Loyembo 120
Yoká, tosá mpe pambwamá
1. Tómonis’ete tótosaka Kristo.
Mateya na ye mwinda mpe nzela.
Tósepela mpenza koyoka yango,
Tótos’ango mpe tokopambwama.
(MONDIMO)
Yoká, tosá, pambwamá
Soki oyoki Nzambe.
Mpo okɔta na kopema na ye,
Yoká, tosá, pambwamá.
2. Etamboli na biso’ebatelaka
Lokola ndak’oy’epikami ngwi.
Soki matey’a Yesu tokolanda,
Tokozala na bomoi y’elɛngi.
(MONDIMO)
Yoká, tosá, pambwamá
Soki oyoki Nzambe.
Mpo okɔta na kopema na ye,
Yoká, tosá, pambwamá.
3. Ndenge kaka nzete pembeni ya mai
Ebotaka mbuma mbula nyonso,
Soki mpenza tomonisi botosi,
Boye tokozwa bomoi ya seko.
(MONDIMO)
Yoká, tosá, pambwamá
Soki oyoki Nzambe.
Mpo okɔta na kopema na ye,
Yoká, tosá, pambwamá.
(Talá mpe Mib. 28:2; Nz. 1:3; Mas. 10:22; Mat. 7:24-27.)