Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/10 nk. 1-2
  • Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Tókangama na mosala ya kobuka mbuma!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Tósala mosala ya kobuka mbuma na esengo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mosala ya kosakola​​—“Bilanga . . . eteli mpo na bobuki mbuma”
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Omipesa mobimba na mosala monene ya kobuka mbuma
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 11/10 nk. 1-2

Bilanga eteli mpo na kobuka mbuma

1. Mosala nini ya ntina ezali kosalema lelo oyo?

1 Nsima ya kopesa mwasi moko Mosamaria litatoli, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoa. 4:35, 36) Mosala ya kobuka mbuma na elimo esilaki kobanda, mpe Yesu azalaki komona liboso ndenge mosala yango ekopalangana mokili mobimba. Atako Yesu azali sikoyo na likoló, azali kaka kotambwisa mosala ya kobuka mbuma. (Mat. 28:19, 20) Makambo nini emonisi ete mosala yango ezali se kokola, awa ekómi pene na nsuka?

2. Makambo nini emonisi ete mosala ya kobuka mbuma na mokili mobimba ezali se kokola?

2 Mosala ya kobuka mbuma na mokili mobimba: Na mobu ya mosala 2009, motángo ya basakoli na mokili mobimba emataki (3,2%) koleka na mbula eleki. Na mikili oyo mosala ya kosakola epekisami, motángo ya basakoli emataki mingi (14%) koleka na mbula eleki. Motángo ya bato oyo bazalaki koyekola Biblia sanza na sanza elekaki 7 619 000​—motángo yango eleki motángo ya basakoli nyonso ya mokili mpe eleki motángo ya bayekoli ya Biblia ya mbula eleki na 500 000. Lokola mosala ezali kokola mbangu na bisika mingi, bandeko oyo bazali kosɛnga bákɔta na Eteyelo ya Gileadi mpo bákóma bamisionɛrɛ bazali se kobakisama. Bateritware ya minɔkɔ ya bapaya ezali kobota mbuma ebele na bamboka mingi. Awa mosala ya kobuka mbuma ekómi pene na nsuka, emonani polele ete Yehova azali kokolisa yango mbangu. (Yis. 60:22) Otalelaka “bilanga” ya teritware na bino na ndenge ya malamu?

3. Bandeko mosusu bakanisaka nini mpo na mosala ya kobuka mbuma na teritware na bango?

3 Mosala ya kobuka mbuma na teritware na bino: Bandeko mosusu bakoki koloba boye: “Teritware na biso ebotaka mpenza mbuma te.” Ezali solo ete bateritware mosusu emonanaka ete mbuma ebotaka mingi te lokola na bisika mosusu to mbuma ezali lisusu mingi te ndenge ezalaki kala. Yango wana, Batatoli mosusu na bateritware yango bakoki kokanisa ete basilisá kobuka mbuma pene na nyonso, mpe mosala nyonso oyo batikali na yango ezali se ya kolɔkɔta mwa mbuma mokomoko oyo etikali. Ezali mpenza bongo?

4. Wapi lolenge malamu ya kotalela mosala na biso, mpe mpo na nini?

4 Bandá ebandeli tii nsuka na yango, mosala ya kobuka mbuma ezalaka ntango ya mosala makasi. Talá ndenge oyo maloba ya Yesu emonisi ete tosengeli kosala na lombangu: “Mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Yehova, Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma, atɛlisaka mbuma na esika mpe na ntango oyo aponi. (Yoa. 6:44; 1 Ko. 3:6-8) Mokumba na biso ezali nini? Biblia eyanoli: “Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te.” (Mos. 11:4-6) Ya solo, awa mosala ya kobuka mbuma ekómi pene na nsuka, oyo ezali ntango ya kopemisa lobɔkɔ te!

5. Mpo na nini tosengeli kokoba kosakola na molende ata na teritware oyo tomonaka ete ebotaka mbuma te?

5 Tókoba kobuka mbuma: Ata soki litatoli epesamaka mbala na mbala na teritware na biso mpe tomonaka ete bato basepelaka mpenza te, ezali kaka na ntina tósakola na molende mpe na lombangu. (2 Tim. 4:2) Yikiyiki oyo ezali na mokili ezali kotinda bato bábongwana mpe bákanisa lisusu mingi makambo oyo ekoyela bango na mikolo ezali koya. Ntango bilenge bazali kokola, mbala mosusu bakoki kobanda koluka libateli mpe kimya ya makanisi. Mpo na bato mosusu, milende na biso nde ekoki kokamwisa bango. Ya solo, baoyo bazalaki liboso koboya koyoka biso, bakoki kondima koyoka na mikolo ezali koya. Ata bato oyo baboyaka na nko koyoka nsango na biso basengeli mpe koyoka likebisi.​—Ezek. 2:4, 5; 3:19.

6. Nini ekosalisa biso tókoba kopesa litatoli na molende, ata soki mosala ya kosakola ezali mpasi na teritware biso?

6 Nini ekosalisa biso tókoba kopesa litatoli na molende, ata soki mosala ya kosakola ezali mpasi na teritware na biso? Longola mosala ya ndako na ndako, tokoki mpe kosakola na lolenge mosusu, na ndakisa na bamagazini mpe bazando to kopesa litatoli na telefone. To, tokoki kobongola ndenge ya kobanda lisolo mpo tózalaka na lolenge ya sika ya kosolola na bato. Tokoki kobongola programɛ na biso mpo na kobima na mosala ya kosakola na mpokwa to na bangonga mosusu oyo toyebi ete bato bakoki kozala na ndako. Ntango mosusu tokoki koyekola monɔkɔ mosusu mpo tókoka kosakola nsango malamu epai ya bato mingi koleka. Tokoki mpe kosala mingi na mosala ya kosakola soki tokómi babongisi-nzela ya sanza na sanza. To mpe tokoki kokende kofanda na esika oyo babuki-mbuma bazali mingi te. Soki totalelaka mosala ya kobuka mbuma na ndenge ya malamu, tokosala nyonso oyo tokoki mpo tópesa mabɔkɔ na mosala yango ya ntina mingi.

7. Tii ntango nini tosengeli kokoba na mosala ya kobuka mbuma?

7 Basali-bilanga bazalaka na ntango mingi te mpo na kobuka mbuma, yango wana bapemaka te mpe balɛmbisaka mabɔkɔ te tii ntango mosala yango ekosila. Mosala ya kobuka mbuma na elimo esengeli mpe kosalema na lombangu ndenge wana. Tii ntango nini tosengeli kokoba na mosala ya kobuka mbuma? Tii na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” mpe tii na “nsuka.” (Mat. 24:14; 28:20) Na ndakisa ya Mosaleli ya Yehova ya libosoliboso, tolingi kosilisa mosala oyo Yehova apesá biso. (Yoa. 4:34; 17:14) Yango wana, tiká ete tókoba kokokisa mosala na biso na molende, na esengo mpe na makanisi malamu tii na nsuka. (Mat. 24:13) Mosala ya kobuka mbuma ezali naino!

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 2]

Bandá ebandeli tii nsuka na yango, mosala ya kobuka mbuma ezalaka ntango ya mosala makasi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto