Mboka na kobombama—Ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe
“Mboka motoba oyo ikozala bisika na kobombama . . . ete soko moto abomi moto na nkó te akima kuna.”—MITUYA 35:15.
1. Likanisi ya Yehova ezali nini mpo na bomoi mpe nyongo ya makila?
YEHOVA NZAMBE atalelaka bomoi ete ezali bulɛɛ. Mpe ete bomoi ezali kati na makila. (Levitike 17:11, 14) Na yango, Kaina, moto ya liboso oyo abotamaki awa na mabelé, azwaki nyongo ya makila na ntango abomaki ndeko na ye Abele. Mpo na yango, Nzambe ayebisaki Kaina ete: “Mongongo na makila na ndeko na yo engangeli ngai longwa na mabelé.” Makila oyo esopanaki likoló na mabelé nsima ya kobomama wana epesaki litatoli oyo ezangi koloba, kasi ezalaki litatoli ya nguya mpenza na ntina na bomoi ya moto oyo abomamaki na pwasa. Makila ya Abele engangaki kino epai na Nzambe mpo na kosɛnga kobekolama.—Genese 4:4-11.
2. Lolenge nini limemya ya Yehova mpo na bomoi elobelamaki makasi nsima ya Mpela?
2 Limemya oyo Nzambe azali na yango mpo na bomoi ya moto elobelamaki makasi nsima wana mosembwi Noa mpe libota na ye babimaki na masúwa lokola babiki ya Mpela ya mokili mobimba. Na ntango yango Yehova apesaki bato nzela ya kolya mpe nyama, kasi makila na yango te. Apesaki bango mpe mobeko oyo ete: “Nakotuna mpo na makila na bomoi na bino, nakotuna yango epai na [ekelamu nyonso ya bomoi, NW]; mpe epai na moto, ata na mabɔkɔ na moto oyo azali ndeko na ye, nakotuna mpo na bomoi na moto. Soko moto akosopa makila na moto, makila na ye mpenza ekosopana na moto, mpo ete Nzambe asalaki moto na elilingi na ye.” (Genese 9:5, 6) Yehova andimaki bongo lotómo oyo ndeko ya pene mpenza ya moto oyo abomamaki azalaki na yango ya koboma mpe mobomi yango na ntango akutani na ye.—Mituya 35:19.
3. Lolenge nini Mibeko ya Mose milobelaki makasi ezalela ya bulɛɛ ya bomoi?
3 Kati na Mibeko oyo epesamaki epai na Yisalaele na nzela ya mosakoli Mose, ezalela ya bulɛɛ ya bomoi ezalaki kolobelama makasi mbala na mbala. Na ndakisa, Nzambe apesaki mobeko ete: “Okoboma te.” (Exode 20:13) Limemya mpo na bomoi emonanaki lisusu polele kati na likambo oyo Mobeko ya Mose elobaki na ntina na likámá oyo mwasi ya zemi akokaki kokutana na yango. Mibeko milobaki polele ete soki mwasi ye moko to mwana na ye oyo azali naino na libumu akutanaki na likámá ya liwa mpo ete bato mibale bazalaki kobunda, basambisi basengelaki kotalela makambo oyo malekaki zingazinga mpe kotala soki na meko nini likámá yango esalemaki na nkó to na nkó te, kasi etumbu esengelaki kozala bongo “molimo mpo na molimo,” to bomoi mpo na bomoi. (Exode 21:22-25, NW) Nzokande, Moyisalaele oyo abomaki akokaki na lolenge moko to mosusu kopɛngola mbeba ya likambo na ye ya mobulu?
Esika ya libateli mpo na babomi?
