Mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tolingaka Nzambe
1. Bolingo oyo Yesu azalaki kolinga Yehova etindaki ye asala nini?
1 Bolingo etindaki Yesu akokisa mosala na ye. Makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala mpo na kokokisa mosala na ye emonisaki polele ete azalaki kolinga Yehova. Yesu alobaki boye: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, ɛɛ kaka ndenge Tata apesi ngai komandema nasala, nazali mpe kosala bongo.” (Yoa. 14:31) Lokola tolandaka matambe ya Yesu malamumalamu, biso mpe tozali na libaku malamu ya komonisa, na mosala na biso ya kosakola, ete tolingaka Nzambe mingi.—Mat. 22:37; Ef. 5:1, 2.
2. Na ndenge nini mosala na biso ya kosakola emonisaka ete tolingaka Yehova?
2 “Tiká nkombo na yo esantisama”: Ntango tosalelaka mabaku nyonso mpo na koyebisa basusu nsango ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye, tomonisaka ete tolingaka ye, mpe na ndenge yango, tozali kosantisa nkombo na ye. (Nz. 83:18; Ezk. 36:23; Mat. 6:9) Na ndakisa ya Yesu, mosala na biso ya kosakola emonisaka ntango nyonso ete tozali na mposa ete nkombo ya Yehova esantisama mpe mokano na ye esalema.—Mat. 26:39.
3. Na ndenge nini bolingo na biso mpo na Yehova esalisaka biso tólonga mikakatano?
3 Bolingo esalisaka biso tólonga mikakatano: Mokakatano moko te ekoki kopekisa biso tómonisa ete tolingaka Yehova. (1 Kol. 13:4, 7) Yesu akutanaki na makambo mingi oyo ekokaki kolɛmbisa ye mpo akokisa mosala na ye malamu te. Nzokande, ntango azalaki kokutana na mikakatano, bolingo makasi oyo azalaki na yango mpe mposa na ye ya kosala mokano ya Yehova esalisaki ye alonga mikakatano yango. (Mko. 3:21; 1 Pet. 2:18-23) Biso mpe tokutanaka na mikakatano; kasi bolingo oyo tolingaka Nzambe ekoki kosalisa biso tólonga yango. Soki tolandi ndakisa ya Klisto malamumalamu, tokokakatana te mpe tokotika te kokokisa mosala na biso. Ata soki bandeko ya libota batɛmɛli biso, tozali maladi, tokómi mibange, to bato baboyi kondima nsango na biso, makambo nyonso wana esengeli te kopekisa biso tókokisa malamumalamu mosala na biso mpo na komonisa ete tolingaka Yehova.
4. Bolingo oyo tolingaka Yehova epesi biso libaku nini ya malamu?
4 Bolingo ezali na nguya, mpe tozali na libaku malamu ya komonisa, na mosala na biso ya kosakola, ete tolingaka Nzambe na motema na biso mobimba. (1 Kol. 13:13) Lokola tozali kopusana nokinoki na ntango oyo nkombo ya Yehova ekosantisama mpo na libela, tiká ete ‘bolingo na biso etondana lisusu mpe lisusu.’—Filp. 1:9; Mat. 22:36-38.