Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lr mok. 18 nk. 97-101
  • Obosanaka koloba mɛrsi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Obosanaka koloba mɛrsi?
  • Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Masolo mosusu
  • Bato zomi ya maba babikisami—Moko amonisi botɔndi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu asali mobembo ya nsuka na Yelusaleme mpe abikisi bato zomi na maba
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Ayoki mawa mpo na moto na maba
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mawa etindi ye abikisa moto ya maba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Yekolá epai ya Moteyi Monene
lr mok. 18 nk. 97-101

MOKAPO 18

Obosanaka koloba mɛrsi?

LELO olyaki?— Oyebi nani alambaki biloko yango?— Ekoki kozala mama na yo to moto mosusu, kasi mpo na nini tosengeli kopesa Nzambe mɛrsi mpo na biloko yango?— Mpo Nzambe nde moto asalaka ete tózala na biloko oyo tolyaka. Kasi, tosengeli mpe kopesa mɛrsi na moto oyo alambaki yango to moto oyo atyelaki biso yango.

Na bantango mosusu tobosanaka koloba mɛrsi soki bato mosusu basaleli biso likambo moko ya malamu, ezali bongo te? Ntango Moteyi Monene azalaki awa na mabelé, bato mosusu ya maba babosanaki koloba mɛrsi.

Moto ya maba ezali nani?— Moto ya maba ezali moto oyo azali na maladi babengi maba. Maladi yango ekoki ata kokata biteni mosusu ya nzoto. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, bato ya maba basengelaki kozala mosika na bato mosusu. Mpe soki moto ya maba amoni moto mosusu azali koya, asengelaki koganga makasi mpo na kokebisa moto yango ete apusana pene na ye te. Bazalaki kosala bongo mpo bato bápusana pene na bango te noki bázwa maladi ya maba.

Yesu azalaki kosalela bato ya maba boboto mingi. Mokolo moko, ntango azalaki kokende na Yelusaleme, Yesu asengelaki kokatisa engumba moko ya moke. Ntango akómaki penepene na engumba yango, bato zomi ya maba babimaki mpo na kokutana na ye. Bayokaki nsango ete Nzambe apesá Yesu nguya ya kobikisa maladi nyonso.

Bato ya maba wana bapusanaki penepene na Yesu te. Batɛlɛmaki mosika. Kasi bandimaki ete Yesu akoki kosilisa maba na bango. Yango wana, ntango bato yango ya maba bamonaki Moteyi Monene, babelelaki ye ete: ‘Yesu, Moteyi, salisá biso!’

Oyokelaka bato ya maladi mawa?— Yesu azalaki koyokela bango mawa. Ayebaki ete kozala na maba ezali mpasi mingi. Yango wana azongiselaki bango ete: “Bókende mpe bómilakisa epai ya banganga-nzambe.”​—Luka 17:11-14.

Bato zomi ya maba basɛngi Yesu asalisa bango

Yesu azali koyebisa bato oyo ya maba ete básala nini?

Mpo na nini Yesu ayebisaki bango básala bongo? Ezali mpo na mobeko oyo Yehova apesaki bato na Ye mpo na bato ya maba. Mobeko yango elobaki ete nganga-nzambe moko nde asengeli kotala nzoto ya moto ya maba. Nganga-nzambe yango nde asengeli koyebisa moto yango ya maba ete maladi na ye esili. Soki maladi na ye esili, akozonga lisusu kofanda elongo na bato.​—Levitike 13:16, 17.

Kasi, bato yango ya maba bazalaki naino na maladi na bango. Atako bongo, bakendaki epai ya nganga-nzambe ndenge Yesu ayebisaki bango?— Ɛɛ, bakendaki kaka na ntango yango. Na ntembe te, mibali yango bandimaki ete Yesu akoki kosilisa maladi na bango. Likambo nini esalemaki?

Na nzela, maladi na bango esilaki. Nzoto na bango ebongaki. Bakómaki malamu! Lokola bandimaki nguya ya Yesu, yango ememelaki bango mbano. Oyo nde esengo bazalaki na yango! Kasi, sikoyo, basengelaki kosala nini mpo na komonisa botɔndi na bango? Soki yo, olingaki kosala nini?—

Moko ya bato yango oyo babikaki akwei na nse ya makolo ya Yesu mpe apesi ye mersi

Eloko nini moto oyo ya maba abosanaki kosala te?

Moko kati na mibali oyo babikaki azongaki epai ya Yesu. Abandaki kopesa Yehova nkembo, to kokumisa ye. Asalaki malamu mpamba te nguya oyo babikisaki ye na yango eutaki epai ya Nzambe. Lisusu, mobali yango afukamaki na makolo ya Moteyi Monene mpe apesaki ye mɛrsi. Azalaki na botɔndi mingi mpo na oyo Yesu asalelaki ye.

Kasi, ezali boni mpo na mibali mosusu wana libwa? Yesu atunaki ete: ‘Bato ya maba oyo babikaki bazalaki zomi, ezali bongo te? Bamosusu libwa bazali wapi? Kaka moko nde azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo?’

Ɛɛ, ezali mpenza bongo. Kati na bango zomi, kaka moko nde apesaki Nzambe nkembo mpe azongaki mpo na kopesa Yesu mɛrsi. Kutu, moto yango azalaki Mosamalia, moto ya ekólo mosusu. Mibali mosusu wana libwa bapesaki Nzambe matɔndi te, bapesaki mpe Yesu matɔndi te.​—Luka 17:15-19.

Kati na mibali wana, yo okokani na nani? Tolingi kokokana na Mosamalia, ezali bongo te?— Na bongo, ntango moto asaleli biso likambo moko ya malamu, eloko nini tosengeli kobosana te?— Tosengeli kopesa ye mɛrsi. Mbala mingi, bato babosanaka koloba mɛrsi. Atako bongo, ezali malamu koloba mɛrsi. Ntango tozali kosala bongo, Yehova Nzambe ná Mwana na ye, Yesu, basepelaka.

Mama moko asimbi mwana na ye ya mwasi oyo azali kobɛla mpe azali kopesa ye nkisi

Ndenge nini okoki komekola moto ya maba oyo azongaki epai ya Yesu?

Soki okanisi malamu, okomona ete bato basalelá yo makambo mingi ya malamu. Na ndakisa, osilá kobɛla?— Ntango mosusu, obɛlá naino maladi ya makasi te lokola mibali wana zomi oyo bazalaki na maba, kasi ekoki kozala ete miyoyo esilá kotungisa yo makasi to oyoká libumu mpasi. Moto moko asalisaki yo?— Ekoki kozala ete apesaki yo nkisi mpe asalelaki yo makambo mosusu. Osepelaki na ndenge basalisaki yo mpo oyoka nzoto malamu?—

Mosamalia wana apesaki Yesu mɛrsi mpo abikisaki ye, mpe likambo yango esepelisaki Yesu. Okanisi ete mama na yo to tata na yo bakosepela soki opesi bango mɛrsi ntango basaleli yo makambo ya malamu?— Ɛɛ, bakosepela.

Molakisi azali na esengo ntango mwana wana ya mobali apesi ye mɛrsi

Mpo na nini ezali na ntina tóbosana te koloba mɛrsi?

Bato mosusu basalelaka yo makambo ya malamu mokolo na mokolo to pɔsɔ na pɔsɔ. Ekoki kozala ete mosala na bango nde ezali kosɛnga bango básalaka bongo. Ekoki kozala kutu ete basalaka makambo yango na esengo. Kasi ntango mosusu okoki kobosana kopesa bango mɛrsi. Ekoki kozala ete molakisi na yo abomaka nzoto mpo na kosalisa yo ozwa mayele na kelasi. Ezali mosala na ye. Kasi, akosepela soki opesi ye mɛrsi na ndenge azali kosalisa yo ozwa mayele.

Ntango mosusu, bato basalelaka yo makambo ya mikemike. Na ndakisa, moto moko asilá kosalisa yo na komema eloko moko ya kilo? To moto moko asilá kopesa yo eloko moko na ntango bozali kolya? Ezali malamu kopesa mɛrsi ata mpo na makambo wana ya mikemike.

Mwana oyo ya mobali ayambi mama na ye mpe apesi ye bafololo

Soki tozali kobosana te kopesa bato mɛrsi, boye tokobosana mpe te kopesa Tata na biso ya likoló matɔndi. Kutu, tozali mpenza na makambo ebele oyo esengeli kotinda biso na kopesa Yehova matɔndi! Apesá biso bomoi mpe biloko nyonso oyo esepelisaka biso na bomoi. Yango wana tosengeli kolobaka malamu na ye mokolo na mokolo mpo na kopesa ye nkembo.

Mpo na likambo ya kopesa mɛrsi, tángá Nzembo 92:1; Baefese 5:20; Bakolose 3:17; mpe 1 Batesaloniki 5:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto