LITEYA 45
Bandakisa oyo ezali koteya
KOSALELA bandakisa ezalaka ndenge ya malamu mingi ya koteya. Mbala mingi, bandakisa ebendaka likebi ya bato mpe esimbaka yango malamu. Etindaka bato bákanisa mpenza. Esimbaka mayoki ya moto; yango wana, ekoki ata kolamusa lisosoli na ye mpe kosimba motema na ye. Na bantango mosusu, bandakisa ekoki mpe kosalelama mpo na kosilisa makinisi mabe oyo bato bazwelaka bato mosusu. Esalisaka mpe moto mpo abosana makambo yango te. Osalelaka yango ntango ozali koteya?
Mbala mingi, bandakisa ya kokokanisa makambo esɛngaka kaka mwa maloba moke, kasi, esalisaka moto amona makambo polele na kati ya makanisi na ye. Soki oponi bandakisa na yo malamu, ekosɛnga kutu te olimbola yango, mpo ndimbola na yango ekomonana polele. Atako bongo, soki moteyi alimboli yango mwa moke, bato bakomona bolamu na yango na ndenge ya malamu koleka. Na kati ya Biblia, ezali na bandakisa beboo oyo okoki koyekola.
Bandá na maloba ya kokokanisa makambo mpe maloba ya elilingi. Na lolenge nyonso ya elobeli oyo bato basalelaka, maloba ya kokokanisa makambo ezalaka pɛtɛɛ koleka. Soki obandi koyekola ndenge ya kosalela bandakisa na masolo na yo, ekozala malamu obanda na oyo wana. Mbala mingi, mpo na kokokanisa makambo, basalelaka liloba “lokola.” Ntango bazali kolobela biloko mibale oyo ekeseni, maloba ya kokokanisa makambo emonisaka eloko oyo makambo nyonso mibale wana ezali na yango. Na Biblia, ezali na bandakisa ebele ya maloba ya elilingi oyo euti na biloko Nzambe asalá, elingi koloba banzete, banyama, mpe biloko oyo ezali na likoló, mpe mosusu euti na makambo oyo bato bango moko bamonaki. Na Nzembo 1:3, bayebisi biso ete moto oyo atángaka Liloba ya Nzambe mbala na mbala azali “lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai,” nzete yango ebotaka mbuma mingi mpe ekaukaka te. Balobi mpo na moto mabe ete azali “lokola nkosi” oyo amibombi mpo na kozela nyama oyo ye akolya. (Nz. 10:9) Yehova alakaki Abalayama ete momboto na ye ekokóma mingi “lokola [minzoto] ya likoló” mpe “lokola zɛlo na libongo ya mai.” (Gen. 22:17) Na oyo etali boyokani oyo Yehova asalaki na ekólo ya Yisalaele, alobaki boye: “Lokola nkamba ekangami na loketo ya moto,” Ye mpe asalaki ete Yisalaele na Yuda bákangama na ye ndenge wana.—Yil. 13:11.
Eloko mosusu, oyo esalisaka mpe mpo na kokokanisa mpenza biloko mibale oyo ekeseni mingi ezali bongo maloba ya elilingi. Mpe yango nde eleki malamu. Ezwaka nkombo ya eloko moko, epesi yango na eloko mosusu, lokola nde yango nyonso mibale ezali kaka ndenge moko; na lolenge wana nde bizaleli mosusu ya eloko ya liboso ekomonana polele epai ya oyo ezwi nkombo na yango. Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bino bozali pole ya mokili.” (Mat. 5:14) Ntango moyekoli Yakobo azalaki kolobela mpasi oyo maloba ya moto ekoki kopesa soki ayebi kopekisa lolemo na ye te, akomaki boye: “Lolemo ezali mɔtɔ.” (Yak. 3:6) Davidi ayembelaki Yehova ete: ‘Yo ozali libanga na ngai mpe ndako na ngai ya makasi.’ (Nz. 31:3) Soki oponi malamu maloba ya elilingi, mbala mingi ntina ya kolimbola ndakisa yango ezalaka kutu te to ekosɛnga kaka mwa ndimbola moke mpenza. Maloba yango ya elilingi ezalaka milaimilai te; yango wana bato basimbaka yango malamu. Ekoki kosalisa bato oyo bakoyoka yo bábosana te likanisi ya ntina oyo mbɛlɛ bakokaki kobosana soki olobaki yango na elobeli oyo tosalelaka ntango tobɛtaka masolo.
Okoki mpe kosalela elobeli moko oyo ekobakisa mwa mungwa na mwa pilipili na likambo ozali koloba; kasi ebongi kosalela yango na mayele, noki te bato bakozwa yango na ndenge ya mabe. Yesu asalelaki elobeli yango ntango apesaki ndakisa moko oyo tokoki kobosana te, atunaki boye: “Mpo na nini ozali kotala lititi na liso ya ndeko na yo, kasi ozali te kokanisa libaya ya motɔndɔ na liso na yo moko?” (Mat. 7:3) Liboso ya kobanda kosalela elobeli oyo to mosusu, salá naino makasi oyeba kosalela malamu maloba ya kokokanisa makambo mibale mpe maloba ya elilingi.
Salelá bandakisa mosusu. Na esika ya kosalela elobeli oyo touti komona, mbala mosusu okopona kosalela bandakisa mosusu, lokola masolo oyo yo moko okanisi to masolo ya makambo oyo esalemá mpenza. Mbala mingi masolo yango ebendanaka milaimilai, yango wana esengeli koyeba kosalela yango na ndenge oyo ebongi. Bandakisa ya ndenge wana esengeli kosalelama kaka mpo na kolimbola makanisi ya ntina mpenza, mpe osengeli kolobela yango na ndenge oyo ekosalisa bato básimba liteya, kasi lisolo kaka te.
Atako bandakisa mosusu ekozala mpenza masolo ya makambo oyo esalemá te, esengeli kozala oyo ekomonisa bizaleli ya solosolo to makambo ya solosolo oyo esalemaka na bomoi ya bato. Yango wana, ntango Yesu azalaki koteya ndenge ya kotalela bato ya masumu oyo babongoli motema, apesaki ndakisa oyo ezalaki kolobela moto moko oyo asepelaki mingi ntango amonaki mpate na ye oyo ebungaki. (Luka 15:1-7) Mpo na kopesa eyano na mobali moko oyo azalaki kokanga mpenza te ntina ya likambo oyo Mibeko esɛngaki ya kolinga mozalani, Yesu alobelaki Mosamalia oyo asalisaki moto moko oyo bazokisaki ye bampota, nzokande nganga-nzambe moko na Molevi moko balekaki kaka wana kasi basalisaki moto yango te. (Luka 10:30-37) Soki ozali kotala malamumalamu bizaleli ya bato mpe makambo oyo bazali kosala, okozanga te koyeba ndenge ya kosalela bandakisa oyo malamu mpenza mpo na koteya.
Mpo na kopamela Mokonzi Davidi, mosakoli Natana asalelaki ndakisa ya likambo moko oyo esalemá te. Lisolo yango ezalaki ndakisa oyo ebongaki mpamba te elobelaki te likambo moko oyo ekokaki kotinda Davidi aluka komilongisa. Alobelaki moto moko ya bomɛngo oyo azalaki na bampate ebele mpe mobola moko oyo azalaki kaka na mpate moko ya mwasi, oyo ye azalaki kobɔkɔla mpe kolɛngɛla lokola liso na ye. Lokola Davidi ye moko azalaki liboso mobateli ya mpate, ezalaki mpasi te mpo ayeba ndenge moto wana amiyokaki mpo na mpate na ye. Davidi na bosembo nyonso, asilikaki mpo moto yango ya bomɛngo azwaki mpate ya mobola wana oyo azalaki kotyela yango motema. Bongo Natana alobelaki Davidi polele ete: ‘Yo nde moto yango!’ Davidi ayokaki mawa, mpe abongolaki mpenza motema. (2 Sam. 12:1-14) Mpo na koyeba kosalela malamu mpenza bandakisa ya makambo oyo elamusaka mayoki ya motema, mekáká kosala yango mbala na mbala.
Bandakisa mingi ya malamu mpo na koteya ekoki kozwama na masolo oyo ezali na kati ya Makomami. Yesu kutu asalelaki yango; mokolo moko alobaki na mokuse ete: “Bókanisa mwasi ya Lota.” (Luka 17:32) Ntango azalaki kolobela makambo oyo etali elembo ya kozala na ye, azwaki ndakisa ya “mikolo ya Noa.” (Mat. 24:37-39) Mpo na kopesa ndakisa ya kondima oyo tosengeli kolanda, na Baebele mokapo 11, ntoma Paulo atángaki nkombo ya bato 16. Ntango okobanda komesana mokemoke na Biblia, yo moko okoyeba kobimisa bandakisa na makambo oyo Makomami elobeli mpe na masolo ya bato oyo balobelami kuna.—Lom. 15:4; 1 Kol. 10:11.
Na bantango mosusu, okomona malamu kobɛta lisolo ya bomoi ya moto moko ya mikolo oyo mpo bato básimba liteya malamu. Ezali mabe te, kasi kebá! Lobelá kaka makambo oyo esalemaki solo mpe oboya oyo ekoki koyokisa bato mosusu nsɔni mpambampamba to oyo ekoki kobenda likebi na bango na liteya moko oyo ebimisaka ntembe mpe oyo eyokani kutu te na lisolo na yo. Kobosana mpe te ete babɛtaka masolo ya ndenge wana bibɛtɛlá te, esengeli kozala na ntina moko. Mpe koyebisa bato makambo kilikili te oyo ezangi ntina, yango ekoki kolongola likebi na bango na liteya oyo olingi bázwa.
Bakokanga ntina na yango? Ndakisa nyonso oyo okosalela esengeli kozala na ntina na yango. Kasi ekozala nde na ntina mpenza soki omonisi te ndimbola na yango na likambo oyo ozali kolobela?
Ntango Yesu asilisaki koloba ete bayekoli na ye bazali “pole ya mokili,” abakisaki mwa maloba mosusu mpo na kolimbola ndenge nini basalelaka mwinda mpe amonisaki mokumba oyo bayekoli na ye bazali na yango na kotalela ndakisa wana. (Mat. 5:15, 16) Nsima ya kopesa ndakisa ya mpate oyo ebungaki, alimbolaki ete esengo ezalaka na likoló ntango moto moko ya masumu abongoli motema. (Luka 15:7) Mpe ntango asilisaki koloba lisolo ya Mosamalia ya motema malamu, Yesu atunaki moto oyo azalaki kosolola na ye motuna moko ya mayele mpe na nsima apesaki ye toli. (Luka 10:36, 37) Nzokande, na oyo etali ndakisa ya mitindo ndenge na ndenge ya mabele mpe ndakisa ya matiti mabe na kati ya elanga, Yesu alimbolaki yango kaka epai ya bato ya komikitisa oyo batunaki ye ndimbola na yango, ebele ya bato nyonso oyo batikalaki bayokaki yango te. (Mat. 13:1-30, 36-43) Mikolo misato liboso ya liwa na ye, Yesu apesaki ndakisa moko ya basali na elanga ya vinyo oyo bazalaki koboma bato. Kasi alimbolaki yango te, ntina ya kolimbola yango ezalaki te, mpo “banganga-nzambe bakonzi mpe Bafalisai . . . bayebaki ete azalaki koloba na bango.” (Mat. 21:33-45) Nyonso wana emonisi ete mpo na koyeba soki ekosɛnga kolimbola ndakisa na yo mpe soki ndimbola yango esengeli kozala ya mokuse to ya molai, osengeli kotalela makambo oyo: ndakisa yango ezali ya ndenge nini, ezaleli ya bayoki ezali ndenge nini, mpe olingi bato básala nini ntango opesi ndakisa yango.
Mpo na kokolisa mayele ya kosalela bandakisa malamumalamu, esɛngaka mwa ntango molai mpenza, kasi kolɛmba te. Soki oyebi kopona bandakisa na yo malamu, ekobanda kokende kosimba bɔɔngɔ mpe mitema ya bato. Mpe mbuma oyo yango ekobota ezali ete nsango na yo ekoyokana malamu; wana nde likambo oyo mbala mingi esalemaka te ntango olobeli makambo kozanga kopesa bandakisa.