Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 1 nk. 4-13
  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NZAMBE APONI MOLOBELI NA YE
  • AZALAKI MOTO LOKOLA BISO
  • MAKAMBO OYO TOKOYEKOLA NA BUKU OYO
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Okopona baninga ya lolenge nini?
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 1 nk. 4-13

MOKAPO YA LIBOSO

“Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo”

1, 2. Mpo na nini osengeli kondima makambo oyo otángaka na Biblia?

BIBLIA elobi ete: “Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.” (Mas. 18:24) Osilá kokutana na likambo moko oyo endimisaki yo ete maloba wana oyo euti na Liloba ya Nzambe ezali solo? Ondimaka makambo oyo moninga ya solo alobi. Soki ayebisi yo likambo moko ya malamu to ayebisi yo likambo moko oyo akosala, ondimelaka ye. Soki ayebisi yo likambo moko oyo osengeli kobongisa, oyokelaka ye mpe obongisaka likambo yango. Mbala mingi makambo oyo asalaka emonisaka ete alingi kosalisa yo, ata ntango azali kopesa yo toli. Alingaka ete olonga, yo mpe olingaka bongo mpo na ye mpo boninga na bino eumela.

2 Na makambo mingi, bato oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma Biblia bakoki kozala baninga ya ndenge wana mpo na yo. Yango wana, osengeli kondima makambo oyo bakomaki mpo oyebi ete ezali mpo na bolamu na yo. Bayisraele basengelaki mpe koyokela “bato [oyo] balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.” (2 Pe. 1:20, 21) Yirimia nde moto oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma buku ya bisakweli oyo ezali monene koleka babuku mosusu ya bisakweli; ye mpe moto akomaki mokanda ya Bileli mpe mikanda mosusu mibale ya Biblia.

3, 4. (a) Ndenge nini bato mosusu batalelaka mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli? (b) Mpo na nini makanisi yango ebongi te? Pesá ndakisa.

3 Kasi mbala mosusu omonaka ete ezali na bato oyo balingaka kotánga mokanda ya Yirimia te mpo bakanisaka ete ‘etali bango te.’ Ntango mosusu bakanisaka ete mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli ezali kaka na makebisi ya makasimakasi mpe esakolaka kaka makambo ya mabe.a Kasi ebongi mpenza kotalela mikanda yango ndenge wana?

4 Ya solo, makambo oyo Yirimia akomaki ezali na makebisi mpe batoli ya polele. Kasi ntango mosusu moninga ya solo asalaka mpe bongo, boye te? Yesu mpe alobaki polele ntango baninga na ye, bantoma, bamonisaki makanisi oyo ebongi te; asembolaki bango polele. (Mrk. 9:33-37) Atako bongo, makambo oyo Yesu azalaki koloba ezalaki libosoliboso mpo na bolamu na bango; ezalaki komonisa bango ndenge bakoki kondimama na Nzambe mpe kozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya. (Mat. 5:3-10, 43-45) Ezali mpe bongo mpo na makambo oyo Yirimia akomaki, oyo ezali mpe eteni ya “Makomami nyonso” oyo ezali na litomba mpo na “kosembola makambo.” (2 Tim. 3:16) Yirimia alobelaki polele ndenge oyo Nzambe azalaki kotalela bato oyo bazalaki kotuta ntolo ete basalelaka Yehova kasi oyo basengelaki kobuka mbuma ya etamboli na bango ya mabe. Atako bongo, mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli ezali na nsango moko oyo ezali kopesa elikya mpe ezali komonisa ndenge oyo tokoki kozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya. Yirimia asakolaki makambo mingi oyo emonisi ndenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye; makambo yango etali mpe biso lelo. Lisusu, okomona ete mikanda yango mibale ezali na makambo ya malamu mpe ya kolendisa.​—Tángá Yirimia 31:13, 33; 33:10, 11; Bileli 3:22, 23.

5. Ndenge nini makambo oyo Yirimia akomaki ekoki kosalisa biso?

5 Makambo oyo Yirimia akomaki ekoki kosalisa biso tózala na esengo na kati ya libota ya basaleli ya Nzambe mpe tózala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Tózwa ndakisa ya bondeko mpe bomoko oyo tozalaka na yango. Makambo oyo akomaki ekosalisa biso tólinga bandeko na biso makasi koleka mpe tósalela toli oyo ntoma Paulo apesaki ete: “Bandeko, mpo na kosukisa, bókoba kosepela, kosembolama, kobɔndisama, kokanisa ndenge moko, kofanda na kimya; mpe Nzambe ya bolingo mpe ya kimya akozala na bino.” (2 Ko. 13:11) Makambo oyo Yirimia akomaki eyokani mpe na nsango oyo tosakolaka. Atako toyebisaka bato ete tozali na mikolo ya nsuka mpe tokebisaka bango ete nsuka ya mokili oyo ebɛlɛmi, nsango oyo toteyaka elendisaka bato mpo epesaka bango elikya. Lisusu, makambo oyo Yirimia akomaki ekoki kosalisa biso na bomoi ya mokolo na mokolo. Na makambo mingi, bomoi na biso ná nsango oyo tozali kosakola ekokani na bomoi ya Yirimia mpe nsango oyo azalaki kosakola. Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, tótalela makambo oyo ezalaki kosalema na ntango ya Yirimia mpe mokumba oyo Nzambe apesaki ye. Nzambe ayebisaki mosakoli yango, oyo azalaki ndakisa malamu, ete: “Natye maloba na ngai na monɔkɔ na yo.”​—Yir. 1:9.

Elilingi na lokasa 6

6, 7. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe atyelaki Yirimia likebi, mpe makambo ezalaki ndenge nini na Yuda ntango abotamaki?

6 Mobali ná mwasi oyo bazali kozela kobotama ya mwana na bango bakanisaka mingi ndenge oyo mwana yango akozala, makambo oyo akobanda kolinga, oyo akosala na bomoi na ye, mpe mosala oyo akosala. Na ntembe te, baboti na yo bakanisaki makambo yango. Baboti ya Yirimia mpe bakanisaki makambo wana. Nzokande, makambo ezalaki ndenge mosusu mpo na Yirimia. Mpo na nini? Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ ye moko atyaki likebi na bomoi ya Yirimia mpe na makambo oyo akosala.​—Tángá Yirimia 1:5.

7 Ɛɛ, liboso Yirimia abotama, Nzambe asalelaki likoki na Ye ya koyeba makambo liboso mpo na koyeba ndenge Yirimia akozala. Atyaki mpenza likebi na mwana yango oyo asengelaki kobotama na libota ya nganga-nzambe. Libota yango ezalaki kofanda na nɔrdi ya Yerusaleme. Mwana yango abotamaki na katikati ya siɛklɛ ya nsambo L.T.B.; ezalaki ntango ya malamu te mpo Manase, oyo azalaki mokonzi mabe, azalaki koyangela Yuda na ntango wana. (Talá lokasa 19.) Manase ayangelaki mbula 55, mpe na bambula mingi ya boyangeli na ye azalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova. Mwana na ye Amone alandaki mpe ndakisa mabe ya tata na ye Manase. (2 Bak. 21:1-9, 19-26) Ntango Yosiya, mwana ya Amone abandaki koyangela na Yuda, mbongwana monene esalemaki. Mokonzi Yosiya abandaki koluka Yehova. Na mbula ya 18 ya boyangeli na ye, Yosiya asilisaki kolongola losambo ya bikeko na mokili ya Yuda. Na ntembe te likambo yango esepelisaki baboti ya Yirimia mpo ezali na boyangeli ya Yosiya nde Nzambe apesaki mwana na bango mokumba ya kokóma mosakoli.​—2 Nt. 34:3-8.

Mpo na nini osengeli koyekola na likebi mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli?

NZAMBE APONI MOLOBELI NA YE

8. Mokumba nini Nzambe alobaki akopesa Yirimia, mpe Yirimia alobaki nini?

8 Toyebi te mbula oyo Yirimia azalaki na yango ntango Nzambe ayebisaki ye ete: “Nakómisaki yo mosakoli epai ya bikólo.” Ekoki kozala ete Yirimia azalaki pene na mbula 25, mbula oyo molevi akokaki kobanda mosala na ye ya bonganga-nzambe. (Mit. 8:24) Kasi ata soki azalaki na mbula nini, Yirimia alobaki ete: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá, nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yir. 1:6) Akakatanaki, mpo mbala mosusu akanisaki ete lokola azali naino elenge, akokoka te kokokisa mokumba monene ya kozala mosakoli mpe koloba liboso ya bato.

9, 10. (a) Ntango Yirimia akómaki mosakoli, makambo ezalaki ndenge nini? (b) Kasi mpo na nini, na nsima mokumba na ye ekómaki mpasi?

9 Yirimia akómaki mosakoli ntango Mokonzi Yosiya azalaki kolongola losambo ya bikeko mpe kotombola losambo ya solo. Ezala Yirimia ná Yosiya bazalaki kokutana mpe kosolola mingi to te, ezali polele ete ntango Yosiya azalaki mokonzi, ezalaki ntango moko ya malamu mpo na mosakoli ya solo. Sefania ná Nahumu bazalaki mpe basakoli na ebandeli ya boyangeli ya Yosiya.b Mosakoli-mwasi Huluda, oyo asakolaki mpe na ntango yango, alobelaki mpasi oyo esengelaki koya, mpe Yirimia amonaki kokokisama ya makambo yango. (2 Bak. 22:14) Ya solo, mbala mingi Ebede-meleke ná Baruke, oyo bazalaki baninga ya Yirimia, babikisaki ye na liwa mpe babatelaki ye mpo banguna na ye básala ye mabe te.

10 Soki Nzambe aponaka yo mpo osakola bitumbu na ye, olingaki komiyoka ndenge nini? (Tángá Yirimia 1:10.) Tózwa kaka ndakisa moko ya bitumbu oyo Yirimia asakolaki. Na mobu 609 L.T.B., mampinga ya bato ya Babilone bazalaki koya na Yerusaleme mpo na kobebisa yango. Na ntango yango, Mokonzi Zidikiya alukaki Yirimia ayebisa ye nsango moko ya malamu oyo euti epai ya Nzambe. Kasi nsango ya malamu mpo na mokonzi ezalaki te.​—Tángá Yirimia 21:4-7, 10.

AZALAKI MOTO LOKOLA BISO

11. Mpo na nini Yirimia amonaki ete mokumba na ye ezali mpasi, kasi elendiseli nini azwaki?

11 Kanisá naino ete tozwi mokumba ya kosakwela bakonzi mpe banganga-nzambe mabe nsango oyo ekosilikisa bango mpe bitumbu ya makasi oyo ekokwela bango. Yango nde mokumba Yirimia azwaki, kasi Nzambe asalisaki ye. Akosalisa mpe biso. (Yir. 1:7-9) Nzambe atyelaki elenge Yirimia motema mpe alendisaki ye na maloba oyo: “Nakómisi yo lelo engumba oyo ebatelami makasi, likonzí ya ebende mpe bifelo ya motako mpo na kotɛmɛla mokili mobimba, liboso ya bakonzi ya Yuda, liboso ya bankumu na yango, liboso ya banganga-nzambe na yango mpe liboso ya bato ya mokili. Mpe bakobunda na yo mpenza, kasi bakolonga yo te, mpo ‘nazali elongo na yo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpo na kobikisa yo.’”​—Yir. 1:18, 19.

12. Mpo na nini mbala mosusu tokoki komiyoka lokola Yirimia?

12 Tókanisa te ete Yirimia azalaki moto ya ndenge mosusu. Azalaki moto lokola biso. Lisusu, tosengeli koyeba ete atako Yirimia azalaki na bomoi na ntango ya kala, akutanaki na makambo oyo biso mpe tokutanaka na yango lelo oyo. Ezala na lisangá, na mosala ya kosakola to na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo, tokutanaka na bato ya ndenge na ndenge; ezalaki mpe bongo mpo na Yirimia. Na yango, bomoi ya Yirimia ekoki koteya biso makambo mingi, mpamba te, lokola mosakoli Eliya, Yirimia azalaki mpe “moto lokola biso.” (Yak. 5:17) Tótalela mwa makambo oyo bomoi ya Yirimia ekoki koteya biso.

13, 14. Mpo na nini bakristo mosusu bakoki komiyoka ndenge Yirimia amiyokaki ntango Pashure akɔtisaki ye na bikanga-makolo, ndenge elilingi ya lokasa 10 emonisi yango?

13 Na ntembe te, na bomoi na yo okutaná na bantango ya bisengo mpe bantango ya mpasi. Yebá ete ezalaki mpe bongo mpo na Yirimia. Mokolo mosusu, Pashure, nganga-nzambe moko ya lokumu, abɛtaki Yirimia mpe apesaki mitindo bákɔtisa ye na bikanga-makolo. Mpo na koyokisa ye mpasi, bafinaki makolo na ye, mabɔkɔ na ye, mpe nkingo na ye na kati ya mabaya oyo ekangaki ye mpenza ntango molai. Longola yango, akangaki motema ntango banguna na ye bazalaki kotyola ye. Okanisi ete yo mpe okoki kokanga motema soki bato bazali kotyola yo, to mpe konyokola yo?​—Yir. 20:1-4.

Elilingi na lokasa 10

14 Lokola Yirimia akutanaki na makambo nyonso wana, tozali kokamwa te ntango tozali kotánga makambo oyo akomaki ete: “Mokolo oyo nabotamaki elakelama mabe! . . . Mpo na nini nabimaki na libumu ete namona mosala makasi ná mawa mpe mpo mikolo na ngai esuka kaka na nsɔni?” (Yir. 20:14-18) Ezali polele ete alɛmbaki mpenza nzoto. Osilá komiyoka ete olɛmbi nzoto mpe obandaki komituna soki ozali lisusu na ntina, soki mosala na yo ezali lisusu na ntina to soki ezali mpenza na ntina okoba kosalela Yehova? Bato nyonso oyo basilá komiyoka ndenge wana basengeli koluka koyeba makambo oyo Yirimia akutanaki na yango mpe ndenge oyo yango esukelaki ye.

Nini esimbi motema na yo na ndenge oyo Yehova aponaki Yirimia azala mosakoli? Mpo na nini mbala mosusu okoki komiyoka lokola Yirimia?

15. Ndenge oyo Yirimia azalaki ntango mosusu na esengo mpe ntango mosusu na mawa, ekoki koteya biso nini?

15 Yirimia alobaki maloba ya kolɛmba nzoto oyo ezali na Yirimia 20:14-18 kaka nsima ya kolendisa bato báyembela Yehova mpe bákumisa ye. (Tángá Yirimia 20:12, 13.) Likambo ya ndenge wana esilá mpe kokómela yo? Ozalaki na esengo makasi mpe na mbala moko omiyoki mawa. Na ntembe te biso nyonso tokoki kozwa liteya na makambo ya ndenge wana oyo ekómelaki Yirimia. Ezali polele ete azalaki komiyoka lokola bato nyonso, ndenge biso mpe tomiyokaka. Na yango, soki totaleli misala ya Yirimia mpe ndenge oyo azalaki komiyoka, na ntembe te tokozwa matomba mingi na lisolo ya mosakoli yango oyo Mozalisi aponaki mpo azala molobeli na ye.​—2 Nt. 36:12, 21, 22; Ezr. 1:1.

16. Lokola Yirimia azalaki monzemba, yango ekoki kosalisa banani?

16 Bato mosusu bamiyokaka lokola Yirimia mpo bazali minzemba. Na ndenge nini? Nzambe apesaki Yirimia etinda moko oyo ezalaki pɛtɛɛ te. Ayebisaki ye boye: Kobala te. (Tángá Yirimia 16:2.) Mpo na nini Yehova ayebisaki ye bongo, mpe ndenge nini Yirimia atalelaki etinda yango? Likambo nini na lisolo oyo ekoki kosalisa bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali minzemba, ezala bango moko baponi kotikala bongo to mpo na makambo mosusu? Ezali nde na likambo moko na maloba oyo Nzambe ayebisaki Yirimia, oyo ekoki kosalisa bakristo oyo babalá? Ezali boni mpo na bakristo oyo babalá kasi bazali na bana te? Ndenge nini lisolo ya Yirimia ekoki kosalisa mpe yo?

17. Maloba ya mosakoli oyo ezali na Yirimia 38:20 ekoki kotinda biso tókanisa na likambo nini?

17 Simbá ete mokolo moko Yirimia alendisaki mokonzi ya Yuda na maloba oyo: “Nabondeli yo, tosá mongongo ya Yehova na makambo oyo nazali koyebisa yo, mpe makambo ekotambola malamu mpo na yo, mpe molimo na yo ekotikala na bomoi.” (Yir. 38:20) Lisolo yango ezali kosalisa biso tóyeba ndenge ya kofanda na bato mosusu. Yango etaleli mpe ndenge oyo tokoki kofanda na bato oyo bakómi naino batatoli ya Yehova te, kasi oyo tokoki kosalisa mpo báyeba Yehova. Lisusu, makambo oyo Yirimia asalelaki bato oyo batosaka Nzambe ezali ndakisa malamu mpo na biso lelo oyo. Ya solo, bomoi ya Yirimia ekoki koteya biso makambo mingi.

MAKAMBO OYO TOKOYEKOLA NA BUKU OYO

18, 19. Lobelá lolenge ndenge na ndenge oyo moto akoki koyekola mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli?

18 Buku oyo ekosalisa yo oyekola mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli mpe ozwela yango matomba. Na ndenge nini? Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (2 Tim. 3:16) Mikanda yango mibale ezali mpe na kati ya Makomami yango.

19 Ya solo, ezali na ndenge ebele ya koyekola mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli mpo na kozwela yango matomba. Na ndakisa, moto mosusu akosepela koyekola ndimbola ya vɛrsɛ mokomoko ya mikanda yango. Mosusu mpe akoluka koyeba boyokani oyo ezali kati na mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli, elingi koloba koyokanisa bato mpe makambo oyo mikanda yango elobeli, to koyokanisa yango na makambo oyo ezali kosalema na ntango na biso. (Talá mpe Yirimia 24:6, 7; 1 Bakorinti 3:6.) Tokoki mpe koyekola mikanda yango mpo na koyeba makambo oyo esalemaki na ntango ya Yirimia. (Yir. 39:1-9) Ya solo, mbala mosusu ekozala na ntina koyekola mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli na ndenge wana mpo na kozwela yango matomba. Na yango, mokapo 2, oyo ezali na motó ya likambo ete “Mosakoli na ‘eleko ya nsuka ya mikolo,’” ekosalisa biso tóyeba na mokuse ndenge makambo ezalaki na ntango ya Yirimia mpe ndenge oyo Nzambe atambwisaki makambo.

20. Ndenge nini tokoyekola mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli na nzela ya buku oyo?

20 Kasi buku oyo ekosalisa biso tóyekola mikanda yango na lolenge mosusu. Tokomona ete mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli ezali makabo oyo euti na Nzambe mpo na kosalisa biso tózala na bomoi oyo ebongi mpo na Bakristo. (Tito 2:12) Kutu tokomona mpenza ete mikanda yango mibale ezali na makambo ebele oyo ezali na “litomba mpo na koteya.” Ezali kopesa batoli malamu mpe bandakisa oyo ekoki kosalisa biso tózala bato oyo bakoki mpe bazali na nyonso oyo esengeli mpo na kolonga mikakatano ya bomoi. Batoli yango ekosalisa biso, ezala tozali minzemba, bato oyo babalá, bankulutu, babongisi-nzela, batata ya mabota, bamama to bana-kelasi. Biso nyonso tokomona ete mikanda yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ekosalisa biso tózala na “nyonso oyo esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.”​—2 Tim. 3:17.

Elilingi na lokasa 12

21. Mpo na nini ozali kozela na motema likoló boyekoli ya buku oyo?

21 Ntango ozali koyekola mokapo mokomoko ya buku oyo, luká koyeba makanisi oyo okoki kosalela. Na ntembe te, mokanda ya Yirimia mpe mokanda ya Bileli ekomonisa mpenza bosolo ya maloba oyo Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”​—Rom. 15:4.

Ndenge nini mokanda ya Yirimia ná mokanda ya Bileli ekoki kosalisa yo na bomoi na yo ya mokolo na mokolo?

a Na minɔkɔ mosusu, basalelaka liloba “jérémiade” mpo na kolimbola “koimaima” to “komilelalela ya ntango molai.” Zulunalo moko (The Washington Post) ebengaki filme moko oyo elobeli mbongwana ya biloko lokola mai, mopɛpɛ, mpe molunge ete “mitungisi ya Yirimia.”

b Na nsima, bato mosusu lokola Habakuku, Obadia, Danyele, mpe Ezekiele, bazalaki mpe basakoli na ntango oyo Yirimia azalaki kokokisa mokumba na ye. Ntango likama ekwelaki Yerusaleme na mobu 607 L.T.B., Yirimia asilaki kosakola mbula 40, mpe aumelaki lisusu na bomoi mbula 20 nsima ya kobebisama ya Yerusaleme.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto