Loyembo 24
Bótya miso na libonza!
Ya Papye
1. Bakufi miso bamoni
Bakufi matoi bayoki.
Fololo’etondi n’esobe
Mai na mokili epunzwe.
Batɛngumi bazali te,
Bato bakokufa mpe te,
Mpo bózwa bolamu wana,
Bótya miso na libonza.
2. Bababa mpe bazali te,
Mobang’akozong’elenge.
Mbuma mingi na mabele
Biloko’ekozal’ebele,
Bana mpe bakosepela.
Esengo, kimy’ekozala,
Bakufi mpe bakosekwa,
Bótya miso na libonza.
3. Nyama mabe ezali te,
Mpe Urse efandi ná mpate,
Mwana akokamba yango,
Akosakana na yango.
Kolela ekozala te.
Talá nsɔm’ekozala te,
Soki bolingi kobika,
Bótya miso na libonza.
(Talá mpe Yis. 11:6-9; 35:5-7; Yoa. 11:24.)