Esakweli
Ndimbola: Nsango oyo euti na Nzambe; ezali mokano mpe likanisi oyo Nzambe amonisi. Esakweli ekoki kolobela likambo moko oyo ekoya; ekoki kozala liteya moko boye, mobeko to lisambisi oyo euti na Nzambe.
Bisakweli nini ya Biblia esili kokokisama?
Okokuta bisakweli mosusu oyo esili kokokisama na mitó ya makambo “Biblia,” “Mikolo ya nsuka,” “Badati,” mpe na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba,” nkasa 343-346.
Wapi bisakweli mosusu ya ntina oyo ekokisami naino te?
1 Tes. 5:3: “Na ntango oyo bato bakoloba: ‘Kimya, likambo ya kobanga ezali te!’ na ntango yango libebi ya mbalakaka ekoyela bango na mbala moko ndenge mpasi ya kobota eyelaka mwasi ya zemi; mpe bakokima soki moke te.”
Em. 17:16: “Mpe maseke zomi oyo omonaki, ná nyama mabe, ekoyina mwasi wana ya ndumba [Babilone Monene] mpe ekopanza ye mpe ekotika ye bolumbu, mpe ekolya misuni na ye mpe ekozikisa ye na mɔtɔ nyɛɛ.”
Ezk. 38:14-19: “Osengeli koloba na Goge boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ekozala na mokolo yango, ntango bato na ngai Yisraele [ya elimo] bakofanda na kimya, nde okoyeba yango, boye te? Mpe okouta mpenza na esika na yo, na nsukansuka ya nɔrdi, yo mpe bato ya bikólo ebele elongo na yo . . . ” “Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo oyo Goge akoyela mabele ya Yisraele,” yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, “nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai. Mpe na molende na ngai, na mɔtɔ ya nkɛlɛ na ngai, nakoloba mpenza.”’”
Dan. 2:44: “Bokonzi [oyo Nzambe atye] . . . ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso [ya bato], mpe ekotikala seko.”
Ezk. 38:23: “Nakomitombola mpenza mpe nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”
Em. 20:1-3: “Namonaki anzelu moko auti na likoló azali kokita na fungola ya libulu mozindo mpe asimbi monyɔlɔlɔ moko monene na lobɔkɔ. Mpe asimbaki dragɔ, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula nkóto moko (1 000). Mpe abwakaki ye na libulu mozindo mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka. Nsima ya makambo wana bakofungola ye mwa ntango moke.”
Yoa. 5:28, 29: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.”
Em. 21:3, 4: “Nayokaki mongongo moko ya makasi euti na kiti ya bokonzi elobi ete: ‘Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.’”
1 Ko. 15:24-28: “Na nsima, nsuka, ntango akozongisa bokonzi epai na Nzambe na ye mpe Tata . . . Kasi ntango biloko nyonso ekotyama na nse na ye, Mwana ye moko mpe akomitya na nse ya Moto oyo atyaki biloko nyonso na nse na ye, mpo Nzambe azala makambo nyonso epai ya moto nyonso.”
Mpo na nini bakristo basengeli mpenza kotya likebi na bisakweli ya Biblia?
Mat. 24:42: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpo boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.”
2 Pe. 1:19-21: “Kondima oyo tondimeli liloba ya esakweli ekómi lisusu makasi koleka [mpo na oyo esalemaki ntango Yesu abongwanaki]; mpe bozali kosala malamu na ndenge bozali kotyela yango likebi . . . Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”
Mas. 4:18: “Nzela ya bayengebene ezali lokola pole oyo ezali kongɛnga, oyo ezali kongɛnga se kongɛnga kino moi ekokóma makasi.”
Mat. 4:4: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Liloba yango ezali mpe kotalela bilaka minene oyo Biblia esakolaki.)
2 Tim. 3:16: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini na boyengebene.” (Na yango tosengeli koyekola malamumalamu Liloba mobimba ya Nzambe oyo ekomami.)
Soki moto alobi—
‘Bolingaka mingi kolobela bisakweli. Soki moto andimi ete Kristo azali Mobikisi na ye mpe azali na etamboli malamu yango ekoki’
Okoki koyanola: ‘Ya solo, ezali na ntina mpenza kondima mokumba oyo Yesu Kristo azali na yango. Kasi oyebi ete ntina oyo Bayuda na siɛklɛ ya liboso bandimaki ye te ezali mpo batyaki mpenza likebi te na bisakweli?’ To okoki kobakisa: (1) ‘Makomami ya Ebre esakolaki ntango oyo Masiya (Kristo) akomonana mpe makambo oyo akosala. Kasi Bayuda mingi batyaki likebi te na makambo oyo bisakweli yango elobaki. Bazalaki na libunga mpo na oyo Masiya asengelaki kosala, yango wana baboyaki Mwana ya Nzambe. (Talá lokasa 430, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”)’ (2) ‘Lelo oyo, tozali na ntango oyo Kristo asili kobanda koyangela na likoló mpe nsango na ye ezali kosakolama epai ya bato ya bikólo nyonso. (Mat. 24:14) Nzokande bato mingi bazali kozela eloko mosusu.’
To okoki koloba: ‘Nandimi ete kozala mokristo malamu ezali na ntina. Kasi, nakozala mpenza mokristo malamu soki nasali mwa makambo mosusu oyo Yesu ateyaki, kasi naboyi kosala likambo oyo alobaki ete tosengeli kotya na esika ya liboso na bomoi? . . . Talá oyo alobaki na Matai 6:33.’ Okoki kobakisa: ‘Ezali solo te ete Yesu ateyaki biso tóbondelaka liboso mpo na Bokonzi yango, mpe na nsima tósɛngaka bolimbisi ya masumu na biso, oyo tokoki kozwa kaka soki tondimi ete azali Mobikisi na biso? (Mat. 6:9-12)’