Loyembo 8
Tótosaka ebongiseli ya teokrasi
1. Bato ya Yehova bateyi solo
Bokonzi ya Nzambe bisika binso,
Mpo basengeli kotosa Yehova.
Basali bomoko kati na kimya.
(Mondimo)
2. Nkolo Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe,
Akambi limpinga, basodá na ye.
Tozali n’etumba kati n’elimo,
Tósakola kimya, nsango ya seko.
(Mondimo)
3. Totambwisami na nguya ya Nzambe,
Ekokamba biso na bosembo bɛɛ.
Tózala makasi mpe na kondima;
Banso tósakola mikano na Yah!
(MONDIMO)
Tókumisa Yehova Nzambe,
Tópesa ye matɔndi.
Tózala sembo mpe tólanda ye,
Mpo y’azali mayele.