Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 3
Baklisto bakundaka ebembe na ndenge ya lokumu, kasi ya mindɔndɔ te
1. (a) Mpo na nini bato oyo bazali baklisto te basalaka matánga ya monene oyo ekokamwisa bato? (b) Bato mosusu basalaka nini mpo bato mingi báya na matánga na bango?
1 Bato oyo bayebi te ete bakufi bayebi eloko te bakanisaka ete kosala matánga ya monene ekosepelisa mowei mpe bandeko na ye oyo batikali na bomoi. Mpo na bato oyo bayebi solo te, “kolakisa na lolendo” bozwi ya mowei to ya libota na ye ezali na ntina mingi. (1 Yoa. 2:16) Mbala mingi, elimo ya kowelana etindaka bato básala matánga oyo ekoleka ya basusu. Mpo bato báya ebele, batyaka mandalala mpe fɔtɔ ya mowei na bisika mingi, mpe bapesaka nsango na televizyo to na radio. Bato mosusu kutu bazelaka mikolo mingi, ata mpe koleka pɔsɔ mobimba liboso ya kokunda mowei, mpo na kokangisa mbongo ya kosala matánga ya monene. Lokola bamonaka ete likambo yango ezali na ntina mingi, ata bato oyo bazali babola babomaka nzoto mpo na kosala “matánga ya monene” oyo ekosepelisa bandeko na bango mpe bato ya kartye.
2. (a) Bokeseni nini ezali kati na ndenge oyo baklisto bakundaka ebembe ná ndenge oyo bato ya mokili basalaka yango? (b) Na kotalela Yoane 17:16 mpe Masese 11:2, mpo na nini ezali na ntina ete basaleli ya Nzambe bákunda ebembe na ndenge ya mindɔndɔ te?
2 Nzokande, basaleli ya Nzambe bayebi malamu ete soki moto akufi ayebaka lisusu eloko te; na yango ayebaka mpe te nyonso oyo bato bakoki kosala mpo na kokumisa ye. Baklisto ya solo balukaka te kokunda ebembe na milulu ya mindɔndɔ mpo na komilakisa. Soki tomekoli bato ya mokili, tokomonisa ete bindimeli na biso ekeseni na oyo ya bango? (Yoa. 17:16) Bakomona te ete biso mpe tobangaka bakufi? Lokola toyebi ete na mboka na biso bato mingi babangaka bakufi, tosengeli kozala ekɛngɛ mpe komonisa bwanya mpo na kokunda ebembe na ndenge ya mindɔndɔ te. (Mas. 11:2) Ndenge nini tokoki kosala yango?
3. (a) Bato mosusu basalaka nini mpo na kokɔngɔla mbongo ya kokunda ebembe? (b) Ndenge nini basaleli ya Yehova batalelaka lolenge wana ya kokɔngɔla mbongo?
3 Mbongo: Na bisika mosusu, ntango moto akufi, bandeko ya lisangá bakutanaka mpo na kokɔngɔla mbongo ya kokunda ebembe. Bandeko mosusu batindaka mikanda na masangá mosusu mpo na kosɛnga mbongo. Bamosusu “bakɔngɔlaka mbongo” epai ya bandeko ya lisangá mpo na kokunda ndeko oyo akufi. Liboso ete bákunda ebembe, bankulutu baponaka ndeko moko mpo akɔngɔla mbongo na bandako ya bandeko to na Ndako ya Bokonzi. Bamosusu batyaka bakɛsi ya makabo mpo ete bato oyo bayei bátya mbongo. Bato oyo bazali Batatoli te basalaka liste ya nkombo ya bato oyo bapesi mbongo mpe bayebisaka motángo ya mbongo oyo bato yango bapesi. Bapesaka bato oyo bayei na esika ya ebembe bilei mpe masangá mpo na kolendisa bango bápesa makabo. Ndenge nini tosengeli kotalela makambo nyonso wana? Baklisto ya solo basengeli te kosɛnga mbongo ya kokunda ebembe na ndenge wana.
4. (a) Banani bazali na mokumba ya kobimisa mbongo mpo na kokunda ebembe? (Talá maloba na nse ya lokasac) (b) Soki libota ezangi mpenza mbongo, banani bakoki kosalisa bango? (Talá maloba na nse ya lokasad) (c) Likama nini ekoki kobima soki tondimi kozwa mbongo ya bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te, mpe ndenge nini Masese 27:12 ekoki kosalisa biso na likambo yango?
4 Bato ya libota ya mowei oyo bazali baklisto basengeli koyeba ete mokumba ya kobimisa mbongo mpo na kokunda mowei ezali libosoliboso na mapeka na bango.a Soki bazangi mpenza mbongo mpe bazali na makoki te ya kokunda ebembe na ndenge oyo ekosɛnga mbongo mingi te, bandeko na bango mosusu bakoki kosalisa bango.b (1 Tim. 5:3; od lok. 132, par. 1) Soki bango mpe bakoki te, bato mosusu to lisangá bakoki kosunga. (1 Yoa. 3:17, 18) Kasi, esengeli kokeba. Soki tosɛngi bandeko ya libota oyo bazali Batatoli te bábimisa mbongo mpo na kokunda ebembe, bakoki kokanisa ete bazali na lotomo ya kozwa bikateli mpo na ndenge oyo makambo esengeli kosalema. Yango ekoki kobimisa mokakatano makasi ntango bandeko ya lisangá bazali koluka kokunda mowei na ndenge oyo eyokani na mitinda ya Biblia. Yango elingi koloba te ete moklisto asengeli koboya mbongo nyonso oyo euti epai ya bandeko na ye ya libota. Kasi, soki tomoni ete kondima mbongo yango ekoki kotinda bandeko ya libota báluka kokunda ebembe ndenge oyo bango balingi, tokomonisa bwanya soki toboyi kozwa yango.—Mas. 27:12.
5. (a) Tángá Baefese 4:17-19 mpe Baloma 12:2. Ndenge nini mitinda yango ekosalisa biso ntango tolingi kokunda ebembe? (b) Ndenge nini bakundaki Yesu, mpe ndenge nini yango esengeli kotinda biso tótalela likambo ya kokunda ebembe? (c) Tángá Luka 14:28 mpe 2 Bakolinti 8:12. Mpo na koboya kosɛnga mbongo, to kokɔta banyongo, bibongiseli ya ndenge nini libota ya baklisto esengeli kozwa mpo na kokunda ebembe?
5 Lokola toyebi malamu ete bakufi bayebi eloko te, yango esengeli kopesa biso mpiko ya kokunda ebembe kozanga kolanda mimeseno ya mokili, oyo emonanaka mingi epai ya bato oyo bayebi Biblia malamu te. (Ef. 4:17-19) Atako tokolinga te kobɛtisa bato mosusu libaku na kokunda ebembe kaka bongobongo, tokolinga mpe te kolanda mimeseno ya bato ya mokili, oyo bayebi Nzambe te. (Lom. 12:2) Tóbosana te ete atako Yesu azalaki moto oyo alekaki bato nyonso na mokili, akundamaki na ndenge ya mindɔndɔ te mpe na lokumu. (Yoa. 19:40-42) Bato oyo bazali na “makanisi ya Klisto” bayokaka nsɔni te kosala bongo. (1 Kol. 2:15, 16) Yango wana, mpo na koboya kosɛnga mbongo to kokɔta banyongo, baklisto bakomonisa bwanya soki baluki kokunda ebembe na ndenge oyo ezangi mindɔndɔ, na kotalela makoki na bango.—Luka 14:28; Talá mpe 2 Kol.8:12.
6. (a) Mpo na nini ezali na ntina te kotindela masangá mosusu mikanda mpo na koyebisa bango nsango ya liwa ya ndeko moko mpe bibongiseli oyo ezwami mpo na kokunda ebembe? (b) Mpo na nini esengeli te kobongola programɛ ya mosala ya kosakola to ngonga ya makita mpo na kokunda ebembe ya ndeko? Tángá mpe monisá ndenge ya kosalela Matai 6:33, 34.
6 Lisukulu ya kokunda ebembe: Nsango ya liwa etambolaka noki, yango wana, liyebisi ya liwa ya ndeko mpe bibongiseli oyo ezwami mpo na kokunda ebembe esengeli kopesama kaka na lisangá oyo ye azalaki, kasi na masangá mosusu te. Ekozala mpe na ntina te kokomela masangá mosusu mpo na likambo yango. Na ntembe te, ekozala malamu te kobongola mokolo to ngonga ya makita mpo na makambo etali kokunda ebembe. Soki totyaka makambo ya elimo na esika ya liboso, tokomitungisa koleka ndelo te ntango tokufeli moto mpe tokokoba kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.—Mat. 6:33, 34.
7. (a) Ndenge nini lisukulu ya bokundi esengeli kosalema? (b) Makambo nini molobi asengeli kosala te ntango azali kosala lisukulu ya bokundi?
7 Soki bankulutu ya lisangá bandimi, lisukulu ya bokundi ekoki kosalema na Ndako ya Bokonzi, to soki bandeko ya libota balingi, ekoki kosalema na lopango ya mowei to na esika mosusu. Molobi oyo libota ya mowei ekopona asengeli kosala lisukulu yango na kolanda plan oyo moombo ya sembo abimisá. Lisukulu yango esengeli kobɔndisa bandeko, kolendisa bango, mpe kopesa bango makasi na elimo. Molobi asengeli kolobela kaka makambo oyo ezali na plan, asengeli kokɔtisa mateya ya lokuta te. Na ndakisa, koloba ete moto yango akufi mpo balɔki ye to babwakeli ye maladi, ekoyokana te na solo ya Biblia, mpe ekomonisa ete Yehova azali na nguya te ya kobatela basaleli na ye. (Mas. 18:10) Molobi asengeli mpe kokeba ete makambo oyo akoloba na lisukulu mpe na libondeli emonisa te ete azali koloba na mowei. (Mos. 9:5, 10) Ntango ndeko moko oyo asalelaki Yehova na bosembo akufi, molobi akoki kolobela na mokuse lisolo ya bomoi ya ndeko yango mpe bosembo na ye. (Ebe. 6:12) Nzokande, esengeli te kotika ete bato mosusu bátɛlɛma mpe bákumisa mowei, ezala ntango lisukulu ya bokundi ezali kosalema, liboso, to nsima na yango.
8. (a) Bandeko mosusu bakómá na momeseno nini, mpe mpo na nini tosengeli koboya yango? (b) Ntango tozali kozwa bibongiseli mpo na lisukulu ya bokundi, makambo nini esengeli kobosana te na oyo etali ngonga mpe libondeli? (c) Soki ndeko moko akozala prezida ya lisukulu yango, makambo nini asengeli kosala te?
8 Bandeko mosusu bakómá na momeseno ya kokende na Ndako ya Bokonzi bangonga mingi liboso mpo na koyemba tii ntango lisukulu ya bokundi ekobanda. Tokoki koyemba loyembo ya Bokonzi liboso mpe na nsuka ya lisukulu ya bokundi, kasi soki bandeko babandi koyemba bangonga mingi liboso lisukulu ebanda, yango ekomonisa ete tokómi komekola bato ya mangomba. Mbala mingi, lisukulu ya bokundi eumelaka miniti 30, mpe esengeli kobanda na ngonga oyo etyami. Lisukulu yango ekoki kobanda na libondeli to te. Ezali mpe na ntina te ete ndeko moko azala prezida ya lisukulu yango. Kasi, soki ndeko moko akozala prezida, maloba na ye esengeli kozala mokuse. Ekozala na ntina te azongela lisusu makambo oyo molobi alobaki to “apesa matɔndi” na bato oyo bazali wana. Soki bato ya libota balingi, kuna na lilita, ndeko oyo asalaki lisukulu to ndeko mosusu akoki kosukisa na mwa maloba mokuse mpe kosala libondeli. Tóbosana likambo oyo te: moto oyo azali Motatoli te asengeli te kozwa maloba, ezala na Ndako ya Bokonzi to na lilita.—2 Kol. 6:14-18.
9. Tolendisami na kosala nini ntango tokei na lisukulu ya bokundi?
9 Ezaleli oyo ebongi: Ezaleli nini tosengeli kozala na yango na esika ya ebembe? Ata soki motema na biso etondi na mawa, tokosepela kobɔndisama na Makomami. Yango wana, ntango tokei na esika oyo lisukulu ya bokundi ekosalema, tosengeli komema Biblia na biso. Ntango tozali kolanda na Biblia na biso mikapo oyo molobi azali kotánga mpe kolimbola, yango ekolendisa kondima na biso na elaka ya lisekwa, ntango oyo “liwa ekozala lisusu te.” (Emon. 21:4) Tozalaka mpe na libaku ya kobɔndisa libota oyo ekufeli moto mpe bato mosusu oyo bazali wana. Soki tozali na ezaleli wana, tokosuka kaka te na kobɔndisa bato yango, kasi biso moko mpe tokobɔndisama na elikya ya lisekwa, ntango liwa ekolongolama mpo na libela.—Yis. 25:8.
10. (a) Ndenge nini bato oyo bazali na molili ya elimo bamonisaka mawa na bango? (b) Bato oyo bayebi malamu Makomami basalaka ndenge nini, mpe mpo na nini? Tángá mpe limbolá 1 Batesaloniki 4:13.
10 Bato mingi bakanisaka ete kozala na mawa makasi emonisaka ete ozali komemya mowei mpe olingaki ye mingi. Yango wana, ntango bato bazali koleka mpo na kotala nzoto ya mowei, na ntango ya lisukulu to na lilita, bamosusu balelaka na kolekisa ndelo; bamibwakaka na nse, bakendaka koloba na sanduku lokola nde mowei azali koyoka. Bamosusu kutu balukaka kosimba mowei, kolalela sanduku to koluka komibwaka na lilita. Atako liwa ezalaka ntango ya mawa mpo na biso nyonso, basaleli ya Nzambe balelaka na kolekisa ndelo te. Mpo na nini? Mpo ‘tozangi te koyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala na kati ya liwa.’ Toyebi malamu ete bakufi bayebi eloko moko te. Tozali na elikya ya solosolo ya lisekwa. (Yoa. 5:28, 29) Tozwaka makasi na bilaka yango mpe ‘toyokaka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.’—1 Tes. 4:13.
Nsima ya kokunda ebembe
11. (a) Nsima ya kokunda ebembe, ndenge nini tokoki komonisa bolingo mpo na libota oyo ekufeli moto? (b) Nini tosengeli te kozela ete libota oyo ekufeli moto esala mpo na biso, mpe ndenge nini tokoki kosalela Misala 20:35 na likambo yango?
11 Soki bakundi ebembe, makambo esili. Ezali lisusu na eloko ya kosala te mpo na moto oyo akufi. Nsima ya kokunda ebembe, bato mosusu bakoki kosepela kokende kotala libota ya mowei mpo na kobɔndisa bango. Na ntango yango, tozalaka na libaku ya kokanisa na mozindo ndenge bomoi ezali mokuse mpe ndenge “mokolo ya kufa eleki mokolo ya kobotama na malamu.” (Mos. 7:1) Ekozala malamu te ete bato oyo bazali koya bábakisela libota yango kilo mpe bázela ete bápesa bango bilei, masanga to esika ya kolala. Basaleli ya Yehova bayebi ete “esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Mis. 20:35) Yango wana, ekozala malamu kokanisa na oyo tokoki kopesa bato ya libota yango, na ndakisa kobɔndisa bango na elimo to kosunga bango na mbongo, na esika ya kozela ete bango bápesa biso bilei to masanga mpe básepelisa biso na ndenge mosusu. Soki tosali bongo tokomonisa mpenza boboto mpe bolingo ya boklisto.—Gal. 6:2.
12. (a) Bato oyo bayebi Makomami te basalaka nini nsima ya kokunda ebembe? (b) Mpo na nini bato basalaka bafɛti wana, mpe bazalaka na makanisi nini oyo eyokani na Makomami te?
12 Boyá milulu oyo esalemaka nsima ya kokunda ebembe: Bato oyo bayebi solo ya Biblia te basalaka makambo ndenge mosusu nsima ya kokunda ebembe. Babongisaka fɛti ya monene oyo esangisaka bandeko, baninga ya kartye, mpe bato mosusu mpo na kolya, komɛla, mpe kobina na miziki ya makasi. Bato mingi babengaka yango “matánga ya solosolo.” Mbala mingi na bisika yango, balyaka, bamɛlaka na kolekisa ndelo, babinaka mabina ya nsɔni mpe basalaka makambo mosusu ya mbindo. Lokola miziki ezalaka makasi, bato mingi bayaka ata soki bayebaki mowei te to libota na ye. Bamosusu bakanisaka ete bisengo ya ndenge wana esilisaka mawa. Nzokande, baklisto ya solo basengeli koyeba ete mpo na bato mingi bafɛti ya ndenge wana ezalaka mpo na kokumisa mowei mpe kosala ete elimo na ye ekende epai ya bankɔkɔ.
13. (a) Na likambo nini milulu oyo esalemaka nsima ya kokunda ebembe ekokani na oyo Exode 32:1-6 elobeli? (b) Tángá Mosakoli 3:1, 4. Mpo na nini milulu yango ezali malamu te mpo na basaleli ya Nzambe? (c) Na kotalela Yoane 17:16 mpe 1 Bakolinti 10:7, mpo na nini baklisto ya solo basengeli koboya kosala to kokende na milulu ya ndenge wana?
13 Bato mingi batalelaka milulu yango lokola bonkɔkɔ na bango. Kasi, bonkɔkɔ esengeli te kotinda biso tókóma na etamboli oyo eyokani te na mitinda ya boklisto. Na ndakisa, koyemba mpe kobina ezalaki na bonkɔkɔ ya Bayisalaele. Kasi, ntango basangisaki yango na makambo oyo Yehova aboyi, yango ebebisaki boyokani na bango na ye. (Ex. 32:1-6) Ezali mpe bongo mpo na mabina mpe bafɛti oyo esalemaka mingi na ntango ya ebembe. Liwa ya ndeko na biso ezali te libaku ya kosepela to kosala biyenga. (Mos. 3:1, 4) Toli oyo ezali ya bwanya mpenza: “Komitungisa eleki kosɛka na malamu, mpamba te na mawa ya elongi, motema ekómaka malamu koleka.” (Mos. 7:3, NW) Lokola mbala mingi makambo oyo basalaka nsima ya kokunda ebembe esangisaka misala ya mbindo mpe misala oyo ezali na boyokani na bilimu mabe, baklisto ya solo basengeli koboya kosala to kokende na milulu nyonso oyo esalemaka nsima ya kokunda ebembe. Soki toboyi kolanda mimeseno yango, tokomonisa ete tozali ‘bato ya mokili te’ mpe ete tozali na limemya mpo na Nzambe ya solo mpe mpo na lisosoli ya basusu.—Yoa. 17:16; 1 Kol. 10:7.
14. (a) Milulu nini bato basalaka nsima ya kokunda ebembe, mpe mbala mingi esalemaka nsima ya mikolo boni? (b) Bato oyo bazali Batatoli te bakanisaka ete milulu yango ezalaka na ntina nini?
14 Kopanza matánga mpe kosala fɛti mpo na kokanisa mowei: Nsima ya kokunda ebembe, bandeko mosusu ya mowei babongisaka oyo babengaka “kopanza matánga.” Bamosusu basalaka fɛti mpo na kokanisa mowei soki mokolo oyo akufaki ekómi. Na mabaku yango bapesaka bilei mpe masanga, batyaka miziki mpe bakɔngɔlaka mbongo. Mbala mingi, milulu yango esalemaka mikolo 40 to koleka nsima ya kokunda ebembe. Mingi bamonaka ete kopanza matánga to kosala fɛti mpo na kokanisa mowei ezali na ntina mingi mpo bakanisaka ete elimo ya mowei ekozwa bonsomi kaka soki basali milulu yango.
