Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 373-lok. 377
  • Misa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Misa
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Ekaniseli (Bilei ya mpokwa ya Nkolo)
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka elambo ya Nkolo ndenge moko te na mangomba mosusu?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Talelá likabo ya bomoi na motuya na yango ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Elambo ya Nkolo ezali na ntina mingi mpo na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 373-lok. 377

Misa

Ndimbola: Lingomba ya Katolike eteyaka ete Misa ezali mbeka oyo ezali kokundola ntango nyonso epai ya bandimi mbeka ya kuruse; ezali ekaniseli ya liwa mpe lisekwa ya Nkolo, oyo alobaki: ‘bósalaka boye mpo na kokanisa ngai’ (Luka 22:19); limpati lisantu oyo na nzela na yango, ntango bato ya Nzambe bazali kolya nzoto mpe komɛla makila ya Nkolo, bazali kozwa bolamu ya mbeka ya Pasika, bazali kozongisa sika boyokani ya sika oyo Nzambe asalaki na bato mbala moko mpo na libela na nzela ya makila ya Kristo; ezali kosalisa bandimi bázala na boyambi mpe na elikya ya limpati ya nsuka na bokonzi ya Tata, ezali kosakola liwa ya nkolo ‘tee mokolo akozonga.’” (Eucharisticum Mysterium, 25 Mai 1967) Na Lingomba ya Katolike Misa elakisi kozongela Limpati ya nsuka oyo Yesu Kristo asalaki.

Limpa mpe vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Kristo?

Na “Esakola ya Boyambi” oyo Papa Paulo VI asalaki mokolo ya 30 Yuni 1968, alobaki boye: “Tondimi ete lokola limpa ná vino oyo Nkolo asantisaki na Limpati ya nsuka ebongwanaki nzoto ná makila na ye oyo esengelaki kopesama mbeka mpo na biso na kuruse, na yango limpa mpe vino oyo nganga-nzambe asantisaka ebongwanaka nzoto ná makila ya Kristo oyo afandi na ngwende ya nkembo na likoló mpe tondimi ete na ndenge ya likamwisi, na nzela ya biloko oyo ezali kaka ndenge ezalaki liboso mpe nsima ya kosantisa yango, Nkolo azali solo mpenza na ntango wana. . . . Eklezia ebengaka likambo yango mbongwana (transsubstantiation).” (Official Catholic Teachings​—Christ Our Lord, Wilmington, N.C.; 1978, Amanda G. Watlington, lok. 411) Biblia endimi mpenza liteya yango?

Ntango Yesu alobaki “Eye ezali nzoto ya ngai,” “Eye ezali makila ma ngai,” alingaki koloba nini?

Mat. 26:26-29, LNz: “Ntango bazalaki kolia, Yezu akamati limpa, asambeli losambo la bobenisi, abuki lyango, apesi bayekoli baye, alobi: ‘Kamatani bolia, eye ezali nzoto ya ngai.’ Na nsima akamati nkeni, atondi Nzambe, apesi bango, alobi: ‘Bomele yango bino banso, eye ezali makila ma ngai, makila ma bondeko makosopana mpo ya bato ebele mpo ’te bazwa bolimbisi masumu. Nayebisi bino: banda sikawa nakomele vino lisusu te, tee mokolo na komele vino ya sika elongo na bino o Bokonzi bwa Tata wa ngai.’”

Simbá ete Babiblia mosusu ebongoli maloba “eye ezali nzoto ya ngai” mpe “eye ezali makila ya ngai,” boye: ‘oyo elakisi nzoto na ngai’ mpe ‘oyo elakisi makila na ngai.’ (Mo) NW elobi mpe bongo. LEF ebongoli maloba yango, ‘oyo emonisi nzoto na ngai,’ ‘oyo emonisi makila na ngai.’ Ndenge maloba yango ebongolami na Babiblia oyo, eyokani na ndenge oyo Babiblia mingi ya Bakatolike ebongoli vɛrsɛ 29. AC ebongoli vɛrsɛ yango boye: ‘Banda lelo nakomela lisusu mbuma oyo ya vino te, tee mokolo nakomela yango ya sika esika moko na bino na bokonzi bwa Tata wa ngai.’ Hf mpe KSN emonisi ete Yesu abengi vinyo oyo ezalaki na kati ya kɔpɔ ete “mbuma oyo ya miwiti,” nzokande liboso alobaki ete “eye ezali makila ma ngai.”

Mpo na koyeba ndimbola ya maloba “eye ezali nzoto ya ngai” mpe “eye ezali makila ma ngai,” esengeli mpe kotalela maloba mosusu ya elilingi oyo Biblia esaleli. Yesu alobaki mpe ete, “Ngai nazali mwinda mwa nse,” “Ngai nazali ezibeli ya lopango,” “Ngai nazali nzete ya solo ya vino.” (Yoa. 8:12; 10:7; 15:1, LNz) Maloba oyo emonisi nde ete Yesu abongwanaki mwinda, ezibeli to nzete ya vino na ndenge ya likamwisi?

Na 1 Bakorinti 11:25 (hf), ntoma Paulo akomaki mpo na Limpati ya nsuka kasi asalelaki maloba oyo ekeseni mwa moke. Na esika Paulo aloba ndenge Yesu alobaki mpo na kɔpɔ ete, “Bomɛla na yango, bino nyonso. Mpɔ ete oyo ezali makila na ngai na kondimana na sika,” alobaki nde ete: “Kɔpɔ oyo ezali kondimana na sika kati na makila na ngai.” Na ntembe te, yango elimboli te ete kɔpɔ ebongwanaki kondimana ya sika na ndenge ya likamwisi. Ndimbola ya malamu ezali ete vinyo oyo ezalaki na kɔpɔ emonisaki makila ya Yesu oyo esalaki ete kondimana ya sika endimama, boye te?

Maloba ya Yesu na Yoane 6:53-57 elimboli nini?

“Yezu azongiselaki bango: ‘Ya solo solo, nalobi na bino: Soko bokolia nsuni ya Mwana wa Moto te, mpe bokomele makila ma ye te, bokozala na bomoi te. Oyo akolya nsuni ya ngai mpe akomele makila ma ngai, azali na bomoi bwa seko, mpe nakosekwisa ye o mokolo mwa nsuka. Zambi nsuni ya ngai ezali bilei bya solo, mpe makila ma ngai mazali limeli lya solo. Moto akolia mpe akomele makila ma ngai, biso na ye tokokoma se moto moko. Tata atindi ngai azali na bomoi, nazali na bomoi mpo ya Tata. Bobele bongo, moto akolia ngai, ye mpe akozala na bomoi mpo ya ngai.’”​—Yoa. 6:53-57, LNz.

Yango elingi nde koloba ete basengelaki mpenza kolya mosuni ya Yesu mpe komɛla makila na ye? Soki bongo, elingi koloba ete Yesu azalaki kotinda bato bábuka Mobeko oyo Nzambe apesaki Yisraele na nzela ya Moize. Mobeko yango epekisaki kolya makila ya lolenge nyonso. (Lev. 17:10-12) Na esika ete Yesu atinda bato bábuka Mobeko yango, azalaki nde kotɛmɛla makasi moto nyonso oyo azalaki kobuka Mobeko. (Mat. 5:17-19) Na yango, Yesu alobelaki kolya mpe komɛla ya elilingi, elingi koloba kondimela motuya ya mbeka ya kokoka oyo asengelaki kopesa.​—Talá Yoane 3:16; 4:14; 6:35, 40.

Yesu asɛngaki bayekoli na ye básalaka ekaniseli ya liwa na ye mpe básalaka Misa mpo na kozongela mbeka na ye?

Buku moko (The Documents of Vatican II) elobi boye: ‘Na Limpati ya Nsuka, na butu oyo atɛkamaki, Mobikisi na biso abandisaki Mbeka ya Ukaristia ya Nzoto mpe makila na ye. Asalaki yango mpo bázongelaka mbeka oyo apesaki na Kuruse . . . ’​—(New York, 1966), ekomami na W. M. Abbott, S.J., lok. 154.

Buku mosusu (The Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Eklezia ezwaki ekateli ete Misa emonana ete ezali ‘mbeka ya solo mpe oyo esengeli’ . . . Nzokande, liteya na biso euti mpenza na bonkɔkɔ, oyo banda kala mpenza ezali kolobela motuya oyo mbeka ya Misa ezali na yango.”​—(1913), Vol. X, nk. 6, 17.

Yesu alobaki ete: “Bosalaka bongo mpo ya kokanisa ngai.” (Luka 22:19; 1 Ko. 11:24, LNz) Na Luka 22:19, hf elobi: “Salá boye mpo na ekaniseli na ngai.” KSM elobi: “Bósalaka boye mpo na ekaniseli na ngai.” Yesu alobaki te ete likambo oyo asalaki na Limpati ya Nsuka ezalaki Mbeka to ete bayekoli na ye basengelaki kozongelaka mbeka na ye.

Ebr. 9:25-28, LNz: ‘Asengeli lisusu komibonza mbala na mbala te, lokola nganga mokonzi [ya Bayuda] oyo akoyingelaka mbula na mbula o esika esantu, mpo ya kobonza makila maye mazali ma ye moko te. Soko ezalaki bongo te, mbele Kristu asengelaki koyoka mpasi mbala mingi ut’o libandela lya mokili. Kasi ayaki se mbala yoko o nsuka ya bileko mpe amibonzi mpo ’te asilisa bokasi bwa lisumu . . . Se bongo, Kristu amibonzi se mbala yoko mpo ya kolongola masumu ma bato banso.’

Ezali nde “libombami oyo ekoki koyebana te”?

Biblia elobelaka mabombami ya Nzambe, to mabombami mosantu. Kasi yango nyonso ezali na boyokani na mateya ya solo oyo ezali na Biblia. Mpo na baoyo bazali koteya bonkɔkɔ na esika ya Makomami, Yesu alobaki: “Bakibisi [bakosi, hf]! Profeta Izaya asakoli malamu mpo ya bino esika alobaki: Bato baye bakokumisa ngai se na monoko, kasi mitema mya bango mizali mosika na ngai. Bokumisi bakokumisaka ngai bozali se mpamba; mateya bakoteyaka mazali se bitinda bya bato.”​—Mat. 15:7-9, LNz.

Yesu alobaki ete esengeli kosala ekaniseli yango mikolo nyonso to pɔsɔ nyonso?

Buku moko (Basic Catechism) elobi: “Mokumba ya ntina mingi mpo na mokristo nyonso ya Lingomba ya Katolike ezali ya kosangana na Misa mikolo nyonso ya lomingo mpe ya bafɛti.” (Boston, 1980, lok. 21) “Bandimi balendisami ete básangana na Misa mpe bálya kominyo mbala na mbala, ata mpe mokolo na mokolo.”​—The Teaching of Christ​—A Catholic Catechism for Adults, Abridged Edition (Huntington, Ind.; 1979), lok. 281.

Ntango nyonso oyo Biblia esaleli elobeli “kobuka mampa,” yango elimboli ete bazalaki nde kosala ekaniseli ya liwa ya Kristo? (Mis. 2:42, 46; 20:7, LNz) Ntango Yesu azalaki kolya na bayekoli na ye, azalaki ‘kobuka mampa’; azalaki kosala mpe bongo na mabaku mosusu liboso ya Limpati ya nsuka. (Mrk. 6:41; 8:6) Mampa oyo Bayuda bazalaki kolya na ntango wana ezalaki te lokola mampa oyo bato balyaka lelo oyo. Ntango moto azali kolya yango, asengelaki kobuka to kokatakata yango.

Yesu alobaki polele te mbala boni na mbula esengeli kosalaka Ekaniseli ya liwa na ye. Nzokande, asalaki yango na dati oyo Bayuda bazalaki kosala Elekeli; na dati yango bayekoli na ye basalaka Ekaniseli ya liwa ya Kristo na esika ya Elekeli. Elekeli ezalaki kosalema mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 Nisana. Ndenge moko mpe, Bayuda bazalaki kosala Fɛti ya bagato ezangi levire, Fɛti ya bapɔsɔ (Pantekote), Fɛti ya mwa bandako ya matiti to Fɛti ya koyanganisa mbuma, mpe Fɛti ya kozipa masumu, mbala moko na mbula.

Kosala Misa esalisaka milimo oyo ezali na epongelo?

Buku moko (The Teaching of Christ​—A Catholic Catechism for Adults) elobi ete: “Liloba ‘epongelo’ ezali na Biblia te, mpe Biblia eteyi yango polele te. . . . Mikanda ya Batata ya Eklezia elobeli mingi epongelo, kasi elobi mpe ete basembwi oyo bakufá bakoki kozwa lisalisi na nzela ya mabondeli ya bandimi oyo bazali na bomoi, mingimingi na nzela ya mbeka ya Misa.”​—Nk. 347, 348.

Biblia elobi ndenge oyo bakufi bazalaka: “Bato bazali na bomoi bayebi ’te bakokufa, kasi bato bakufi bayebi eloko te.” (Mos. 9:5, LNz) “Molimo [“ye,” LNz; “moto,” LL] oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezk. 18:4, hf) (Talá mpe na nkasa 314-316, na motó ya likambo “Liwa.”)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto