Loyembo 20
Tóyembela Bokonzi kitoko
1. Bóya koyembela Yesu,
Bato ya mokili!
Akómi solo Mokonzi,
Bóyemba makasi!
Makolo mamemi nsango,
Mazali bonzengá,
Koloba ete basembwi,
Lobiko, bakozwa
2. Mpe elikya ya Bokonzi
Ekumisaka Yah.
Elɛmbisaka bampota
Lokola mafuta.
Bikeko ya bato mabe
Bikosungaka te;
Boye, na Yehova Nzambe,
Biso tópɛngwa te!
3. Bóya koyembela Nzambe,
Azali Mokonzi!
Likoló basepeli mpo
Yes’azwi Bokonzi.
Yah akosambisa bato,
Atondi bosembo.
Bato na ye bakobika
Mpo bazali sembo.