MOKAPO 7
Otalelaka bomoi ndenge Nzambe atalelaka yango?
“Liziba ya bomoi ezali epai na yo.”—NZEMBO 36:9.
1, 2. Nzambe apesi biso likabo nini oyo ezali na motuya monene lelo oyo, mpe mpo na nini?
TATA na biso ya likoló apesi biso likabo moko ya motuya mingi: bomoi mpe likoki ya komonisa bizaleli na ye. (Ebandeli 1:27) Likabo yango esalisaka biso tóyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia. Soki tosaleli mitinda yango, tokokóma bato oyo bakɔmɛli na elimo, oyo balingaka Yehova, mpe oyo “makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesená kokesenisa ná mabe ná malamu.”—Baebre 5:14.
2 Lelo oyo, ezali na ntina mingi tóyeba kosalela mitinda ya Biblia, mpamba te mokili ekómi na makambo kilikili na boye ete, ata soki batyeli biso ebele ya mibeko, ekokoka te kotalela makambo nyonso oyo moto akoki kokutana na yango na bomoi. Tokoki komona likambo yango polele na mayele ya minganga, mingimingi na oyo etali bankisi oyo esalemi na makila mpe mayele mosusu oyo esɛngaka kosalela makila. Bato nyonso oyo balingaka kosepelisa Yehova batyelaka mpenza likambo yango likebi. Nzokande, soki tozali kososola mitinda ya Biblia oyo etaleli likambo yango, tokozwa bikateli oyo ekosalisa biso tózala ntango nyonso na lisosoli ya malamu mpe tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe. (Masese 2:6-11) Tótalela mwa ndambo ya mitinda yango.
BOMOI MPE MAKILA EZALI MOSANTU
3, 4. Ntango nini Biblia elobelaki mpo na mbala ya liboso ete makila ezali mosantu, mpe mitinda nini esimbi likambo yango?
3 Yehova amonisaki mpo na mbala ya liboso ete bomoi ezali na boyokani ná makila mpe ete yango nyonso ezali mosantu, nsima ya liwa ya Abele, oyo ndeko na ye Kaina abomaki ye. Nzambe alobaki na Kaina boye: “Makila ya ndeko na yo ezali kobelela ngai uta na mabele.” (Ebandeli 4:10) Mpo na Yehova, makila ya Abele ezalaki komonisa bomoi na ye, oyo ndeko na ye alongolaki. Na yango, na maloba ya elilingi, makila ya Abele ezalaki kobelela epai ya Nzambe mpo ete asambisa moto oyo abomaki ye.—Baebre 12:24.
4 Nsima ya Mpela ya ntango ya Noa, Nzambe apesaki bato ndingisa ya kolya nyama, kasi basengelaki kolya makila na yango te. Nzambe alobaki boye: “Kaka nde bosengeli kolya mosuni ná molimo [to bomoi] na yango te, elingi koloba makila na yango. Mpe, lisusu, nakosɛnga makila na bino ya milimo [to bomoi] na bino.” (Ebandeli 9:4, 5) Mobeko yango ezalaki mpo na bankɔkɔ nyonso ya Noa, ata mpe biso. Mobeko yango endimisi lisusu maloba ya Nzambe epai ya Kaina, ete makila ezali komonisa bomoi, to molimo, ya ekelamu nyonso. Mobeko yango ezali mpe komonisa ete Yehova, Mopesi-bomoi, akotuna bato nyonso oyo bazali na limemya te mpo na bomoi mpe makila.—Nzembo 36:9.
5, 6. Ndenge nini Mibeko ya Moize emonisaki ete makila ezali mosantu mpe na motuya mingi? (Talá mpe etanda “Tómemya bomoi ya banyama.”)
5 Mibeko ya Moize emonisaki mpe makambo wana mibale. Balevi 17:10, 11 elobi boye: “Moto nyonso . . . oyo alei lolenge nyonso ya makila, nakotɛmɛla mpenza molimo [moto] oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye. Mpo molimo [to bomoi] ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila, mpe ngai moko natye yango likoló ya etumbelo mpo na bino mpo na kozipa masumu . . . na bino, mpamba te makila nde ezipaka masumu mpo molimo [to bomoi] ezali na kati na yango.”a—Talá etanda “Makila ezali na nguya ya kozipa masumu.”
6 Soki babomi nyama kasi makila na yango esalelami na etumbelo te, ezalaki kosopama na mabele. Boye, na ndenge ya elilingi, bomoi ezalaki kozongisama epai ya Nkolo na yango. (Kolimbola Mibeko 12:16; Ezekiele 18:4) Kasi, tósimba ete Nzambe asɛngisaki Bayisraele te ete báluka kosilisa makila na nzoto ya nyama tii na litangá ya nsuka. Soki Moyisraele akati malamu nkingo ya nyama mpe abimisi makila na yango, akoki kolya yango kozanga ete amitungisa, mpamba te asili komonisa limemya oyo esengeli epai ya Mopesi-bomoi.
7. Ndenge nini Davidi amonisaki limemya mpo na makila, oyo ezali eloko ya bosantu?
7 Davidi, ‘moto oyo asepelisaki motema [ya Nzambe]’ akangaki ntina ya mitinda oyo esimbi mobeko ya Nzambe mpo na makila. (Misala 13:22) Mokolo moko, ayokaki mposa makasi ya mai; bato na ye misato bakɔtaki na kaa ya banguna, batokaki mai na libulu, mpe bamemelaki ye yango. Davidi asalaki nini? Atunaki boye: “Nakomɛla nde makila ya mibali oyo bakei kotya milimo [to bomoi] na bango na likama?” Mpo na Davidi, mai wana ezalaki lokola makila ya bato na ye. Yango wana, atako azalaki na mposa ya mai, “asopaki yango mpo na Yehova.”—2 Samwele 23:15-17.
8, 9. Ndenge oyo Nzambe atalelaka bomoi mpe makila ebongwanaki ntango lisangá ya bokristo ebandaki? Limbolá.
8 Nsima ya mbula soki 2 400 kobanda ntango Yehova apesaki Noa mobeko mpe mbula soki 1 500 kobanda ntango asalaki kondimana ya Mibeko, na lisalisi ya elimo santu, lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso ekomelaki masangá ya bakristo boye: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe makila mpe banyama oyo ekamolamá mpe pite.”—Misala 15:28, 29.
9 Tomoni polele ete bandeko oyo bazalaki na lisangani ya mikóló-bakambi na siɛklɛ ya liboso basosolaki ete makila ezali mosantu mpe ete kosalela yango na ndenge oyo ebongi te ezali mabe; ezali kaka lokola kosambela bikeko, kosala pite to ekobo. Lelo oyo, bakristo ya solo mpe batalelaka makambo ndenge wana. Longola yango, lokola batosaka mitinda ya Biblia, bakoki kosepelisa Yehova ntango bazali kozwa bikateli na oyo etali makila.
KOSALELA MAKILA LOKOLA NKISI
Ndenge nini nakoki kolimbola epai ya monganga ekateli na ngai na oyo etali biloko mikemike oyo euti na makila?
10, 11. (a) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kozongisama makila mpe biloko minei ya minene oyo euti na makila? (b) Na makambo nini oyo etali makila bakristo bakoki kozwa bikateli ekeseni?
10 Batatoli ya Yehova bayebaka ete ‘koboya makila’ elimboli mpe koboya kozongisama makila, kondima te ete bábenda bango makila mpo na kozongisa yango epai ya moto mosusu to bábomba yango mpo na nsima bázongisa bango yango lisusu na nzoto. Mpo na kotosa mobeko ya Nzambe, bandimaka mpe te bázongisa bango biloko minei ya minene oyo euti na makila, elingi koloba, globule rouge, globule blanc, plaquette, mpe plasma.
11 Lelo oyo, longwa na biloko ya minene oyo euti na makila, minganga bakómi mpe kobenda biloko mikemike oyo ezali na kati mpe kosalela yango na makambo ndenge na ndenge. Mokristo akoki nde kondima biloko wana ya mikemike? Asengeli nde kotalela yango ete ezali “makila”? Moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye na likambo yango. Ezali mpe bongo mpo na mayele ya minganga oyo babengi hémodialyse, hémodilution, mpe kozongisa na nzoto makila oyo ezali kobima ntango bazali kosala moto lipaso, kozanga ete bábomba yango naino na esika moko.—Talá Apɛndisi, lisolo “Biloko mikemike oyo euti na makila mpe mayele mosusu na ntango ya lipaso.”
12. Ndenge nini tosengeli kotalela makambo oyo etaleli lisosoli ya moto na moto?
12 Yango elingi nde koloba ete makambo oyo etaleli ekateli ya moto na moto ezali na ntina te na miso ya Yehova? Te, mpamba te atyelaka makanisi mpe bamposa na biso likebi mingi. (Tángá Masese 17:3; 24:12.) Yango wana, nsima ya kotalela malamu nkisi to mayele moko mpe kobondela Yehova, tosengeli kosalela lisosoli na biso oyo eteyami. (Baroma 14:2, 22, 23) Nzokande, esengeli te ete bandeko mosusu bátinda biso tósala ndenge oyo bango bakanisi na kotalela lisosoli na bango; tosengeli mpe te kotuna ndeko mosusu ete, “Soki yo nde ozali na esika na ngai, okosala nini?” Na makambo wana, mokristo mokomoko “akomema mokumba na ye moko.”b—Bagalatia 6:5; Baroma 14:12; talá etanda “Namonaka ete makila ezali mosantu?”
MIBEKO YA YEHOVA EMONISAKA ETE AZALI TATA YA BOLINGO
13. Mibeko mpe mitinda ya Yehova emonisaka nini mpo na ye? Pesá ndakisa.
13 Mibeko mpe mitinda ya Biblia emonisaka ete Yehova azali Mopesi-mibeko oyo atondi na bwanya mpe Tata ya bolingo oyo alukaka mpenza bolamu ya bana na ye. (Nzembo 19:7-11) Atako mobeko ya ‘koboya makila’ epesamaki te mpo na kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto, ebatelaka biso na mikakatano mingi oyo ekómelaka bato oyo bazongisamaka makila. (Misala 15:20) Kutu, minganga mingi balobaka ete kosala lipaso kozanga kozongisa makila ezali mayele oyo eleki malamu lelo oyo. Mpo na bakristo ya solo, makanisi yango ezali kaka kondimisa ete Yehova azali na bolingo mpe na bwanya oyo ezangi nsuka.—Tángá Yisaya 55:9; Yoane 14:21, 23.
14, 15. (a) Mibeko nini ya Nzambe emonisaki bolingo na ye mpo na basaleli na ye? (b) Ndenge nini okoki kosalela mitinda oyo esimbi mibeko oyo ezalaki kobatela na makama?
14 Na ntango ya kala, mibeko mingi oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki komonisa ete amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye. Na ndakisa, apesaki Bayisraele mobeko ete bátongaka mwa efelo pembenipembeni ya nsamba ya ndako mpo na kopekisa makama, mpamba te bato bazalaki kosala makambo mingi likoló ya nsamba. (Kolimbola Mibeko 22:8; 1 Samwele 9:25, 26; Nehemia 8:16; Misala 10:9) Lisusu, Nzambe apesaki mobeko ete moto oyo azali na ngɔmbɛ oyo ekoki kozokisa moto, asengeli kokanga yango na lopango. (Kobima 21:28, 29) Moto oyo atosi mibeko yango te azalaki komonisa ete azali na limemya ata moke te mpo na bomoi ya basusu mpe akokaki kokóma na nyongo ya makila.
15 Ndenge nini okoki kosalela mitinda oyo esimbi mibeko yango? Osengeli kotala malamu motuka na yo, ndenge oyo otambwisaka motuka, banyama na yo, ndako na yo, esika na yo ya mosala, mpe masano oyo osepelaka na yango. Na mikili mosusu, bilenge mingi bazali kokufa na makama, mbala mingi mpo bango moko bazali komilukela makama yango. Nzokande, bilenge oyo balingi kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe bazwaka bomoi na motuya mpe basalaka te makambo oyo ekoki kotya bomoi na bango na likama kaka mpo na koyoka esengo. Bakanisaka mpe te ete moto oyo azali elenge akoki kozwa likama te. Nzokande, basepelaka na bolenge na bango na ndenge bakimaka makama.—Mosakoli 11:9, 10.
16. Etinda nini ya Biblia etaleli mpe likambo ya kosopa zemi? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
16 Ata bomoi ya mwana oyo abotami naino te ezali na motuya na miso ya Nzambe. Na Yisraele, soki moto atuti mwasi ya zemi mpe mwasi yango to mwana oyo azali na libumu akufi, Nzambe azalaki kotalela moto yango lokola mobomi, mpe asengelaki kofuta “molimo mpo na molimo.”c (Tángá Kobima 21:22, 23.) Sikoyo, kanisá naino ndenge oyo Yehova ayokaka ntango amonaka ebele ya bazemi ezali kosopama mbula na mbula mpo bato bazali koluka kaka matomba na bango moko mpe balingi bonsomi na makambo etali kosangisa nzoto!
17. Ndenge nini okoki kobɔndisa moto oyo alongolá zemi liboso ayeba mibeko ya Nzambe?
17 Kasi, tokoloba nini mpo na mwasi oyo alongolá zemi liboso ayeba solo ya Biblia? Nzambe akoki nde kolimbisa ye te? Ezali bongo te! Moto oyo abongoli mpenza motema akoki kolikya ete Yehova akolimbisa ye na lisalisi ya makila ya Yesu oyo esopamaki. (Nzembo 103:8-14; Baefese 1:7) Kutu, Kristo ye moko alobaki boye: “Nayei kobenga bayengebene te, kasi basumuki mpo bábongola motema.”—Luka 5:32.
BOYÁ MAKANISI YA MABE
18. Ndenge nini Biblia elobeli ntina monene oyo bato mingi babomaka bazalani na bango?
18 Yehova alingi ete tósuka kaka te na koboya kosala basusu mabe, kasi tólongola mpenza na mitema na biso koyina, ezaleli oyo etindaka na koboma. Ntoma Yoane akomaki boye: “Moto nyonso oyo azali koyina ndeko na ye azali mobomi.” (1 Yoane 3:15) Moto ya ndenge wana asukaka kaka te na koyina ndeko na ye, kasi alingaka ete ndeko na ye akufa ata kokufa. Mpo na komonisa ete azali na likunya mpo na ndeko na ye, atɔngaka ye to akoselaka ye makambo oyo, soki moto asali yango mpenza, Nzambe akopesa ye etumbu. (Balevi 19:16; Kolimbola Mibeko 19:18-21; Matai 5:22) Yango wana, ezali na ntina tósala makasi mpo tólongola na mitema na biso makanisi nyonso ya mabe oyo tokoki kozala na yango!—Yakobo 1:14, 15; 4:1-3.
19. Ndenge nini moto oyo alandaka mitinda ya Biblia atalelaka bavɛrsɛ lokola Nzembo 11:5 mpe Bafilipi 4:8, 9?
19 Bato oyo batalelaka bomoi ndenge oyo Yehova atalelaka yango mpe balingaka kotikala na kati ya bolingo na ye baboyaka mpe makambo nyonso ya mobulu. Nzembo 11:5 elobi boye: ‘[Yehova] ayinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.’ Maloba yango ezali te komonisa kaka ezaleli ya Nzambe; ezali etinda oyo esengeli kotambwisa bomoi na biso. Maloba yango elendisaka bato oyo balingaka Nzambe báboya masano nyonso oyo ekoki kotinda bango bákóma kosepela na makambo ya mobulu. Ndenge moko mpe, likanisi oyo elobi ete Yehova azali “Nzambe ya kimya” elendisaka basaleli na ye bátondisa makanisi mpe mitema na bango na makambo oyo ekoki kolingama, ya malamu, oyo ebongi kosanzolama, mpe oyo etyaka kimya.—Tángá Bafilipi 4:8, 9.
TÓKABWANA NA BIBONGISELI OYO EZALI NA NYONGO YA MAKILA
20-22. Ndenge nini bakristo batalelaka mokili, mpe mpo na nini?
20 Na miso ya Nzambe, mokili mobimba ya Satana ezali na nyongo ya makila. Bibongiseli na yango ya politiki, oyo elobelami na Biblia na elilingi ya banyama mabe, ebomi bamilio na bamilio ya bato, ata mpe basaleli ya Yehova. (Danyele 8:3, 4, 20-22; Emoniseli 13:1, 2, 7, 8) Bibongiseli yango ya politiki ezali kosala na bomoko ná ebongiseli ya mombongo mpe bato ya siansi mpo na kobimisa bibundeli ya nsɔmɔ mpe bazali kozwela yango mbongo mingi. Ya solo mpenza “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe”!—1 Yoane 5:19.
21 Lokola bayekoli ya Yesu bazali “bato ya mokili te” mpe bakɔtaka te na makambo ya politiki mpe na bitumba, mokomoko na bango to bango nyonso lokola lisangá baboyaka nyongo ya makila.d (Yoane 15:19; 17:16) Na ndakisa ya Kristo, basalaka mobulu te ntango bazali konyokola bango. Kutu, balingaka banguna na bango mpe babondelaka mpo na bango.—Matai 5:44; Baroma 12:17-21.
22 Longola nyonso wana, bakristo ya solo baboyaka kosangana na “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, ebongiseli oyo ezali na nyongo ya makila oyo eleki monene. Liloba ya Nzambe elobi ete, “makila ya basakoli mpe ya basantu mpe ya baoyo nyonso babomamaki na mabele emonanaki epai na ye.” Yango wana, Biblia elendisi biso ete: “Bóbima kati na ye, bato na ngai.”—Emoniseli 17:6; 18:2, 4, 24.
23. Kobima na Babilone Monene elimboli nini?
23 Kobima na Babilone Monene elimboli kaka te kosɛnga ete nkombo na biso elongolama na liste ya bandimi ya lingomba moko ya lokuta. Elimboli mpe koyina misala ya mabe oyo mangomba ezali kondima to kolendisa, na ndakisa pite to ekobo, kokɔta na makambo ya politiki, mpe koluka bomɛngo na lokoso. (Tángá Nzembo 97:10; Emoniseli 18:7, 9, 11-17) Mbala mingi makambo yango etindaka na koboma!
24, 25. (a) Na lisalisi ya nini Nzambe akoki kolimbisa moto oyo azali na nyongo ya makila? (b) Yango ekundweli biso ebongiseli nini ya ntango ya kala?
24 Liboso ya koya na losambo ya solo, mokomoko na biso, na lolenge moko to mosusu, apesaki mabɔkɔ na ebongiseli ya Satana mpe na bongo, azwaki nyongo ya makila ata moke. Nzokande, lokola tobongwanaki mpe tondimaki mbeka ya lisiko oyo Kristo apesaki, mpe tomipesaki epai ya Nzambe, Nzambe alimbisi biso mpe azali kobatela biso na elimo. (Misala 3:19) Libateli yango ekundweli biso bingumba ya ekimelo na ntango ya kala.—Mitángo 35:11-15; Kolimbola Mibeko 21:1-9.
25 Makambo ezalaki kosalema ndenge nini? Ntango Moyisraele moko abomi moto na nko te, asengelaki kokima na moko ya bingumba yango. Na nsima, soki bazuzi bataleli likambo na ye, moto yango asengelaki kofanda na engumba wana tii na liwa na nganga-nzambe monene. Na ntango wana nde akokaki kozala na bonsomi ya kofanda na esika oyo alingi. Ebongiseli yango ezali mpenza komonisa motema mawa ya Nzambe mpe motuya oyo apesaka na bomoi ya moto! Lokola bingumba ya ekimelo, mbeka ya lisiko ya Kristo ezali kobatela biso ntango tobuki na nko te mobeko ya Nzambe mpo na bomoi mpe makila. Opesaka motuya na mbeka yango? Ndenge nini okoki komonisa yango? Lolenge moko oyo okoki komonisa yango ezali na kobenga bato mosusu mpo bándima kobatelama na Nzambe, mingimingi lokola ‘bolɔzi monene’ ekómi pene.—Matai 24:21; 2 Bakorinti 6:1, 2.
SAKOLÁKÁ BOKONZI MPO NA KOMONISA ETE OPESAKA BOMOI MOTUYA
26-28. Na ndenge nini bomoi na biso ekokani na oyo ya mosakoli Ezekiele, mpe ndenge nini tokoki kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe?
26 Lelo oyo, bomoi ya basaleli ya Nzambe ezali lokola oyo ya mosakoli Ezekiele, moto oyo Yehova atindaki mpo na kozala lokola sinzili mpo na ndako ya Yisraele. Nzambe alobaki na ye boye: “Osengeli koyoka liloba na monɔkɔ na ngai mpe kokebisa bango mpo na ngai.” Soki Ezekiele akokisaki mokumba yango te, alingaki kozwa nyongo ya makila ya bato oyo bakufaki ntango Yerusaleme ebomamaki. (Ezekiele 33:7-9) Kasi, Ezekiele atosaki mpe azwaki nyongo ya makila te.
27 Lelo oyo, nsuka ya mokili mobimba ya Satana ekómi mpenza pene. Yango wana, Batatoli ya Yehova bazali komona ete bazali na mokumba mpe na libaku malamu ya kosakola nsango ya Bokonzi mpe kosakola ‘mokolo Nzambe akozongisa mabe.’ (Yisaya 61:2; Matai 24:14) Omipesaka na mosala yango? Ntoma Paulo azwaki mokumba na ye ya kosakola na lisɛki te. Yango wana, alobaki ete: “Nazali pɛto na makila ya bato nyonso, mpo namipekisaki te koyebisa bino mokano mobimba ya Nzambe.” (Misala 20:26, 27) Yango ezali mpenza ndakisa malamu mpo na biso!
28 Nzokande, mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kotalela bomoi mpe makila ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Kasi, ndenge tokomona yango na mokapo oyo elandi, tosengeli mpe komibatela pɛto na miso na ye.
a Mpo na maloba ya Nzambe ete, “molimo [to bomoi] ya ekelamu ya mosuni ezali na kati ya makila,” zulunalo moko (Scientific American) elobi boye: “Maloba yango ezali solo ata soki totiki ndimbola ya elilingi mpe totaleli yango ndenge kaka elobami: lolenge nyonso ya selile ya makila ezali na ntina mpo na bomoi.”
b Talá Lamuká! ya Yanuali–Marsi 2007, nkasa 3-12, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
c Balimboli ya maloba ya Biblia balobaka ete ndenge maloba yango ekomami na Liebele, “tokoki soki moke te kokanisa ete ekosalelama kaka soki mwasi nde akufi.” Tósimba mpe ete Biblia elobi te ete etumbu ya Yehova ezalaki kotalela soki zemi ezali ya sanza boni.
d Talá Mokapo 5, “Ndenge oyo tosengeli kokabwana na mokili.”
e Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Apɛndisi, lisolo “Biloko mikemike oyo euti na makila mpe mayele mosusu na ntango ya lipaso.”