Libongoli ya Mokili ya Sika
Ndimbola: Libongoli ya Makomami Mosantu na Lingelesi ya mikolo na biso, oyo komite moko ya Batatoli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo babongolaki uta na minɔkɔ ya Ebre, ya Aramɛyɛ mpe ya Grɛki. Mpo na mosala oyo basalaki, babongoli yango balobaki boye: “Babongoli ya buku oyo babangaka mpe balingaka Nzambe Nkolo ya Biblia mpe bayebi ete bazali na mokumba monene ya komonisa makanisi na ye mpe maloba na ye na bosikisiki mpenza. Bayebi mpe ete bazali na mokumba liboso ya bato oyo bazali kotánga na likebi mpe bazali kotya motema na libongoli ya Liloba oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló mpo bázwa lobiko ya seko.” Na ebandeli, libongoli yango ebimisamaki ndambondambo, banda 1950 tii 1960. Baoyo babongolaka yango na minɔkɔ mosusu balandaka libongoli ya Lingelesi.
Mikanda nini batalelaki mpo na kosala “Libongoli ya Mokili ya Sika”?
Mpo na kobongola Makomami ya Ebre, basalelaki Biblia Hebraica ya Rudolf Kittel, ebimeli ya 1951-1955. Kasi ntango batalelaki lisusu Libongoli ya Mokili ya Sika, ebimeli ya 1984, basalelaki ebimeli ya sika ya Biblia Hebraica Stuttgartensia ya 1977. Batalelaki mpe Barulo ya Mbu Ekufá ná mabongoli mosusu ebele ya kalakala ya minɔkɔ mosusu. Mpo na kobongola Makomami ya Grɛki ya bokristo, balandaki mingimingi mikanda ya Grɛki ya Westcott ná Hort ya 1881; kasi batalelaki mpe ebele ya mikanda mosusu ya Grɛki, ná ebele ya mabongoli ya kala na minɔkɔ mosusu.
Banani babongolaki yango?
Bandeko ya komite oyo ebongolaki Libongoli ya Mokili ya Sika baboyaki kozwa lotomo ya bakomi; yango wana basɛngaki ete nkombo na bango eyebana te. Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania endimaki likanisi na bango. Babongoli balukaki lokumu na bango moko te; balukaki nde kokumisa Nzambe, Nkolo ya Makomami Mosantu.
Bambula mwa mingi nsima, babongoli ya Babiblia mosusu basalaki mpe bongo. Na ndakisa, na ezipeli ya New American Standard Bible ya 1971 oyo ezali na mitindami na kati, ekomami boye: “Tosaleli nkombo ya nganga-mayele moko te mpo na kobenda likebi ya bato epai na ye to mpo tózwa lokumu na nzela na ye, mpo tondimi ete Liloba ya Nzambe yango moko nde ezali na valɛrɛ mingi.”
Bato oyo babongolaki Biblia yango batángaki bakelasi mingi?
Lokola bato oyo babongolaki Biblia yango basɛngaki ete nkombo na bango eyebana te, kolobela bakelasi oyo batángaki ezali na ntina te. Kasi tokotalela nde mosala oyo basalaki mpo na koyeba valɛrɛ na yango.
Libongoli yango ezali ndenge nini? Ya liboso, ezali libongoli moko ya sikisiki, oyo na bavɛrsɛ na yango mingi, liloba mokomoko ebongolami kaka ndenge ezalaki na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli. Ezali te libongoli oyo balongolaka makambo mosusu oyo bamoni ete ezali na ntina mpenza te mpe babakisaka makanisi oyo bakanisi ete ezali na ntina. Mpo na kosalisa bato báyekola Biblia malamu, Biblia mosusu ya Libongoli ya Mokili ya Sika ezali na banɔti ebele na nse ya lokasa; banɔti yango elakisaka ndenge mosusu oyo maloba mosusu ekoki kobongolama. Na banɔti yango bamonisi mpe bamaniskri ya kala oyo basalelaki mpo na kobongola maloba mosusu.
Okomona ete bavɛrsɛ mosusu ekeseni na ndenge oyo bato bamesaná na yango. Lolenge nini ya kobongola bavɛrsɛ yango ebongi? Basɛngaka na batángi bátala bamaniskri oyo batyá na banɔti na nse ya lokasa na Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ezali na mitindami, bátánga bandimbola oyo epesami na apɛndisi mpe bákokanisa yango na mabongoli mosusu ya Biblia. Mbala mingi, bakomona ete babongoli mosusu mpe babongolaki bavɛrsɛ yango ndenge wana.
Mpo na nini batyá nkombo Yehova na Makomami ya Grɛki ya bokristo?
Esengeli koyeba ete longola Libongoli ya Mokili ya Sika, Babiblia mosusu mpe esalá bongo. Na mabongoli mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo oyo ekomamaki na Ebre, batyaki nkombo ya Nzambe na bavɛrsɛ oyo euti mbala moko na Makomami ya Ebre. Biblia Emphatic Diaglott (1864) ezali na nkombo Yehova mbala 18. Mabongoli mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na minɔkɔ koleka 38 esaleli mpe nkombo ya Nzambe na minɔkɔ na bango.
Lokola Yesu azalaki komona ete nkombo ya Tata na ye ezali na ntina mingi, ntembe ezali te ete azalaki kokakatana te mpo na kosalela nkombo yango. (Mat. 6:9; Yoa. 17:6, 26) Jérôme oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya minei T.B. alobaki ete ntoma Matai akomaki Evanzile na ye libosoliboso na Ebre, mpe Evanzile yango etángi mbala mingi Makomami ya Ebre oyo ezali na nkombo ya Nzambe. Bakomi mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo bakomaki bavɛrsɛ mosusu ndenge ezalaki na Biblia ya Septante (libongoli ya Makomami ya Ebre na monɔkɔ ya Grɛki, oyo babandaki kobongola banda na mobu soki 280 L.T.B.), oyo bakopi na yango ya ebandeli ezalaki na nkombo ya Nzambe ekomamá na balɛtrɛ ya Ebre, ndenge mwa biteni mike ya Septante oyo ezali tii lelo emonisi yango.
George Howard, profesɛrɛ na Iniversite ya Géorgie, na États-Unis, akomaki boye: “Lokola Tetragrami [balɛtrɛ minei oyo bazalaki kosalela mpo na kokoma na yango nkombo ya Nzambe] ezalaki naino komonana na Babiblia ya monɔkɔ ya Grɛki oyo Eklezia ya ebandeli ezalaki kosalela, ezali libunga te kokanisa ete bakomi ya K[ondimana] ya S[ika] babatelaki Tetragrami yango na kati ya mikanda ya Biblia ntango bazalaki kotánga bavɛrsɛ na Makomami.”—Journal of Biblical Literature, Marsi 1977, lok. 77.
Mpo na nini emonani lokola bavɛrsɛ mosusu ezangi?
Bavɛrsɛ oyo ezangi, kasi emonanaka na mabongoli mosusu, ezali te na bamaniskri ya Biblia ya kalakala. Soki okokanisi yango na mabongoli mosusu ya sika, na ndakisa haut fleuve, Bible (na Lingala ya lelo), TOB, okomona ete babongoli mosusu mpe bandimaki ete bavɛrsɛ yango ezali ya Biblia te. Ntango mosusu, moto oyo asalaki kopi nde azwaki bavɛrsɛ yango na esika mosusu mpe akɔtisaki yango na Biblia.
Soki moto alobi—
‘Bino bozalaka na Biblia na bino moko’
Okoki koyanola: ‘Bongo yo, Biblia nini ozali na yango? Ezali nde . . . (tángá Babiblia mosusu oyo ezali na monɔkɔ na bino)? Oyebi malamu ete mabongoli ya Biblia ezali mingi.’ Okoki kobakisa: ‘Nakosepela kosalela Biblia nyonso oyo omoni malamu. Kasi mbala mosusu, okolinga koyeba mpo na nini ngai nalingaka mingimingi Libongoli ya Mokili ya Sika. Ezali mpo esaleli elobeli ya mikolo oyo, elobeli moko ya pɛtɛɛ; lisusu bato oyo babongolaki yango balandelaki na likebi mpenza makambo ndenge ezalaki na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia.’
To okoki koloba: ‘Lokola olobi bongo, nakanisi ozali na Biblia na ndako. Osalelaka Biblia nini? . . . Okoki kozwa yango?’ Okoki kobakisa: ‘Na Yoane 17:3, Yesu alobelaki likambo moko ya ntina oyo biso nyonso tosengeli kobosana te, ezala tosalelaka Biblia nini. Talá ndenge ekomami awa, na Biblia na yo moko. . . . ’
Ndenge mosusu ya koloba: ‘Mabongoli ya Biblia ezali mingi. Lisangá na biso ya Batatoli ya Yehova elendisaka biso tósalelaka Babiblia ndenge na ndenge mpe tókokanisaka yango mpo na kosalisa bato oyo toyekolaka na bango bákanga ntina mpenza ya Biblia. Nakanisi oyebi ete na ebandeli, Biblia ekomamaki na Ebre, na Aramɛyɛ mpe na Grɛki. Yango wana, tosepelaka mingi na milende oyo babongoli basalaki mpo na kobimisa Biblia na monɔkɔ na biso. Yo osalelaka Biblia nini?’
Makanisi mosusu: ‘Namoni mpenza ete olingaka Liloba ya Nzambe. Na yango, nandimi ete okolinga mpenza koyeba moko ya makambo ya minene oyo ekesenisi Libongoli ya Mokili ya Sika na Babiblia mosusu. Likambo yango etali nkombo ya moto oyo aleki bato nyonso oyo balobeli na kati ya Makomami. Oyebi soki moto yango ezali nani?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Oyebi ete na kati ya Biblia, na Makomami ya Ebre, nkombo na ye mpenza ekomami mbala soki 7 000? Yango nde nkombo oyo ekomami mbala mingi koleka nkombo mosusu nyonso.’ (2) ‘Bongo kosalela nkombo mpenza ya Nzambe, ezali na ntina? Kanisá naino: Ozalaka na moninga ya motema mpenza oyo oyebaka nkombo na ye te? . . . Soki tolingi kozala na boyokani malamu mpenza na Nzambe, ezali na ntina tóbanda naino koyeba nkombo na ye. Talá kutu ndenge Yesu alobaki na Yoane 17:3, 6 (Nz. 83:18).’