Ndenge ya koloba soki moto abimisi ntembe
Malako: Bato bakozwa bomoi ya seko kaka soki bandimi Yehova Nzambe mpe Bokonzi na ye oyo apesi Kristo Yesu. Nsango ya Bokonzi ya Nzambe epesaka bato esengo, mpe emonisaka elikya kaka moko ya solo. Nsango yango ebongolaka bomoi ya bato. Yango wana, tolingi moto nyonso ayoka yango. Toyebi ete kaka bato moke nde bakosepela na nsango yango; kasi toyebi mpe ete ata bongo, bato basengeli koyoka yango mpo bákoka kozwa ekateli oyo balingi. Ya solo, bato nyonso bakosepela koyoka te, mpe tokondimisa bango na makasi te. Kasi mbala mingi, bososoli ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kokoba na lisolo ntango moto abimisi ntembe. Okokuta na lisolo oyo mayele oyo Batatoli mosusu, oyo bameseni na mosala ya kosakola, basalelaki ntango bazalaki koluka na molende bato oyo babongi. (Mat. 10:11) Esengeli te ete okanga maloba na bango na motó, kasi simbá nde likanisi ya ntina, bongisá yango na maloba na yo moko mpe lobá yango na ndenge oyo ekomonisa ete ozali mpenza kosepela na moto oyo ozali kosolola na ye. Soki osali bongo, okoki kozala na elikya ete bato oyo bazali na mitema oyo ebongi bakoyoka mpe bakondima na esengo bibongiseli oyo Yehova azwi na bolingo na ye mpo na kosalisa bango bázwa bomoi.—Yoa. 6:44; Mis. 16:14.
‘NASEPELAKA NA YANGO TE’
● ‘Tiká natuna yo naino: Nini esepelisaka yo te, Biblia to mangomba? Soki natuni bongo ezali mpo tokutani na bato mingi oyo liboso bazaláká kosambela kasi basambelaka lisusu te mpo na bokosi oyo bazali komona na mangomba; (to mpo bazali kokanisa ete mangomba ezali kaka mpo na kolyela bato; to bazali kosepela te ndenge mangomba ezali komikɔtisa na makambo ya politiki; mpe bongo na bongo). Biblia mpe endimaka makambo wana te, mpe emonisi biso likambo oyo ekoki kosalisa biso tózala na elikya ya bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.’
● ‘Soki olobi ete osepelaka na lingomba mosusu te, nayoki yo malamu. Kasi mbala mosusu osepelaka koyeba ndenge bomoi ekozala na mikolo ezali koya, lokola bato bazali kobanga etumba ya nikleere to bateroriste (to ndenge nini tokoki kobatela bana na biso mpo bábeba na drɔgɛ te; to esengeli kosala nini mpo na kosilisa makambo ya kobomana mpo tóbangaka te ntango tozali kotambola, mpe bongo na bongo). Oyebi eloko nini ekoki kosilisa makambo wana?’
● ‘Olobi bongo mpo ozali na lingomba na yo? . . . Yebisá ngai naino, okanisi ete mokolo mosusu bato nyonso bakozala kaka na lingomba moko? . . . Mpo na nini bato nyonso bazali na lingomba moko te? . . . Mpo likambo ya ndenge wana esalema, ezali kosɛnga nini?’
● ‘Namoni esika ozali. Eleki mwa bambula, ngai mpe nazalaki na likanisi wana. Kasi natángaki likambo moko na Biblia oyo esalisaki ngai nabongola makanisi na ngai. (Monisá ye likambo yango.)’
● ‘Okosepela nalakisa yo na Biblia ndenge okoki komona lisusu bandeko ná baninga na yo oyo bakufá (to nalakisa yo ntina mpenza ya bomoi; to ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa mabota na biso ezala na bomoko; mpe bongo na bongo)?’
● ‘Soki olobi ete ozali na mposa ya kosomba mokanda te, kitisá motema. Nazali kosala mombongo te. Kasi, okosepela te kozala na bomoi na paradiso awa na mabele, epai maladi mpe kobomana ekozala te, epai okozala elongo na bato oyo bakolinga yo mpenza?’
● ‘Oyebisaka Batatoli ya Yehova nyonso kaka boye? . . . Osí omituná mpo na nini toyaka kotala bato mbala na mbala to eloko nini mpenza tolingaka koyebisa bango? . . . Na mokuse, soki nayei kotala yo ezali mpo nazali na likambo oyo yo mpe osengeli koyeba. Okoyoka ata mbala oyo te?’
‘NASEPELAKA NA MANGOMBA TE’
● ‘Nayoki yo malamu. Ya solo, mangomba elongi te kokómisa mokili oyo esika ya kimya, boye te? . . . Tiká natuna yo naino: Ozalaka na likanisi yango banda kala? . . . Kasi ondimelaka Nzambe?’
● ‘Bato mingi bakanisaka lokola yo. Lingomba esalisi bango mpenza te. Yango wana toyei kotala yo—mpo mangomba eteyi bato solo ya Nzambe te mpe eteyi bango mokano na ye mpo na bato te.’
● ‘Kasi nakanisi mpenza ete osepelaka koyeba ndenge bomoi na yo ekozala. Oyebi ete Biblia esakolá makambo oyo ezali kosalema lelo na mokili? . . . Ezali mpe koyebisa biso ndenge makambo yango ekosuka.’
● ‘Okanisaka bongo banda kala? . . . Okanisaka ndenge bomoi ekozala na mikolo ezali koya?’
‘NASEPELAKA NA BATATOLI YA YEHOVA TE’
● ‘Bato mingi balobaka na biso bongo. Osí omituná mpo na nini bato lokola ngai tosepelaka kotala bato atako toyebi ete mingi kati na bango bakoyamba biso te? (Pesá makanisi ya ntina ya Ezekiele 9:1-11, limbolá ete, ndenge oyo bato bazali kotalela nsango ya Bokonzi nde ekosala ete moto “atyama elembo” mpo na kobika na bolɔzi monene, to mpe abomama na Nzambe.)’
● ‘Nayoki yo malamu, mpo kala ngai mpe nazalaki kokanisa bongo. Kasi, mpo nalongola makanisi ya mabe, nazwaki ekateli ya koyoka moko na bango, mpe namonaki ete makambo oyo bato mosusu bazalaki koyebisa ngai mpo na bango ezali lokuta. (Lobelá likambo moko ya lokuta oyo bato balobelaka mingi mpe limbolá ndenge biso toteyaka yango.)’
● ‘Kala mingi te, nalobaki ndenge wana na Motatoli ya Yehova moko oyo ayaki kotala ngai. Kasi liboso tókabwana, natunaki ye motuna moko oyo nakanisaki ete akokoka kopesa eyano te. Olingi koyeba motuna yango? . . . (Na ndakisa: Epai wapi Kaina azwaki mwasi na ye?)’ (Soki osalaki mpenza likambo yango, okoki kotuna motuna ya lolenge wana.)
● ‘Soki osambelaka, namoni esika ozali. Na ntembe te, lingomba na yo ezali na ntina mingi mpo na yo. Kasi, nakanisi ete ngai na yo tosepelaka na (lobelá likambo moko oyo ebongi).’
● ‘Na ntembe te, ozali na lingomba na yo. Okosepela koyebisa ngai lingomba yango? . . . Tosololaka mpe na bato ya lingomba na yo. Okanisaka nini mpo na (lobelá lisolo oyo oyei na yango)?’
● ‘Ɛɛ, nayoki yo malamu. Kasi toyei kotala yo mpo tozali libota oyo elingaka komona bato bafandi esika moko na kimya. Tolɛmbi koyoka bansango ya bitumba mpe ya bampasi mpokwa nyonso. Nakanisi yango etungisaka yo mpe. . . . Kasi eloko nini ekoki mpenza kosilisa makambo yango? . . . Bilaka ya Biblia ezali kolendisa biso mpenza.’
● ‘Nasepeli ndenge oyebisi ngai likanisi na yo. Yebisá ngai naino: Mpo na nini osepelaka na biso te? Ezali mpo na makambo oyo tolakisaka yo na Biblia to nde mpo toyaka kotala yo?’
‘NAZALI NA LINGOMBA NA NGAI’
● ‘Yebisá ngai naino: Lingomba na yo eteyaka ete na mikolo ezali koya, bato malamu bakofanda libela na libela awa na mabele? . . . Likanisi yango esepelisi yo te? . . . Talá vɛrsɛ oyo emonisi likanisi yango. (Nz. 37:29; Mat. 5:5; Em. 21:4)’
● ‘Nandimi ete moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye na likambo yango. Kasi oyebi ete Nzambe azali koluka mpenza bato oyo basengeli kozala basambeli na ye ya solosolo? Yoká ndenge Yoane 4:23, 24 elobi. Kosambela Nzambe “na solo” elimboli nini? . . . Eloko nini Nzambe apesá biso mpo na kosalisa biso tóyeba oyo ezali solo mpe oyo ezali lokuta? . . . (Yoa. 17:17) Yoká mpo na nini yango ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na biso. (Yoa. 17:3)’
● ‘Osambelaka banda kala? . . . Okanisi ete mokolo mosusu bato nyonso bakosambela na lingomba kaka moko? . . . Maloba oyo ezali awa na Emoniseli 5:13 etindi ngai nakanisa likambo yango mingi. . . . Tosengeli kosala nini mpo tózala na kati ya bato oyo balobelami awa?’
● ‘Nazalaki na mposa ya kokutana na moto lokola yo, oyo asepelaka na makambo ya Nzambe. Lelo oyo bato lokola yo bazali mingi te. Tiká natuna yo naino, okanisaka nini mpo na elaka ya Biblia oyo elobi ete Nzambe akolongola mabe nyonso mpe akokómisa mabele esika oyo kaka bato ya sembo nde bakofanda? Likambo yango esepelisi yo te?’
● ‘Omipesaka mingi na lingomba na yo? . . . Mikolo oyo, bato mingi bayaka na losambo? . . . Okanisi ete mingi na bango balingaka mpenza kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na bango, mokolo na mokolo? (To, okanisi ete bango nyonso bazali na likanisi moko mpo na ndenge ya kosilisa mikakatano oyo ezali lelo na mokili?) Biso tomonaka ete koyekola na bato Biblia esalisaka mingi.’
● ‘Namoni mpenza ete osepelaka na lingomba na yo. Kasi bato mingi bazali kosepela te na makambo oyo ezali kosalema na mokili. Mbala mosusu yo mpe osepelaka na yango te, boye te? . . . Tokosuka wapi?’
● ‘Osepelaka kotánga Biblia? . . . Ozwaka ntango ya kotánga yango mbala na mbala?’
● ‘Nasepeli ndenge oyebisi ngai bongo. Nakanisi ete, ata ozali na lingomba nini, biso nyonso tolingaka mpenza ete kimya ezala na mokili (to, kobatela bana na biso mpo bato mabe bábebisa bango te; to, kofanda na bato oyo balinganaka mpenza; to, koyokana malamu na bato mosusu, mpe likambo yango ekoki kozala mpasi soki moto na moto azali kobunda na mikakatano na ye).’
● ‘Nasepeli koyeba ete olingaka makambo ya Nzambe mingi. Lelo bato mingi bakipaka lisusu makambo ya Nzambe te. Kutu, bato mosusu bakanisaka ete Nzambe azali te. Kasi na ndenge bateyá yo, okanisaka ete Nzambe azali nani? . . . Talá, Biblia emonisi biso nkombo na ye. (Kob. 6:3; Nz. 83:18)’
● ‘Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye básakola, alobaki na bango ete bákende na mabele mobimba; na yango, basengelaki kokutana na bato ya mangomba mosusu. (Mis. 1:8) Kasi ayebaki ete baoyo bazali na nzala mpe mposa ya bosembo bakoyoka bango. Nsango nini mpenza alobaki ete esengeli kosakolama na mikolo na biso? (Mat. 24:14) Bokonzi yango ezali nini?’
‘TOZALI BAKRISTO’
● ‘Nasepeli mingi koyeba yango. Na yango, oyebi malamu ete Yesu asalaki mosala oyo biso tozali kosala: azalaki kokende kotala bato epai na bango, mpe atindaki bayekoli na ye básala mpe bongo. Oyebi likambo oyo bazalaki kolobela mingi na mosala na bango ya kosakola? . . . Yango nde toyei koyebisa yo lelo. (Luka 8:1; Dan. 2:44)’
● ‘Soki bongo, nakanisi okosepela na likambo oyo Yesu alobaki na Lisolo Likoló ya Ngomba. Na bolingo mpenza, alobaki polelepolele ete . . . (Mat. 7:21-23) Motuna oyo tosengeli komituna yango oyo: Nayebi mpenza mokano ya Tata na biso ya likoló malamu? (Yoa. 17:3)’
‘NAZALI NA MOSALA’
● ‘Soki bongo, nakoloba mingi te. Nayei kaka mpo nayebisa yo likanisi moko ya ntina mingi. (Lobelá makanisi ya ntina ya lisolo na yo na fraze moko to mibale.)’
● ‘Malamu. Nakosepela kozongela yo nsima, ntango okozala na mosala te. Kasi liboso natika yo, nalingi kotángela yo vɛrsɛ moko oyo ekosalisa biso tókanisa likambo moko ya ntina.’
● ‘Namitye na esika na yo. Lokola nazali mama ya libota (to nasalaka; to natángaka), ngai mpe nazali na makambo ya kosala ebele. Yango wana, nakoloba mingi te. Biso nyonso tokutanaka na mikakatano. Biblia emonisi ete tozali mpenza pene na ntango oyo Nzambe akoboma mokili mabe oyo. Kasi, bato mosusu bakobika. Motuna tosengeli komituna yango oyo: Ngai ná yo tosengeli kosala nini mpo tózala na kati ya bato oyo bakobika? Biblia eyanoli na motuna yango. (Sef. 2:2, 3)’
● ‘Yango wana nayei kotala yo. Biso nyonso tozali na misala mingi—mpe yango ekoki kosala ete tóbosana makambo oyo eleki ntina na bomoi, boye te? . . . Nakoloba mingi te, kasi nakanisi ete okosepela mpenza na vɛrsɛ oyo. (Luka 17:26, 27) Nani na kati na biso akosepela azala lokola bato oyo? Yango wana, atako tozali na misala mingi, tosengeli kozwa mwa ntango mpo na kotalela oyo Biblia ezali koloba. (Lakisá mikanda tozali kokabola.)’
● ‘Okosepela tózongela yo nsima ya miniti 30, soki tosilisi kotala bato mosusu?’
● ‘Soki bongo, nakozwa yo ntango mingi te. Mbala mosusu nakozongela yo mokolo mosusu. Kasi liboso natika yo, nalingi kopesa yo mokanda moko ya ntina. (Lakisá ye mokanda oyo tozali kokabola na sanza yango.) Mokanda oyo ekosalisa yo oyekola Biblia mpe oyeba biyano oyo Biblia epesi na mituna lokola (tuná motuna moko to mibale).’
● ‘Limbisá ngai ndenge nakuti yo na mosala. Ntango mosusu oyebi ete nazali Motatoli ya Yehova. Nalingi kolakisa yo likanisi moko ya ntina oyo ezali na Biblia. Kasi lokola ozali na ntango ya koyoka ngai sikoyo te, nalingi natikela yo trakte oyo, ezali kolobela (yebisá motó ya likambo na yango). Kotánga yango ekozwa yo ntango mingi te, kasi okosepela na yango.’
● ‘Namitye na esika na yo. Tozalaka na ntango mingi te mpo na kosala makambo nyonso. Kasi osí omituná ndenge bomoi ekozala soki moto akómi na bomoi ya seko? Nayebi ete likanisi yango ekoki kokamwisa yo. Kasi, tiká nalakisa yo vɛrsɛ moko oyo emonisi ete likambo yango ekoki kosalema. (Yoa. 17:3) Na bongo, oyo tosengeli kosala sikoyo ezali koyekola koyeba Nzambe mpe Mwana na ye. Yango wana totikeli yo mokanda oyo.’
‘MPO NA NINI BOYAKA KOTALA BATO MBALA NA MBALA?’
● ‘Mpo toyebi ete tozali na mikolo ya nsuka oyo Biblia elobeli. Tomoni ete ezali na ntina biso nyonso tólukaka koyeba ndenge makambo oyo ezali koleka lelo na mokili ekosuka. (Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo euti kosalema to lobelá makambo oyo ezali koleka na mokili.) Motuna tosengeli komituna yango oyo: Tosengeli kosala nini mpo tóbika na nsuka ya mokili oyo?’
● ‘Mpo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. Biso nyonso tosengeli kosala bongo, boye te?’
‘NAYEBI MOSALA NA BINO MALAMU MPENZA’
● ‘Nasepeli mingi koyoka yango. Ozali na ndeko to moninga moko oyo azali Motatoli ya Yehova? . . . Tiká natuna yo naino: Ondimaka makambo ya Biblia oyo toteyaka, na ndakisa, tozali na “mikolo ya nsuka”; etikali moke Nzambe alongola bato mabe; mabele oyo ekokóma paradiso epai bato bakozala na bomoi ya seko, na nzoto ya kokoka, mpe bakolingana mpenza?’
‘NAZALI NA MBONGO TE’
● ‘Tozali kokɔngɔla mbongo te. Kasi tozali nde kosɛnga bato báyekola Biblia ofele. Talá moko ya masolo oyo tozali koyekola na bato (salelá mokapo moko ya mokanda oyo tozali koyekola yango na bato). Okoki kopesa ngai mwa miniti moke nalakisa yo ndenge yango esalemaka? Okofuta eloko te.’
● ‘Biso tozali kosepela nde na bato, tozali koluka mbongo na bango te. (Kobá lisolo. Na nsima lakisá bango mokanda moko mpe limbolá ndenge ekoki kosalisa bango. Soki basepeli na yango mpe bandimi kotánga yango, tikelá bango yango. Soki ebongi, lobelá ndenge tozwaka mbongo ya kotambwisa mosala na biso na mokili mobimba.)’
NTANGO MOTO ALOBI: ‘NAZALI MOTO YA BUDA’
● Kokanisa mbala moko te ete bato nyonso ya Buda bandimaka makambo moko. Mateya ya Lingomba ya Buda ezali ndenge moko te, mpe moto na moto alimbolaka yango na ndenge na ye. Lingomba ya Buda oyo ezali na Japon ekeseni mingi na oyo ezali na Azia ya sudi-ɛsti. Lisusu, moto na moto atalelaka makambo na ndenge na ye. Nzokande, makambo oyo elandi ekoki kosalisa: (1) Lingomba ya Buda endimaka te ete Nzambe azali moto, to azali Mozalisi. Nzokande, ebele ya bato ya Buda basambelaka bikeko mpe bitiká (reliques) ya Buda. (2) Siddhartha Gautama, oyo azwá nkombo ya Buda, akómá moto oyo bandimi na ye balandaka mpe bamekolaka. Azalaki kolendisa bato báyekola koyeba bomoto ya moto mpo bákóma na boyebi oyo eleki boyebi nyonso; azalaki mpe koloba ete mpo na kosilisa mpenza mpasi, moto asengeli kolongola bamposa nyonso ya bomoto na makanisi na ye. Azalaki koteya ete na ndenge yango moto akokóma na Nirvana, elingi koloba, akobotama lisusu mbala na mbala te. (3) Bato ya Lingomba ya Buda basambelaka bankɔkɔ, mpo bamonaka ete bango nde bapesaka bomoi.
Makanisi ya kosolola na bango: (1) Ntango ozali kosolola na bato ya Buda, monisá polele ete osambelaka te na lingomba ya bokristo ya nkombo mpamba. (2) Bato ya Buda bamemyaka “mikanda misantu,” yango wana, bamemyaka mpe Biblia. Na esika ya kolobela mingi filozofi ya Buda, lobelá nsango ya kolendisa oyo ezali na Biblia. Monisá bango ete Biblia ezali mokanda ya filozofi ya bato te, kasi ezali nde Liloba ya Yehova Nzambe, Mozalisi ya bato; yango nde tosengeli kolanda. Tuná na limemya mpenza soki okoki kolakisa bango likanisi moko ya ntina na Biblia, mokanda mosantu. (3) Ebele ya bato ya Buda basepelaka mpenza kozala na kimya, na libota ya esengo, mpe balingaka kozala na bizaleli ya malamu. Balingaka koyoka masolo ya ndenge wana. (4) Monisá bango ete Biblia elobi ete guvɛrnema moko ya sembo oyo ezali na likoló ekoyangela mabele, yango nde ekosilisa mikakatano ya bato. Emonisi ndenge mabele ekozala na mikolo ezali koya mpe elikya malamu ya kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekokóma paradiso. (5) Okoki mpe komonisa ete Biblia elobeli ndenge bomoi ebandaki, ntina na yango, ndenge bakufi bazali mpe elikya ya lisekwa, mpe ntina oyo mabe ezali awa na mokili. Kolobela mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe na boboto mpe polelepolele, ekosimba mitema ya bato oyo bazali lokola bampate.
Mwa buku A la recherche d’un père ebongisamaki mpenza mpo na kosalisa bato ya Buda ya mitema sembo. Okoki mpe kolakisa bango buku L’humanité à la recherche de Dieu, na mokapo 6, esika balobeli Lingomba ya Buda. (Mikanda yango ezali na Lifalanse.)
NTANGO MOTO ALOBI: ‘NAZALI MOTO YA HINDU’
● Osengeli koyeba ete mateya ya Lingomba ya Hindu ezali makasi mingi mpe makambo na yango elandaka molɔngɔ te. Ntango mosusu koyeba makambo oyo elandi ekosalisa yo: (1) Lingomba ya Hindu eteyaka ete nzambe Brahman azali na ndenge misato—Brahma Mozalisi, Vishnu Mobateli mpe Siva Mobomi. Kasi Bahindu bandimaka te ete nzambe azali moto ya solosolo oyo azali mpenza. (2) Bahindu bandimaka ete biloko nyonso oyo ekelamá ezali na molimo oyo ekufaka te, ete molimo ebotamaka mbala na mbala, ete makambo oyo yango esalaka (Karma) nde ekataka lolenge oyo molimo yango ekobotama mbala na mbala, ete ‘ekotika kobotama’ bongo kaka soki etiki mposa nyonso oyo euti na nzoto, mpe ete soki esali bongo, molimo ekosangana na elimo ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (3) Eyebani ete Bahindu bamemyaka mangomba mosusu. Bahindu bandimaka ete, atako mateya ya mangomba ezali bongolabongola, mangomba nyonso ezali komema na solo kaka moko.
Na esika ya kolobela mateya makasimakasi ya Lingomba ya Hindu, lobelá nde mateya ya solo oyo ezali kosepelisa, oyo ezali na Biblia Mosantu. Bibongiseli ya bolingo oyo Yehova azwi mpo na kopesa bomoi ezali mpo na bato ya ndenge nyonso, mpe mateya ya solo oyo emonisami polele na kati ya Liloba na ye ekosimba mitema ya baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene. Kaka Biblia nde ezali kopesa elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya; kaka Biblia nde ezali kopesa biyano ya malamu na mituna ya ntina oyo bato bamitunaka. Pesá bango libaku ya koyoka biyano yango. Likambo mosusu ya koyeba ezali ete, na buku ya nzembo ya Lingomba ya Hindu (Rig-Veda), loyembo 10. 121 ezali na motó ya likambo ete: “Epai ya Nzambe oyo ayebani te.” Mbala mosusu okomona malamu olobela yango na ndenge oyo ntoma Paulo, na Atene, alobelaki etumbelo oyo bakomá likoló na yango ete “Epai ya Nzambe oyo ayebani te.” (Mis. 17:22, 23) Simbá ete, soki balongoli lɛtrɛ “V” na nkombo ya nzambe ya Hindu oyo babengi Vishnu, ekokóma Ish-nuh, oyo elimboli “moto Noa,” na lokota ya Kaladea. Monisá oyo Biblia elobi mpo na Mpela ya ntango ya Noa. Baoyo bazali komitungisa ete bakobotama mbala na mbala bakoki kosalisama na makambo oyo ezali na motó ya likambo “Kobotama mbala na mbala” na nkasa 214, 215.
Mwa babuku Le chemin de la liberté: la vérité divine; De Kurukshetra à Harmaguédon et à votre survie mpe Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre? ezali na mateya oyo ekoki kosalisa Bahindu ya mitema sembo. Okoki mpe kolakisa bango buku L’humanité à la recherche de Dieu, na mokapo 5, esika balobeli Lingomba ya Hindu. (Mikanda yango ezali na Lifalanse.)
NTANGO MOTO ALOBI: ‘NAZALI MOYUDA’
● Liboso, luká koyeba mpo na nini moto yango alobi ete azali Moyuda. Mingi na bango basambelaka te. Mingi na bango balobaka ete bazali Bayuda kaka mpo na koyebisa ekólo na bango.
Talá mwa makanisi ya ntina oyo osengeli koyeba: (1) Bato ya Lingomba ya Bayuda bamonaka ete epekisami kotánga nkombo ya Nzambe. (2) Bayuda mingi bakanisaka ete “Biblia” ezali mokanda ya bakristo, kasi soki olobeli “Makomami ya Ebre,” “Makomami” to “Tora,” mokakatano yango ekobima te. (3) Bonkɔkɔ nde esimbi kondima na bango mpe Bayuda mingi oyo basambelaka bamonaka ete bonkɔkɔ yango ekokani na Makomami. (4) Balobaka ete ezali mpo na Yesu Kristo nde bakristo ya nkombo mpamba banyokolaka Bayuda na nkombo ya Yesu. (5) Bandimaka ete Nzambe asɛngaka bango bátosa Sabata, yango wana baboyaka kosimba mbongo mokolo wana.
Mpo na koyokana na bango, okoki koloba boye: (1) ‘Na ntembe te ondimaka ete, atako tozali bato ya ekólo moko te mpe ya lingomba moko te, biso nyonso tokutanaka na mikakatano ya ndenge moko na mokili ya lelo. Okanisaka ete ezali na eloko moko oyo ekosilisa mpenza mikakatano ya minene oyo tozali kokutana na yango? (Nz. 37:10, 11, 29; 146:3-5; Dan. 2:44)’ (2) ‘Tozali bandimi ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba te mpe tondimaka liteya ya Bosato (Trinité) te, kasi tosambelaka Nzambe ya Abrahama. Tosepelaka mingi mpenza na mateya ya solo oyo etali losambo. Tiká natuna yo naino, lokola Bayuda bandimaka makambo ndenge na ndenge, ndenge nini osalaka mpo na koyeba oyo ezali solo? . . . (Mib. 4:2; Yis. 29:13, 14; Nz. 119:160)’ (3) ‘Tosepelaka mingi na elaka oyo Nzambe apesaki Abrahama ete, na nzela ya momboto na ye bikólo nyonso ekopambolama. (Eba. 22:18)’
Soki moto yango alobi ete andimelaka Nzambe te, tuná ye soki andimelaka ye te banda kala. Na nsima, lobelá ntina oyo Nzambe atiki nzela ete mabe mpe mpasi ezala na mokili. Bayuda mingi babosanaka te ndenge Banazi bazalaki koboma bango.
Soki olingi kolobela ntina ya kosalela nkombo ya Nzambe, luká naino koyeba ndenge moto oyo ozali kosolola na ye atalelaka yango. Monisá ye ete vɛrsɛ ya Kobima 20:7 epekisi kozwa nkombo ya Nzambe na lisɛki, kasi epekisi te kosalela yango na limemya. Na nsima, sololá na ye na bavɛrsɛ lokola Kobima 3:15 (to Nzembo 135:13); 1 Bakonzi 8:41-43; Yisaya 12:4; Yirimia 10:25; Malaki 3:16.
Soki ozali kolobela Masiya: (1) Liboso lobelá bolamu oyo bokonzi na ye ekopesa bato na esika ya kobanda kolobela Masiya. (2) Na nsima, sololá na ye na bavɛrsɛ oyo elobeli moto oyo azali Masiya. (Eba. 22:17, 18; Zek. 9:9, 10; Dan. 7:13, 14) (3) Okoki kolobela ndenge mibale ya koya ya Masiya. (Talá Danyele 7:13, 14 ná Danyele 9:24-26.) (4) Ntango ozali kolobela Yesu, kozanga te kolobela ndenge oyo mokano ya Nzambe ezali kokokisama mokemoke. Monisá ete Yesu ateyaki liboso ete Nzambe apesa nzela ete tempelo ya mibale ebebisama, mpe tempelo yango etongamá lisusu te. Kasi, Yesu alobelaki mingi kokokisama ya Mibeko ná Basakoli mpe ndenge makomi yango ekosalisa bato ya kondima bázwa bomoi ya malamu na mikolo ezali koya.