15. (a) Mpo na nini bato mosusu basalaka milulu bapɔsɔ to basanza mingi nsima ya kokunda ebembe? (b) Yango ebimisi motuna nini?
15 Kosala milulu bapɔsɔ to basanza mingi nsima ya kokunda ebembe to kokende na milulu yango ekoki komonana lokola libaku malamu ya kobɔndisama to kobɔndisa baoyo bakufeli moto. Mpo na bato oyo bayaki na ebembe te, yango ekoki komonana lokola libaku ya kopesa mowei mbote ya nsuka. Bamosusu basalelaka libaku yango mpo na kotɔnda bato oyo balelaki mpe basungaki bango. Tokoki nde kokanisa ete, soki mimeseno ya bapakano ekɔti te na milulu yango, ezali mabe te kosala fɛti ya ndenge wana mpo na bandeko ya lisangá to ya libota?
16. (a) Ata soki ezali mabe te kokende kotala libota oyo ekufeli moto nsima ya kokunda ebembe, makambo nini baklisto ya solo basengeli kosala te? (b) Na kotalela 1 Bakolinti 10:32, 2 Bakolinti 6:17, mpe Nzembo 97:10, mpo na nini tosengeli koboya kosala to kokende na milulu oyo esalemaka nsima ya kokunda ebembe?
16 Nsima ya kokunda ebembe, mwa bato ya libota ya mowei bakoki kokutana na nkuku mpo na kolobela mbongo oyo basalelaki mpo na kokunda mowei mpe makambo mosusu etali mibeko ya Leta. Lisusu, bamosusu bakoki kosepela kosunga libota oyo ezali na mawa, kobɔndisa mpe kolendisa bango na elimo. Kasi mbala mingi, makambo yango esalemaka kozanga ete lisangá mobimba eyeba. Kasi, ezali boni soki, nsima ya kokunda ebembe, libota ya mowei ebengisi bandeko ya lisangá, ya libota mpe baninga mpo na mwa fɛti? Kosala bongo ekoki kotinda bato mosusu bákanisa ete Batatoli ya Yehova mpe bazalaka na ndenge na bango ya kopanza matánga to ya kosala fɛti mpo na kokanisa mowei. Yango ekoki kotungisa makanisi ya baoyo bayebi malamu bindimeli ya Batatoli ya Yehova mpe mateya na bango mpo na bakufi. (1 Kol. 10:32) Lokola kopanza matánga mpe kosala fɛti mpo na kokanisa mowei eyokani makasi na mateya ya milimo ya bankɔkɔ, baklisto ya solo basengeli koboya makambo nyonso oyo ekokani na milulu yango. (2 Kol. 6:17) Kosala bongo ekomonisa ete ‘toyinaka oyo ezali mabe,’ mpe tolingaka mpe tosimbaka oyo ezali pɛto, mpe sembo. (Nz. 97:10; Lom. 12:9) Tiká ete mokomoko na biso abatela na motema mitinda ya malamu oyo tolobeli awa, mpo tókundaka bibembe na biso na ndenge ya mindɔndɔ te mpe tókɔtisa te mimeseno ya mbindo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Awa tozali kolobela libota ya mowei, elingi koloba molongani na ye, tata, mama, bayaya, balɛki, to bana na ye.
b Awa tolingi kolobela bandeko mosusu ya libota ya mowei, na ndakisa batata-lɛki, batata-nkulutu, batata-mwasi, banɔkɔ, bamama-nkulutu, bamama-lɛki, mpe bana na bango, to bandeko mosusu.
[Maloba na nse ya lokasa]
c Awa tozali kolobela libota ya mowei, elingi koloba molongani na ye, tata, mama, bayaya, balɛki, to bana na ye.
d Awa tolingi kolobela bandeko mosusu ya libota ya mowei, na ndakisa batata-lɛki, batata-nkulutu, batata-mwasi, banɔkɔ, bamama-nkulutu, bamama-lɛki, mpe bana na bango, to bandeko mosusu.