4. Longola bobele na Yisalaele, mboka nini izalaki na bisika ya libateli na ntango ya kala?
4 Kati na bikólo mosusu, longola bobele Yisalaele, esika ya bulɛɛ to esika ya libateli ebongisamaki mpo na babomi mpe bato mosusu ya mobulu. Ezalaki bongo mpo na bisika lokola tempelo ya nzambe-mwasi Artémis na engumba ya Efese ya kala. Mpo na bisika motindo wana, eyebisamaki ete: “Bisika mosusu ya bulɛɛ bimatisaki motángo ya bato ya mobulu; mpe mbala mingi ezalaki kosɛnga ete bákitisa motángo ya bisika ya libateli. Bobele na Athènes nde bisika ya bulɛɛ bindimamaki na mibeko lokola bisika na kobombama (na ndakisa, tempelo ya Thésée mpo na baombo); na eleko ya mokonzi Tibère masangá ya bato ya mobulu kati na bisika ya bulɛɛ ekómaki mpenza likámá na boye ete lotómo ya kosala esika ya libateli epesamaki na mboka mingi te (na mobu 22).” (The Jewish Encyclopedia, 1909, Volimi II, lokasa 256) Na nsima, mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ekómaki bisika ya libateli, kasi likambo yango elingaki kopesa nguya ya bakonzi ya Leta epai na banganga-nzambe mpe makambo mazalaki kokatama na bosembo te. Na nsuka, lolenge mabe ya kosalela bisika ya libateli esalaki ete ebongiseli yango esukisama.
5. Elembeteli nini emonisi ete Mibeko mindimaki te ete ezaleli ya bopɔtu ezala lotómo ya komonisamela motema mawa na ntango moto moko abomamaki?
5 Kati na Bayisalaele, baoyo bazalaki koboma bato na nkó bazalaki kopesamela te lotómo ya kokɔta na esika mosantu to esika ya libateli. Ata mpe nganga Molewi oyo azalaki kosala na etumbelo asengelaki kobomama soki abomaki moto na kokanela mpenza. (Exode 21:12-14) Lisusu, Mibeko mindimaki te ete ezaleli ya bopɔtu ezala lokola lotómo ya komonisamela motema mawa wana moto moko akufaki mpo na yango. Na ndakisa, soki mobali moko alingi ndako mosusu likoló na ndako na ye, asengelaki kosala eloko ya libateli na motɔ́ndɔ oyo esengelaki kokabola ndako ya nsé mpe ndako ya likoló. Soki bongo te, nyongo ya makila esengelaki kotángama likoló na ndako yango soki moto akokaki kokufa mpo ete akweaki uta na motɔ́ndɔ yango. (Deteronome 22:8) Lisusu, soki moto moko azalaki na ngɔ́mbɛ mobali oyo ebɛtaka bato maseke mpe akebisamaki mpo na yango kasi akangaki nyama yango te mpe eyaki koboma moto, nkolo ngɔ́mbɛ asengelaki kotángama na nyongo ya makila mpe akokaki kobomama. (Exode 21:28-32) Elembeteli mosusu oyo emonisi limemya mozindo oyo Nzambe azali na yango mpo na bomoi emonani kati na likambo oyo ete soki moto abɛtaki moyibi kino kufa asengelaki kotángama na nyongo ya makila soki likambo yango esalemaki na moi wana moyibi yango akokaki komonana mpe koyebana malamu. (Exode 22:2, 3) Na bongo, emonani polele ete mibeko ya sikisiki mpe bokatikati ya Nzambe epesaki nzela te na babomi bato na nkó ete bázanga kozwa etumbu ya liwa.
6. Lolenge nini mobeko ya ‘bomoi mpo na bomoi’ ekokisamaki na Yisalaele ya kala?
6 Na Yisalaele ya kala, soki moto abomami, makila na ye masengelaki kobekolama. Mobeko ya ‘bomoi mpo na bomoi’ ezalaki kokokisama wana “[mobekoli ya makila, NW]” abomaki mobomi. (Mituya 35:19) Mobekoli ezalaki bongo ndeko mobali ya pene mpenza ya moto oyo abomamaki. Kasi ezalaki boni mpo na baoyo bakokaki koboma na kozanga kokanela?
Ebongiseli ya motema mawa ya Yehova
7. Ebongiseli nini Nzambe asalaki mpo na baoyo babomaki bato na nkó te?
7 Mpo na baoyo babomaki bato na mbalakaka to na kozanga kokanela, na bolingo nyonso Nzambe abongisaki mboka na kobombama. Na ntina na yango, ayebisaki Mose ete: “Lobelá bato na Yisalaele ete, Wana ekokata bino ngámbo na Yaladene mpo na koingela na mokili na Kanana, bokopona mboka mosusu na kozala mboka na kobombama mpo na bino, ete mobomi na moto, oyo abomi moto na nkó te akoka kokima kuna. Mboka yango ikozala mpo na bino esika na komibomba na miso na [mobekoli, NW], ete mobomi na moto akufa te kino etɛlɛmi ye liboso na lingomba na ntina na ekateli. Mboka na bino oyo ikopesa bino na kozala mboka na kobombama ikozala nyonso motoba. Bokopesa mboka misato na ngámbo na Yaladene mpe mboka misato kati na Kanana mpo na kozala mboka na kobombama . . . soko moto abomi moto mosusu na nkó te akima kuna.”—Mituya 35:9-15.
8. Mboka na kobombama ityamaki na bisika nini, mpe lolenge nini bato oyo babomaki bato na nkó te bazalaki kozwa lisungi mpo na kokóma kuna?
8 Na ntango Bayisalaele bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, balandaki etindá ya kotonga mboka na kobombama motoba. Misato na yango—Kedese, Sikeme, mpe Hebelona—ezalaki na wɛ́sti ya Ebale Yaladene. Na ɛ́sti ya Yaladene ezalaki na mboka na kobombama oyo ete Golana, Lamoti, mpe Besele. Mboka na kobombama ityamaki na bisika bibongi, na banzela oyo ebatelamaki malamu. Na bisika bibongi na banzela yango, ezalaki na bilembo oyo liloba “ebombamelo” ekomamaki likoló na yango. Bilembo yango bizalaki kolakisa nzela mpo na kokende na mboka na kobombama, mpe moto oyo abomaki moto na nkó te akokaki kokima mpo na kobatela bomoi na ye na mboka na kobombama ya pene. Epai kuna akokaki komibatela na mobekoli ya makila.—Yosua 20:2-9.
9. Mpo na nini Yehova asalaki ebongiseli na ntina etali mboka na kobombama, mpe esalemaki mpo na litomba ya banani?
9 Mpo na nini Nzambe asalaki ebongiseli na ntina etali mboka na kobombama? Ezalaki mpo ete mabelé ebebisama te mpo na makila ya bato basali likambo na nkó te mpe ete bato bázwa nyongo ya makila te. (Deteronome 19:10) Ebongiseli ya mboka na kobombama esalemaki mpo na litomba ya banani? Mobeko molobaki ete: “Mpo na bato na Yisalaele mpe mpo na mopaya mpe mpo na moto afandi kati na bango ete soko moto abomi moto mosusu na nkó te akima kuna.” (Mituya 35:15) Na yango, mpo na kozala sembo mpe mpo na kosalela mikano ya boyengebene wana azali komonisa motema mawa, Yehova ayebisaki Bayisalaele ete básala mboka na kobombama na pembeni mpo na baoyo bazalaki koboma na nkó te, baoyo bazalaki (1) bato na Yisalaele, (2) bapaya kati na Yisalaele, mpe (3) baoyo bautaki bipai mosusu mpe bakómaki kofanda kati na Yisalaele.
10. Mpo na nini tokoki koloba ete mboka na kobombama ezalaki ebongiseli ya motema mawa oyo Nzambe asalaki?
10 Tosengeli kosimba likambo oyo ete ata soki moto moko abomaki moto mosusu na nkó te, asengelaki kobomama engebene mobeko ya Nzambe oyo ete: “Soko moto akosopa makila na moto, makila na ye mpenza ekosopana na moto.” Na yango, ezalaki bobele ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe ete moto oyo abomaki moto na nkó te akoka kokima kino na moko na mboka na kobombama. Emonani ete, bato nyonso bazalaki na mawa mpo na moto nyonso oyo azalaki kokima mobekoli ya makila, mpamba te bango nyonso bayebaki ete likambo motindo wana ekokaki mbala mosusu mpe kokómela bango kozanga kokanela mpe balingaki kozala na mposa ya ebombamelo mpe ya komonisamela motema mawa.
Kokima mpo na kokende komibomba
11. Na Yisalaele ya kala, moto akokaki kosala nini soki abomaki moninga na ye ya mosala kozanga kokanela?
11 Elakiseli moko ekoki mpenza kosalisa yo na kososola lisusu malamu mpenza motuya ya ebongiseli oyo ya Yehova na ntina na kobombama. Kanisá ete ozalaki mokáti nkoni kati na Yisalaele. Kanisá ete na pwasa, motó ya epasola elongwe na esimbelo na yango mpe ekei kobɛta moninga oyo bozalaki kosala na ye elongo mpe akufi. Olingaki kosala nini? Kati na Mibeko ezalaki na motindá moko oyo etalelaki likambo ya lolenge wana. Na ntembe te, olingaki kozwa litomba na motindá oyo Nzambe apesaki, ete: “Oyo ezali mobeko na ntina na mobomi na moto, oyo akimi kuna [na mboka na kobombama] mpo na kobikisa bomoi na ye. Soko moto abomi mozalani na ye na nkó te, awa ezalaki ye moyini na ye liboso te—lokola soko moto akɔti na ngonda na mozalani na ye elongo mpo na kokata nkoni, mpe lobɔkɔ na ye ebɛti na [epasola] mpo na kokata nzeté mpe ebende elongwi na nzeté mpe eboli mozalani na ye na motindo ete akufi—ye akoki kokima na mboka moko oyo mpe kobikisa bomoi na ye.” (Deteronome 19:4, 5) Nzokande, ata soki okokaki kokɔta na mboka na kobombama, osengelaki bobele kozala na ngambo mpo na likambo oyo eutaki kosalema.
12. Kolandana nini ya makambo esengelaki kosalema nsima wana moto oyo abomaki moto na nkó te akómaki na mboka na kobombama?
12 Atako okokaki koyambama kuna, osengelaki koyebisa likambo na yo epai na mikóló na ekɔtelo ya mboka na kobombama. Nsima ya kokɔta na mboka yango, osengelaki kotindama lisusu na esambiselo liboso na mikóló oyo bazalaki komonisa ekólo ya Yisalaele na bikɔtelo ya mboka mpe oyo bazalaki na bokonzi likoló na etúká oyo kati na yango moto abomamaki. Okokaki kozala bongo na libaku ya komonisa mpenza ete osalaki likambo yango na nkó te.
Na ntango babomi bazalaki kosambisama
13, 14. Wapi mwa makambo oyo mikóló bazalaki na ntina ya koyeba wana bazalaki kosambisa mobomi moko?
13 Na boumeli ya lisambisi liboso na mikóló na ekɔtelo ya mboka, okokaki mpenza komona na botɔ́ndi nyonso ete likebi elingaki kotyama mingi likoló na etamboli na yo ya kala. Mikóló bakokaki kotala soki bozalaki na boyokani ya lolenge nini elongo na moto oyo yo obomaki. Ozalaki koyina moto yango, ozalaki kokanela ye, mpe obomaki ye na nkó? Soki ekokaki kozala bongo, mikóló basengelaki kopesa yo na mabɔkɔ ya mobekoli ya makila, mpe osengelaki kokufa. Bato wana oyo bazalaki na mokumba ya kosambisa basengelaki koyeba malamu lisɛngami oyo ya mobeko ete ‘ekweli mpo na makila ya moto oyo asali likambo te esengelaki kolongolama na Yisalaele.’ (Deteronome 19:11-13) Bobele bongo, kati na likambo ya kosambisa lelo, bankulutu baklisto basengeli koyeba Makomami malamu mpenza, kosaláká engebene masɛngami na yango wana bazali kotalela ezaleli mpe etamboli ya kala ya moto oyo asali mabe.
14 Na kolukáká kososola makambo na bozindo mpe na boboto nyonso, mikóló balingaki kozala na ntina ya koyeba soki okanelaki moto yango oyo osilaki koboma. (Exode 21:12, 13) Obimelaki ye uta na esika moko ya kobatama? (Deteronome 27:24) Osilaki kokóma na nkanda makasi mpo na moto yango, na boye ete osalelaki mwango moko ya mayele mabe mpo na koboma ye? Soki ezalaki bongo, ekokaki mpenza kosɛnga ete okufa. (Exode 21:14) Mingi mpenza, mikóló basengelaki koluka koyeba soki koyina, to nkanda ezalaki, kati na yo mpe moto oyo osilaki koboma. (Deteronome 19:4, 6, 7; Yosua 20:5) Soki na ndakisa mikóló bakokaki komona ete osalaki yango na nkó te, balingaki kozongisa yo kati na mboka na kobombama. Olingaki mpenza kozala na botɔ́ndi mpo na ngɔlu oyo elingaki kopesamela yo!
Lolenge ya bomoi oyo ezalaki kati na mboka na kobombama
15. Masɛngami nini matyamaki likoló na moto oyo abomaki moto na nkó te?
15 Ye oyo abomaki moto na nkó te asengelaki kofanda kati na mboka na kobombama to kobima bobele na ntáká ya mapeko 1000 (soko bamɛtɛlɛ 400) na libándá ya bifelo na yango. (Mituya 35:2-4) Soki atambolaki pambapamba na koleka ndelo wana, akokaki kokutana na mobekoli ya makila. Na bongo, mobekoli akokaki koboma mobomi kozanga ete azwa etumbu mpo na yango. Kasi mobomi akangamaki na monyololo te to na bolɔ́kɔ te. Lokola akómaki mofandi kati na mboka na kobombama, asengelaki koyekola mosala moko, kokóma mosáli, mpe kosala lokola mosangani oyo azali na motuya kati na mboka.
16. (a) Moto oyo abomaki moto na nkó te asengelaki koumela ntango boni kati na mboka na kobombama? (b) Mpo na nini liwa ya nganga monene epesaki nzela na moto oyo abomaki moto na nkó te ete abima na mboka na kobombama?
16 Moto oyo abomaki moto na nkó te akokaki koumela ntango boni kati na mboka na kobombama? Ekokaki mpenza kozala mpo na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Kasi Mibeko milobaki ete: “Ekoki ete moto yango atikala kati na mboka na kobombama na ye kino kufa na nganga monene. Kasi na nsima ya kokufa ya nganga monene, mobomi na moto akoki kobutwa na mokili na libula na ye.” (Mituya 35:26-28) Mpo na nini liwa ya nganga monene epesaki nzela na moto oyo abomaki moto na nkó te ete abima na mboka na kobombama? Nganga monene azalaki moko na bato baleki lokumu kati na ekólo. Na bongo, liwa na ye ezalaki likambo monene na boye ete elingaki koyebana kati na bitúlúká nyonso ya Yisalaele. Bakimi nyonso oyo bazalaki kati na mboka wana bakokaki bongo kozonga na mabota na bango kozanga kobanga likámá ya kobomama na mabɔkɔ ya babekoli ya makila. Mpo na nini? Mpamba te Mibeko ya Nzambe mikataki ete likoki ya mobekoli mpo na koboma moto oyo abomaki moto na nkó te ezalaki lisusu na nguya te nsima ya kokufa ya nganga monene, mpe bato nyonso bayebaki yango. Soki ndeko mosusu ya pene akokaki koboma moto yango na nsima, asengelaki kotángama mobomi mpe asengelaki kozwa etumbu ya kufa mpo na yango.
Matomba ya libela
17. Bipekiseli oyo bityamaki likoló na moto oyo abomaki moto na nkó te bikokaki mpenza kopesa matomba nini?
17 Matomba nini makokaki mpenza komonana na ntina na bipekiseli oyo bityamaki likoló na moto oyo abomaki moto na nkó te? Ezalaki ekundweli mpo na ye ete asilaki koboma moto. Ekokaki mpenza kozala ete nsima na yango, asengelaki kolanda kotalela bomoi ete ezali bulɛɛ. Lisusu, asengelaki soko moke te kobosana ete bamoniselaki ye motema mawa. Lokola asilaki komonisamela motema mawa, na ntembe te, ye mpe alingaki komonisela bato mosusu motema mawa. Ebongiseli ya mboka na kobombama, elongo na bipekiseli na yango, ezalaki mpe na matomba mpo na bato nyonso ya mboka. Na lolenge nini? Na ntembe te, ekokaki mpenza kotikala libela kati na motó na bango ete basengelaki te kotalela bomoi ya moto na bopɔtu to kotalela yango lokola eloko mpamba. Na yango, baklisto basengeli kobosana te ntina ya kopɛngola ezaleli ya bopɔtu oyo ekoki komema na liwa ya mbalakaka. Lisusu, ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe mpo na mboka wana esengeli kopusa biso ete tómonisa motema mawa wana esengeli komonisa yango.—Yakobo 2:13.
18. Na makambo nini ebongiseli ya Nzambe mpo na kobombama ezalaki na litomba?
18 Ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe mpo na mboka na kobombama ezalaki mpe na matomba na lolenge mosusu. Bato bazalaki te kosala bituluku ya kopesa etumbu mpo na kolandela moto oyo abomaki moto, liboso ete akoka kosamba. Na esika ya kosala bongo, bazalaki nde kotalela ye lokola ete asalaki yango na nkó te, bazalaki nkutu kosunga ye ete amibatela. Lisusu, ebongiseli ya mboka na kobombama ezali mpenza na bokeseni na bibongiseli ya mikolo na biso na ntina na kotyama ya babomi na bolɔ́kɔ mpe na bandako eyindo, epai bazali koleisama na mosolo ya Leta mpe mbala mingi bakómaka lisusu bato mabe koleka mpo na bokutani na bango elongo na basáli mabe mosusu. Kati na ebongiseli ya mboka na kobombama, ezalaki na ntina te ya kotonga, ya kobatela mpe ya kokɛngɛla bolɔ́kɔ na kozingáká yango na bifelo ya ntálo, oyo etyami bibende, oyo kati na yango bakangami balingaka mbala na mbala koluka kokima. Ya solo, mobomi alukaki kokɔta “bolɔ́kɔ” mpe afandaki kuna na boumeli ya ntango ya sikisiki. Asengelaki mpe kozala mosáli, kosaláká bongo eloko oyo ekokaki kopesa matomba epai na baninga na ye bato.
19. Mituna nini mitunami na ntina na mboka na kobombama?
19 Ebongiseli ya Yehova na ntina na mboka na kobombama mpo na kobatela baoyo babomaki bato na nkó te ezalaki mpenza ebongiseli ya motema mawa. Na ntembe te, ebongiseli yango ekólisaki limemya oyo bato basengeli kozala na yango mpo na bomoi. Nzokande, mboka na kobombama ya kala ezali nde na ndimbola mpo na bato oyo bazali kobika na ekeke oyo ya 20? Tokoki kozala na nyongo ya makila liboso na Yehova Nzambe kozanga kososola ete tozali na mposa ya ngɔlu na ye? Mboka na kobombama ya Yisalaele izali na ndimbola nini mpo na biso lelo?
Okoyanola lolenge nini?
◻ Lolenge nini Yehova atalelaka bomoi ya moto?
◻ Ebongiseli nini ya motema mawa Nzambe akamataki mpo na moto oyo abomaki moto na nkó te?
◻ Lolenge nini mobomi azalaki kokɔta na mboka na kobombama, mpe asengelaki kotikala kuna na boumeli ya ntango boni?
◻ Matomba nini makokaki mpenza komonana mpo na bipekiseli oyo bityamaki likoló na moto oyo abomaki moto kozanga kokanela?
[Karte na lokasa 12]
Mboka na kobombama ya Yisalaele ityamaki na bisika bibongi
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
KEDESE Ebale Yaladene GOLANA
SIKEME LAMOTI
HELEBONI BESELE