Loyembo 109
Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!
Ya Papye
1. Tókumisa Mwana
Mokonzi Nzamb’aponi.
Alingi mpe bosembo.
Apesi mapamboli.
Na lokumu mpe nkembo
Mpo alingi Nzambe,
Akolongisa Nzambe,
Akolobela ye.
(MONDIMO)
Tókumisa Mwana!
Oy’atyami mafuta.
Kuna na ngomba Siona,
Abandi koyangela!
2. Tókumisa Mwana
Akufelaki biso.
Apesaki lisiko;
Nzamb’alimbisi biso.
Mwasi ya Kristo’az’oya,
Na bilamb’a mpɛmbɛ.
Libal’oy’emonisi
Bosembo ya Nzambe.
(MONDIMO)
Tókumisa Mwana!
Oy’atyami mafuta.
Kuna na ngomba Siona,
Abandi koyangela!