Loyembo 31
Tozali Batatoli ya Yehova!
1. Bato baboyi Nzambe,
Baponi bikeko nde.
Yah aleki nyonso,
Kozanga ntembe.
Banzambe ya lokuta
Bakoki te komona.
Tomonaka bango se mpamba,
Mpo baza’ biloko mpamba.
(MONDIMO)
Batatoli’a Yehova,
Tóbanga te koloba.
Yehova alobaka solo;
Akokisaka nyonso.
2. Tóteya nkombo’a Nzambe,
Tótatola mpo na ye.
Nsango ya Bokonzi,
Tótik’ango te.
Mpo basusu bámona
Sol’oy’esikolaka.
Bakosangisa mpe mingongo,
Mpo tókumisa y’elongo.
(MONDIMO)
Batatoli’a Yehova,
Tóbanga te koloba.
Yehova alobaka solo;
Akokisaka nyonso.
3. Kotatola nkombo’a Yah,
Eza’ na ntina mpenza.
Ekebisi bato,
Mabe bátika.
Mpe soki babongwani,
Bakozwa bolimbisi.
Kotatol’epesak’esengo,
Mp’eliky’a bomoi ya seko.
(MONDIMO)
Batatoli’a Yehova,
Tóbanga te koloba.
Yehova alobaka solo;
Akokisaka nyonso.
(Talá mpe Yis. 37:19; 55:11; Ezk. 3:19.)