Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 115-lok. 123
  • Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokonzi
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto alobi​—
  • Bisakweli oyo ekokokisama mosika te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bokonzi oyo “bokobebisama soko moke te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 115-lok. 123

Bokonzi

Ndimbola: Bokonzi ya Nzambe emonisaka boyangeli ya Yehova likoló ya bikelamu na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba, to eloko oyo azali kosalela mpo na koyangela. Liloba yango esalelamaka mingimingi mpo na kolobela boyangeli ya Nzambe na nzela ya guvɛrnema oyo Mwana na ye, Yesu Kristo azali kokamba. Liloba “Bokonzi” ekoki komonisa boyangeli ya moto oyo atyami mafuta mpo azala mokonzi, ekoki mpe komonisa teritware moko awa na mabele, oyo eyangelami na guvɛrnema ya likoló.

Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza guvɛrnema ya solo?

To ezali nde na kati ya mitema ya bato?

Luka 17:21, hf: “Bakoloba mpe te ete, Talá yango oyo! soko ete, Yango wana! mpo ete Bokonzi ezali kati na bino [LL elobi mpe bongo; kasi BSN elobi “na kati na bino”; LNz elobi “o ntei ya bino”; NW elobi “na katikati na bino”].” (Ndenge tomoni yango, na vɛrsɛ 20, Yesu azalaki koloba na Bafarisai, oyo amonisaki polele ete bazali bakosi; yango wana, akokaki lisusu koloba te ete Bokonzi ezali na mitema na bango. Kasi alingaki nde koloba ete Kristo, oyo azali mokonzi na Bokonzi yango azalaki na katikati na bango. Yango wana Biblia The Emphatic Diaglott elobi: “Moto ya lokumu na bokonzi ya Nzambe azali kati na bino.”)

Biblia elobi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema?

Yis. 9:6, 7, hf: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; bokonzi [LNz, LL elobi mpe bongo; “boyangeli,” JB, NE, NW] ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobiangama ete, Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimia. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimia ikosuka te.”

Banani bakoyangela na Bokonzi yango?

Em. 15:3: “Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko, banzela na yo ezali boyengebene mpe solo.”

Dan. 7:13, 14: “Moto moko lokola mwana ya moto [Yesu Kristo; talá Marko 14:61, 62] azalaki koya na mapata ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo [Yehova Nzambe], mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana. Mpe bapesaki ye [Yesu Kristo] boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye.”

Em. 5:9, 10: “[Yesu Kristo], obomamaki mpe na makila na yo osombelaki Nzambe bato na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso, mpe okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.” (Emoniseli 14:1-3 elobi ete bato oyo “basombamaki na mabele” mpo na koyangela elongo na Mwana-Mpate na Ngomba Siona ya likoló bazali 144 000.)

Bokonzi yango ekosala baguvɛrnema ya bato nini?

Dan. 2:44: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Nz. 2:8, 9: “Sɛngá ngai, napesa yo bikólo mpo ezala libula na yo mpe mabele tii na bansuka na yango ezala ya yo. Okobuka bango na lingenda ya bokonzi ya ebende, okobukabuka bango lokola mbɛki ya moyemi-mbɛki.”

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Ekosantisa nkombo ya Yehova mpe ekotombola boyangeli na ye

Mat. 6:9, 10: “Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya.’” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete koya ya Bokonzi ya Nzambe nde ekosantisa nkombo na ye.)

Ezk. 38:23: “Nakomitombola mpenza mpe nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.” (Nsɔni oyo babwakelaki nkombo ya Nzambe ekolongwa; nkombo yango ekosantisama mpe ekokumisama, mpe bato nyonso oyo bazali na bomoi bakondima komitya na ngámbo ya boyangeli ya Yehova mpe bakosepela kosala mokano na ye. Mpo kimya mpe bolamu ezala na molɔ́ngɔ́ mobimba, nkombo ya Yehova esengeli kosantisama.)

Ekosukisa boyangeli ya Satana

Em. 20:2, 3: “[Mokonzi ya likoló, Yesu Kristo] asimbaki dragɔ, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula nkóto moko (1 000). Mpe abwakaki ye na libulu mozindo mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka. Nsima ya makambo wana bakofungola ye mwa ntango moke.” (Na yango, bato bakosikolama na makambo mabe ya Satana oyo esali ete bato oyo balingaka bosembo bámona mpasi. Makanisi ya Satana oyo etindaka bato básala makambo ya mabe koleka mpe makanisi ya bademo oyo etindaka bato mingi bázala na bobangi ekozala lisusu te.)

Ekosala ete bikelamu nyonso básambela Nzambe ya solo kaka moko

Em. 5:13; 15:3, 4: “Mpe nayokaki bikelamu nyonso oyo ezali na likoló mpe na mabele mpe na nse ya mabele mpe na mbu, mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, ezali koloba ete: ‘Na Oyo afandi na kiti ya bokonzi [Yehova Nzambe] mpe na Mwana-Mpate [Yesu Kristo] lipamboli mpe lokumu mpe nkembo mpe nguya ezala libela na libela.’” “Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko, banzela na yo ezali boyengebene mpe solo. Nani akobanga mpenza yo te, Yehova, mpe akopesa nkombo na yo nkembo te, mpo kaka yo moko nde ozali sembo? Mpo bikólo nyonso bakoya kosambela liboso na yo, mpo boyengebene ya mibeko na yo emonani polele.”

Ekozongisa boyokani malamu kati na bato ná Nzambe

Rom. 8:19-21: “Biloko oyo ezalisamá [bato] ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe [ntango baoyo bakosekwa mpo na kozala elongo na Kristo na likoló bakobanda koyangela]. Mpo biloko oyo ezalisamá ekómisamaki eloko mpamba, na ndenge na yango moko te kasi mpo na moto oyo akómisaki yango bongo, mpo na elikya ete biloko oyo ezalisamá [bato mingi] ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”

Ekosilisa bitumba na mokili

Nz. 46:8, 9: “Bóya, bótala misala ya Yehova, ndenge atye makambo ya kokamwisa na mabele. Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.”

Yis. 2:4: “Bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti. Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.”

Ekolongola na mabele bakonzi ya mabe, oyo banyokolaka bato

Nz. 110:5: “Yehova ye moko, na lobɔkɔ na yo ya mobali, akobukabuka mpenza bakonzi na mokolo ya nkanda na ye.”

Nz. 72:12-14: “[Masiya Mokonzi oyo Yehova atye] akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa, mpe akobikisa milimo ya babola. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe na mobulu, mpe makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”

Ekopesa bato nyonso biloko ya kolya ebele

Nz. 72:16: “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.”

Yis. 25:6: “Ya solo, na ngomba oyo [na Ngomba Siona ya likoló, elingi koloba mboka-mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, bibongiseli ekozwama mpo na bato nyonso oyo bakoyangelama na Bokonzi yango awa na mabele], Yehova ya mampinga akosalela bato ya bikólo nyonso fɛti moko ya bilei ya mafuta mpenza, fɛti ya vinyo oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, ya bilei ya mafuta mpenza, oyo etondi na mafuta ya mikuwa, ya vinyo oyo eumelá, oyo mbɔtɔ elalá na nse, oyo bakɔngɔlá.”

Ekolongola maladi ya ndenge nyonso

Luka 7:22; 9:11: “Bókende koyebisa Yoane oyo bomoni mpe oyo boyoki: bato oyo bakufá miso bazali komona, batɛngumi bazali kotambola, bato ya maba bazali kopɛtolama mpe bato oyo bakufá matoi bazali koyoka, bakufi bazali kolamuka, nsango malamu ezali koyebisama epai ya babola.” “[Yesu Kristo] ayambaki bango na boboto mpe abandaki kolobela bango makambo oyo etali bokonzi ya Nzambe, mpe abikisaki baoyo bazalaki na mposa ya kobikisama.” (Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete ntango akozala Mokonzi na likoló akosilisa maladi ya ndenge nyonso.)

Ekopesa moto nyonso ndako ya malamu

Yis. 65:21, 22: “Ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te.”

Ekopesa moto nyonso mosala ya malamu

Yis. 65:23: “Bakoboma nzoto mpamba te, mpe bakobota mpo na kotungisama te; mpo bazali bana oyo bazali lisangá ya bato oyo Yehova apamboli, bango ná bakitani na bango.”

Ekotya kimya mpe ekobatela bato ná biloko na bango

Mika 4:4: “Bakofanda mpenza, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, mpe moto ata moko te akozala mpo na kolɛngisa bango; mpo monɔkɔ mpenza ya Yehova ya mampinga elobi yango.”

Nz. 37:10, 11: “Etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”

Ekotya boyengebene mpe bosembo bisika nyonso

2 Pe. 3:13: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.”

Yis. 11:3-5: “[Mokonzi Masiya] akosambisa te na kolanda kaka oyo ekomonana na miso na ye, mpe akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki. Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá, mpe akopamela na kolongobana mpo na bolamu ya bato ya komikitisa oyo bazali na mabele. . . . Mpe boyengebene ekozala mpenza mokaba ya loketo na ye, mpe bosembo ekozala mokaba ya bangɛi na ye.”

Ekobatela bato bázwama te na makama oyo euti na nguya ya biloko oyo ezalisamá

Mrk. 4:37-41: “Nzokande mopɛpɛ moko ya makasi mpe ya nsɔmɔ mpenza ebɛtaki, mpe mbonge ezalaki komibwaka na masuwa, bongo masuwa etikalaki moke etonda na mai. . . . Na yango [Yesu] atɛlɛmaki mpe apamelaki mopɛpɛ mpe alobaki na mbu ete: ‘Shiii! Fandá nyɛɛ!’ Mpe mopɛpɛ ekitaki, mpe kimya moko monene ekɔtaki. . . . Kasi kobanga moko ya nsɔmɔ ekangaki bango, mpe bazalaki kolobana bango na bango ete: ‘Oyo azali mpenza nani, mpo ata mopɛpɛ ná mbu etosa ye?’” (Na ndenge yango, Kristo amonisaki ete ntango akozala Mokonzi na likoló, akosalela nguya na ye mpo na kopekisa makama oyo eutaka na nguya ya biloko oyo ezalisamá.)

Ekosekwisa bato oyo bakufá

Yoa. 5:28, 29: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [mongongo ya Kristo Mokonzi] mpe bakobima.”

Em. 20:12: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango [makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango; talá Baroma 6:7].”

Ekolongola liwa oyo eutá na lisumu ya Adama

Yis. 25:8: “Akolongola mpenza liwa mpo na libela, mpe Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso Yehova akopangwisa mpenza mpisoli na bilongi nyonso.”

Em. 21:4: “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

Ekokómisa mokili esika oyo bato bakolingana mpenza

Yoa. 13:35: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai [baoyo bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi ya likoló to baoyo bakoyangelama na Bokonzi yango awa na mabele], soki bozali na bolingo na kati na bino.”

Ekozongisa kimya kati na bato ná banyama

Yis. 11:6-9: “Na ntango mosusu, mbwa ya zamba ekofanda elongo na mwana-mpate, mpe nkoi ekolala esika moko na mwana-ntaba, mpe mwana-ngɔmbɛ ná mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki ná nyama oyo eleisami malamu, yango nyonso esika moko; mpe mwana moke ya mobali akokamba yango. Mpe ngɔmbɛ ya mwasi ná urse ekolya esika moko; bana na bango bakolala esika moko. Mpe nkɔsi ekolya matiti ya kokauka lokola ngɔmbɛ-mobali. Mpe mwana oyo azali naino komɛla mabɛlɛ akosakana mpenza na libulu ya kobra; mpe mwana oyo bakilisi mabɛlɛ akotya lobɔkɔ na lidusu oyo ekɔtisaka pole na libulu ya nyoka ya ngɛngɛ. Bakosala eloko moko te ya mabe mpe bakobebisa eloko moko te na ngomba mosantu na ngai mobimba.” (Talá mpe Yisaya 65:25.)

Hos. 2:18: “Mpo na bango, na mokolo wana, nakosala mpenza kondimana ná nyama ya zamba oyo efandaka na esobe mpe ekelamu oyo epumbwaka na likoló ná nyama oyo ebendanaka na libumu, . . . mpe nakolalisa bango na kimya.”

Ekokómisa mabele oyo paradiso

Luka 23:43: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.”

Nz. 98:7-9: “Mbu enguluma lokola nkake mpe biloko oyo etondi kuna, mabele oyo ebotaka mpe baoyo bazali kofanda na yango. Bibale mpenza ebɛta mabɔkɔ; bangomba nyonso elongo eganga na esengo liboso ya Yehova, mpo ayei kosambisa mabele. Na boyengebene, akosambisa mabele oyo ebotaka mpe na bosembo, bato ya bikólo.”

Talá Ebandeli 1:28; 2:15; Yisaya 55:11.

Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela?

Na siɛklɛ ya liboso?

Kol. 1:1, 2, 13: “Paulo, ntoma ya Kristo Yesu na mokano ya Nzambe, mpe Timote ndeko na biso, epai ya basantu [baoyo basengelaki kozwa libula ya Bokonzi ya likoló] . . . [Nzambe] asikoli biso na nguya ya molili mpe akɔtisi biso [basantu, elingi koloba bakristo ya lisangá] na bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye.” (Na yango, Kristo abandaki mpenza koyangela lisangá ya bokristo na siɛklɛ ya liboso, liboso ete vɛrsɛ oyo ekomama, kasi na ntango wana Bokonzi na ye ebandaki naino koyangela mabele mobimba te.)

1 Ko. 4:8: “Bino bosili kotonda, boye te? Bosili kokóma bato ya bomɛngo, boye te? Bobandi koyangela bino moko, biso tozali te? Mpe nakosepela kutu ete bóbanda koyangela, mpo biso mpe tóyangela elongo na bino.” (Emonani polele ete ntoma Paulo apamelaki bango mpo bazalaki na makanisi malamu te.)

Em. 12:10, 12: “Sikoyo lobiko, ná nguya, ná bokonzi ya Nzambe na biso, ná bokonzi ya Kristo na ye eyei, mpo mofundi ya bandeko na biso abwakami na nse, ye moto afundaka bango butu moi liboso ya Nzambe na biso! Yango wana bósepela, bino likoló mpe bino baoyo bofandi na likoló! Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” (Satana abwakamaki awa na mabele nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na likoló. Abwakamaki te ntango botomboki ebimaki na Edene, ndenge Yobo mokapo 1 mpe 2 emonisi yango. Mokanda ya Emoniseli ekomamaki na mobu 96 T.B., mpe Emoniseli 1:1 emonisi ete mokanda yango ezali kolobela makambo oyo ekosalema nsima.)

Bato nyonso ya mokili basengeli naino kobongwana liboso ete Bokonzi ya Nzambe eya?

Nz. 110:1, 2: “Liloba oyo Yehova alobi na Nkolo na ngai [Yesu Kristo] yango oyo: ‘Fandá na lobɔkɔ na ngai ya mobali tii nakotya banguna na yo lokola ebonga ya makolo na yo.’ Uta na Siona, Yehova akotinda lingenda ya makasi na yo na maloba oyo: ‘Kende kotya bato na nse ya bokonzi na yo na katikati ya banguna na yo.’” (Na yango, ntango Yesu akobanda koyangela, banguna bakozala; bato nyonso te nde bakondima bokonzi na ye.)

Mat. 25:31-46: “Ntango Mwana ya moto [Yesu Kristo] akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. . . . Mpe bango [bato oyo bamoniselaki bandeko ya Yesu bolingo te, bandeko yango nde bakristo oyo batyami mafuta na elimo] bakokufa liwa ya seko, kasi bayengebene bakozwa bomoi ya seko.” (Ezali komonana polele ete ezali bato nyonso te nde bakobongwana liboso Kristo azwa bokonzi; ezali bato nyonso te nde bakozala bayengebene.)

Biblia eyebisi ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela?

Talá nkasa 41-43, na motó ya likambo “Badati,” mpe nkasa 359-364, na motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”

Soki moto alobi​—

‘Ekoya nsima ya liwa na ngai’

Okoki koyanola: ‘Kasi ezali na bato oyo bakozala na bomoi ntango yango ekoya, boye te? . . . Moto akoki koyeba soki bato ya ntango na ye nde bakomona likambo yango? Bantoma ya Yesu balukaki koyeba yango, mpe eyano oyo apesaki bango ezali na ntina mpenza mpo na biso lelo oyo. (Mat. 24:3-14)’

To okoki koloba: ‘Bato mingi bakanisaka bongo. Kasi, na lisalisi ya Biblia, Batatoli ya Yehova bandimaka mpenza ete Bokonzi ya Nzambe esili kobanda koyangela na likoló mpe mokomoko na biso asengeli kopona soki alingi kotikala awa na mabele na nse ya guvɛrnema ya sembo ya Nzambe to te. Yango wana nayei kotala yo lelo. Talá oyo Biblia elobi na Matai 24:14.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto