Loyembo 122
Bamiriade ya bandeko
Ya Papye
1. Bamiriade ya bandeko,
Baza’ mpenza mingi,
Moko na moko sembo,
Baza’ Batatoli.
Tozali bamiriade,
Limpinga monene,
Na bikólo mpe na minɔkɔ,
Tókumisa Nzambe.
2. Bamiriade ya bandeko,
Toza’ kosakola
‘Nsango malamu moko,’
Ebongi koyoka.
Ata mikakatano,
Tósakola kaka,
Yesu abɔndisaka biso;
Apesaka kimya;
3. Bamiriade ya bandeko,
Nzambe az’otala,
Tobatelami mpenza,
Ye nde tósalela.
Tozali bamiriade,
Tóyebisa nsango,
Tokómi baninga ya Nzambe,
Bato na ye seko.
(Talá mpe Yis. 52:7; Mat. 11:29; Em. 7:15.)