Ebongiseli
Ndimbola: Lisangá ya bato oyo bazali kosala milende mpo na kosala mosala moko boye to mpo na kokokisa mokano moko boye. Bato oyo bazali na kati ya ebongiseli moko bazalaka na bomoko mpo batambwisamaka na bibongiseli ya mosala, na mibeko mpe na masɛngami. Bato oyo bamipesi na Nzambe mpe bazwi batisimo mpo bákóma Batatoli ya Yehova, bakɔtaka na ebongiseli ya Yehova mpo bango moko balingi, kasi te mpo baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova, to mpo batindi bango na makasi. Bakɔtaka na ebongiseli na ye mpo basepeli na mateya, na misala ya ebongiseli yango, mpe mpo balingi kopesa mabɔkɔ na mosala na yango.
Yehova azali mpenza na ebongiseli awa na mabele?
Mpo na koyanola na motuna yango, tótala makambo oyo elandi:
Baanzelu to bikelamu ya Nzambe oyo bazali na likoló, bazali bituluku oyo ebongisami?
Dan. 7:9, 10: “Nazalaki se kotala tii bakiti ya bokonzi etyamaki mpe Mokóló na Mikolo afandaki. Bilamba na ye ezalaki mpɛmbɛ lokola nɛjɛ, mpe nsuki ya motó na ye ezalaki lokola lɛnɛ ya pɛto. Kiti na ye ya bokonzi ezalaki ndemo ya mɔtɔ; bayiká na yango ezalaki mɔtɔ oyo ezali kopela. Ebale ya mɔtɔ ezalaki kotíyola mpe kobima liboso na ye. Bankóto mbala nkóto bazalaki kosalela ye, mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye. Tribinale efandaki, mpe babuku efungwamaki.”
Nz. 103:20, 21: “Bópambola Yehova, Ee bino baanzelu na ye, oyo bozali na makasi na kati ya nguya, oyo bozali kosalela liloba na ye, oyo bozali koyoka mongongo ya liloba na ye. Bópambola Yehova, bino mampinga na ye nyonso, bino basaleli na ye, oyo bozali kosala mokano na ye.” (“Limpinga” ezali etuluku oyo ebongisami.)
Na ntango ya kala, ndenge nini Nzambe azalaki kopesa basaleli na ye malako awa na mabele?
Ntango basambeli ya Yehova bazalaki naino moke, Yehova azalaki kopesa bango malako na nzela ya batata ya mabota, na ndakisa Noa mpe Abrahama, mpe na nsima, bango bakómaki balobeli ya Yehova na mabota na bango. (Eba. 7:1, 7; 12:1-5) Ntango Yehova asikolaki Bayisraele na Ezipito, apesaki bango malako na nzela ya Moize. (Kob. 3:10) Na Ngomba Sinai, Nzambe abongisaki bato na ye mpe bakómaki ekólo, apesaki bango mibeko ná malako mpo na losambo mpe makambo oyo etali boyokani na kati na bango. (Kob. 24:12) Atyaki banganga-nzambe mpo bákambaka makambo ya losambo mpe báteyaka bato makambo oyo Yehova azali kosɛnga; ntango mosusu mpe azalaki kotinda basakoli mpo na kolendisa bato soki esengeli mpe kokebisa bango. (Mib. 33:8, 10; Yir. 7:24, 25) Yango wana, atako Yehova azalaki koyoka mabondeli ya basambeli na ye, mokomoko, azalaki kopesa bango malako na nzela ya lisangá na ye oyo ebongisami.
Lokola ntango ekómaki pene, mpo Yehova abanda kosangisa basambeli na ye ya solo na nzela ya Yesu Kristo, Yehova Nzambe atindaki Yesu awa na mabele mpo azala molobeli na ye. (Ebr. 1:1, 2) Na nsima, na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Nzambe asopaki elimo santu likoló ya bayekoli ya Yesu, lisangá ya bokristo ebandaki. Nsima, ntango Yesu azongaki na likoló, lisangá yango ekómaki nde ebongiseli ya Yehova mpo na koteya bakristo nyonso mpe kotambwisa misala na bango na kati ya lisangá. Bakɛngɛli nde bazalaki kokamba mosala ya lisangá mokomoko, mpe lisangani ya mikóló-bakambi nde bazalaki kozwa bikateli ya minene mpe kokamba mosala ya masangá nyonso. Emonani polele ete, awa na mabele, Yehova abandisaki ebongiseli moko oyo esalemi na bakristo ya solo.—Mis. 14:23; 16:4, 5; Gal. 2:7-10.
Biloko oyo Yehova azalisá emonisaka ete azali Nzambe oyo ayebi kobongisa makambo?
Yis. 40:26: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.” (Minzoto ebongisami na bituluku oyo babengi galaksi, mpe yango nyonso etambolaka na molɔngɔ atako monzoto mokomoko ekeseni na monzoto mosusu. Baplanɛti etosaka mpenza ngonga na yango ntango ezali kobaluka mpe elandaka kaka nzela na yango. Biloko ya mikemike oyo ezali na kati ya atomɛ nyonso, oyo babengi électron, elandaka kaka nzela na yango. Lolenge oyo eloko na eloko oyo esalemá elandaka nzela na yango oyo ebongisamá malamu, esalisaka bato ya mayele báyeba makambo mosusu liboso kutu ete bámona yango. Makambo nyonso wana emonisi ete molɔ́ngɔ́ ebongisamá malamu mpenza.)
Biblia emonisi ete bakristo ya solo basengeli kozala etuluku ya bato oyo babongisami?
Mat. 24:14; 28:19, 20: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” “Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango . . . , bóteya bango.” (Soki ebongiseli ezali te, ndenge nini mosala yango ekosalema? Ntango Yesu alakisaki bayekoli na ye ya liboso ndenge ya kosala mosala yango, alobaki te ete moto na moto akende epai alingi mpe ateya bato na ndenge na ye. Kasi alakisaki bango ndenge ya kosala, apesaki bango malako mpe atindaki bango na ndenge oyo ebongisami. Talá Luka 8:1; 9:1-6; 10:1-16.)
Ebr. 10:24, 25: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Soki ebongiseli oyo ezali na makita oyo esalemaka mbala na mbala ezalaka te, epai wapi bato oyo basepeli na solo balingaki kokende mpo na kotosa etinda ya koyangana oyo ezali na mokapo oyo?)
1 Ko. 14:33, 40: “Mpo Nzambe azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya. . . . Makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.” (Na vɛrsɛ oyo ntoma Paulo azali koloba ete makita ya lisangá esengeli kosalema na molɔngɔ. Mpo na kolanda toli oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, bakristo basengeli kozala na ebongiseli.)
1 Pe. 2:9, 17: “Kasi bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa. . . . Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” (Lisangá ya bato oyo bazali kosala milende mpo na kokokisa mosala moko boye ezali ebongiseli.)
Basaleli ya sembo ya Nzambe bapalangani kati na mangomba ndenge na ndenge ya bokristo ya nkombo mpamba?
2 Ko. 6:15-18: “Eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? . . . ‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo’; ‘mpe ngai nakoyamba bino.’ ‘Mpe nakozala tata na bino, mpe bino bokozala bana na ngai ya mibali mpe bana na ngai ya basi,’ Yehova Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.” (Tokoki mpenza koloba ete moto azali kosalela Nzambe na bosembo soki azali kosambela elongo na bato oyo etamboli na bango emonisaka ete bazali mpenza bandimi te? Talá motó ya likambo “Babilone Monene.”)
1 Ko. 1:10: “Nzokande nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani, mpe ete bokabwani ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (Bomoko ya ndenge wana ezali te na mangomba ndenge na ndenge ya bokristo ya nkombo mpamba.)
Yoa. 10:16: “Nazali na bampate mosusu, oyo ezali ya lopango oyo te; yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai, mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.” (Lokola Yesu asengelaki kosangisa bato yango na “etonga kaka moko,” yango emonisi ete basengelaki te kopalangana na mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba, boye te?)
Na mikolo na biso, ndenge nini moto akoki koyeba eteni ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele?
(1) Ebongiseli yango ekumisaka Yehova ete azali Nzambe ya solo kaka moko, mpe esanzolaka nkombo na ye.—Mat. 4:10; Yoa. 17:3.
(2) Endimaka mpenza mokumba ya ntina oyo Yesu Kristo azali na yango mpo na kokokisa mokano ya Nzambe: Azali Molongisi ya boyangeli ya Yehova, Kapita ya bomoi, Motó ya lisangá, Mokonzi Masiya oyo azali koyangela.—Em. 19:11-13; 12:10; Mis. 5:31; Ef. 1:22, 23.
(3) Elandaka mpenza Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, mateya na yango nyonso mpe mitinda na yango mpo na etamboli, eutaka na Biblia.—2 Tim. 3:16, 17.
(4) Emikɔtisaka te na makambo ya mokili.—Yak. 1:27; 4:4.
(5) Esalisaka baoyo bazali na kati na yango bázala na etamboli ya malamu oyo ekeseni mpenza na oyo ya bato mosusu, mpo Yehova ye moko azali mosantu.—1 Pe. 1:15, 16; 1 Ko. 5:9-13.
(6) Esalaka milende mpenza mpo na kosala mosala ya ntina oyo Biblia esakolaki mpo na mikolo na biso, elingi koloba mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba mpo ezala litatoli.—Mat. 24:14.
(7) Atako baoyo bazali na kati ya ebongiseli yango bazali bato ya kozanga kokoka, balonaka mpe bamonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe, elingi koloba, bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa. Basalaka yango na ndenge oyo ekesenisaka bango mpenza na bato mosusu ya mokili oyo.—Gal. 5:22, 23; Yoa. 13:35.
Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali komemya ebongiseli ya Yehova?
1 Ko. 10:31: “Bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.”
Ebr. 13:17: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ.”
Yak. 1:22: “Bókóma batosi ya liloba, kasi bayoki kaka te.”
Tito 2:11, 12: “Boboto monene ya Nzambe oyo ezali kobikisa bato ya ndenge nyonso emonani polele, elakisi biso tóboya ezaleli ya kotyola Nzambe mpe bamposa ya mokili mpe tófanda na makanisi malamu mpe na boyengebene mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe.”
1 Pe. 2:17: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.”