MOKAPO YA MITANO
Okopona baninga ya lolenge nini?
1, 2. (a) Mikakatano nini bakristo bakutanaka na yango na oyo etali kopona baninga? (b) Mpo na nini tosengeli kotya likebi na lolenge ya baninga oyo Yirimia aponaki?
OKOSALA nini soki bato oyo osalaka na bango, oyo otángaka na bango, to bato oyo bafandaka penepene na yo babengisi yo epai na bango to esika moko boye mpo na fɛti ya Noele? Bongo soki patrɔ na yo asɛngi yo okosa to osala likambo moko oyo mobeko ya Leta epekisi, to soki bakonzi ya guvɛrnema basɛngi yo okɔta na makambo etali politiki to mosala ya soda? Na ntembe te lisosoli na yo ekopekisa yo osala makambo ya ndenge wana, ata soki yango ekotinda bato bátyola yo to bányokola yo.
2 Ndenge tokomona yango na nsima, mbala mingi Yirimia akutanaki na mikakatano ya ndenge wana. Na yango, kotalela lolenge ya bato mosusu oyo Yirimia azalaki kokutana na bango ntango azalaki kokokisa mosala na ye ekosalisa yo mpenza. Basusu kati na bango balukaki kolɛmbisa ye nzoto mpo atika mosala na ye. Na mabaku mosusu, esengelaki Yirimia akutana na bato yango, atako bongo bakómaki baninga na ye te. Nzokande, kotalela baninga oyo Yirimia aponaki, baninga oyo bapesaki ye mabɔkɔ mpe balendisaki ye mpo akangama na ekateli na ye ya kotikala sembo, ekoki kosalisa yo. Ya solo, bikateli oyo Yirimia azwaki na oyo etali kopona baninga ekoki koteya biso.
BANINGA NA YO BAZALAKA BATO YA LOLENGE NINI?
3. Zidikiya alingaki Yirimia ayebisa ye makambo nini, kasi Yirimia asalaki nini?
3 Liboso Yerusaleme ebebisama, mbala mingi Mokonzi Zidikiya azalaki kokende kotuna Yirimia makambo. Mpo na nini? Mokonzi yango azalaki na elikya ete Yirimia akoyebisa ye makambo ya malamu oyo ekokómela bokonzi na ye na mikolo ekoya. Alingaki Yirimia ayebisa ye ete Nzambe akobikisa engumba ya Yuda na mabɔkɔ ya banguna. Zidikiya atindaki bato epai ya Yirimia mpe na nzela na bango, alobaki na Yirimia ete: “Tobondeli yo, tuná Yehova mpo na biso, mpamba te Nebukadrezare mokonzi ya Babilone azali kobunda na biso. Mbala mosusu Yehova akosalela biso likambo moko ya kokamwa ndenge asalaki na ntango ya kala mpe akolongwa epai na biso.” (Yir. 21:2) Mokonzi aboyaki kotosa etinda ya Nzambe oyo esɛngaki ye ete amitika na mabɔkɔ ya Babilone. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia, akokanisi Zidikiya na “moto ya maladi oyo azali mbala na mbala kozonga epai ya monganga mpo na koyeba soki akobika, kasi aboyi komɛla nkisi oyo monganga akomeli ye.” Yirimia asalaki nini? Mbala mosusu Zidikiya alingaki kosepela na Yirimia mingi soki ayebisaka ye makambo oyo ye alingaki koyoka. Kasi, Yirimia abongolaki nsango na ye te kaka mpo na koboya mindɔndɔ. Aboyaki kosala bongo mpamba te Yehova ayebisaki ye ete asengeli kosakola ete Yerusaleme ekobebisama.—Tángá Yirimia 32:1-5.
4. Ekateli nini tosengeli kozwa na likambo etali kopona baninga, na ndakisa na esika oyo tosalaka?
4 Na makambo mosusu okomona ete bomoi na yo ekeseni te na oyo ya Yirimia. Na ntembe te na mabaku mosusu okutanaka na bato oyo bafandaka penepene na yo, bato oyo osalaka na bango to bato oyo otángaka na bango, mpe tokoki koloba ete oyebani na bato yango. Kasi okokende nde mosika tii na koluka ete bákóma baninga na yo ya motema, ata soki bamonisaka na bomoi na bango ete basepelaka te koyoka Liloba ya Nzambe to kotosa mitinda na ye? Yirimia akokaki te kokima mabaku nyonso ya kokutana na Zidikiya mpamba te, ata soki azalaki koboya kolanda toli ya Nzambe, azalaki kaka mokonzi. Atako bongo, Yirimia asengelaki te kolanda makanisi mabe ya Mokonzi Zidikiya to koluka kosepelisa ye. Ya solo, soki Yirimia asalaka makambo ndenge Zidikiya azalaki kolinga, mokonzi yango akokaki kosopela ye bakado mpe kosalela ye makambo mosusu ya malamu. Ata bongo, Yirimia atikaki te ete eloko moko esala ete akóma moninga ya Zidikiya. Mpo na nini? Mpo Yirimia aboyaki na motema moko kobongola nsango oyo Yehova atindaki ye asakola. Ndakisa ya Yirimia esengeli kotinda biso tótalela soki baninga oyo toponi balendisaka biso tótikala sembo epai ya Nzambe. Okoki te kokima mabaku nyonso ya kokutana na bato oyo basalelaka Nzambe te, ezala na mosala, na kelasi, to esika oyo ofandaka. (1 Ko. 5:9, 10) Kasi yebá ete soki oponi bango bázala baninga na yo, okobebisa mpenza boninga na yo na Nzambe.
OZALAKA MONINGA YA BATO OYO BATYOLAKA LILOBA YA NZAMBE?
5, 6. Bato mosusu basalaki nini mpo na kokanga Yirimia monɔkɔ?
5 Longola Zidikiya, ezali mpe na bato mosusu oyo bazalaki koluka kobebisa makanisi ya Yirimia. Nganga-nzambe moko na nkombo Pashure “abɛtaki” Yirimia; ekoki kozala ete abɛtaki ye fimbo 39. (Yir. 20:2; Mib. 25:3) Bankumu mosusu ya Bayuda babɛtaki mpe Yirimia mpe na nsima batyaki ye na “ndako ya bikangeli.” Batyaki mosakoli yango na kasho moko oyo na kati makambo ezalaki mabe mpenza. Yango wana nsima ya mikolo mingi Yirimia abangaki ete akokufa na kati ya kasho yango. (Tángá Yirimia 37:3, 15, 16.) Na nsima, babimisaki ye mpo na mwa ntango, kasi bankumu mosusu bayebisaki Zidikiya aboma ye. Bazalaki kokanisa ete azali kolɛmbisa mabɔkɔ ya mampinga ya Yuda. Likambo yango etindaki bango bábwaka mosakoli na libulu ya kobomba mai oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ mpo akufa. (Yir. 38:1-4) Na ntembe te oyebi ndenge oyo Yirimia abikisamaki na liwa yango ya nsɔmɔ. Ya solo, makambo wana emonisi ndenge bato oyo basengelaki kondima Liloba ya Nzambe baboyaki koyokela mosakoli yango. Kutu, bato yango babalukelaki ye.
6 Longola bakonzi ya mboka, bato mosusu mpe bayinaki Yirimia. Mokolo mosusu, bato ya Anatote, elingi koloba bato ya engumba na ye, babangisaki ye ete bakoboma ye soki atiki kosakola te. (Yir. 11:21) Basepelaki te na makambo oyo azalaki koyebisa bango mpe bakanelaki ye. Ata bongo, Yirimia aponaki Yehova azala moninga na ye, kasi bato ya engumba na ye te. Basusu kati na bato ya ntango na ye basukaki kaka na makaneli te, balukaki mpenza kosala ye mabe. Ntango Yirimia asalelaki ekanganeli mpo na komonisa ete Bayuda basengeli kondima kosalela mokonzi ya Babilone mpo batikala na bomoi, Hanania alongolaki ekanganeli yango ya nzete na nkingo ya Yirimia mpe abukaki yango. Mosakoli yango ya lokuta alobaki ete Yehova alobi boye: “Nakobuka ekanganeli ya mokonzi ya Babilone.” Kasi Hanania akufaki kaka na mbula wana, mpe yango emonisi ete Yirimia nde azalaki mosakoli ya solo. (Yir. 28:1-11, 17) Nsima ya kobebisama ya Yerusaleme ndenge Yirimia asakolaki yango, Yohanane mpe bakonzi mosusu ya basoda baboyaki kotosa etinda ya Nzambe oyo esɛngaki ete bátikala na mokili ya Yuda. Bayebisaki Yirimia boye: “Ozali koloba lokuta. [Yehova] Nzambe na biso atindi yo te oloba: ‘Bókɔta na Ezipito te mpo na kofanda kuna.’” Na nsima batɛmɛlaki lisusu Yehova mpo bazwaki Yirimia ná Baruke mpe bamemaki bango na Ezipito.—Yir. 42:1–43:7.
Bato ya ndenge nini Yirimia asengelaki kokutana na bango na mabaku mosusu? Ndakisa ya Yirimia eteyi yo nini?
7. Likambo nini ozali kokutana na yango oyo ezali komeka bosembo na yo epai ya Yehova?
7 Na boumeli ya bambula mingi, Yirimia azalaki esika moko na bato oyo bazalaki kotyola Liloba ya Nzambe mpe bato mosusu oyo bazalaki kotɛmɛla ye. Meká naino komitya na esika na ye. Mbala mosusu ezalaki mpasi te andima kosala boninga na bato oyo bazalaki na limemya te mpo na Nzambe mpe Liloba na ye. Afandaki mpenza kati na bato ya lolenge wana. Bongo yo? Ntembe ezali te ete mabaku mosusu esalaka ete okutana na bato oyo bakokani na bato oyo bazalaki kofanda esika moko na Yirimia. Ezala bazali mpenza kotɛmɛla yo ná Nzambe na yo to bazali komonana lokola nde bazali bato malamu, okopona mpenza bango bázala baninga na yo? Okomonisa ete ozali na bwanya soki osali boninga na bato oyo batyolaka bisakweli ya Biblia? Soki Yirimia azalaka na esika na yo, okanisi ete alingaki kopona kozala moninga ya bato oyo bomoi na bango eyokani te na mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe to kozala moninga ya bato oyo batyelaka bato motema? (2 Nt. 19:2) Nzambe abombelaki Yirimia te ete makama ekokwela bato oyo batyelaka bato motema na esika ya kotyela Nzambe motema. (Tángá Yirimia 17:5, 6.) Okanisi nini mpo na likambo yango?
8. Lobelá makambo oyo bakristo ya teritware na bino bakoki kokutana na yango.
8 Bandeko mosusu bakanisaki ete bakoki kobengisaka bakiliya na bango mpo na kolekisa mwa ntango elongo, kolya to kominanola, mpo mombongo to mosala na bango ekende liboso. Kasi omoni te ete kosangana na bato ya ndenge wana ekoki komema mokristo azala na baninga ya mabe mpe ekoki kotya ye na makama lokola masolo ya nsɔni to molangwa? Omoni sikoyo mpo na nini bakristo mingi bazwaki ekateli ya kokima baninga mabe ya ndenge wana ata soki yango esali ete bázanga benefisi to bámata grade na mosala te? Ndenge moko mpe, mbala mosusu patrɔ to bato oyo osalaka na bango bazalaka na momeseno ya kobuba bakiliya. Kasi bakristo ya solo balandaka te bizaleli ya bato oyo bazali zingazinga na bango. Na bantango mosusu, kozwa ekateli ya koboya makambo ya ndenge wana ezalaka pɛtɛɛ te. Tosengeli mpenza kotɔnda Nzambe mpo na bandakisa lokola oyo ya Yirimia. Yirimia akangamaki na etamboli oyo esalisaki ye azala na lisosoli malamu mpe, likambo ya ntina koleka, yango esalisaki ye abatela boyokani malamu na Nzambe na ye.
9. Koluka koyebana mingi ezali na likama nini?
9 Bayuda mosusu batyolaki Yirimia mpo na ekateli na ye mpe bindimeli na ye. (Yir. 18:18) Atako bongo, azwaki ekateli makasi ya kozala lokola bato ya ntango na ye te, oyo balandaki “nzela ya bato mingi.” (Yir. 8:5, 6) Na bantango mosusu, Yirimia andimaki ata ‘kofanda kaka ye moko.’ Asepelaki kofanda bongo na esika afanda na baninga mabe oyo bakokaki kobebisa makanisi na ye. (Tángá Yirimia 9:4, 5; 15:17.) Bongo yo? Ndenge moko na mikolo ya Yirimia, nzela ya bato mingi lelo ezali nde nzela ya kozanga bosembo epai ya Nzambe. Banda kala mpenza basaleli ya Yehova bakebaka ntango bazali kopona baninga. Kasi yango elingi koloba te ete Yirimia azalaki na baninga te. Bato mosusu bakɔtelaki ye mpe basalisaki ye. Bato yango banani? Koyeba bango ekoki mpenza kosalisa yo.
YIRIMIA APONAKI BANINGA YA LOLENGE NINI?
10, 11. (a) Makambo nini Yirimia atalelaki mpo na kopona baninga? (b) Banani bazalaki baninga ya Yirimia mpe mituna nini tokoki komituna mpo na bango?
10 Yirimia aponaki baninga ya lolenge nini? Na kolanda etinda ya Yehova, Yirimia akweisaki mbala na mbala bato mabe, bakosi, bato oyo bazangi boyengebene, bato ya mobulu, bato oyo bakipaka basusu te, bato ya pite—bato oyo basundolaki losambo ya pɛto mpe bakómaki kosambela bikeko, na ndenge yango, bazalaki kosala pite ya elimo. Alendisaki bandeko na ye Bayuda ete: “Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.” (Yir. 18:11) Ata nsima ya kobebisama ya Yerusaleme, Yirimia akumisaki “misala ya motema boboto” ya Nzambe, “misala ya motema mawa,” mpe “bosembo” na Ye. (Bil. 3:22-24) Baninga ya Yirimia ezalaki kaka bato oyo bazalaki kosalela Yehova na bosembo.—Tángá Yirimia 17:7.
11 Toyebi bato mosusu oyo Yirimia aponaki bázala baninga na ye. Mibali mosusu lokola Ebede-meleke, Baruke, Seraya, mpe bana ya Shafane bazalaki mpenza baninga ya Yirimia. Mbala mosusu tokoki komituna: ‘Mibali yango bazalaki bato ya lolenge nini’? Boninga na bango ná Yirimia ezalaki boninga ya ndenge nini? Nini emonisi ete bazalaki mpenza baninga malamu? Mpe ndenge nini basalisaki Yirimia akangama na bosembo na ye? Tiká tótalela mituna yango, wana tozali kokanisa lolenge ya baninga oyo toponá.
12. (a) Yirimia ná Baruke, oyo bamonisami na elilingi oyo ezali na lokasa 58, bakokani na makambo nini? (b) Seraya azalaki nani, mpe makambo nini toyebi mpo na ye?
12 Emonani ete Baruke, mwana ya Neria, nde azalaki mpenza moninga ya motema ya Yirimia. Yirimia atyelaki Baruke motema mpe apesaki ye mokumba ya kokomela ye maloba oyo Yehova ayebisaki ye; na nsima, atindaki Baruke atánga maloba oyo akomaki na rulo, liboso epai ya bato ya Yuda mpe na nsima epai ya bankumu ya Yuda. (Yir. 36:4-8, 14, 15) Baruke andimaki lokola Yirimia ete makambo oyo Yehova asakolaki ekokokisama. Mibali yango mibale bamonaki mpasi elongo na boumeli ya mbula 18 ya nsuka ya ekólo Yuda; eleko yango ezalaki ntango moko ya yikiyiki. Balekisaki ntango mingi elongo mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki bango. Bango mibale bakutanaki na mikakatano mingi mpe mbala na mbala esengelaki bámibomba mpo banguna básala bango mabe te. Lisusu, Yehova ye moko alendisaki bango mibale. Emonani ete Baruke azalaki moto ya libota moko ya lokumu oyo bazalaki bakomeli na Yuda. Biblia elobi ete azalaki “sɛkrɛtɛrɛ” mpe ndeko na ye Seraya azalaki na mosala ya lokumu na ndako ya mokonzi. Na nsima, Seraya mpe asalaki elongo na Yirimia lokola Baruke mpo na kosakola makambo oyo Yehova akosala. (Yir. 36:32; 51:59-64) Na ntembe te, ndenge oyo bana yango mibale ya Neria bandimaki kosala elongo na Yirimia na ntango wana ya mpasi esungaki Yirimia mpe elendisaki ye. Bato oyo bazali kosalela Yehova elongo na yo bakoki mpe kopesa yo makasi mpe kolendisa yo.
Lolenge ya baninga oyo Yirimia aponaki ekoki koteya yo nini?
13. Ndenge elilingi oyo ezali na lokasa 63 emonisi yango, nini emonisi ete Ebede-meleke azalaki moninga malamu mpenza ya Yirimia?
13 Moninga mosusu ya malamu mpenza ya Yirimia ezalaki Ebede-meleke. Ntango bankumu babwakaki Yirimia na libulu ya mai oyo ezalaki na pɔtɔpɔtɔ mpo akufa, Ebede-meleke moto ya Etiopi, oyo azalaki mopaya, nde abangaki te kokɔtela mosakoli. Azalaki mokube, elingi koloba, azalaki kosala na ndako ya mokonzi. Na miso ya bato nyonso, Ebede-meleke akendaki koluka Mokonzi Zidikiya wana afandaki na Porte ya Benyamina, mpe na mpiko nyonso asɛngaki mokonzi nzela mpo akende kobimisa Yirimia na libulu yango ya pɔtɔpɔtɔ. Azwaki mibali 30 mpo na kosala mosala yango, yango emonisi ete ntango mosusu Ebede-meleke azalaki komizela ete banguna ya Yirimia bakoluka kobundisa ye mpo na yango. (Yir. 38:7-13) Toyebi mpenza te soki Yirimia ná Ebede-meleke bazalaki kokutana mbala na mbala. Kasi lokola bango mibale bazalaki kolinga Yehova, tokoki kokanisa ete bazalaki baninga mpenza. Ebede-meleke ayebaki ete Yirimia azali mosakoli ya Yehova. Alobaki ete makambo oyo bankumu basalaki ezali “mabe” mpe andimaki ata kobebisa mosala na ye mpo na kosala oyo ezali malamu. Ya solo, Ebede-meleke azalaki mpenza moto malamu, yango wana Yehova ye moko ayebisaki ye ete: “Nakobikisa yo [na mokolo oyo mpasi ekokwela Yerusaleme] . . . mpo otyeli ngai motema.” (Tángá Yirimia 39:15-18.) Yehova akumisaki ye mpenza! Okosepela kozala na baninga ya lolenge wana, boye te?
14. Makambo nini toyebi mpo na libota ya Shafane mpe makambo oyo basalelaki Yirimia?
14 Baninga mosusu ya Yirimia ezalaki bana misato ya Shafane mpe nkɔkɔ na ye moko. Bazalaki na libota moko ya lokumu mpe Shafane azalaki kala sɛkrɛtɛrɛ ya Mokonzi Yosiya. Ntango banguna ya Yirimia balukaki koboma ye mbala ya liboso, “lobɔkɔ ya Ahikame mwana ya Shafane nde ezalaki elongo na Yirimia, mpo na kokaba ye te na lobɔkɔ ya bato.” (Yir. 26:24) Gemaria azalaki ndeko mosusu ya Ahikame. Ntango Baruke atángelaki bato bitumbu ya Nzambe, Mikaya mwana ya Gemaria azalaki mpe wana mpe akendaki koyebisa tata na ye mpe bankumu mosusu likambo yango. Lokola babangaki ete Yehoyakime akoki kosala Yirimia ná Baruke mabe, bayebisaki bango bámibomba. Longola yango, ntango mokonzi aboyaki koyoka maloba ya rulo, Gemaria azalaki moko ya bato oyo babondelaki mokonzi ete atumba rulo yango te. (Yir. 36:9-25) Lisusu Yirimia atindaki mwana mosusu ya Shafane na nkombo Elasa na mokanda oyo ezalaki na bisakweli mpo na Bayuda oyo bamemamaki na boombo na Babilone. (Yir. 29:1-3) Na yango, tomoni ete bato mwa mingi na libota ya Shafane, elingi koloba bana misato mpe nkɔkɔ na ye moko basalisaki mosakoli ya Nzambe. Yirimia azalaki mpenza kosepela na baninga ya ndenge wana! Soki bazalaki baninga, ezalaki te mpo na makambo etali kolya, komɛla, to kominanola. Boninga na bango esimbamaki nde na makambo ya ntina koleka.
ZALÁ NA BWANYA NTANGO OZALI KOPONA BANINGA
15. Ndakisa nini ya malamu Yirimia atikeli biso na oyo etali kopona baninga?
15 Ndenge oyo Yirimia azalaki kofanda na bato ya ntango na ye, ezala bato mabe to bato malamu, ekoki koteya biso. Mokonzi, bankumu mingi, basakoli ya lokuta, mpe bakonzi ya basoda batyaki ye mbamba ete abongola nsango oyo azalaki kosakwela bango. Ata bongo, Yirimia abongolaki nsango ya Nzambe te. Lokola akangamaki na losambo ya solo, bato yango balingaki ye te. Ata bongo, Yirimia alukaki te ete bákóma baninga na ye. Moninga na ye ya ntango nyonso oyo alekaki baninga nyonso ezalaki Yehova. Yirimia andimaki bato mosusu báyina ye soki esɛngaki bongo mpo atikala sembo na miso ya Nzambe na ye. (Tángá Bileli 3:52-59.) Nzokande, ndenge tomonaki yango, longola Yirimia, bato mosusu mpe bazalaki na ekateli ya kosalela Yehova na bosembo.
16, 17. (a) Lisalisi nini mosaleli ya Yehova akoki kozwa epai ya moninga ya malamu? (b) Ezala ofandaka na mboka nini, epai wapi okoki kozwa baninga ya malamu?
16 Ebede-meleke azalaki moninga malamu mpo azalaki kondimela Yehova mpe kotyela ye motema. Moto yango amonisaki mpiko ntango akendeki kobikisa Yirimia. Baruke andimaki kolekisa bambula mingi elongo na Yirimia mpe asalisaki ye mpo na kosakola nsango ya Yehova. Lelo oyo na lisangá tokoki mpe kozwa baninga ya malamu ndenge wana. Cameron, ndeko mwasi moko oyo azali na mbula 20 mpe azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, asepelaka mingi na ndenge oyo Kara, oyo azali mpe mobongisi-nzela, asalisaka ye. Cameron alobi ete, “ezala na etamboli na ye to na maloba na ye, Kara alendisaki ngai natyaka ntango nyonso Yehova na esika ya liboso na bomoi na ngai.” Kara azalaki kofanda mosika, kasi mbala na mbala azalaki kobenga Cameron na telefone to kokomela ye mpo na koyeba soki azali malamu mpe mpo bálendisana. Cameron alobi boye: “Kara ayebaki nyonso oyo ezalaki koleka na libota na biso. Ayebaki makambo oyo ekómelaki yaya na ngai ya mwasi mpe ayebaki mpasi oyo nayokaki ntango yaya na ngai yango atombokaki mpe atikaki nzela ya solo. Atikaki ngai te ntango makambo nyonso wana ekómelaki ngai, mpe kozanga ndakisa na ye ya malamu mpe lisalisi na ye, nayebi te nini nakokaki kosala. Asungaki ngai mingi mpenza.”
17 Yo mpe okoki kozwa baninga malamu na lisangá, ezala bozali na bango mbula moko to te. Bandeko na yo ya mibali mpe ya basi bazali na kondima lokola yo, balandaka mitinda oyo yo mpe olandaka, balingaka Yehova lokola yo, bazali na elikya oyo ozali na yango, mpe mbala mosusu bazali kokutana na mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Okoki kobima na bango elongo na mosala ya kosakola. Bakoki kolendisa yo ntango okutani na mikakatano; yo mpe okoki kosala bongo mpo na bango. Bakosepela elongo na yo ntango okutani na makambo kitoko na mosala ya Yehova. Lisusu, boninga ya ndenge wana ekoki koumela libela na libela.—Mas. 17:17; 18:24; 27:9.
18. Liteya nini ozwi na ndenge oyo Yirimia aponaki baninga?
18 Ya solo mpenza, tokoki koyekola makambo mingi na ndenge oyo Yirimia aponaki baninga na ye. Likambo oyo osengeli kobosana te yango oyo: Soki ozali na baninga oyo bindimeli na bango eyokani te na mateya ya Biblia, okotikala sembo te. Kolanda toli yango lelo oyo ezali na ntina mingi ndenge ezalaki na ntango ya Yirimia. Mpo akokisa na bosembo mokumba oyo Yehova apesaki ye mpe apambola ye, Yirimia aboyaki kolanda etamboli ya bato mingi ya ntango na ye. Yo mpe osengeli kosala bongo, boye te? Yirimia aponaki baninga oyo bazalaki na kondima lokola ye, mpe basalisaki ye akokisa mokumba na ye. Ya solo, lelo oyo mokristo nyonso oyo azali sembo akoki kozwa liteya na ndenge oyo Yirimia amonisaki bwanya ntango aponaki baninga!—Mas. 13:20; 22:17.
Ndenge nini okoki komekola Yirimia mpo na koyeba nani okoki kopona azala moninga na yo?