Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/11 lok. 3
  • Ezali nde mabe kotuna Nzambe mituna?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali nde mabe kotuna Nzambe mituna?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Masolo mosusu
  • Bato mabe bakoumela lisusu ntango boni?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tyelá Yehova motema mpe zalá na bomoi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Tóyoka esengo na Nzambe ya lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/11 lok. 3

Ezali nde mabe kotuna Nzambe mituna?

BATO mosusu balobaka ete ezali mabe kotuna Nzambe mituna. Bakoki kokanisa ete kotuna Nzambe ntina oyo atiki to aboyi makambo mosusu esalema, ezali kozanga limemya. Yo mpe okanisaka bongo?

Soki ezali bongo, okokamwa soki oyebi ete bato mingi ya malamu batunaki Nzambe mituna. Talá mituna oyo bato yango batunaki Nzambe:

Yobo moto ya sembo atunaki boye: “Mpo na nini bato mabe bazali kokoba kozala na bomoi, Bakómi mibange, mpe lisusu baleki bato mosusu na bozwi?”​—Yobo 21:7.

Habakuku, mosakoli moko ya sembo atunaki boye: “Mpo na nini ozali kotala baoyo bazali kosala na bokosi, mpe ofandi nyɛɛ ntango moto mabe azali komɛla moto oyo azali moyengebene koleka ye?”​—Habakuku 1:13.

Yesu Kristo atunaki boye: “Nzambe na ngai, Nzambe na ngai, mpo na nini osundoli ngai?”​—Matai 27:46.

Soki otángi bavɛrsɛ oyo ezali zingazinga ya bavɛrsɛ oyo totángi awa, okomona ata esika moko te oyo Yehovaa Nzambe asilikaki ntango batunaki Ye mituna yango. Ya solo, ekoki kokamwisa biso te soki andimaki bátuna ye mituna wana. Na ndakisa, Nzambe asilikaka te ntango tosɛngaka ye apesa biso biloko oyo tosengeli na yango mpo nzoto na biso ezala malamu. Na esengo nyonso, apesaka biso biloko yango. (Matai 6:11, 33) Ndenge moko mpe, andimaka koyebisa biso makambo oyo ekoki kobatela makanisi mpe mitema na biso. (Bafilipi 4:6, 7) Kutu, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino.” (Matai 7:7) Likambo oyo etindaki Yesu alobela elaka yango emonisi ete azalaki kaka te kolobela kozwa biloko ya mokili, kasi mpe biyano na mituna ya ntina.

Soki ozalaki na likoki ya kotuna Nzambe mituna, olingaki kotuna ye motuna nini kati na mituna oyo elandi?

  • Bomoi na ngai ezali na ntina?

  • Nini ekokómela ngai soki nakufi?

  • Mpo na nini otiki ete nanyokwama?

Lokola “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe,” okokuta biyano oyo Nzambe apesi na Biblia, Liloba na ye. (2 Timote 3:16) Talelá makambo oyo etindaki bato mosusu bátuna mituna oyo ezali awa na likoló mpe biyano oyo Biblia epesi.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto