Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • be lok. 56-lok. 61 par. 3
  • Kolisá makoki na yo ya koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kolisá makoki na yo ya koteya
  • Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tyelá Yehova motema
  • Kumisá Yehova
  • “Yebá kokesenisa”
  • Lendisá bato oyo bazali koyoka bákanisa
  • Salá makasi osimba motema
  • Monisá ndenge ya kosalela mateya yango
  • Zalá ndakisa malamu
  • Yekola koteya
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kosala makasi mpo na kosimba mitema
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Teyá na mayele mpe yebá kondimisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • ‘Omibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
be lok. 56-lok. 61 par. 3

Kolisá makoki na yo ya koteya

MOKANO nini ozali na yango na likambo etali koteya? Soki outi kokóma mosakoli, na ntembe te, ozali na mposa ya koyeba ndenge ya kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpamba te Yesu apesaki bayekoli na ye mokumba ya kokómisa bato bayekoli. (Mat. 28:19, 20) Soki oumelá na mosala yango, mbala mosusu mokano na yo ezali ete oyeba mpenza kosimba mitema ya bato oyo olingi kosalisa. Soki ozali moboti, na ntembe te, olingi kozala moteyi oyo akoki kolendisa bana na ye ete bámipesa na Nzambe. (3 Yoa. 4) Soki ozali nkulutu to ozali koluka kokóma nkulutu, mbala mosusu olingi kozala molobi oyo akoki kolendisa bato oyo bazali koyoka yo ete bálinga mpenza Yehova mpe banzela na ye. Ndenge nini okoki kokokisa mikano yango?

Zwá liteya na ndakisa ya Yesu Klisto, Moteyi Monene. (Luka 6:40) Ezala ntango Yesu azalaki koteya bato ebele likoló ya ngomba to ntango azalaki koteya bato moke oyo bazalaki kotambola na ye na nzela, makambo oyo azalaki koyebisa bango mpe lolenge oyo azalaki koloba esimbaki mpenza mitema na bango mpe etikalaki na makanisi na bango. Yesu alendisaki mpenza makanisi mpe mitema ya bato oyo bazalaki koyoka ye, amonisaki bango makambo oyo basengeli kosala mpe bakangaki ntina na yango. Yo mpe okoki kosala bongo?

Tyelá Yehova motema

Yesu azalaki koteya malamu mpenza mpamba te azalaki na boyokani malamu mpenza na Tata na ye ya likoló mpe Nzambe apambolaki ye, apesaki ye elimo na Ye. Obondelaka makasi ete Yehova asalisa yo oyeba mpenza kotambwisa boyekoli ya Biblia malamu? Soki ozali moboti, obondelaka ntango nyonso ete Nzambe atambwisa yo ntango ozali koteya bana na yo? Obondelaka na motema na yo mobimba ntango ozali komibongisa mpo na kosala masukulu to mpo na kotambwisa makita? Soki ozali kotyela Yehova motema boye, yango ekosalisa yo okóma mpenza moteyi malamu.

Tokomonisa ete tozali kotyela Yehova motema soki tozali mpe kokangama na Biblia, Liloba na ye. Na libondeli oyo asalaki na mpokwa ya nsuka ya bomoi na ye lokola moto ya kokoka, Yesu alobaki na Tata na ye boye: “Napesi bango liloba na yo.” (Yoa. 17:14) Atako Yesu ayebaki makambo mingi, azalaki kobimisa makanisi na ye moko te. Azalaki ntango nyonso koloba makambo oyo Tata na ye ateyaki ye, na yango, atikeli biso ndakisa oyo tosengeli kolanda. (Yoa. 12:49, 50) Liloba ya Nzambe, ndenge ezali na Biblia, ezali na nguya ya kobongola bato, kobongola misala na bango, makanisi na bango mpe mitema na bango. (Ebe. 4:12) Ntango okoyeba makambo mingi na Liloba ya Nzambe mpe okoyeba kosalela yango malamu na mosala ya kosakola, okokóma mpenza koteya na lolenge oyo ekobenda bato epai ya Nzambe.​—2 Tim. 3:16, 17.

Kumisá Yehova

Kozala moteyi oyo azali kolanda ndakisa ya Klisto elimboli kaka te kosala masukulu oyo ezali kosepelisa bato. Ya solo, bato bakamwaki na “maloba kitoko” ya Yesu. (Luka 4:22) Kasi mpo na nini Yesu azalaki koteya malamu? Mokano na ye ezalaki ete akumisa Yehova, kasi abenda likebi ya bato likoló na ye moko te. (Yoa. 7:16-18) Alendisaki mpe bayekoli na ye na maloba oyo: “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa nkembo epai ya Tata na bino oyo azali na likoló.” (Mat. 5:16) Toli oyo esengeli kobongola lolenge na biso ya koteya. Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekoki kolongola makanisi na biso na mokano wana. Yango wana, ntango tozali kobongisa makambo oyo tokoloba to lolenge oyo tokolobela yango, ekozala malamu tómituna boye: ‘Makambo oyo ekotinda bato bálinga lisusu Yehova makasi to ekobenda nde likebi na bango epai na ngai?’

Na ndakisa, ntango ozali koteya, okoki kosalela malamu mpenza bandakisa mpe makambo oyo bato mosusu bakutanaki na yango. Kasi soki ndakisa oyo ozali kolobela ezali molai mpenza to soki ozali kolobela makambo nyonso ya mikemike ya lisolo ya bomoi ya moto, bato oyo bazali koyoka yo bakobungisa likanisi ya ntina oyo olingi koloba. Ndenge moko mpe, soki ozali kolobela masolo oyo ezali kaka kosɛkisa, bato bakotya likebi te na ntina ya mosala na biso ya kosakola. Moteyi oyo azali kosala bongo azali nde kobenda likebi ya bato likoló na ye moko, na esika ya kokokisa mokano ya solosolo ya mateya ya Teokrasi.

“Yebá kokesenisa”

Mpo moto akóma mpenza moyekoli, asengeli kokanga ntina ya makambo oyo bazali koteya ye. Asengeli koyoka solo mpe komona bokeseni oyo ezali kati na solo na mateya mosusu. Mpo amona yango, osengeli komonisaka bokeseni yango.

Mbala na mbala, Yehova alendisaki bato na ye ete ‘báyeba kokesenisa’ kati na makambo ya pɛto mpe oyo ya mbindo. (Lev. 10:9-11, NW) Alobaki ete bato oyo bakosala na tempelo na ye monene ya elimo bakolakisa bato “kokesenisa kati na biloko oyo ezali ya bosantu mpe biloko oyo ezali ya bosantu te.” (Ezek. 44:23, NW) Na bisika mingi, mokanda ya Masese elobeli bokeseni oyo ezali kati na oyo ezali sembo mpe oyo ezali mabe, kati na bwanya mpe bozoba. Okoki ata kosala bokeseni kati na biloko mibale oyo ezali na boyokani. Na Baloma 5:7, ntoma Paulo amonisi bokeseni oyo ezali kati na moto ya sembo mpe moto malamu. Na mokanda epai ya Baebele, amonisi ndenge oyo mosala ya Klisto lokola nganga-nzambe monene eleki oyo ya Alona. Ya solo, ezali lokola John Amos Comenius, moteyi moko na ekeke ya 17, akomaki yango: “Koteya elimboli komonisa ndenge oyo likambo moko ekeseni na likambo mosusu, na kotalela ntina na yango, lolenge na yango, mpe ebandeli na yango. . . . Yango wana, moto oyo ayebi kokesenisa, ayebi mpe koteya.”

Tózwa ndakisa: ozali koteya moto moko makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Soki ayebi te ete Bokonzi ya Nzambe ezali nini, okoki komonisa ye ndenge makambo oyo Biblia elobi ekeseni na likanisi oyo bato balobaka ete Bokonzi ezali ezalela ya motema ya moto. To okoki komonisa ndenge Bokonzi ya Nzambe ekeseni na biyangeli ya bato. Kasi mpo na bato oyo bayebi mateya oyo ya ebandeli, okoki kokɔta na bozindo mpenza. Okoki komonisa bango ndenge oyo Bokonzi ya Masiya ekeseni na bokonzi mpenza ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba, oyo elobelami na Nzembo 103:19. To okoki komonisa ndenge ekeseni na “bokonzi ya Mwana ya bolingo na ye,” oyo elobelami na Bakolose 1:13, to mpe ndenge Bokonzi yango ekeseni na “kotambwisa makambo” oyo elobelami na Baefese 1:10. Soki omonisi bokeseni kati na makambo yango, ekosalisa bato oyo bazali koyoka yo báyeba mpenza liteya yango ya Biblia oyo ezali ya ntina mingi.

Mbala na mbala, Yesu asalelaki lolenge yango ya koteya. Amonisaki bokeseni oyo ezali kati na ndenge oyo bato bazalaki kotalela Mibeko ya Moize mpe ntina mpenza ya Mibeko. (Mat. 5:21-48) Amonisaki bokeseni oyo ezali kati na ezaleli ya kokangama na Nzambe mpe misala ya bokosi oyo Bafalisai bazalaki kosala. (Mat. 6:1-18) Akesenisaki elimo ya bato oyo ‘bamityaki bankolo’ ya bato mosusu mpe elimo ya komipesa oyo bayekoli na ye basengelaki kozala na yango. (Mat. 20:25-28) Ndenge Matai 21:28-32 emonisi yango, mokolo mosusu, Yesu asɛngaki bato oyo bazalaki koyoka ye bango moko bákesenisa ezaleli ya komimona sembo mpe ya kobongola mpenza motema. Yango ememi biso na likambo mosusu ya ntina mpo na koteya malamu.

Lendisá bato oyo bazali koyoka bákanisa

Na Matai 21:28, totángi ete liboso Yesu akokanisa makambo atunaki boye: “Bokanisi nini?” Moto oyo ayebi mpenza koteya akosuka kaka te na kolobela makambo oyo esalemaki to kopesa biyano, kasi akolendisa bato oyo bazali koyoka ye ete báyeba kokanisa. (Mas. 3:21; Lom. 12:1) Okoki kosala bongo soki ozali mpe kotuna mituna. Na Matai 17:25, Yesu atunaki boye: “Okanisi nini, Simona? Bakonzi ya mabelé bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bapaya?” Mituna ya Yesu etindaki Petelo akanisa mpe esalisaki ye azwa ye moko likanisi oyo ebongi na likambo ya kofuta mpako ya tempelo. Ndenge moko mpe, ntango azalaki koyanola moto oyo atunaki ye ete, “Nani mpenza azali mozalani na ngai?” Yesu amonisaki bokeseni oyo ezalaki kati na misala ya nganga moko na Molevi moko mpe misala ya Mosamalia moko. Na nsima, atunaki motuna oyo: “Mpo na yo nani na kati na bango misato amimonisi mozalani ya moto oyo akweaki na kati ya babandi?” (Luka 10:29-36) Awa lisusu, na esika ete apesa moto yango eyano mbala moko, Yesu asɛngaki ete ye moko ayanola na motuna na ye.​—Luka 7:41-43.

Salá makasi osimba motema

Bateyi oyo bakangi ntina ya Liloba ya Nzambe bayebi ete losambo ya solo elimboli kaka te kokanga ntina ya makambo mosusu mpe kolanda mibeko mosusu. Losambo ya solo euti na boyokani malamu oyo moto azali na yango na Yehova mpe bolingo oyo azali na yango mpo na nzela na Ye. Losambo yango etali mpe motema ya moto. (Det. 10:12, 13; Luka 10:25-27) Na kati ya Makomami, mbala mingi liloba “motema” elimbolaka bomoto, elingi koloba bamposa ya moto, bolingo na ye, ndenge amiyokaka mpe mikano na ye.

Yesu ayebaki ete atako bato batalaka makambo oyo ezali komonana na miso, Nzambe atalaka nde motema. (1 Sam. 16:7) Tosengeli kosalela Nzambe mpo tolingaka ye, kasi mpo na koluka komimonisa na miso ya bato mosusu te. (Mat. 6:5-8) Nzokande, Bafalisai bazalaki kosala makambo mingi kaka mpo bato bámona bango. Bazalaki kaka kokangama na makambo mikemike ya Mibeko mpe kotosa mibeko oyo bango moko basalaki. Kasi na bomoi na bango, bazalaki te komonisa bizaleli oyo ekokaki kolakisa ete bazali basaleli ya Nzambe oyo bango bazalaki koloba ete basambelaka. (Mat. 9:13; Luka 11:42) Yesu ateyaki ete atako kotosa masɛngami ya Nzambe ezali na ntina, motema nde ekomonisa soki botosi yango ezali na motuya to te. (Mat. 15:7-9; Mko. 7:20-23; Yoa. 3:36) Mateya na biso ekozala mpenza na litomba monene soki tozali kolanda ndakisa ya Yesu. Ezali na ntina mingi ete tósalisa bato báyeba oyo Nzambe azali kosɛnga bango. Kasi ezali mpe na ntina ete báyeba Yehova, bálinga ye mpe bámona ye lokola moto ya solo mpo bizaleli na bango emonisaka mpenza ete bazali komona likambo ya kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe ya solo lokola eloko ya motuya mingi.

Ya solo, mpo bato bázwa mpenza litomba na mateya yango, basengeli kotalela makambo oyo ezali na mitema na bango. Yesu alendisaki bato ete bátalelaka malamumalamu mikano na bango mpe mayoki na bango. Ntango azalaki kosembola likanisi moko ya mabe oyo bato oyo bazalaki koyoka ye bazalaki na yango, azalaki kotuna bango mpo na nini bakanisaki, balobaki to basalaki likambo boye to boye. Kasi mpo na kotika bango kaka ndenge wana te, Yesu azalaki kosuka bobele na mituna te, azalaki mpe kopesa bango likanisi moko to ndakisa moko to azalaki kosala likambo moko oyo ekolendisa bango bátalela makambo na ndenge esengeli. (Mko. 2:8; 4:40; 8:17; Luka 6:41, 46) Biso mpe tokoki kosalisa bato oyo bazali koyoka biso soki tolendisi bango bámituna, na ndakisa: ‘Mpo na nini likambo oyo ezali kosepelisa ngai? Mpo na nini nazali kosala boye na likambo oyo?’ Na nsima, lendisá bango bátalela makambo ndenge Yehova azali kotalela yango.

Monisá ndenge ya kosalela mateya yango

Moteyi malamu ayebaka ete “[bwanya, NW] ezali likambo ya liboso.” (Mas. 4:7) Bwanya ezali likoki ya kosalela malamu mpenza boyebi oyo tozali na yango mpo na kosilisa mikakatano, kokima makama, kokokisa mikano na biso mpe kosalisa basusu. Moteyi azali na mokumba ya kosalisa bayekoli báyeba kosala makambo yango, kasi akozwa bikateli na esika na bango te. Ntango bozali kolobela mitinda ndenge na ndenge ya Biblia, salisá moyekoli akanisaka. Okoki kolobela mokakatano moko oyo ebimaka na bomoi ya mokolo na mokolo mpe na nsima, tuná moyekoli ndenge nini etinda ya Biblia oyo bouti koyekola ekosalisa ye soki akutani na mokakatano yango.​—Ebe. 5:14.

Ntoma Petelo asalaki lisukulu na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe lisukulu yango ezali ndakisa. Ateyaki bato makambo oyo etalaki mpenza bomoi na bango. (Mis. 2:14-36) Petelo alobelaki libosoliboso mikapo misato ya Makomami oyo bato yango bazalaki koloba ete bandimaka. Na nsima, na kotalela makambo oyo bato yango bautaki komona, amonisaki bango ndenge nini mikapo yango ekokisami. Yango wana na nsuka, bato yango bandimaki kosalela makambo oyo bayokaki. Mateya na yo mpe esimbaka bato ndenge wana? Oyebisaka bango makambo oyo esalemaki mpe osalisaka bango lisusu báyeba ntina na yango? Olendisaka bango bátalela ndenge nini makambo oyo bazali koyekola esengeli kobongola bomoi na bango? Mbala mosusu bakotuna yo te ete, “Tosengeli kosala nini?” ndenge batunaki Petelo na mokolo ya Pantekote, kasi soki osaleli bavɛrsɛ malamu, yango ekotinda bango báluka koyeba nini basengeli kosala.​—Mis. 2:37.

Bino baboti, ntango bozali kotánga Biblia elongo na bana na bino, bozali na libaku ya koteya bango báyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia. (Ef. 6:4) Na ndakisa, bokoki kopona mwa bavɛrsɛ na botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ, kolobela ndimbola na yango mpe na nsima, bótuna mituna lokola oyo: ‘Ndenge nini yango ekoki kotambwisa biso? Ndenge nini tokoki kosalela bavɛrsɛ oyo na mosala ya kosakola? Bavɛrsɛ yango ezali komonisa nini na bizaleli ya Yehova mpe lolenge oyo asalaka makambo? Ndenge nini yango ezali kolendisa biso ete tólinga ye?’ Lendisá libota na yo mobimba bálobela makambo oyo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, ntango makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ekosalema. Na ntembe te, bavɛrsɛ oyo bango bakolobela ekozala mpe oyo bakokanga.

Zalá ndakisa malamu

Osengeli koteya kaka na maloba te, kasi na misala mpe lokola. Misala na yo ezali kopesa ndakisa mpo na komonisa ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba. Ezali ndenge wana nde bana bayekolaka. Ntango bazali kolanda ndakisa ya baboti na bango, bazali komonisa ete balingi kozala lokola baboti na bango. Balingi koyeba soki bakoyoka nini ntango bazali kosala makambo oyo baboti na bango bazali kosala. Ndenge moko mpe, ntango bato oyo ozali koteya ‘bakómi bamekoli na yo, ndenge yo mpe ozali ya Klisto,’ bakozwa mapamboli mpamba te bazali kotambola na nzela ya Yehova. (1 Kol. 11:1) Bakomona bango moko lolenge oyo Nzambe azali kosala makambo na bomoi na bango.

Yango ezali mpenza komonisa biso lisusu ntina ya kozala ndakisa malamu. ‘Lolenge ya bato oyo tozali na misala ya etamboli ya bosantu mpe na misala ya ezaleli ya kokangama na Nzambe’ ekomonisa mpenza epai ya bato oyo tozali koteya ndenge nini bakoki kosalela mitnda ya Biblia. (2 Pet. 3:11) Soki ozali kolendisa moyekoli ya Biblia ete atángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, yo moko mpe tángáká yango mokolo na mokolo. Soki olingi ete bana na yo báyekola kotosa mitinda ya Biblia, yo moko mpe salá ete misala na yo eyokana na mokano ya Nzambe. Soki ozali koteya lisangá ete bázala na molende na mosala ya kosakola, yo moko mpe zalá na molende na mosala yango. Ntango ozali kosalela makambo oyo ozali koteya, okoki mpenza kolendisa basusu.​—Lom. 2:21-23.

Mpo na kobongisa lisusu lolenge na yo ya koteya, omituna boye: ‘Ntango nazali koteya, nazali kosala yango na lolenge oyo ekoki kobongola bizaleli, maloba to misala ya bato oyo bazali koyoka ngai? Mpo na komonisa makambo polele, nazali komonisa bokeseni oyo ezali kati na makanisi ndenge na ndenge to kati na bizaleli ndenge na ndenge? Nasalaka nini mpo na kosalisa bato oyo nazali koyekola na bango Biblia, bana na ngai, to bato oyo bazali koyoka ngai na makita ete bákanga makambo oyo nazali koloba? Namonisaka mpenza polele na bato oyo bazali koyoka ngai ndenge nini basengeli kosalela makambo oyo bayekoli? Nazali kopesa bango ndakisa na makambo yango? Bayebi mpenza ndenge bakosala na makambo oyo tolobeli mpo ekobongola boyokani na bango na Yehova?’ (Mas. 9:10) Tyá ntango nyonso likebi na makambo oyo ntango ozali koluka kokolisa makoki na yo ya koteya. “Kebá ntango nyonso mpo na yo moko mpe mpo na mateya na yo. Kangamá na makambo yango, mpamba te na kosaláká bongo okobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.”​—1 Tim. 4:16.

MPO NA KOTEYA MALAMU

  • Tyelá Yehova motema, kasi komityela motema te

  • Ndimá nguya ya Liloba ya Nzambe mpe salelá yango malamu

  • Zalá na mokano ya kokumisa Yehova, kasi kobenda likebi ya bato epai na yo moko te

  • Monisá bokeseni oyo ezali kati na likambo mokomoko mpo na kosalisa basusu bákanga ntina na yango polele

  • Lendisá bato oyo bazali koyoka yo bákanisaka

  • Lendisá basusu bátalelaka mikano na bango mpe mayoki na bango

  • Lendisá bato oyo bazali koyoka bátalela soki likambo nini boyebi ya Biblia esengeli kobongola bomoi na bango

  • Zalá ndakisa oyo basusu bakoki kolanda

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto