Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/11 nk. 3-6
  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Bibengeli ya sika
  • Maloba, bankombo oyo euti na minɔkɔ mosusu mpe mitángo
  • Eyokani na mateya ya Biblia
  • Elobeli ya mikolo oyo
  • Makambo mosusu ya malamu oyo ezali na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Zongelá lisusu boyekoli na yo ya Biblia
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 5/11 nk. 3-6

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika

1. Likambo nini ya monene esalemaki na teritware na biso na mobu 2009?

1 Kobimisama ya libongoli ya sika ya Biblia oyo ebongolami malamu ezalaka mpenza likambo monene mpo na Batatoli ya Yehova. Tosepelaki mingi ntango tozwaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na liyangani ya etúká 2009.

2, 3. Mpo na nini esengelaki kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika?

2 Ekoki kozala ete, ntango kaka tozwaki Biblia yango, tofungolaki yango mbala moko mpo na kotala bavɛrsɛ oyo tosepelaka na yango mingi. Mbala mosusu tokamwaki na komona ete ndenge babongolaki maloba mosusu ekeseni na oyo tomesanaki kosalela banda bambula ebele!

3 Liboso mpenza, tosengeli komituna boye: Mpo na nini esengelaki kobimisa Libongoli ya Mokili ya Sika? Mpamba te ezali mpenza na ntina ete basaleli ya Yehova bázala na libongoli moko ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe. Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli elobeli ya pɛtɛɛ, ya polele, mpe oyo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango. Ya solo, ezala bato oyo batánga kelasi mingi te, to mpe bana mike, bakoki kotánga yango mpe kokanga ntina na yango. Tózwa na ndakisa Matai 25:46. Moto nyonso oyo atángi vɛrsɛ yango na Libongoli ya Mokili ya Sika akomona polele nini ekokómela bato oyo bazali lokola bampate mpe nini ekokómela baoyo bazali lokola bantaba, oyo Yesu alobelaki na lisese na ye: libebi to liwa ya seko mpo na bantaba; mpe bomoi ya seko mpo na bampate.

Bibengeli ya sika

4, 5. Mbongwana nini omoni na Libongoli ya Mokili ya Sika na oyo etali bankombo ya mikanda ya Biblia mpe bisika oyo Biblia elobeli?

4 Na ntembe te osili komona ete bibengeli mosusu ebongwani, mpe mbongwana yango etaleli makambo misato. Ya liboso, bankombo ya mikanda mosusu ya Biblia ebongwani. Yango wana, Genese ekómi Ebandeli; Exode ekómi Kobima; Levitike ekómi Balevi; Mituya ekómi Mitángo; Deteronome ekómi Kolimbola Mibeko; Luta ekómi Ruta; 1 mpe 2 Mikonzi ekómi 1 mpe 2 Bakonzi; Ezela ekómi Ezera; Esetele ekómi Estere; Yilimia ekómi Yirimia; Amosa ekómi Amose; Zekalia ekómi Zekaria; Malako ekómi Marko; Baloma ekómi Baroma; 1 mpe 2 Bakolinti ekómi 1 mpe 2 Bakorinti; Filemona ekómi Filemo; Baebele ekómi Baebre; 1 mpe 2 Petelo ekómi 1 mpe 2 Petro. Tóyeba ete liloba “Ebandeli” ebongoli malamu ndimbola ya liloba “Genese” oyo elimboli “ebandeli to kobotama.” “Kobima” elimboli “kolongwa na esika moko mpe kokende na esika mosusu,” mpe yango eyokani na ndenge Bayisraele babimaki na Ezipito. Nkombo “Kolimbola Mibeko” ebongolami malamu na esika ya Deteronome, mpamba te liloba yango elimboli nde kolimbola mibeko, ndenge Kolimbola Mibeko 1:5 emonisi yango. Bankombo ya mikanda mosusu ya Biblia ezali na mwa ndimbola moke na maloba na nse ya lokasa mpo na komonisa ndenge mokanda yango ebengamaka na mabongoli mosusu ya Biblia.

5 Longola yango, bankombo ya bisika mosusu oyo Biblia elobeli ekomami ndenge mosusu mpo na koyokanisa yango na ebengeli ya mikolo oyo. Yango wana, omonaka maloba lokola: “Yerusaleme, Yisraele, Yordani, Nazarete, Galile, Libá, Siri, Asiri.”

6. Mpo na nini tokoki koloba ete nkombo “Yehova” eyebani malamu na minɔkɔ oyo elobamaka na teritware na biso?

6 Mpo na nini kosalela nkombo “Yehova” na esika ya “Yawe”? Ndenge oyo tobengaka bankombo oyo ezali na Biblia ekeseni mwa moke na ndenge oyo bazalaki kobenga yango na minɔkɔ oyo bakomaki Biblia. Kasi yango ezali mabe te, mpo bankombo yango ekɔtá na elobeli na biso mpe bato bamesená na yango. Tokoki mpe koloba bongo mpo na nkombo Yehova. Libongoli ya Mokili ya Sika ezali Biblia ya liboso te ya Lingala oyo esaleli nkombo yango. Babiblia mosusu ya Lingala, na ndakisa “Biblia na Ngala, Uele 1960” mpe “La Sainte Bible na Ngala, Uele 1963” esaleli nkombo yango na Kobima 6:2, 3, 6-8, na Nzembo 83:18, mpe na Yisaya 49:14. Likambo mosusu ya kosepelisa ezali ete minɔkɔ mosusu ya République Démocratique du Congo esaleli nkombo “Yehova” na mabongoli na bango. Biblia na monɔkɔ ya Chokwe mpe ya Lugbara esaleli nkombo “Yehova” na bisika mingi. Longola yango, Biblia na Swahili ya Congo esaleli nkombo yango na bavɛrsɛ mosusu.

7. Lolaka nini ekɔti na Libongoli ya Mokili ya Sika?

7 Lokola maloba mingi ya Lingala ezali kobongwana mpe bato bakómi kosalela maloba oyo euti na minɔkɔ mosusu, lolaka (son) oyo ekɔti na Lingala: “r” (Kora, levire); “sh” (basheiki, shambrɛ), “rsh” (Arshipe), “rg” (Argobe, Nergale), “rt” (Artemisi, porte), “rj” (ɔrje), “st” (Estere, Wɛsti). Lolaka mosusu ekoki kozala mpasi mpo na balobi mosusu ya Lingala. Kasi, yango ebongoli te ndimbola ya maloba yango.

Maloba, bankombo oyo euti na minɔkɔ mosusu mpe mitángo

8, 9. Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli maloba oyo euti na minɔkɔ mosusu mpe ndenge nini mitángo ekomami?

8 Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli mpe maloba mosusu oyo euti na minɔkɔ mosusu, oyo Lingala esalelaka mpo na kosalisa moto atánga malamu. Yango wana omonaka mpe maloba mosusu oyo euti na Lifalanse lokola oyo: porte, dalɛ, marto, kartɛ, martinɛ, guvɛrnɛrɛ, shambrɛ, fololo lísi, shevreye, bishe, serfe, urse. Nzokande, maloba mosusu euti na minɔkɔ lokola Ebre ná Grɛki; na ndakisa: shekele, hini, Zerete, efa mpe bongo na bongo. Kosala bongo esalisi biso tósalela te bankombo ya Lingala mpo na biloko to makambo oyo Biblia elobeli kasi ezali epai na biso te.

9 Mitángo ekomami na ndenge mibale na Libongoli ya Mokili ya Sika. Lolenge ya liboso, ekomami mpenza na Lingala, na nsima etyami na baparanteze mpo na kosalisa motángi oyo ayebi mitángo na Lingala te ayeba yango. Tózwa na ndakisa Mitángo 2:31: “Bato nyonso oyo bakomisamaki nkombo na kaa ya Dani bazali nkóto nkama moko na ntuku mitano na nsambo na nkama motoba (157 600).” Kosala bongo ekosalisa bato báyekola kotánga mitángo na Lingala.

Eyokani na mateya ya Biblia

10. Maloba nini tokómi kosalela sikoyo na esika ya liloba “mbɔndi”?

10 Kozipa masumu: Moko ya mbongwana oyo ozali kosepela na yango ntango ozali kosalisa moto oyo asepeli na solo akanga ntina ya Makomami ezali oyo tozali kotánga na Baroma 3:25. Na Libongoli ya Mokili ya Sika, vɛrsɛ yango elobi boye: “Nzambe akabaki ye azala likabo ya kozipa masumu na nzela ya kondima na makila na ye.” Na boumeli ya bambula ebele tozalaki kosalela liloba “mbɔndi” mpo na kolobela “kozipa masumu.” Liloba “mbɔndi” elimboli kozipa masumu kasi bato mingi oyo balobaka Lingala bayebi yango te. Nzokande, maloba “kozipa masumu” ezali polele mpe ezali kosɛnga ndimbola mosusu te.

11. Mpo na nini maloba oyo Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli na esika ya “kopakola,” “mopakolami,” mpe “bapakolami na elimo” ezali ya sikisiki?

11 Kotya mafuta, kotyama mafuta, bato oyo batyami mafuta: Osili mpe komona ete liloba “mopakolami” ebongwani. Nzembo 2:2 elobi boye: “Bakonzi ya mabele bazali kotɛlɛma mpe bankumu bayangani lokola moto moko mpo na kotɛmɛla Yehova mpe kotɛmɛla moto na ye oyo atyami mafuta.” Lisusu, Nzembo 105:15 elobi boye: “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.” Maloba “kotya mafuta” elimboli na bosikisiki mpenza maloba oyo Ebre mpe Grɛki esaleli, koleka verbe “kopakola.” Buku Étude perspicace (Vol. 2 lok. 436 par. 1) elobi boye: “Biblia esalelaka mbala mingi liloba ya Ebre soukh mpe liloba ya Grɛki aléïphô mpo na kolobela kopakola mafuta. (Dan. 10:3; Ruta 3:3; Yoa. 11:2) Kasi mpo na kolobela kotyama mafuta, Biblia esalelaka liloba ya Ebre mashahò, oyo ebimisá mashiahò (Masiya), mpe liloba ya Grɛki khriô, oyo ebimisá khristos (Kristo). (Kob. 30:30; Lev. 4:5; Luka 4:18; Mis. 4:26) Bokeseni wana emonanaka mbala ebele, ezala na Ebre to na Grɛki.” Mabongoli mosusu ya Biblia na Lingala ebongoli maloba wana nyonso na liloba moko “kopakola mafuta.” Kasi, Libongoli ya Mokili ya Sika emonisi bokeseni yango polele. Ezali mpe na bavɛrsɛ mosusu oyo emonisi likambo yango, na ndakisa Misala 10:38 oyo elobi ete Nzambe atyaki Yesu mafuta na elimo santu mpe 2 Bakorinti 1:21, 22, oyo emonisi ete Nzambe atye bato mosusu mafuta na elimo santu.

12. Maloba nini Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli na esika ya “ebele monene” na Emoniseli 7:9?

12 Ebele mpenza ya bato: Tozali kotánga boye na Emoniseli 7:9: “Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga.” Na boumeli ya bambula mingi tozalaki kosalela maloba “ebele monene” oyo ezali na Biblia haut fleuve. Lelo oyo, bato balobaka lisusu bongo te. Yango wana Libongoli ya Mokili ya Sika eponi kosalela maloba “ebele mpenza ya bato.”

Elobeli ya mikolo oyo

13-16. (a) Maloba nini mpe elobeli nini ebongwani, mpe mpo na nini? (b) Na botángi na yo moko, omonaki mbongwana mosusu ya minene na maloba oyo baponi kosalela?

13 Tolongolaki maloba oyo eyebani malamu te to oyo bato basalelaka yango mikolo oyo te mpe totyaki maloba oyo bato bameseni kosalela. Na yango, Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli te maloba “epemami na elimo ya Nzambe,” kasi esaleli nde maloba oyo ebimisi mpenza likanisi yango polele: ‘etambwisami na elimo ya Nzambe,’ ‘euti na Nzambe,’ ‘elimo ya Nzambe elobi,’ mpe bongo na bongo.​—2 Tim. 3:16.

14 Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala esaleli te liloba ‘makoló’; na esika na yango, esaleli nde liloba ‘likoló.’ Na esika ya maloba “lola na likoló,” esaleli maloba “mosika kuna na likoló.” (Talá Nzembo 148:4.) To mpo bato bázwa mobulu te na makanisi, na bisika mosusu basaleli liloba “lola.”​—Yir. 31:37; Mis. 2:5.

15 Lisusu, maloba shéol mpe hadès ebongolami kaka na liloba Nkunda, oyo ezali na elembo oyo etindi na maloba na nse ya lokasa oyo etindi biso na Apɛndisi 4. Misala 2:31 elobi boye: “Amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa ya Kristo, ete asundolamaki na kati ya Nkunda te mpe nzoto na ye epɔlaki te.”

16 Liloba “kosantisa” oyo elimboli kokómisa mosantu (mpe maloba mosusu oyo eyokani na yango) eyebani mingi mpe ezali polele koleka liloba “kobulisa.” Matai 6:9 elobi boye: “Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.’” Soki okobi kotánga Biblia yango, okomona makambo mosusu ya malamu.

Makambo mosusu ya malamu oyo ezali na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika

17. Maloba na nse ya lokasa oyo ezali na Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na ntina nini?

17 Likambo mosusu ya malamu ezali maloba na nse ya lokasa oyo Libongoli ya Mokili ya Sika etye. Ezali kosalisa batángi bákanga ntina ya maloba mosusu ya Biblia. Na bisika mosusu maloba na nse ya lokasa etye liloba mosusu oyo ezali na ndimbola moko na liloba oyo ezali na elembo, to etindi biso na baapɛndisi oyo elimboli maloba mosusu.

18. Pesá mwa bandakisa mpo na kolimbola ntina oyo maloba na nse ya lokasa na Libongoli ya Mokili ya Sika ezali mpenza kosalisa.

18 Tótalela mwa bandakisa. Na 2 Samwele 22:6, Libongoli ya Mokili ya Sika esaleli liloba “Nkunda” na esika ya shéol. Pene na liloba “Nkunda” ezali na elembo mpo na komonisa ete esengeli kotala maloba na nse ya lokasa. Maloba yango ezali kotinda na Apɛndisi 4 oyo ezali na lokasa 1961, epai motángi akokuta ndimbola mosusu mpo na liloba shéol. Na 2 Bakorinti 5:20, pene na liloba “ntoma” ezali na elembo oyo etindi na maloba na nse ya lokasa oyo esaleli liloba ‘ambasadɛrɛ.’ Liloba yango euti na Lifalanse mpe ekokani na liloba “ntoma” oyo ezali na vɛrsɛ yango; maloba yango na nse ya lokasa epesi mpe ndimbola ya liloba ambasadɛrɛ. Ndenge kaka “moombo ya sembo mpe ya mayele” alimbolaka yango mbala na mbala, baambasadɛrɛ yango bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo basakolaka Bokonzi ya Nzambe elongo na baninga na bango, ebele mpenza ya bato oyo bazali batindami. Ezali mpe ndenge moko na elembo oyo ezali na 2 Bakorinti 6:4, oyo etindi na maloba na nse ya lokasa oyo esaleli liloba “ministre” oyo euti na Lifalanse. (Talá mpe Kobima 24:13.) Elembo oyo ezali na liloba “mokɔngɔ” na Basambisi 8:30, oyo etindi na maloba na nse ya lokasa emonisi ete liloba ya Ebre oyo basalelaki na vɛrsɛ yango elimboli “ebɛlo,” mpe elimboli eloko oyo babengi ebɛlo na esika yango. Maloba mosusu na nse ya lokasa epesi ndimbola ya maloba mosusu ya Ebre. Tózwa mwa bandakisa: Elembo oyo ezali na Kobima 28:41 etindi biso na maloba na nse ya lokasa oyo emonisi soki ‘kotondisa lobɔkɔ na nguya’ elimboli nini. Elembo oyo ezali na 1 Samwele 15:23 etindi biso na maloba na nse ya lokasa oyo elimboli liloba ‘baterafime’ oyo basaleli na Ebre, kasi na Lingala ebongolami na ‘bikeko.’ Elembo oyo ezali na 1 Samwele 16:14 etindi biso na maloba na nse ya lokasa oyo elimboli soki elimo ya mabe oyo eutaki na Yehova mpe ezalaki kopesa Mokonzi Saulo nsɔmɔ ezalaki nini.

19. Makambo nini mosusu ya malamu ezali na kati ya Libongoli ya Mokili ya Sika?

19 Baapɛndisi oyo ezali na Libongoli ya Mokili ya Sika esalisi biso tóyeba maloba oyo bazalaki kosalela na Yisraele ya kala mpo na kolobela manaka ya basali bilanga, mbongo, kilo, bimekeli, mpe basanza. Apɛndisi 11 elobeli bilamba ya nganga-nzambe monene, mpe Apɛndisi 12 elimboli ndenge tempelo ya Salomo ezalaki. Lokasa 1849 epesi ndimbola ya elembo mokomoko oyo basaleli na maloba na nse ya lokasa. Na ndakisa, “Lil” elimboli “liloba yango mpenzampenza,” “Msl” elimboli “maloba na nse ya lokasa.”

Zongelá lisusu boyekoli na yo ya Biblia

20-22. (a) Mpo na nini Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na ntina, mingimingi mpo na Batatoli ya Yehova? (b) Mokano nini omityeli mpo na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika?

20 Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na elobeli ya polele, oyo ezali mpasi te mpo na kokanga ntina na yango, mpe ezali kopesa moto mposa ya kotánga yango. Okoki komona yango yo moko na bavɛrsɛ ndenge na ndenge, mingimingi na bandakisa mpe masese ya Yesu, lokola oyo ezali na Matai 13:24-30, oyo ekomami na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ezali kobenda likebi ya motángi.

21 Maloba mingi ebongwani, kasi tokoki kolobela yango nyonso awa te. Na litambwisi ya Komite ya Bakomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, milende esalemaki mpo na kobimisa libongoli moko ya malamu ya Biblia, oyo elandi na bosembo nyonso maloba oyo ezali na Biblia ya Lingelesi, na monɔkɔ ya Ebre mpe ya Grɛki. Koluka koyeba makambo oyo ezali na Libongoli ya Mokili ya Sika ekotinda yo otánga Biblia na “mposa makasi ya mabɛlɛ oyo ezali na liloba ya Nzambe, oyo basangisi na eloko te.”​—1 Pe. 2:2.

22 Bayekoli ya Biblia oyo balingi koyeba Liloba ya Nzambe mpe kosalela yango bakoki kotyela Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika motema, mpo ezali kosalisa bato nyonso báyoka liloba yango, na ndenge ebongoli malamu makanisi ya Nzambe, na elobeli ya pɛtɛɛ mpe oyo bato bayebi malamu. (2 Tim. 3:16) Bandeko mibali mpe basi oyo bamonaka malamu te bazali lelo oyo na esengo ya kotánga Biblia mokolo na mokolo na lisalisi ya Libongoli ya Mokili ya Sika ya makomi minene (bi8-LI). Na ntembe te, libongoli yango ekosalisa bampate ya Nzambe, oyo balobaka Lingala, básepela lisusu mingi na Liloba ya Nzambe. Sombá ntango mpo na kotánga mpe komanyola Liloba ya Nzambe.​—Em. 1:3.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Na litambwisi ya Komite ya Bakomi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, milende esalemaki mpo na kobimisa libongoli moko ya malamu ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto