Loyembo 186
Esengo na biso kati na Nzambe
1. Tózala n’esengo mingi
Mpo tóyika mpiko.
Kondima ekosalisa
Mpo tólona yango.
Ebongi tózwa esengo,
Mayoki na nguya.
Nzamb’asɛngi biso ete,
Banso, tósepela!
2. Tozali na bantina bɛɛ
Mpo tózwa esengo.
Batatoli, tóyebi Yah
Mpe Nkolo na biso.
Kanisá mokolo oyo
Banso bakoyemba
Mpo na lokumu ya Nzambe;
Bawei bakosekwa.
3. Mpo tózwa esengo seko,
Tótosa tii nsuka.
Tókima misala mabe
Mpe tómisɛnzɛla.
Tolingi mpe kokumisa,
Ntango inso, Nzambe.
Mabanzo mázala pɛto.
Tópɛngola mabe.
4. Ata tozali mpamba, Yah,
Nde tozwi esengo;
Mpo totamboli na pole
Na yo ntango inso.
Nzambe, biso bato na yo,
Tosakoli nsango.
Esengo’etondani mɛkɛ,
Tokaboli yango.