MOKAPO 8
Nzambe alingaka bopɛto
“Epai ya moto oyo azali pɛto, okomimonisa pɛto.”—NZEMBO 18:26.
1-3. (a) Mpo na nini mama alingaka ete mwana na ye azala pɛto? (b) Mpo na nini Yehova alingaka ete basambeli na ye bázala pɛto, mpe nini etindaka biso tómibatela pɛto?
MWASI moko azali kobongisa mwana na ye oyo alingi kobima. Asukoli ye nzoto mpe na nsima, alatisi ye bilamba oyo ezali pɛto. Ayebi ete bopɛto ezali na ntina mingi mpo mwana azala nzoto kolɔngɔnɔ. Ayebi mpe ete ndenge oyo mwana azali komonana na miso ya bato ekoki kopesa baboti na ye lokumu to kofingisa bango.
2 Yehova, Tata na biso ya likoló, alingaka ete basaleli na ye bázala pɛto. Liloba na ye elobi boye: “Epai ya moto oyo azali pɛto, okomimonisa pɛto.”a (Nzembo 18:26) Yehova alingaka biso; ayebi ete bopɛto ezali mpo na bolamu na biso. Alingi mpe ete lokola tozali Batatoli na ye, bato bápesa ye lokumu ntango bazali komona biso. Ya solo, soki tozali pɛto mpe tozali na etamboli ya malamu, tokopesa Yehova mpe nkombo na ye mosantu nkembo, kasi tokofingisa ye te.—Ezekiele 36:22; tángá 1 Petro 2:12.
3 Koyeba ete Nzambe alingaka bato ya pɛto elendisaka biso tózala ntango nyonso pɛto. Tozalaka na mposa ete bomoi na biso epesa ye nkembo mpo tolingaka ye. Tolingaka mpe kotikala na kati ya bolingo na ye. Yango wana, tótalela ntina oyo tosengeli kozala pɛto, soki kozala pɛto esɛngi makambo nini, mpe ndenge oyo tokoki komibatela pɛto. Boyekoli yango ekoki kosalisa biso tóyeba bisika oyo tosengeli kobongisa.
MPO NA NINI ESENGELI TÓZALAKA PƐTO?
4, 5. (a) Wapi ntina ya liboso oyo tosengeli kozala pɛto? (b) Ndenge nini biloko oyo Yehova akelá emonisaka ete alingaka bopɛto?
4 Yehova atambwisaka biso mpe na ndakisa oyo apesaka biso. Yango wana, Liloba na ye ezali kolendisa biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ (Baefese 5:1) Ntina ya liboso oyo tosengeli kozala pɛto ezali oyo: Yehova, Nzambe na biso, azali pɛto mpe mosantu na makambo nyonso.—Tángá Balevi 11:44, 45.
5 Bopɛto ya Yehova, ndenge moko na bizaleli mpe misala na ye mingi, emonanaka na biloko oyo akelá. (Baroma 1:20) Nzambe abongisaki mabele mpo ezala esika ya pɛto oyo bato basengeli kofanda. Yehova abongisaki makambo na boye ete mopɛpɛ mpe mai epɛtolamaka. Bikelamu mosusu ya mikemike, oyo emonanaka kutu na miso te, ebongolaka bosɔtɔ mpo ezala na mikrobɛ te. Bato ya siansi bazali kosalela mwa bikelamu yango mpo na kolimwisa petrole to mazuti oyo esopani na mbu to mpo na kopɛtola bisika mosusu oyo bato ya lokoso mpe ya moimi bazali kobebisa. Tomoni mpenza ete bopɛto ezali na ntina mingi na miso ya “Mokeli ya mabele.” (Yirimia 10:12) Esengeli mpe kozala na ntina mpo na biso.
6, 7. Ndenge nini Mibeko ya Moize ezalaki kobɛta nsɛtɛ ete basambeli ya Yehova basengeli kozala pɛto?
6 Ntina mosusu oyo tosengeli kozala pɛto ezali ete Yehova, Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, asɛngaka ete basambeli na ye bázala pɛto. Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisraele emonisi ete tosengeli kozala pɛto mpo Nzambe andima losambo na biso. Mibeko elobaki ete na Mokolo ya Kozipa masumu, nganga-nzambe monene asengelaki kosukola mbala mibale. (Balevi 16:4, 23, 24) Ntango banganga-nzambe bazalaki kosala mosala na bango na tempelo, basengelaki kosukola mabɔkɔ mpe makolo na bango liboso ya kopesa Yehova bambeka. (Kobima 30:17-21; 2 Ntango 4:6) Mibeko elobelaki bantina soki 70 oyo ekokaki kosala ete moto azala pɛto te na nzoto to mpo na kopesa losambo. Ntango Moyisraele azali mbindo, akokaki te kosangana na milulu ya losambo; kutu, kozanga kotosa mobeko yango ekokaki komemela ye etumbu ya liwa. (Balevi 15:31) Moto oyo aboyi kolanda milulu ya komipɛtola, oyo ezalaki mpe kosɛnga kosukola nzoto mpe bilamba, asengelaki ‘kolongolama na kati ya lisangá.’—Mitángo 19:17-20.
7 Atako Nzambe azali kosengisa biso te ete tótosa Mibeko ya Moize, mibeko yango ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo atalelaka bopɛto. Ezali polele ete Mibeko ezalaki kobɛta nsɛtɛ ete basambeli ya Nzambe basengeli kozala pɛto. Yehova abongwani te. (Malaki 3:6) Nzambe akondima losambo na biso kaka soki ezali “pɛto mpe ezali na mbindo te.” (Yakobo 1:27) Yango wana, tosengeli koyeba oyo azali kosɛnga biso na likambo etali bopɛto.
KOZALA PƐTO NA MISO YA YEHOVA ELIMBOLI NINI?
8. Yehova alingaka tózala pɛto na makambo nini?
8 Na Biblia, kozala pɛto elimboli kaka te kozala mbindo te na nzoto. Kozala pɛto na miso ya Nzambe etaleli makambo nyonso ya bomoi na biso. Yehova alingaka tózala pɛto na makambo minei oyo: na elimo, na bizaleli, na makanisi, mpe na nzoto. Tiká tótalela oyo likambo mokomoko ezali kosɛnga.
9, 10. Kozala pɛto na elimo elimboli nini, mpe bakristo ya solo baboyaka makambo nini?
9 Bopɛto ya elimo. Na mokuse, kozala pɛto na elimo elimboli koboya kosangisa losambo ya solo ná losambo ya lokuta. Ntango Bayisraele babimaki na Babilone mpo na kozonga na Yerusaleme, basengelaki kolanda elendiseli oyo: “Bóbima kuna, bósimba eloko moko ya mbindo te; . . . bómibatela pɛto.” (Yisaya 52:11) Bayisraele bazongaki na ekólo na bango libosoliboso mpo na kozongisa losambo ya Yehova. Losambo yango esengelaki kozala pɛto, elingi koloba esengelaki kobebisama te na mateya, milulu, mpe mimeseno oyo ekumisaka Nzambe te, oyo ezalaki na losambo ya Babilone.
10 Lelo oyo, biso bakristo ya solo tosengeli kokeba ete makambo oyo euti na losambo ya lokuta ebebisa biso te. (Tángá 1 Bakorinti 10:21.) Tosengeli mpenza kozala ekɛngɛ mpamba te, mokili etondi na makambo oyo euti na losambo ya lokuta. Na mikili mingi, mimeseno ndenge na ndenge mpe milulu oyo bato basalaka ezali na boyokani ná losambo ya lokuta; na ndakisa, liteya oyo elobaka ete ntango moto akufi, eloko moko kati na ye etikalaka na bomoi. (Mosakoli 9:5, 6, 10) Bakristo ya solo basanganaka te na mimeseno oyo euti na mateya ya lokuta.b Tosengeli kotika nzela te ete bato mosusu bátinda biso na makasi ete tókakola mitinda ya Biblia mpo na losambo ya pɛto.—Misala 5:29.
11. Kozala pɛto na bizaleli elimboli nini, mpe mpo na nini ezali na ntina tózala pɛto na bizaleli?
11 Bopɛto ya bizaleli. Kozala pɛto na bizaleli elimboli mpe koboya pite, ekobo mpe misala nyonso ya mbindo. (Tángá Baefese 5:5.) Ezali na ntina mingi tómibatela pɛto na bizaleli. Ndenge tokomona yango na mokapo oyo elandi, mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli ‘kokima pite’ to ekobo. Bato ya pite oyo baboyi kobongola motema “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Bakorinti 6:9, 10, 18) Na miso ya Nzambe, bato wana bazali na kati ya baoyo bazali na “bosɔtɔ mpe na mbindo.” Soki bamipɛtoli te, “likabo na bango ekozala . . . liwa ya mibale.”—Emoniseli 21:8.
12, 13. Boyokani nini ezali kati na makanisi mpe misala, mpe ndenge nini tokoki kobatela makanisi na biso pɛto?
12 Bopɛto ya makanisi. Makanisi ya moto nde etindaka ye asala makambo. Soki tozali kotika nzela ete makanisi ya mabe ezwa esika na bɔɔngɔ mpe na mitema na biso, nsukansuka tokosala makambo ya mabe. (Matai 5:28; 15:18-20) Kasi, soki tozali kokɔtisa makanisi ya pɛto na bɔɔngɔ na biso, yango ekolendisa biso tózala ntango nyonso na etamboli ya pɛto. (Tángá Bafilipi 4:8.) Ndenge nini tokoki kobatela bopɛto ya makanisi? Ya liboso, tosengeli koboya masano oyo ekoki kobebisa makanisi na biso.c Longola yango, tosengeli mbala na mbala koyekolaka Liloba ya Nzambe mpo tókɔtisa makanisi ya pɛto na bɔɔngɔ na biso.—Nzembo 19:8, 9.
13 Mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, ezali na ntina mingi tózala pɛto na elimo, na bizaleli, mpe na makanisi. Mitindo wana ya bopɛto elobelami na molai na mikapo mosusu ya buku oyo. Sikoyo, tólobela lolenge ya minei ya bopɛto—bopɛto ya nzoto.
NDENGE NINI TOKOKI KOBATELA NZOTO NA BISO PƐTO?
14. Mpo na nini bopɛto ya nzoto ezali te likambo oyo etali kaka moto ye moko?
14 Kozala pɛto na nzoto elimboli kotika yango mbindo te mpe kobatela biloko na biso pɛto. Tokoki nde koloba ete bopɛto ya nzoto ezali likambo oyo etali kaka moto ye moko? Ezali bongo te mpo na basambeli ya Yehova. Ndenge tolobaki yango liboso, bopɛto ya nzoto na biso ezali na ntina mingi na miso ya Yehova; ezali bongo kaka te mpo na bolamu na biso, kasi mpe mpo ete yango epesaka ye lokumu. Kanisá lisusu ndakisa oyo tolobelaki na ebandeli. Soki omonaka mwana moko oyo azalaka ntango nyonso salite, na ntembe te okobanda komituna soki baboti na ye bazali ndenge nini. Esengeli te ete ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato to etamboli na biso efingisa Tata na biso ya likoló to ekitisa lokumu ya nsango oyo tosakolaka. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo bázwa likambo ya koloba mpo na mosala na biso te; kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe.” (2 Bakorinti 6:3, 4) Na yango, ndenge nini tokoki kobatela nzoto na biso pɛto?
15, 16. Kobatela nzoto pɛto esɛngi makambo nini, mpe bilamba na biso esengeli kozala ndenge nini?
15 Bopɛto ya nzoto mpe ya bilamba na biso. Atako batu ya mboka na mboka bazali na mimeseno na bango mpe bisika oyo bato bafandaka ekeseni, mingi kati na biso tozalaka na makoki ya kosomba mwa sabuni mpe kozwa mai ya kosukola mbala na mbala mpo biso moko mpe bana na biso tózala pɛto. Kobatela nzoto pɛto esɛngaka kosukola mabɔkɔ na sabuni liboso ya kolya to ya kosimba bilei, nsima ya kouta na zongo, mpe nsima ya kosukola to kobongisa mwana. Kosukola mabɔkɔ na sabuni ekoki kobatela biso na bamaladi, ata mpe kobikisa bomoi na biso. Ekoki kopekisa ete bamikrobɛ oyo epesaka maladi ya pulupulu epalangana. Na bisika oyo baterase mpo na kolekisa mai ya salite ezali te, tokoki kokunda bosɔtɔ, ndenge ezalaki kosalema na Yisraele ya kala.—Kolimbola Mibeko 23:12, 13.
16 Esengeli mpe tósukolaka bilamba na biso mbala na mbala mpo ezala pɛto. Mokristo asengeli kaka te kolata elamba ya ntalo to modɛlɛ ya sika; kasi elamba na ye esengeli kozala pɛto, asengeli kongoma yango malamu, esengeli mpe kozala mindɔndɔ te. (Tángá 1 Timote 2:9, 10.) Ezala na esika nini oyo tozali, esengeli ete ndenge oyo tozali komonana na miso ya bato ‘ekembisa mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe.’—Tito 2:10.
17. Mpo na nini tosengeli kobongisa malamu ndako mpe biloko na biso mpe kobatela yango pɛto?
17 Ndako na biso mpe biloko na biso. Ata soki ndako na biso ezali na biloko ya ntalo te, tosengeli kobongisa yango malamu mpe kobatela yango pɛto na ndenge oyo makoki na biso ezali kopesa nzela. Soki mpe tozali na motuka oyo tosalelaka mpo na kokende na makita to na mosala ya kosakola, tosengeli kosala makasi ete tóbatelaka yango pɛto, na libándá mpe na kati. Tosengeli kobosana te ete soki ndako mpe biloko na biso mosusu ezali pɛto, yango ekopesa litatoli ya malamu. Kutu, toteyaka bato ete Yehova azali Nzambe ya pɛto, ete ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabele,’ mpe ete mosika te, Bokonzi na ye ekobongola mabele mobimba paradiso. (Emoniseli 11:18; Luka 23:43) Yango wana, esengeli ete banda sikoyo, ndako na biso mpe biloko na biso emonisaka ete tosalaka makasi tózala pɛto, na ndenge oyo ebongi na bato oyo bakofanda na mokili ya sika.
Kozala pɛto na nzoto elimboli kotika yango mbindo te mpe kobatela biloko na biso pɛto
18. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na limemya mpo na Ndako ya Bokonzi?
18 Esika na biso ya losambo. Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tózala na limemya mpo na Ndako ya Bokonzi, esika oyo losambo ya solo esalemaka na engumba to na kartye na biso. Tosengeli kobongisa Ndako na biso ya Bokonzi mpo ete, ntango moto moko ya sika ayei koyangana na biso, asepela na esika na biso ya makita. Tosengeli kosukolaka Ndako ya Bokonzi mbala na mbala mpe kobongisa eloko nyonso oyo ebebi mpo emonanaka ntango nyonso malamu. Tokomonisa ete tomemyaka Ndako ya Bokonzi soki tozali kosala nyonso oyo ekoki mpo ezala ntango nyonso malamu. Tosengeli komonaka ete kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosukola mpe “kobamba mpe kobongisa ndako” ezali libaku malamu. (2 Ntango 34:10) Tosengeli mpe kosala makambo yango na Ndako ya Mayangani to na esika mosusu nyonso oyo tosalaka mayangani.
TÓBOYA MIMESENO OYO EBEBISAKA NZOTO
19. Makambo nini tosengeli koboya mpo na kobatela nzoto na biso pɛto, mpe ndenge nini Biblia esalisaka biso na likambo yango?
19 Mpo na kobatela nzoto na biso pɛto, tosengeli koboya mimeseno oyo ebebisaka nzoto, na ndakisa komɛla likaya, kolangwa masanga, mpe komɛla nkisi mosusu oyo epesaka kwiti to ebebisaka makanisi. Biblia etángi te mimeseno nyonso ya mbindo oyo epalangani na mokili lelo oyo; kasi ezali na mitinda oyo esalisaka biso tóyeba ndenge oyo Yehova atalelaka mimeseno yango. Lokola toyebi ndenge oyo Yehova atalelaka mimeseno yango, bolingo na biso mpo na ye etindaka biso tósala makambo oyo esepelisaka ye. Tiká tótalela mitinda mitano ya Biblia.
20, 21. Yehova alingi tóboya misala ya ndenge nini, mpe wapi ntina monene oyo tosengeli kosala yango?
20 “Lokola tozali na bilaka wana, bandeko ya bolingo, tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo, tómonisaka ete tozali kobanga Nzambe mpo bosantu na biso ekóma ya kokoka.” (2 Bakorinti 7:1) Yehova alingi ete tóboya mimeseno nyonso oyo ekoki kobebisa biso nzoto mpe elimo, elingi koloba makanisi na biso. Yango wana, tosengeli koboya mimeseno oyo ekómisaka moto moombo mpe ebebisaka nzoto mpe makanisi.
21 Biblia emonisi ntina moko ya malamu mingi oyo tosengeli ‘komipɛtola na mbindo nyonso.’ Tósimba ete 2 Bakorinti 7:1 ebandi na maloba oyo: “Lokola tozali na bilaka wana.” Bilaka nini? Bavɛrsɛ oyo ezali liboso emonisi ete Yehova alaki boye: “Ngai nakoyamba bino. Mpe nakozala tata na bino.” (2 Bakorinti 6:17, 18) Kanisá naino: Yehova alaki kobatela yo, kokokisa bamposa na yo, mpe kolinga yo ndenge tata asalaka mpo na mwana na ye. Kasi, Yehova akokokisa bilaka yango kaka soki oboyi kobebisa ‘mosuni mpe elimo.’ Yango wana, ekozala bozoba mpenza otika ete momeseno moko oyo ebebisaka nzoto epekisa yo ozala na boyokani ya ndenge wana ná Yehova!
22-25. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tóboya mimeseno ya mabe?
22 “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.” (Matai 22:37) Yesu alobaki ete yango nde mobeko oyo eleki monene. (Matai 22:38) Ebongi mpenza tólinga Yehova ndenge wana. Mpo na kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makanisi na biso nyonso, tosengeli koboya mimeseno oyo ekoki komemela biso liwa ya mobesu to kobebisa makoki na biso ya kokanisa, likabo ya malamu mingi oyo Nzambe apesá biso.
23 “[Yehova] apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:24, 25) Bomoi ezali likabo ya Nzambe. Lokola tolingaka Mopesi, tosengeli mpe komemya likabo na ye. Tosengeli kokima mimeseno nyonso oyo ebebisaka nzoto, mpo toyebi ete mimeseno yango emonisaka mpenza kozanga limemya mpo na bomoi.—Nzembo 36:9.
24 “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Mbala mingi, mimeseno ya mabe ebebisaka ata mpe bato mosusu oyo bazali pembeni ya moto oyo amipesaka na yango. Na ndakisa, soki moto oyo amɛlaka likaya te azali komɛla milinga ya likaya oyo moto mosusu azali komɛla, ekoki mpe kobebisa nzoto na ye. Moto oyo azali kosala mabe epai ya baoyo bazali zingazinga na ye, azali kobuka mobeko ya Nzambe oyo elobi ete tólinga mozalani na biso. Soki alobaka ete alingaka Nzambe, misala na ye emonisaka ete abukaka lokuta.—1 Yoane 4:20, 21.
25 ‘Bóyokela mpe bótosa baguvɛrnema mpe bakonzi.’ (Tito 3:1) Na mikili mingi, mibeko ya Leta epekisi komɛla bangi, ata mpe kozala na yango. Lokola tozali bakristo ya solo, tosengeli te komɛla bangi to kozala na yango.—Baroma 13:1.
26. (a) Tosengeli kosala nini mpo tótikala na kati ya bolingo ya Nzambe? (b) Mpo na nini kozala ntango nyonso pɛto na miso ya Nzambe ezali bomoi oyo eleki malamu?
26 Mpo na kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe, tosengeli kozala pɛto na makambo nyonso. Kotika mimeseno ya mabe ezalaka pɛtɛɛ te, kasi tokoki kolonga kosala yango.d Bomoi moko te ezali malamu koleka bomoi ya ndenge wana, mpamba te Yehova ateyaka biso ntango nyonso mpo na bolamu na biso. (Tángá Yisaya 48:17.) Likambo eleki ntina ezali ete soki tozali ntango nyonso pɛto, tokozala na esengo ya koyeba ete tozali kosepelisa Nzambe na biso, mpe na ndenge yango tokotikala na kati ya bolingo na ye.
a Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “pɛto” esalelamaka mpo na kolobela bopɛto ya nzoto kaka te, kasi mpe bopɛto ya elimo mpe ya makanisi.
d Talá bitanda “Nasalaka milende mpo na kosala oyo ezali malamu?” mpe “Mpo na Nzambe makambo nyonso ekoki kosalema.”
e Topesi ye nkombo mosusu.