Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jr mok. 4 nk. 43-53
  • Kebá na bokosi ya motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kebá na bokosi ya motema
  • Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MOTEMA EKOKI KOKOSA BISO
  • NDENGE OYO YEHOVA AZALI KOBONGISA BISO
  • NDIMÁ YEHOVA ABONGISA YO
  • Omitunaka mokolo na mokolo ete “wapi Yehova?”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • Mokanda ya Biblia nimero 24​—Yilimia
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
jr mok. 4 nk. 43-53

MOKAPO YA MINEI

Kebá na bokosi ya motema

1, 2. Mpo na nini ezalaka mpasi koyeba ndenge motema na biso ya elilingi ezali mpenza?

KANISÁ ete mokolo moko na ntɔngɔntɔngɔ, wana ozali naino na mbeto, mbala moko oyoki mpasi makasi na ntolo mpe mpema ekómi mokuse. Mbala mosusu okanisi ete ‘motema elingi ekangama.’ Kosala lokola ozali koyoka eloko te ekosalisa yo te. Ekozala malamu osala noki mpo na koluka lisalisi. Na yango, okosɛnga bámema yo nokinoki na lopitalo mpo okutana na monganga oyo asalisaka maladi ya motema. Monganga yango akosala yo ekzamɛ mpe mbala mosusu akosalela masini oyo babengi électrocardiogramme mpo na koyeba soki ozwi maladi ya motema. Soki monganga asali nokinoki, amoni maladi yango mpe apesi yo nkisi, yango ekoki kobikisa yo.

2 Tokoloba nini mpo na motema na biso ya elilingi? Mbala mingi ezalaka mpasi mpo na koyeba ndenge motema na biso ya elilingi ezali. Mpo na nini? Tozali kotánga na Biblia boye: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?” (Yir. 17:9) Na yango, motema na biso ekoki kokosa biso mpe kotinda biso tókanisa ete tozali malamu na elimo, nzokande bandeko bazali komona mwa makambo oyo emonisi ete tozali na mokakatano moko boye na elimo mpe bazali komitungisa mpo na biso. Mpo na nini motema ekoki kokosa biso ndenge wana? Ezali bongo mpamba te Satana, bamposa mabe ya mitema na biso mpe mokili oyo ekoki kokanga biso miso mpo tómona te ndenge oyo motema na biso ezali mpenza. Bomoi ya Yirimia mpe ya bato ya Yuda na ntango na ye ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya kosala ekzamɛ ya motema na biso ya elilingi.

3. Bato mingi bakómisi biloko nini banzambe na bango?

3 Makambo oyo bato mingi ya Yuda bazalaki kosala emonisi ete mitema na bango esilaki kobeba. Batikaki Nzambe ya solo kaka moko mpo na kolanda banzambe ya Bakanana, kasi lisosoli na bango ezalaki kotungisa bango ata moke te mpo na yango. Yehova atunaki bango boye: ‘Wapi banzambe na bino oyo bomisaleli? Tiká bango bátɛlɛma soki bakoki kobikisa bino ntango bokozala na mpasi. Mpo banzambe na bino . . . bakómi ebele lokola bingumba na bino.’ (Yir. 2:28) Lelo oyo, biso mpe tokoki kokanisa mbala mosusu ete tosambelaka banzambe ya bikeko te. Nzokande, diksionɛrɛ moko elimboli liloba “nzambe” boye: “Moto to eloko oyo bazali kopesa valɛrɛ mingi koleka.” Bato mingi na mokili batyaka mosala na bango, kolɔngɔnɔ ya nzoto, libota, ata mpe nyama oyo babokolaka na ndako na esika ya liboso. Bato mosusu bamonaka ete masano, bavedɛti ya mokili, bamasini oyo ezali kobima mikolo oyo, kosala mibembo, to makambo ya bonkɔkɔ na bango ezali na valɛrɛ mingi koleka. Bato mingi bandimaka kutu kobebisa boyokani na bango na Nzambe mpo na makambo wana. Bakristo ya solo bakoki mpe kozwama na motambo ya ndenge wana, ndenge Bayuda ya ntango ya Yirimia bazwamaki?

MOTEMA EKOKI KOKOSA BISO

4. Bayuda oyo bazalaki koloba ete: “Wapi liloba ya Yehova? Ekokisama,” bazalaki mpenza na mposa ya liloba yango?

4 Mbala mosusu okosepela koyeba makambo oyo etindaki Yirimia aloba ete motema ezali eloko ya kosakana na yango te. Alobaki bongo mpo Bayuda bazalaki koloba ete: “Wapi liloba ya Yehova? Tobondeli yo, ekokisama.” (Yir. 17:15) Kasi Bayuda yango bazalaki mpenza na mposa ya liloba yango? Kutu, mokapo wana ya mokanda ya Yirimia ebandi na maloba oyo: “Lisumu ya Yuda ekomami na ekomeli ya ebende. Na nsɔngɛ ya diama, yango ekatami mayemi na etanda ya motema na bango.” Mokakatano oyo Bayuda wana bazalaki na yango ezali ete bazalaki ‘kotyela moto ya mabele motema, mpe kokómisa moto ya mosuni lobɔkɔ na bango, mpe motema na bango ekómaki kotika Yehova.’ Bakesanaki mpenza na mwa ndambo ya bato oyo bazalaki koluka litambwisi ya Yehova mpe mapamboli na ye.​—Yir. 17:1, 5, 7.

5. Ezaleli nini Bayuda ya ntango ya Yirimia bamonisaki na oyo etali malako ya Yehova, mpe likambo yango ekoki koteya biso nini?

5 Bato mingi ya Yuda bamonisaki ndenge oyo mitema na bango ezalaki na ndenge baboyaki kotosa liloba ya Nzambe. (Tángá Yirimia 17:21, 22.) Na ndakisa, na mokolo ya sabata, Bayuda basengelaki kotika misala nyonso mpe kopema, mpo bákoka komipesa na makambo ya elimo. Bayuda ya ntango ya Yirimia basengelaki te kotɛka to kosomba biloko, to kosala misala mosusu na mokolo ya sabata. Kasi makambo oyo bazalaki kosala na mokolo yango emonisi ndenge oyo mitema na bango ezalaki. Yirimia alobi boye: “Bayokaki te mpe basembolaki litoi na bango te, mpe bakómisaki mitó na bango makasi mpo báyoka te mpe mpo bázwa disiplini te.” Atako bayebaki mobeko ya Nzambe, bazalaki kosala oyo motema na bango elingi: bazalaki kokipe mobeko ya sabata te.​—Yir. 17:23; Yis. 58:13.

6, 7. (a) Lelo oyo, makanisi nini ya mabe ekoki kokɔtela mokristo, atako ayebi toli ya moombo ya sembo na oyo etali bakelasi ya milaimilai? (b) Likambo yango ekoki kotinda mokristo akóma kotalela makita ndenge nini?

6 Lelo oyo, tosɛngisami te kotosa mobeko ya Sabata. Kasi likambo oyo Bayuda yango basalaki emonisi ndenge oyo mitema na bango ezalaki, mpe yango ekoki koteya biso. (Kol. 2:16) Mpo na kosala mokano ya Nzambe, totiká kolanda bamposa na biso moko to koluka makambo ya mokili. Tomoná ete ezali mpenza bozoba koluka kosepelisa Nzambe na ndenge oyo biso moko toponi. Longola yango, na ntembe te oyebi bandeko mingi oyo bamipesaki na kosala mokano ya Nzambe mpe bamonaki ete bakómaki na bomoi ya kopema mpe ya kimya. Nzokande, ndenge nini motema ekoki kokosa biso?

7 Mokristo akoki kokanisa ete motema na ye ekoki kokosa ye ata moke te, ndenge Bayuda mingi ya ntango ya Yirimia bazalaki mpe kokanisa. Na ndakisa, ndeko moko akoki kokanisa boye, ‘nasengeli kobatela mosala na ngai mpo na koleisa libota na ngai.’ Kokanisa bongo ezali na yango mabe te. Akoki lisusu kokanisa boye, ‘nasengeli kotánga bakelasi mosusu mpo nazwa to nabatela mosala oyo efutaka malamu.’ Likanisi wana mpe ekoki kozala na yango mabe te. Kasi mbala mosusu ndeko yango azali kokanisa bongo mpo amoni ete ‘makambo ezali lisusu te ndenge ezalaki liboso, ete mpo na kobika lelo oyo moto asengeli kotánga na iniversite mpo abatela mosala na ye.’ Kasi soki ndeko yango akebi te, akoki kobanda kotyola toli ya malamu mpe ya bwanya oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa na oyo etali bakelasi ya milaimilai mpe akoki kobanda kozangisa makita ya lisangá! Na likambo yango, bandeko mosusu balandaki mokemoke makanisi ya mokili mpe lolenge oyo mokili etalelaka makambo wana. (Ef. 2:2, 3) Yango wana Biblia ekebisi biso boye: ‘Bótika te mokili eyema bino ndenge yango moko elingi.’​—Rom. 12:2, Phillips.a

Bililingi na lokasa 46

Motema na yo ekosá yo mpo ozangisa makita?

8. (a) Mbala mosusu mokristo akoki komikumisa mpo na makambo nini? (b) Mpo na nini koyeba makambo na ntina na Nzambe mpe misala na ye ekoki kaka te?

8 Ezali solo ete bakristo mosusu na siɛklɛ ya liboso bazalaki na bomɛngo mpe mbala mosusu bayebanaki ete bazali bato minene na mokili. Ezali mpe bongo mpo na bandeko mosusu lelo oyo. Kasi ndenge nini bandeko yango basengeli kotalela bozwi na bango mpe makambo mosusu oyo bazali kosala na mokili? Ndenge nini biso mpe tosengeli kotalela bango? Yehova apesi eyano na mituna yango na nzela ya Yirimia. (Tángá Yirimia 9:23, 24.) Na esika ete bandeko yango bámikumisa mpo na bozwi na bango mpe makambo oyo bazali kosala na mokili, ekozala malamu bándima ete koyeba Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba nde likambo oyo ezali na valɛrɛ koleka. (1 Ko. 1:31) Kasi kozala na mayele ya kososola mpe koyeba Yehova elimboli nini? Ya solo, Bayuda ya ntango ya Yirimia bayebaki nkombo ya Nzambe. Bayebaki mpe makambo oyo Nzambe asalelaki bankɔkɔ na bango ntango abikisaki bango na Mbu Motane, ntango bazalaki kokende na Mokili ya Ndaka, na mikolo ya basambisi, mpe ntango bakonzi ya sembo bazalaki koyangela. Nzokande, bayebaki mpenza Yehova te, mpe bandimelaki ye mpenza te. Atako bongo, bazalaki kaka koloba ete: ‘Tozali na likambo te. Ya solo mpenza nkanda ya [Nzambe] elongwe epai na biso.’​—Yir. 2:35.

Mpo na nini tosengeli koyeba ete motema na biso ezali na bokosi? Ndenge nini tokoki kosala ekzamɛ ya motema na biso ya elilingi mpe koyeba ndenge Yehova, Moto oyo atalatalaka mitema, amonaka biso?

NDENGE OYO YEHOVA AZALI KOBONGISA BISO

Elilingi na lokasa 48

Ondimaka ete Yehova abongisa yo?

9. Nini endimisi biso ete moto akoki kobongola motema, mpe makambo nini ekoki kosalisa ye?

9 Bayuda oyo Yirimia azalaki kosakwela liloba ya Nzambe basengelaki kobongola mitema na bango. Bakokaki kosala bongo mpamba te Nzambe alobaki mpo na Bayuda oyo basengelaki kozonga ete: “Nakopesa bango motema moko mpo báyeba ngai, ete ngai nazali Yehova; mpe bakokóma mpenza bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango, mpo bakozongela ngai na motema na bango mobimba.” (Yir. 24:7) Mbongwana ya ndenge wana ekoki mpe kosalema lelo. Lisusu, mingi kati na biso bakoki kobongisa makanisi ya mitema na bango ya elilingi. Talá makambo misato oyo ekoki kosalisa biso: koyekola malamumalamu Liloba ya Nzambe, kososola makambo oyo Nzambe asalaka na bomoi na yo moko, mpe kosalela makambo oyo toyekolaka na ntina na ye. Biso tokolinga te tózala lokola bato ya ntango ya Yirimia. Tokolinga nde ete Nzambe, Monganga Monene oyo atalatalaka mitema, atalatala mitema na biso. Biso moko mpe tokoki kotalatala mitema na biso na nzela ya Biblia, mpe ntango tozali kososola makambo oyo Yehova asalelaka biso. (Nz. 17:3) Kosala bongo ekomonisa ete tozali na bwanya mpenza!

10, 11. (a) Mpo na nini Yirimia akendaki epai ya moyemi-mbɛki? (b) Mpo Yehova abongisa moto, esɛngaka nini?

10 Satana alingaka kokómisa bato nyonso ndenge moko, kasi ntango Nzambe abongisaka bato, atalelaka ndenge moto na moto azali. Likambo oyo Yirimia akutanaki na yango endimisi likanisi wana. Mokolo moko, Nzambe ayebisaki ye akende na ndako ya moyemi-mbɛki moko. Moyemi-mbɛki yango azalaki kosala mosala likoló ya yiká na ye, kasi ntango mbɛki oyo asalaki ebebaki, moyemi-mbɛki asalaki mbɛki ya ndenge mosusu kaka na mabele ya lima wana oyo ezalaki naino pɛtɛɛ. (Tángá Yirimia 18:1-4.) Mpo na nini Nzambe atindaki Yirimia akende kotala mosala ya moyemi-mbɛki, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

11 Yehova alingaki kosalisa Yirimia mpe Bayisraele báyeba ete ndenge moyemi-mbɛki asalaka, Ye mpe akoki kobongisa bato mpe bikólo ndenge alingi. Ndenge nini Nzambe abongisaka mabele ya lima oyo ezali na mabɔkɔ na ye? Na bokeseni na bayemi-mbɛki mosusu, Yehova akoki kosala libunga te; akoki mpe te kobebisa mosala na ye kaka mpo na kobebisa. Soki moto andimi Yehova abongisa ye, Yehova akobongisa ye mpo na mokano na ye.​—Tángá Yirimia 18:6-10.

12. (a) Yehoyakime asalaki nini ntango Yehova azalaki kosala nyonso mpo na kobongisa ye? (b) Lisolo ya Yehoyakime epesi yo liteya nini?

12 Kasi, ndenge nini Yehova abongisaka moto mokomoko? Lelo oyo, asalelaka mingimingi Biblia. Ntango moto azali kotánga Liloba ya Nzambe mpe kotosa yango, azali komonisa lolenge ya moto oyo ye azali, mpe Nzambe akoki kobongisa ye. Tótalela sikoyo ndakisa ya Mokonzi Yehoyakime mpo na komona ndenge bato ya ntango ya Yirimia bakokaki kotika Yehova abongisa bango na makambo ya bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Mobeko ya Nzambe elobaki ete: “Osengeli kobuba te mosali oyo azwaka lifuti.” Kasi mokonzi atosaki mobeko yango te; asalisaki bandeko na ye Bayisraele mosala makasi ya kotongela ye “ndako monene” kozanga ete afuta bango. (Mib. 24:14; Yir. 22:13, 14, 17) Nzambe alukaki kobongisa Yehoyakime na nzela ya Liloba na Ye oyo atindaki basakoli bayebisa mokonzi. Kasi mokonzi alandaki oyo motema na ye ya bokosi ezalaki kotinda ye asala. Alobaki, “Nakotosa te” mpe akobaki kosala makambo ya mabe oyo abandaki kosala banda bolenge na ye. Yango wana Nzambe alobaki mpo na Yehoyakime ete: “Akokundama ndenge mpunda ya mobali ekundamaka, akobendama mpe akobwakama libanda.” (Yir. 22:19, 21) Na yango ekoki mpenza kozala bozoba soki moto azali koloba ete: ‘Ezali ndenge na ngai’! Lelo oyo, Nzambe azali kotindela biso basakoli te, ndenge atindaki Yirimia, kasi ata bongo azali kotambwisa biso. Moombo ya sembo mpe ya mayele azali kosalisa biso tóyeba mitinda ya Biblia mpe tótosa yango. Mitinda yango ekoki kotalela makambo ya mokolo na mokolo na ndakisa molato na biso, monzɛlɛ to miziki mpe mabina oyo elekaka na bafɛti ya libala mpe na mabaku mosusu. Tokondima ete Liloba ya Nzambe ebongisa makanisi na biso mpo na makambo yango?

13, 14. (a) Mpo na nini Bayuda ya Yerusaleme oyo bazalaki na baombo bandimaki kotika baombo na bango oyo bazalaki Baebre bákende nsomi? (b) Likambo nini Bayuda yango basalaki, oyo emonisi ndenge mitema na bango ezalaki mpenza?

13 Tótalela ndakisa mosusu. Bato ya Babilone batyaki Zidikiya mokonzi mpo ayangela na nkombo ya mokonzi ya Babilone. Na nsima, na esika Zidikiya alanda toli ya Yirimia, atombokelaki mokonzi ya Babilone. (Yir. 27:8, 12) Yango wana mampinga ya Babilone eyaki kozinga Yerusaleme. Mokonzi ná bankumu na ye bamonaki ete basengelaki kosala mwa likambo oyo mobeko esɛngi mpo Nzambe andima bango. Lokola Zidikiya ayebaki ete na mbula ya nsambo basɛngelaki kotika Baebre oyo bazalaki baombo bákende nsomi, asalaki kondimana moko mpo na kopesa baombo yango bonsomi. (Kob. 21:2; Yir. 34:14) Ɛɛ, lokola banguna bazingaki Yerusaleme, Bayuda basalaki lokola nde bandimi kotosa mobeko ya Nzambe mpe batikaki baombo na bango bákende mpo Nzambe abatela bango!​—Tángá Yirimia 34:8-10.

14 Na nsima, basoda ya Ezipito bayaki mpo na kosalisa Yerusaleme, mpe bato ya Babilone bazongaki na mboka na bango. (Yir. 37:5) Na ntango wana, Bayuda oyo bapesaki baombo na bango bonsomi basalaki nini? Bazongisaki lisusu baombo na bango na misala ya makasi. (Yir. 34:11) Likambo Bayuda basalaki yango oyo: ntango bazalaki na likama, basalaki lokola nde bandimi kotosa mibeko ya Nzambe mpo bakanisaki ete yango nde ekosala ete Nzambe alimbisa mabe na bango. Kasi ntango kaka likama elongwaki, bazongelaki etamboli na bango ya mabe. Atako bazalaki kosala lokola nde batosaka Mobeko, makambo oyo basalaki na nsima emonisi ete na mitema na bango, baboyaki kolanda litambwisi ya Liloba ya Nzambe mpe baboyaki ete Liloba yango ebongisa bango.

Liteya nini okoki kozwa na lisolo ya moyemi-mbɛki oyo Yirimia akomaki? Lelo oyo, ndenge nini Yehova azali kobongisa biso?

NDIMÁ YEHOVA ABONGISA YO

15. Na makambo nini okondima ete Yehova abongisa yo? Pesá ndakisa.

15 Lisangá ya Yehova esalisaka biso tóyeba mitinda ya Biblia. Na ndakisa, mbala mosusu toyebi malamu oyo tosengeli kosala soki ndeko moko asilikisi biso. (Ef. 4:32) Mbala mosusu tondimaka ete toli yango ya Biblia ezali ya malamu mpe ya bwanya. Kasi, soki ndeko moko asilikisi biso, tokomonisa ete tozali mbɛki ya ndenge nini? Tokondima mpenza ete Yehova abongisa biso? Soki motema na biso ezali pɛtɛɛ lokola mabele ya lima, tokobongwana mpe tokokóma na makanisi ya malamu; na yango, Moyemi-mbɛki Monene akobongisa biso mpo tókóma mbɛki ya malamu koleka mpo na mokano na ye. (Tángá Baroma 9:20, 21; 2 Timote 2:20, 21.) Na esika tózala na makanisi lokola oyo ya Yehoyakime to Bayuda oyo bazalaki na baombo na ntango ya Zidikiya, tosengeli kondima Yehova abongisa biso mpo na mosala na ye ya lokumu.

16. Likambo nini ya ntina mpenza Yirimia ayebaki malamu?

16 Yirimia mpe andimaki ete Nzambe abongisa ye. Ndenge nini atalelaki likambo yango? Maloba na ye oyo elandi ekoki kosalisa biso tóyeba yango. Alobaki ete: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” Na nsima abondelaki Nzambe ete: “Ee Yehova, sembolá ngai.” (Yir. 10:23, 24) Soki ozali elenge, okolanda ndakisa ya Yirimia? Na ntembe te, osengeli kozwa bikateli mingi na mikolo ezali koya. Bilenge mosusu balingaka ‘kotambwisa lokolo na bango.’ Okoluka litambwisi ya Nzambe ntango ozali kozwa bikateli? Na ndakisa ya Yirimia, okondima mpenza ete makambo oyo bato bazali kosala emonisi ete bazali na likoki te ya kotambwisa makolo na bango? Simbá likambo oyo: Soki oluki litambwisi ya Nzambe, ye akobongisa yo.

17-19. (a) Mpo na nini Yirimia asalaki mobembo molai tii na Efrate? (b) Ndenge nini botosi ya Yirimia emekamaki? (c) Makambo oyo Yirimia asalaki na oyo etali mokaba esalisaki Yehova na likambo nini?

17 Mokumba ya Yirimia esɛngaki mpe ete alanda litambwisi ya Nzambe. Soki ozalaka na esika ya Yirimia, olingaki nde kotosa malako nyonso oyo Nzambe apesaki ye? Mokolo moko, Yehova ayebisaki Yirimia azwa mokaba ya lini mpe alata yango. Na nsima, Nzambe atindaki ye akende na Efrate. Soki otali na karte, okomona ete Yirimia asengelaki kotambola kilomɛtrɛ soki 500 mpo na kokóma na Efrate. Ntango Yirimia akómaki kuna, asengelaki kobomba mokaba yango na lidusu ya libanga mpe na nsima asengelaki kozonga tii na Yerusaleme. Kasi na nsima, Nzambe asɛngaki ye azonga lisusu na Efrate mpo na kozwa mokaba yango. (Tángá Yirimia 13:1-9.) Na mibembo yango nyonso mibale, Yirimia asalaki bakilomɛtrɛ soki 2 000. Bato mosusu oyo batɔndɔlaka Biblia bandimaka te ete Yirimia akokaki kotambola basanza mingi ndenge wana mpo na kosala mobembo ya molai.b (Ezr. 7:9) Kasi, yango nde Nzambe asɛngaki ye mpe yango nde Yirimia asalaki.

18 Kanisá ndenge mosakoli yango azalaki komata mpe kokita bangomba ya Yudea, na nsima mbala mosusu akatisaki mokili ekauká mpo na kokóma na Efrate. Asalaki mibembo nyonso wana kaka mpo na kobomba mokaba ya lini! Mbala mosusu baninga na ye bazalaki komituna soki akei wapi. Ntango azongaki, azalaki lisusu na mokaba ya lini yango te. Na nsima Nzambe ayebisaki ye asala lisusu mobembo wana ya molai mpo na kozwa mokaba yango oyo epɔlaki mpe “ezalaki lisusu na ntina te.” Kanisá naino, mbala mosusu Yirimia akokaki koloba mbala moko ete: ‘Ya mbala oyo eleki. Namoni ata ntina ya likambo yango te.’ Kasi lokola Nzambe asilaki kobongisa ye, Yirimia alobaki ndenge wana te. Na esika amilelalela, asalaki oyo Nzambe asɛngaki ye!

Elilingi na lokasa 53

Mpo na nini tosengeli kotosa malako ya Yehova ata ntango tozali kokanga ntina na yango te?

19 Ezali nsima ya mobembo ya mibale nde Nzambe alimbolelaki Yirimia ntina ya likambo yango. Makambo oyo Yirimia asalaki ezalaki ndakisa oyo akokaki kosalela mpo na koyebisa bato ya Yuda nsango moko ya nguya. Yehova ayebisaki Yirimia ete: “Bato mabe oyo, oyo bazali koboya kotosa maloba na ngai, oyo bazali kotambola na motó makasi na bango mpe oyo bazali kaka kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela bango mpe mpo na kogumbamela bango, bakozala mpe kaka lokola mokaba oyo, oyo ezali lisusu na ntina te.” (Yir. 13:10) Yehova ateyaki bato na ye na ndenge moko oyo bakokaki kobosana te! Lokola Yirimia azalaki kotosa Yehova na motema mobimba, ata na makambo oyo ezalaki komonana ete ezali ya mike, yango esalisaki Yehova na milende oyo asalaki mpo na kosimba mitema ya bato na ye.​—Yir. 13:11.

20. Mpo na nini botosi na yo ekoki kokamwisa bato mosusu, kasi yango ekoki kobimisa matomba nini?

20 Lelo oyo bakristo basɛngisami te kotambola bakilomɛtrɛ mingi mpo Nzambe ateya likambo moko boye. Atako bongo, makambo oyo osalaka lokola ozali mokristo ekoki kokamwisa baninga na yo to kotinda bango báloba mabe mpo na yo, boye te? Ekoki kozala makambo lokola molato mpe monzɛlɛ na yo, bakelasi oyo oponi kotánga, mosala oyo oponá, to mpe ndenge oyo otalelaka masanga. Okolanda ntango nyonso litambwisi ya Nzambe ndenge Yirimia asalaki? Makambo oyo okopona kosala mpo otiki Nzambe abongisa motema na yo ekoki kosalisa yo opesa litatoli ya malamu. Kasi ata ndenge nini, kotosa mitinda ya Yehova oyo ezali na Liloba na ye mpe kondima litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya moombo ya sembo ezali mpo na bolamu na yo ya libela. Landá ndakisa ya Yirimia mpe kotika te motema na yo ekosa yo. Mpo na yango, zalá na ekateli ya kondima ete Nzambe abongisa yo mpe tiká ete akómisa yo mbɛki ya lokumu mpo osalela ye libela.

Mpo na nini ezali na ntina mpenza tóbundisa makanisi mabe oyo ezali kouta na Satana, na motema na biso oyo ezangi kokoka, mpe na mokili?

a Biblia moko (NET Bible, 2005) elobi: “Bótika kolanda makambo ya mokili oyo.” Maloba na nse ya lokasa na vɛrsɛ yango ebakisi ete: “Emonani ete ezalaka mpasi te moto abanda ‘kolanda’ mokili; ekoki kokómela moto kaka boye, kozanga ete ayeba yango. Ata bongo, . . . mbala mosusu moto akoki koyeba ete abandi kolanda mokili mpe akoki kondima likambo yango. Mbala mingi, nyonso mibale esalemaka.”

b Bato mosusu balobaka ete Yirimia akendaki na ye mosika te tii na Efrate. Mpo na nini? Moto moko ya mayele oyo alimbolaka Biblia alobi ete: “Bato yango balobi bongo kaka mpo na kolongola mosakoli yango na mpasi ya kosala mibembo mibale longwa na Yerusaleme tii na Efrate.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto