobatisa Bayuda oyo babongoli motema kati na ebale ya Yordani mpe azali kokebisa Bafalisai mpe Basadukai na ntina na nkanda oyo ezali koya. Yesu auti na Galilai mpe abatisami. Nokinoki elimo ya Nzambe ekiti likoló na ye, mpe mongongo longwa na makoló elobi ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (3:17, NW) Na nsima, Yesu akambami na mokili mokauki, epai kuna, nsima na mikolo 40 ya kokila bilei, amekami na Satana Zábolo. Mbala misato alóngi Satana na kotángáká Liloba ya Nzambe, kolobáká na nsuka ete: “Longwá na yo, Satana! Mpamba te ekomami ete, ‘Ezali bobele Yehova Nzambe na yo nde osengeli kosambela, mpe bobele ye moko nde osengeli kosalela mosala na bulɛɛ.’”—4:10, NW.

13. Mosala monene nini ya kosakola mozali kosalema sikawa na Galilai?

13 “Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” Maloba wana ya kosimba motema mazali sikawa kosakolama na Galilai na Yesu mopakolami. Abyangi balɔ́bi na mbisi minei longwa na miluba na bango mpo na kolanda ye mpe bakómi “balɔ́bi na bato,” mpe akatisi elongo na bango “Galilai mobimba, koteyáká kati na biyanganelo na bango mpe kosakoláká nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisáká lolenge nyonso ya bokɔnɔ mpe lolenge nyonso ya bolɛma kati na bato.”​—4:17, 19, 23, NW.

14. Bisengo nini Yesu alobeli kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, mpe alobi nini na ntina na boyengebene?

14 Lisoló likoló na Ngomba (5:1–7:29). Wana bibele babandi kolanda ye, Yesu amati likoló na ngomba, afandi, mpe abandi koteya bayekoli na ye. Afungoli lisukúlu na ye ya kosimba motema na kotángáká ‘bisengo’ libwa: Bato na esengo ezali baoyo bazali koyeba bobólá na bango ya elimo, baoyo bazali kolela, bato na bopɔlɔ, baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, bato na motema mawa, bato na mitema pɛto, bato na kimya, baoyo bazali konyokwama mpo na boyengebene mpe baoyo bazali kofingama mpe baoyo epai na bango bazali kolobela mabe. “Bósepela mpe bóyoka esengo zambi libonza na bino ezali monene kati na likoló.” Abéngi bayekoli na ye “mongwa na mokili” mpe “pole na mokili” mpe alimboli ete boyengebene ekeseni mingi na bokosi ya bakomeli mpe ya Bafalisai, mpamba te yango esɛngami mpo na kokɔta na Bokonzi ya Likoló. “Bózala malamu bɛ lokola Tata na bino na Likoló azali malamu bɛ.”​—5:12-14, 48.

15. Makambo nini esengeli na Yesu koloba na ntina na libondeli mpe na ntina na Bokonzi?

15 Yesu apesi likebisi na ntina na makabo ya bokosi mpe mabondeli ya lokuta. Ateyi bayekoli na ye ete bábondelaka mpo na kobulisama ya nkombo ya Tata, mpo ete Bokonzi na Ye eya, mpe mpo na bilei na bango ya mokolo na mokolo. Kati na lisoló wana mobimba Yesu atye Bokonzi na esika ya liboso. Akebisi baoyo bazali kolanda ye ete bámitungisa te to básala te bobele mpo na bozwi ya mosuni, mpamba te Tata ayebi bamposa na bango mpenza. Alobi ete: “Bólukaka nde liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso ikobakisama na bino.”​—6:33.

16. (a) Nini ezali toli ya Yesu na ntina na boyokani elongo na basusu, mpe alobi nini na ntina na baoyo bazali kotosa mokano ya Nzambe mpe baoyo bazali kotosa yango te? (b) Lisoló na ye ezali na bopusi nini?

16 Nkolo apesi batoli na ntina na boyokani elongo na basusu, kolobáká ete: “Makambo nyonso malingi bino ete bato básalela bino yango, bino bósalela bango bobele bongo.” Bato moke oyo bakomona nzela oyo ezali komema na bomoi bakozala baoyo bazali kosala mokano ya Tata na ye. Batyoli na mibeko bakoyebana na mbuma na bango mpe bakobwakama. Yesu akokanisi moto oyo azali kotosa maloba na ye na “moto na mayele oyo atongi ndako na ye likoló na mabanga.” Lisukúlu wana lizali na bopusi nini likoló na bibele oyo bazali koyoka yango? “Bakamwi mateya na ye. Zambi alakisi bango lokola azali na bokonzi nde lokola bakomeli na bango te.”​—7:12, 24-29.

17. Lolenge nini Yesu amonisi bokonzi na ye lokola Masiya, mpe komibanzabanza nini ya bolingo amonisi?

17 Kosakola Bokonzi epalangani (8:1–11:30). Yesu asali ebele na bikamwiseli—abikisi bato na maba, bibɔsɔnɔ mpe bato oyo bademó bakɔtelaki bango. Kútu, amonisi nguya na ye likoló na mopɛpɛ mpe na mbongé na kolɛmbisáká nguya ya mopɛpɛ makasi mpe asekwisi elenge mwasi moko longwa na bakufi. Oyo nde motema mawa Yesu azali na yango mpo na bibele wana amoni bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola “bampate bazali na mobateli te”! Lokola alobi yango epai na bayekoli na ye, “mbuma na elanga iteli mingi mpenza nde basali bazali mingi te. Bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.”​—9:36-38.

18. (a) Malako nini mpe batoli nini Yesu azali kopesa epai na bantoma na ye? (b) Mpo na nini mawa ezali likoló na “libota oyo”?

18 Yesu aponi mpe apesi mokumba epai na bantoma 12. Apesi bango malako ya sikisiki likoló na lolenge bakosala mosala na bango mpe alobeli makasi endimeli ya moboko ya mateya na bango: “Wana ekokende bino, bósakola ete, Bokonzi na Likoló ezali kobɛlɛma.” Apesi bango batoli ya mayele mpe ya bolingo: “Bozwi na lisombi te, bópesa na lifuti te.” “Bózala nde na mayele lokola banyoka mpe na bopɔlɔ lokola bibenga.” Bakoyinama mpe bakonyokwama, ata na biboto ya penepene, kasi Yesu akundweli bango ete: “Ye oyo azali kozwa [molimo] na ye akobungisa yango nde ye oyo akobungisa [molimo] na ye mpo na ngai akozwa yango.” (10:7, 8, 16, 39) Na nsima, bayekoli bakei koteya mpe kosakola kati na mboka oyo ipesamelaki bango! Yesu amonisi Yoane Mobatisi lokola momemi-nsango oyo atindamaki liboso na ye, lokola “Eliya” oyo alakamaki, kasi “libota oyo” eboyi kondima ezala Yoane to ye, Mwana na moto. (11:14, 16) Na bongo, mawa na libota yango mpe na mboka oyo ibongolaki motema te wana emonaki bango misala na ye ya nguya! Kasi baoyo bakómi bayekoli na ye bakozwa libɔndisi mpo na milimo na bango.

19. Ntango Bafalisai batuni likanisi na ye na ntina na Sabata, lolenge nini Yesu atɔndɔli bango?

19 Bafalisai bakweisami mpe batɔndɔlami (12:1-50). Bafalisai bazali koluka kozwa ekweli epai na Yesu na ntina na likambo litali Sabata, kasi akweisi bifundeli na bango mpe azongiseli bango biyano ya kozokisa oyo bizali kokweisa bokosi na bango. Ayebisi bango ete: “Libota na bitupa! Bokoki koloba malamu na nzela nini naino ezali bino mabe? Mpo ete monɔkɔ ekolobaka kobila litondi na motema.” (12:34) Elembo moko ekopesama epai na bango te longola bobele elembo ya mosakoli Yona: Mwana na moto akozala mikolo misato mpe butu misato na nsé ya mabelé.

20. (a) Mpo na nini Yesu azali koloba na masese? (b) Masese nini matali Bokonzi apesi sikawa?

20 Masese nsambo ya Bokonzi (13:1-58). Mpo na nini Yesu azali koloba na masese? Alimboli epai na bayekoli na ye ete: “Makambo na nkuku na Bokonzi na Likoló, bino bokoki koyoka yango, nde bango bakoki koyoka te.” Alobi ete bayekoli na ye bazali na esengo mpamba te bazali komona mpe koyoka. Oyo nde malako ya kobɔndisa motema azali sikawa kopesa bango! Nsima na kolimbola lisese ya molóni, Yesu apesi masese matali matiti mabe kati na elanga, mbuma na sinapi, mfulu, eloko ya motuya oyo ebombami, mangaliti ya motuya monene mpe moluba—moko na moko na yango emonisi eloko moko oyo ezali na boyokani na “bokonzi ya Likoló.” Nzokande, bato babɛti libaku na ntina na ye, mpe Yesu ayebisi bango ete: “Mosakoli azangi lokumu te bobele na mboka na ye moko mpe kati na ndako na ye moko.”​—13:11, 57.

21. (a) Bikamwiseli nini Yesu asali, mpe yango emonisi ete ye azali nani? (b) Emonaneli nini epesami na ntina na koya ya Mwana na moto kati na Bokonzi na ye?

21 Bokóli ya mosala mpe bikamwiseli ya “Klisto” (14:1–17:27). Yesu ayoki mawa mingi nsima ya kozwa nsango ete Yoane Mobatisi abomami engebene etindá ya Elode Antipas, moto na botau. Na nzela ya likamwisi aleisi ebele ya bato koleka 5 000; atamboli na mai monene; akweisi bifundeli ya Bafalisai, baoyo bazali ‘kobuka mibeko ya Nzambe na ntina na bonkɔ́kɔ na bango’; abikisi bato oyo bademó bakɔtelaki bango, “batɛngumi, bibɔsɔnɔ, bakufi-miso, bibubu mpe bamosusu mingi”; mpe aleisi lisusu bato koleka 4 000, bobele na mampa nsambo mpe na mwa mbisi moke. (15:3, 30) Koyanoláká na motuna ya Yesu, Petelo amonisi ye na kolobáká ete: “Yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bomoi.” Yesu apesi Petelo longonya mpe ayebisi ete: “Likoló na libanga oyo nakotonga lisangá na ngai.” (16:16, 18, NW) Sikawa, Yesu abandi kolobela kobɛlɛma ya liwa na ye mpe lisekwa na ye na mokolo ya misato. Kasi alaki lisusu ete bamoko kati na bayekoli na ye “bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto oyo azali koya na Bokonzi na ye.” (16:28) Mikolo motoba na nsima, Yesu akamati Petelo, Yakobo mpe Yoane, amati na bango likoló ya ngomba moko molai mpo na komona lolenge akobongwana na nkembo. Kati na emonaneli, bamoni Mose mpe Eliya kosolola elongo na ye, mpe bayoki mongongo longwa na likoló koloba ete: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli [na] ye mingi. Bóyoka ye!” Nsima ya kokita na ngomba, Yesu ayebisi bango ete “Eliya” oyo alakamaki, asilá koya, mpe basosoli ete azali koloba na ntina na Yoane Mobatisi.​—17:5, 12.

22. Toli nini Yesu apesi mpo na oyo etali kolimbisa?

22 Yesu apesi toli epai na bayekoli na ye (18:1-35). Wana bazali na Kapalanauma, Yesu alobeli bayekoli na ye na ntina na komikitisa, na ntina na esengo monene oyo ezali na komona mpate oyo abungaki mpe lolenge ya kosilisa mikakatano kati na bandeko. Petelo atuni: ‘Mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai?’ mpe Yesu ayanoli: ‘Nalobi na yo te kino mbala nsambo, kasi kino mbala ntuku nsambo na nsambo.’ Mpo na kokɔtisa malamumalamu toli yango, Yesu apesi lisese ya moombo oyo nkolo na ye alimbisaki ye nyongo ya denali milió 60. Na nsima, moombo wana atyaki moninga na ye na bolɔ́kɔ mpo ete azalaki na nyongo na ye ya badenali bobele 100 mpe, lokola litomba mabe, moombo oyo azangaki motema mawa apesamaki na mabɔkɔ ya bakɛngɛli na bolɔ́kɔ.e Yesu apesi liteya oyo: “Tata na ngai na likoló akosalela bino bongo soko bokolimbisa na mitema na bino moto na moto ndeko na ye te.”​—18:21, 22, 35.

23. Makambo nini Yesu alimboli na ntina na koboma libala mpe na ntina na nzela ya bomoi?

23 Mikolo ya nsuka ya mosala ya Yesu (19:1–22:46). Makambo makómi kopusana nokinoki mpe, lokola epai na bakomeli mpe Bafalisai mosala ya Yesu ekómeli bango mpii, ezalela ya makambo ematisi nkanda na bango. Bayei komeka kozwa ekweli na maloba na ye na likambo litali koboma libala kasi balóngi te; Yesu amonisi ete ntina bobele moko oyo eyokani na Makomami mpo na koboma libala ezali pite. Elenge mobali moko mozwi ayei epai na Yesu, atuni ye lolenge ya kozwa bomoi ya seko, kasi azongi na mawa na motema ntango ayoki ete asengeli kotekisa biloko nyonso azali na yango mpe kokóma moyekoli ya Yesu. Nsima ya kopesa lisese ya basáli mpe denali, Yesu alobi lisusu na ntina na liwa mpe lisekwa na ye, mpe alobi ete: “Mwana na moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa [molimo] na ye lokola lisiko mpo na mingi.”​—20:28.

24. Wana Yesu akómi na pɔ́sɔ ya nsuka ya bomoi na ye lokola moto, botɛmɛli nini akutani na yango epai na batambwisi na mangomba, mpe lolenge nini ayanoli na mituna na bango?

24 Sikawa Yesu akɔti na pɔ́sɔ ya nsuka ya bomoi na ye lokola moto. Asali bokɔti na ye ya lokumu kati na Yelusaleme lokola ‘Mokonzi, oyo amati likoló na mwana na mpunda.’ (21:4, 5) Abengani basenzi na mosolo mpe babɔtɔli mosusu longwa na tempelo, mpe koyina ya banguna na ye eyei makasi wana alobi na bango ete: “Bakɔngɔli na mpako mpe basi na pite bakoingela na bokonzi na Nzambe liboso na bino.” (21:31) Alobeli masese masengeli mpenza, oyo ya elanga ya miwiti mpe ya elambo ya libala. Na mayele nyonso, ayanoli na motuna ya Bafalisai na ntina na mpako na koyebisáká bango ete báfuta “biloko na Kaisala epai na Kaisala mpe biloko na Nzambe epai na Nzambe.” (22:21, NW) Bobele bongo, ayanoli na motuna ya komeka ye oyo Basadukai batunaki mpe alobeli polele elikya ya lisekwa. Bafalisai bayei epai na ye lisusu mpo na kotuna ye motuna moko likoló na Mibeko, mpe Yesu ayebisi bango ete mobeko moleki monene ezali bongo kolinga Yehova na motema mobimba, mpe ya mibale ezali bongo kolinga mozalani na yo lokola yo moko. Na nsima, Yesu atuni bango, ‘Lolenge nini Klisto akoki kozala na mbala moko mwana na Davidi mpe Nkolo na ye?’ Moto moko te akoki koyanola, mpe uta ntango wana moto te ameki kotuna ye motuna lisusu.​—22:45, 46.

25. Lolenge nini Yesu atɔndɔli makasi bakomeli mpe Bafalisai?

25 ‘Mawa na bino, bakosi’ (23:1–24:2). Kolobáká epai na bibele oyo bazalaki na tempelo, Yesu akweisi lisusu bakomeli mpe Bafalisai na maloba makasi. Longola likambo oyo ete bango moko babongi te mpo na kokɔta na Bokonzi, basaleli mayele mabe nyonso mpo na kopekisa bato mosusu ete bákɔta te kati na yango. Lokola mayita mapakolami mpɛmbɛ, bazali komonana kitoko na libándá, nzokande na kati batondi na mbindo mpe na bosɔtɔ. Yesu asukisi na maloba oyo ya kosambisa na ntina na Yelusaleme: “Ndako na bino etikali mpamba.” (23:38) Wana etiki ye tempelo, Yesu asakoli kobebisama na yango.

26. Elembo nini ya esakweli Yesu apesi na ntina na kozala na ye kati na nkembo ya bokonzi?

26 Yesu apesi ‘elembo ya kozala na ye’ (24:3–25:46). Likoló na Ngomba ya Olive, bayekoli na ye batuni ye na ntina na ‘elembo ya kozala na ye mpe nsuka na ebongiseli ya biloko.’ Lokola eyano, Yesu alobeli eleko oyo ekozala na bitumba, ‘libota moko ekotɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛmɛla bokonzi mosusu,’ nzala, koningana ya mabelé, bokóli ya ezaleli ya kotyola mibeko, kosakolama ya “nsango malamu oyo na bokonzi” na mabelé mobimba, kotyama ya ‘moombo ya sembo mpe ya mayele . . . likoló na biloko na ye nyonso,’ mpe makambo mosusu mingi ya elembo oyo esangisi makambo ndenge na ndenge. (24:3, 7, 14, 45-47) Yesu asukisi esakweli wana ya ntina na lisese ya baseka zomi mpe ya batalanta, oyo emonisi mbano kitoko oyo ezali liboso na bato na bokɛngi mpe na sembo, mpe lisese ya bampate mpe bantaba, oyo emonisi ete bato oyo bazali na bizaleli ya bantaba “bakobomama mpo na seko, kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.”​—25:46.

27. Makambo nini mamonani na mokolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabelé?

27 Makambo mabimaki na mikolo ya nsuka ya Yesu (26:1–27:66). Nsima na kokumisa Elekeli, Yesu abandisi eloko moko ya sika elongo na bantoma na ye ya sembo, kobyangáká bango na kokabola limpa lizangi mfulu lokola elilingi ya nzoto na ye mpe vinyo lokola elilingi ya makila na ye. Na nsima, bakei na Getesemane, epai Yesu abondeli. Kuna, Yuda ayei elongo na mampinga mpe atɛki Yesu na lipwepwe ya bokosi. Bamemi Yesu epai na nganga-monene, mpe epai na banganga-kapita mpe Sanedrina mobimba eluki matatoli ya lokuta na ntina na Yesu. Na bokokani na esakweli ya Yesu, Petelo awangani ye ntango atyami na komekama. Lisosoli ya Yuda etungisi ye, abwaki mosolo oyo akabaki na yango Yesu kati na tempelo mpe akei komikakisa ye moko. Na ntɔ́ngɔ́, bamemi Yesu liboso na Pilata, moyangeli Moloma, oyo na kotindikamáká na bibele oyo bapusamaki na banganga, apesi nzela ete bábaka ye likoló na nzeté, awa bazalaki konganga ete: “Makila na ye mázala likoló na biso mpe likoló na bana na biso!” Basodá ya moyangeli bazali kotyola bokonzi na ye mpe na nsima bamemi ye na Gologota, epai kuna abakamaki na nzeté katikati na miyibi mibale, mpe likoló na motó na ye bakomaki ete: “Oyo azali Yesu, Mokonzi na Bayuda.” (27:25, 37) Nsima na minyoko oyo eumelaki ngonga mingi, Yesu akufi pene na ngonga ya misato nsima na nzánga mpe bongo batye ye na nkunda moko ya kokanisama ya sika oyo ezalaki ya Yosefe, moto na Alimataya. Ezalaki mokolo oyo etondaki na ndimbola mingi koleka mikolo mosusu kati na lisoló mobimba ya bato!

28. Nsango nini ya malamu koleka ezali kati na lisoló ya Matai, mpe asukisi yango na etindá nini?

28 Lisekwa ya Yesu mpe malako ya nsuka (28:1-20). Matai asukisi sikawa lisoló na ye na nsango moko ya kitoko koleka. Yesu oyo akufaki, asekwi—azali lisusu na bomoi! Na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya liboso ya pɔ́sɔ, Malia Magadala mpe “Malia mosusu” bakómi na nkunda mpe bayoki anzelu koyebisa bango likambo oyo ya esengo. (28:1) Mpo na kondimisa likambo yango, Yesu ye moko abimeli bango. Banguna baluki kútu kobulunganisa bosolo ya lisekwa na ye, na kofutáká kanyaka epai na basodá oyo bazalaki kokɛngɛla nkunda mpo na koloba ete “bayekoli na ye bayaki na butu mpe bayibaki ye wana ezalaki biso kolala mpɔngi.” Na nsima, na Galilai, Yesu asali ete akutana lisusu elongo na bayekoli na ye. Malako nini ya nsuka apesi bango? Yango oyo: “Bókende . . . kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu.” Bakozwa nde litambwisi mpo na kokokisa mosala wana ya kosakola? Maloba ya nsuka ya Yesu oyo Matai ayebisi mandimisi yango: “Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso kino nsuka na ebongiseli ya biloko.”​—28:13, 19, 20, NW.

LITOMBA NA YANGO

29. (a) Lolenge nini Matai akangisi malamu Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke? (b) Libaku nini Yesu azalaki na yango oyo epesami mpe epai na baklisto lelo?

29 Mokanda ya Matai, Evanzile ya liboso kati na Baevanzile minei, ezali kopesa solo ekangiseli kitoko kati na Makomami ya Liebele mpe Makomami ya Greke ya boklisto. Kozanga libungá, ezali komonisa Masiya mpe Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe oyo alakamaki, ezali koyebisa masɛngami mpo na kokóma moyekoli na ye, mpe ezali komonisa mosala oyo ezali liboso ya baoyo bazali awa na mabelé. Ya liboso, Yoane Mobatisi, na nsima Yesu mpe na nsuka bayekoli na ye, basakolaki ete, “Bokonzi ya Likoló esili kobɛlɛma.” Lisusu, bonene ya etindá ya Yesu ekómi kino na nsuka ya ebongiseli ya biloko: “Mpe nsango malamu oyo na bokonzi ekosakolama na mabelé nyonso oyo bato bafandi lokola litatoli na mabota nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” Ya solo, ezalaki mpe ezali kino lelo, libaku moko monene mpe ya kitoko na kosangana kati na mosala wana ya Bokonzi, sangisá ‘kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso,’ kosaláká na kolanda elakiseli ya Nkolo.​—3:2; 4:17; 10:7; 24:14, NW; 28:19.

30. Eteni nini mpenzampenza ya Matai oyo esili kokumisama na ntina na motuya na yango?

30 Ya solo, Evanzile ya Matai ezali “nsango malamu.” Nsango na ye oyo epemamaki ezalaki “nsango malamu” mpo na baoyo batyaki likebi na ekeke ya liboso na Ntango na Biso, mpe Yehova Nzambe amonaki malamu ete yango ebatelama lokola “nsango malamu” kino lelo. Ata bato oyo bazali baklisto te basili kondima nguya ya Evanzile wana, na ndakisa, Mohandas (Mahatma) Gandhi, mokonzi ya Bahindu, alobaki epai na Lord Irwin, mokitani ya kala ya mokonzi ya Inde ete: “Ntango mboka na yo mpe oyo ya ngai ekolanda mateya oyo Klisto apesaki kati na Lisoló likoló na Ngomba, tokosilisa mikakatano bobele ya bamboka na biso te, kasi mpe oyo ya mokili mobimba.”f Na libaku mosusu, Gandhi alobaki ete: “Na lolenge nyonso, timolá na mozindo mpe melá na maziba oyo mapesameli yo kati na Lisoló likoló na Ngomba . . . Mpamba te mateya ya Lisoló wana mapesamaki mpo na moko na moko kati na biso.”g

31. Nani amonisaki botɔ́ndi ya solo mpo na batoli oyo ezali kati na Matai, mpe mpo na nini ezali na ntina koyekola Evanzile wana mbala na mbala?

31 Nzokande, mokili mobimba, sangisá eteni na yango oyo ezali komikumisa ete ezali ya boklisto, ezali ntango nyonso na mikakatano mingi. Bobele motángo moke ya baklisto ya solo nde bazali kozwa na motuya Lisoló yango likoló na Ngomba, bazali koyekola mpe kosalela yango mpe na batoli mosusu ya ntina ya nsango malamu oyo ezali na Matai mpe na bongo bazali kozwa matomba mingi. Litomba ezali na koyekola mbala na mbala bilendiseli kitoko oyo Yesu apesaki mpo na kozwa esengo ya solo, mpo na bizaleli malamu mpe libala, nguya ya bolingo, mabondeli oyo mandimami, bolamu ya makambo ya elimo likoló na makambo ya mosuni, koluka liboso Bokonzi, kozala na limemya mpo na makambo ya bulɛɛ, mpe kozala na likebi mpe na botosi. Matai mokapo 10 ezali na malako ya Yesu epai na baoyo bazali kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu ya “bokonzi ya Likoló.” Masese mingi ya Yesu mazali kopesa mateya ya ntina mpo na baoyo nyonso ‘bazali na matoi ya koyoka.’ Lisusu, bisakweli ya Yesu, na ndakisa koyebisama ya likambo moko na moko litali ‘elembo ya kozala na ye,’ ezali kolendisa elikya mpe kotya motema kati na mikolo mizali koya.​—5:1–7:29; 10:5-42; 13:1-58; 18:1–20:16; 21:28–22:40; 24:3–25:46.

32. (a) Monisá lolenge nini bisakweli oyo bisili kokokisama bimonisi Bomasiya ya Yesu. (b) Endimiseli nini ya makasi kokokisama wana ezali kopesa biso lelo?

32 Evanzile ya Matai etondi na ebele ya bisakweli oyo bisili kokokisama. Mingi na makambo oyo yango etángi longwa na Makomami ya Liebele ezalaki na mokano ya komonisa kokokisama yango. Kozanga ntembe, yango ezali kopesa bilembeteli ete Yesu azali Masiya, mpo ete nyonso wana mbɛlɛ ekokaki kobongisama uta kala te. Na ndakisa, kokanisá Matai 13:14, 15 na Yisaya 6:9, 10; Matai 21:42 na Nzembo 118:22, 23; mpe Matai 26:31, 56 na Zekalia 13:7. Kokokisama motindo wana ezali kondimisa biso makasi mpenza ete bisakweli nyonso bitali mikolo mizali koya oyo Yesu ye moko apesaki, oyo bizali kati na Matai, bikokokisama na ntango na yango wana mikano ya nkembo ya Yehova mitali “bokonzi ya likoló” mizali kokóma pene na kokokisama na yango.

33. Bato oyo balingaka boyengebene bazali kosepela sikawa na ntina na boyebi mpe na elikya nini?

33 Oyo nde bosikisiki na lolenge Nzambe asakolaki bomoi ya Mokonzi na Bokonzi, ata na makambo mikemike! Oyo nde bosikisiki na lolenge Matai, na kopemama, akomaki na bosembo nyonso kokokisama ya bisakweli yango! Wana bazali kotala liboso na bango mpo na ntango oyo bisakweli mpe bilaka nyonso biye bizali kati na mokanda ya Matai bikokokisama, bato oyo balingaka boyengebene bakoki solo kosepela na ntina na boyebi mpe na elikya ya “bokonzi ya Likoló” lokola esaleli ya Yehova mpo na kobulisa nkombo na ye. Ezali na nzela ya Yesu Klisto nde Bokonzi wana ekopesa bolamu mingi na bomoi mpe esengo epai na bato na bopɔlɔ mpe bato oyo bazali na nzala ya elimo “na kozalisa na sika, wana Mwana na moto akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo.” (Mat. 19:28) Nyonso oyo ezwami kati na nsango malamu ya kolendisa “engebene Matai.”

[Maloba na nse ya lokasa]

a Enyatami lisusu na 1981, Vol. V, lokasa 895.

b Libongoli liuti na makomi ya Latin oyo lisalemaki na E. C. Richardson mpe libimisamaki kati na milɔngɔ́ ya “Texte und Untersuchungen zur Geschichte der altchristlichen Literatur,” Leipzig, 1896, Vol. 14, nkasa 8, 9.

c The Ecclesiastical History, VI, XXV, 3-6.

d Introduction to the Study of the Gospels, 1896, B. F. Westcott, lokasa 201.

e Na mikolo na Yesu, denali ekokanaki na lifuta ya mokolo moko; na bongo denali 100 ekokanaki soko na ndambo moko kati na misato ya lifuta ya mbula mobimba. Denali milió ntuku motoba ekokanaki na lifuta oyo ekokaki kozwa bomoi ya bato mingi koleka.​—Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 614.

f Búku Treasury of the Christian Faith, 1949, ebimisami na S. I. Stuber mpe T. C. Clark, lokasa 43.

g Mahatma Gandhi’s Ideas, 1930, na C. F. Andrews, lokasa 96.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto