MOKAPO YA MOTOBA
“Nabondeli yo, tosá mongongo ya Yehova”
1, 2. Mbala mingi baoyo balandaka “nzela ya bato mingi” bazalaka na makanisi ya ndenge nini, mpe mpo na nini osengeli kozala lokola bango te?
BATO mingi lelo balingaka kotosa te. Liboso ya kozwa bikateli, balingaka ata te koyeba soki bikateli na bango ekozala malamu to mabe. Kasi makanisi na bango ezalaka kaka ‘salá oyo olingi’ to ‘kokipe te, mabe nde ozwama.’ Ezaleli yango emonanaka ntango basofɛlɛ baboyaka kotosa mibeko ya nzela, bakomelesa ya minene batosaka te mibeko etali mombongo, mpe bakonzi bango moko babukaka mibeko oyo mbala mosusu bango moko nde babimisá. Na ntango ya Yirimia, Bayuda mingi bazalaki komibwaka ndenge wana na “nzela ya bato mingi,” atako nzela yango ezali mabe mpe ezali likama.—Yir. 8:6.
2 Na ntembe te oyebi malamu ete baoyo balingi ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso andima bango basengeli te kolanda “nzela ya bato mingi.” Kutu Yirimia amonisi bokeseni oyo ezali kati na bato oyo “baboyaki kotosa mongongo ya Yehova” ná baoyo bandimaki kotosa yango. (Yir. 3:25; 7:28; 26:13; 38:20; 43:4, 7) Mokomoko na biso asengeli komitalela mpo na koyeba soki andimaka kotosa mongongo ya Yehova to te. Mpo na nini? Mpamba te Satana azali kobakisa lisusu milende mpo na kobebisa bosembo ya basaleli ya solo ya Nzambe. Azali lokola nyoka oyo ebombami nyɛɛ mpe ezali kozela moto aleka mpo eswa ye na mbala moko na ndenge oyo akoki kokufa. Soki tozwi ekateli makasi ya kotosa mongongo ya Yehova, yango ekosalisa biso tózala mosika na nyoka yango mpo eswa biso te. Kasi ndenge nini tokoki kokangama na ekateli na biso ya kotosa Yehova? Mokanda ya Yirimia ekoki kosalisa biso na likambo yango.
MOTO OYO TOSENGELI KOTOSA
3. Mpo na nini ebongi tótosa Yehova?
3 Mpo na nini ebongi tótosa Yehova na makambo nyonso? Yirimia amonisi ntina moko oyo esengeli kotinda biso tósala yango ntango alobi ete Yehova azali “Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye, Ye oyo atɛlɛmisaki mabele oyo ebotaka na nzela ya bwanya na ye.” (Yir. 10:12) Yehova azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Tosengeli kobanga ye koleka bakonzi mosusu nyonso. Azali na lotomo nyonso ya kosɛnga tótosa mibeko na ye ya bwanya, mpe mibeko yango ezalaka mpenza mpo na bolamu na biso ya libela.—Yir. 10:6, 7.
Komɛla “mai ya bomoi” oyo Yehova apesaka ekolendisa yo otosa ye
4, 5. (a) Bileko oyo mbula ezalaki konɔka te eteyaki Bayuda likambo nini? (b) Na ndenge nini bato ya ekólo ya Yuda batyolaki “mai ya bomoi” oyo Yehova apesaka? (c) Ndenge nini okoki komɛla “mai ya bomoi” oyo Nzambe apesaka?
4 Nzokande, Yehova azali kaka te Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, azali mpe mobateli ya bomoi nyonso, ezala mpe bomoi na biso. Na ntango ya Yirimia, bakundwelaki Bayuda polele likambo yango. Mokili ya Ezipito esimbamaki mingimingi na ebale Nile, kasi ezalaki bongo te mpo na Mokili ya Ndaka. Mingimingi, bomoi ya bato ya libota ya Nzambe esimbamaki na mai ya mbula oyo ezalaki konɔka na ntango na yango, mpe mbala mingi bazalaki kobomba mai yango na mabulu oyo etimolámá mpo na kobomba mai. (Mib. 11:13-17) Kaka Yehova nde akokaki konɔkisa mbula mpo na kopɔlisa mabele mpo ebota. Kasi, akokaki mpe kokanga likoló mpo mbula enɔka te. Na yango, na ntango ya Yirimia Bayuda oyo bazangaki botosi bamonaki mpasi mpo bileko ya kozanga mbula ezalaki kobebisa mpe kokaukisa bilanga na bango mpe bilanga ya vinyo, maziba na bango ya mai mpe mabulu na bango ya kobomba mai.—Yir. 3:3; 5:24; 12:4; 14:1-4, 22; 23:10.
5 Atako Bayuda yango bayebaki valɛrɛ ya mai, baboyaki “mai ya bomoi” oyo Yehova azalaki kopesa bango na boboto nyonso. Basalaki bongo na ndenge baboyaki na nko kotosa mibeko ya Nzambe mpe batyaki motema na boyokani oyo basalaki na bikólo oyo ezalaki zingazinga. Likambo yango esalisaki bango te; na yango, bakómaki lokola moto oyo ntango mai ezali moke azali kotya yango na libulu ya kobomba mai oyo ebukanábukaná. (Tángá Yirimia 2:13; 17:13.) Na ntembe te, soki tolandi etamboli na bango te tokopɛngola makama ebele. Lelo oyo mpe, na nzela ya Liloba na ye, Yehova azali kopesa biso batoli ebele oyo ezali kotambwisa biso. Ezali polele ete “mai ya bomoi” yango, elingi koloba Liloba ya Nzambe, ekosalisa biso kaka soki tozali koyekola yango mbala na mbala mpe kosala makasi ya kotosa yango.
6. (a) Ndenge nini Mokonzi Zidikiya azalaki kotalela likambo ya kotosa Yehova? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mokonzi yango azangaki bwanya?
6 Lokola mokolo oyo bato ya Yuda basengelaki kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe ebɛlɛmaki, kotosa Nzambe ekómaki likambo ya ntina mingi koleka. Moyuda nyonso oyo alingaki ete Nzambe andima ye mpe abatela ye asengelaki kobongola motema mpe kobanda kotosa Nzambe. Mokonzi Zidikiya asengelaki mpe kosala bongo. Azalaki kokakatana mpo na kozwa ekateli ya kosala oyo ezali malamu. Ntango bato na ye bayebisaki ye ete balingi koboma Yirimia, azwaki mpiko ya kotɛmɛla bango te. Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Ebede-meleke nde moto abikisaki mosakoli Yirimia na likama yango mpe na nsima Yirimia ayebisaki Zidikiya ete: “Nabondeli yo, tosá mongongo ya Yehova.” (Tángá Yirimia 38:4-6, 20.) Ezali polele ete, mpo na bolamu na ye moko mokonzi asengelaki kopona kotosa Nzambe.
Mpo na nini ezalaki na ntina ete Yirimia alendisa Bayuda mbala na mbala ete bátosa Nzambe?
KOTOSA YEHOVA EZALI LIKAMBO YA NTINA MINGI
7. Wapi mwa makambo oyo ekoki komeka botosi na yo epai ya Nzambe?
7 Lelo oyo kotosa Nzambe ezali mpenza na ntina mingi, kaka ndenge ezalaki na ntango ya Yirimia. Ozalaka mpenza na ekateli makasi ya kotosa Yehova? Soki esalemi ete ntango ozali kosalela internet okwei na mbalakaka na esika oyo ezali na bilingi ya bato oyo bazali bolumbu to bazali kosangisa nzoto, okoluka kotalatala bililingi yango, to okolonga komekama yango mpe okokanga esika yango ya bililingi ya mabe? Bongo soki moto moko oyo osalaka na ye to mwana-kelasi na bino asɛngi yo obima na ye, okosala nini? Okozala na makasi ya koboya? Mikanda ya bapɛngwi to bisika oyo makambo na bango ezalaka na internet ebendaka likebi na yo to oyokaka yango nkɛlɛ? Ezala na makambo ya ndenge wana to makambo mosusu, kanisá ntango nyonso maloba ya Yirimia 38:20.
8, 9. (a) Mpo na nini koyokela bankulutu ntango bazali kosalisa biso ekomonisa ete tozali na bwanya? (b) Soki bankulutu bazali kopesa biso toli moko mbala na mbala, ndenge nini tosengeli kotalela yango?
8 Mbala mingi Yehova atindaki Yirimia epai na bato na ye mpo na kolendisa bango na maloba lokola oyo: “Nabondeli bino, bóbongwana, mokomoko na bino atika nzela na ye mabe, mpe bókómisa banzela na bino mpe misala na bino malamu.” (Yir. 7:3; 18:11; 25:5; tángá Yirimia 35:15.) Ndenge moko mpe lelo oyo, bankulutu basalaka nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bandeko ya lisangá bákima makama ya elimo. Soki mbala mosusu bankulutu bapesi yo toli ete okima etamboli moko ya mabe to etamboli oyo emonisi ete ozangi bwanya, yokelá bango. Mokano na bango ezali lokola oyo ya Yirimia.
9 Bankulutu bakoki ntango mosusu kokundwela yo mitinda ya Biblia oyo basilá kolakisa yo. Yebá ete ezalaka pɛtɛɛ te kopesa moto toli moko mbala na mbala, mingimingi soki moto oyo bazali kosalisa amonisi ezaleli lokola oyo Bayuda mingi bamonisaki ntango Yirimia azalaki kosakwela bango. Talelá milende oyo bankulutu bazali kosala mbala na mbala mpo na kosalisa yo ete ezali komonisa bolingo ya Yehova. Yebá mpe ete soki Bayuda báyokelaka Yirimia, mbɛlɛ Yirimia akebisaki bango mbala na mbala te. Ɛɛ, soki tolingi te ete bápesa biso toli moko mbala na mbala, tosengeli mbala moko kosalela yango.
Ntango bankulutu bazali koluka kosalisa yo, yokelá bango
YEHOVA ALIMBISAKA NA MOTEMA MOKO—KASI ALIMBISAKA KAKA MPAMBA BOYE TE
10. Mpo na nini Yehova alimbisaka masumu kaka mpamba boye te?
10 Na mokili oyo ya mabe, ata soki tosali makasi ndenge nini, tokoki te kotosa Yehova na ndenge ya kokoka. Yango wana, tozali na botɔndi mingi epai na ye na ndenge oyo amonisaka ete asepelaka mpenza kolimbisa mabunga na biso. Ata bongo, alimbisaka moto kaka mpamba boye te. Mpo na nini? Mpo ayinaka masumu mpenza. (Yis. 59:2) Yango wana, alingaka komona liboso soki moto abongi mpenza kolimbisama.
11. Mpo na nini moto oyo azali kosala masumu na kobombana akozanga te kozwa etumbu?
11 Ndenge tomonaki yango, Bayuda mingi na ntango ya Yirimia bazalaki kozanga botosi epai ya Nzambe mpe na ndenge yango, bakanisaki ete lokola Nzambe azali na motema molai mpe motema mawa akosala eloko moko te. Lelo oyo mosaleli ya Nzambe akoki mpe kokóma na ezaleli ya ndenge wana? Ɛɛ, yango ekoki komonana ntango aboyi kolanda makundoli ya Yehova mpe akómi na momeseno ya kosala lisumu. Bato mosusu basalá yango polele; na ndakisa bakɔtaki libala ya ekobo. Kasi moto oyo azangi botosi epai ya Yehova amitye na likama ata soki lisumu na ye eyebani te epai ya bato. Moto oyo azali na bomoi ya lolenge mibale akoki mbala mosusu kokanisa ete: ‘Moto moko te akoyeba likambo yango.’ Nzokande, Nzambe atángaka makanisi mpe mitema mpe akoki koyeba makambo oyo ezali kosalema na kobombana. (Tángá Yirimia 32:19.) Soki moto azangaki mpenza botosi epai ya Nzambe, asengeli kosala nini?
12. Mbala mosusu bankulutu basalaka nini mpo na kobatela lisangá?
12 Bayuda mingi batyolaki lisalisi oyo Yehova azalaki kopesa bango mbala na mbala na nzela ya Yirimia. Ndenge moko mpe lelo, moto akoki koboya kobongola motema ntango asali lisumu moko monene, mpe aboyi koyoka toli ya bankulutu. Soki esalemi bongo, bankulutu bakolanda oyo Makomami elobi mpe bakobimisa moto ya ndenge wana na lisangá mpo na kobatela yango. (1 Ko. 5:11-13; talá etanda “Kozala na bomoi oyo ezangi mibeko,” na lokasa 73) Kasi yango elingi nde koloba ete elikya ezali lisusu te mpo na moto yango, ete Yehova akondima ye lisusu te? Te. Atako Bayisraele batombokelaki Yehova ntango molai, Nzambe alobaki na bango boye: “Bózonga, bino bana bapɛngwi. Nakobikisa bino na lipɛngwi na bino.” (Yir. 3:22)a Yehova azali kobenga bato oyo basalaki mabe bázongela ye. Ɛɛ, asɛngi bango básala bongo.
Mpo na nini ezali likambo ya mayele kosɛnga Nzambe bolimbisi ntango tosali libunga?
TÓZONGELA YEHOVA MPO NA KOMONISA ETE TOTOSAKA YE
13. Soki moto oyo asalaki mabe alingi azongela Yehova, makambo nini asengeli kondima liboso?
13 Mpo moto azongela Nzambe ndenge Yirimia amonisi yango, asengeli komituna, ‘Nini oyo nasali?’ Na nsima, asengeli kondima oyo Makomami elobi mpo na lisumu na ye. Na ntango ya Yirimia, Bayuda oyo babongolaki motema te baboyaki komituna motuna wana. Baboyaki kondima bonene ya masumu na bango, yango wana Yehova alimbisaki bango te mpo ntina ya kolimbisa bango ezalaki te. (Tángá Yirimia 8:6.) Nzokande, moto oyo abongoli mpenza motema andimaka ete lokola atosaki mibeko ya Yehova te, afingisi nkombo ya Nzambe mpe lisangá. Moto oyo abongoli mpenza motema ayokaka mpe mawa makasi mpo na mpasi oyo mbala mosusu ayokisi bato mosusu oyo bazali na likambo te. Moto yango asengeli mpe koyeba ete Yehova akondima libondeli na ye ya kosɛnga bolimbisi kaka ntango akondima mabe nyonso oyo lisumu na ye ebimisi. Kasi, kozongela Nzambe esuki kaka wana te.
14. Ndenge nini moto ‘azongelaka’ Yehova? (Talá mpe etanda “Kobongola motema elimboli nini?”)
14 Moto oyo abongoli mpenza motema asengeli koluka koyeba ndenge oyo makanisi na ye, bamposa na ye mpe bizaleli na ye ezali. (Tángá Bileli 3:40, 41.) Alukaka koyeba bisika oyo azali na bolɛmbu na bomoi na ye, na ndakisa kozala selesele na moto oyo azali molongani na ye te, komipesa na komɛla masanga to likaya, makambo oyo atalaka na internet, to ezaleli na ye na makambo etali mombongo. Kaka ndenge mwasi ya ndako alukaka kolongola bosɔtɔ nyonso oyo ebombaná ata na esika nini na kuku na ye mpo ndako na ye ezala pɛto, moto oyo abongoli motema asengeli kosala makasi mpo na kopɛtola makanisi mpe bizaleli na ye, ata oyo emonanaka na miso ya bato te. Asengeli ‘kozongela’ Yehova, elingi koloba, asengeli kokokisa masɛngami ya Nzambe mpe koyokanisa bomoi na ye na mitinda na Ye. Na ntango ya Yirimia, Bayuda mosusu bazongelaki Yehova “na lokuta.” Basalaki lokola nde bayoki mawa makasi mpo na mabe na bango kasi babongolaki mpenza mitema na bango te to bomoi na bango. (Yir. 3:10) Nzokande, moto oyo asɛngi bolimbisi na motema na ye mobimba alukaka te kokosa Yehova mpe lisangá na Ye. Alukaka te kozonga na lisangá kaka mpo na kobatela lokumu na ye to mpo na kozongela boninga na bato ya libota na ye to na bandeko mosusu na lisangá, kasi alukaka kotika mpenza mabe mpo Nzambe alimbisa ye mpe andima ye.
15. Mabondeli ya ndenge nini moto oyo abongoli mpenza motema asalaka epai ya Nzambe?
15 Libondeli ezali na ntina mingi mpo na kobongola motema. Na ntango ya kala, mbala mingi bato bazalaki kotombola mabɔkɔ likoló ntango bazali kobondela. Lelo oyo, ntango moto oyo abongoli motema azali kobondela, ‘atombolaka motema na ye elongo na mabɔkɔ na ye epai ya Nzambe,’ ndenge Yirimia alobi yango. (Bil. 3:41, 42) Mosumuki oyo ayoki mawa mpo na mabunga na ye mpe abongoli motema asalaka makambo oyo eyokani na libondeli na ye ya kosɛnga bolimbisi. Mabondeli na ye ezalaka ya monɔkɔ mpamba te, eutaka mpenza na motema.
‘Mpo na nini nayokaki te?’
16. Mpo na nini moto oyo asali lisumu akoki kozongela Nzambe?
16 Na ntembe te oyebi ete moto oyo asali lisumu mpe andimi mpenza libunga na ye asengeli naino kotya lolendo na ye pembeni. Kasi simbá likambo oyo: Yehova alingi ete bato oyo basali lisumu bázongela ye. Ntango Nzambe amonaka mpasi makasi oyo mosumuki ayokaka na motema, motema na Ye moko mpe eyokaka mawa. Motema na ye ekómaka “yikiyiki” mpo alingi kolimbisa moto nyonso oyo abongoli motema, kaka ndenge asalaki mpo na Bayisraele oyo babimaki na boombo. (Yir. 31:20) Koyeba ete Nzambe apesaka kimya mpe elikya na bato oyo batosaka ye elendisaka mpenza! (Yir. 29:11-14) Bakoki kozongela esika na bango na kati ya basaleli ya sembo ya Nzambe.
KOTOSA EKOKI KOBATELA YO
17, 18. (a) Barekabe bazalaki banani? (b) Ndenge elilingi ya lokasa 77 emonisi yango, Barekabe bayebani na likambo nini?
17 Kotosa Yehova na makambo nyonso ebatelaka mpenza. Ndakisa ya Barekabe na ntango ya Yirimia endimisi likambo yango. Basiɛklɛ koleka mibale liboso, nkɔkɔ na bango Yehonadabe, oyo azalaki Mokeni, amityaki na ngámbo ya Yehu na bosembo nyonso, mpe apesaki bango mwa mibeko oyo basengelaki kotosa. Moko na mibeko yango epekisaki bango komɛla vinyo. Barekabe babatelaki mibeko ya Yehonadabe atako asilaki kokufa banda kala. Mpo na komeka bango, Yirimia amemaki bango na ndako ya kolya oyo ezalaki na kati ya tempelo, atyaki vinyo liboso na bango mpe ayebisaki bango bámɛla yango. Barekabe bayebisaki ye ete: “Tokomɛla vinyo te.”—Yir. 35:1-10.
18 Mpo na Barekabe, kotosa nkɔkɔ na bango oyo asilaki kokufa banda kala ezalaki na ntina mingi. Lelo oyo, basambeli ya solo ya Nzambe basengeli kotosa mibeko ya Nzambe ya bomoi mingi koleka. Ekateli oyo Barekabe bazwaki ya kotosa nkɔkɔ na bango esepelisaki Yehova mingi, mpe na yango, bakesenaki makasi mpenza na Bayuda oyo bazangaki botosi. Nzambe alakaki Barekabe ete akobatela bango na mpasi oyo esengelaki koya. Likambo yango emonisi ete na bolɔzi monene oyo ekoya, Yehova akobatela baoyo bazali kotosa ye na makambo nyonso.—Tángá Yirimia 35:19.
Mpo na nini kobongola motema ntango moto asali lisumu ya monene ezali likambo moko ya ntina mingi oyo emonisaka ete moto yango azali na botosi? Soki moto azali na botosi, ndenge nini yango ekosalisa ye akwea te na likambo moko oyo ekosɛnga ete na nsima abongola motema?
BAOYO BATOSAKA YEHOVA BAZALI BANGO MOKO TE
19. Ndenge nini Nzambe akobatela yo soki ozali kotosa ye?
19 Tosengeli kokanisa te ete Nzambe azalaki kaka kobatela bato na ntango ya kala. Ata lelo oyo mpe, Yehova abatelaka baoyo batosaka ye na makama ya elimo. Kaka ndenge bifelo ya milai ezalaki kobatela bingumba ya ntango ya kala mpo banguna bákɔta te, mibeko ya Nzambe ebatelaka baoyo bayekolaka yango mpe batosaka yango ntango nyonso. Soki otikali na kati ya efelo oyo ebatelaka, elingi koloba mitinda ya Nzambe oyo etali etamboli, okoki kozala na elikya ete makambo na yo ekotambola malamu. (Yir. 7:23) Makambo mingi oyo bandeko bakutanaki na yango endimisi likambo yango.—Talá etanda “Kotosa Yehova ebatelaka.”
20, 21. (a) Okoki kondima likambo nini soki ozali kosalela Yehova? (b) Mokonzi Yehoyakime asalaki nini ntango ayokaki nsango ya Nzambe na nzela ya Yirimia?
20 Batɛmɛli na biso, ezala na libota, na mosala, na kelasi to kati na bakonzi ya Leta, basalaka makambo oyo etyaka biso nkaka mpo na kosalela Nzambe. Kasi yebá ete soki ozali ntango nyonso kotosa Yehova, akosunga yo ata soki okutani na mikakatano ya ndenge nini. Kobosana te ete Nzambe alakaki Yirimia ete akosunga ye na botɛmɛli makasi oyo akutanaki na yango mpe asalaki kaka bongo. (Tángá Yirimia 1:17-19.) Lisungi ya Nzambe emonanaki polele mingimingi na mikolo ya Mokonzi Yehoyakime.
21 Bakonzi mingi te ya Yisraele batɛmɛlaki balobeli ya Nzambe na nkanda makasi ndenge Yehoyakime asalaki. Tokoki komona yango na likambo oyo ekómelaki mosakoli Uriya, oyo azalaki na bomoi na ntango ya Yirimia. Mokonzi mabe atindaki kutu bato bákende koluka Uriya na ekólo mosusu. Ntango bamemaki Uriya, mosakoli ya Yehova, epai ya Yehoyakime, mokonzi yango abomaki ye. (Yir. 26:20-23) Na mbula ya minei ya boyangeli ya Yehoyakime, Yehova ayebisaki Yirimia akoma maloba nyonso oyo asilaki koyebisa ye mpe akende kotánga yango na mongongo makasi na tempelo. Yehoyakime azwaki rulo ya Yirimia mpe ayebisaki kapita ya ndako ya mokonzi atángela ye yango. Ntango bazalaki kotángela mokonzi rulo, apasolaki yango mpe abwakaki eteni mokomoko na mɔtɔ, atako bankumu mosusu bapekisaki ye asala bongo. Na nsima atindaki bákanga Yirimia ná Baruke. Kasi nini esalemaki? “Yehova abombaki bango.” (Yir. 36:1-6; tángá Yirimia 36:21-26.) Yehova atikaki te ete Yehoyakime asala mibali yango mibale ya sembo mabe.
22, 23. Lisolo ya ndeko mwasi oyo ya Asie centrale eteyi yo nini na ntina na lisalisi oyo Nzambe apesaka?
22 Lelo oyo, Yehova akoki mpe kobatela basaleli na ye na makama soki amoni ete ebongi asala bongo. Kasi mbala mingi, apesaka bango nde mpiko mpe bwanya mpo bátosa ye mpe bákoba kosakola nsango malamu. Mwasi moko na nkombo Gulistan, azali na bana minei oyo abɔkɔlaka ye moko. Yehova asungaki ye. Na ntango moko boye, azalaki ye moko Motatoli ya Yehova na etúká moko monene ya Asie centrale epai bakonzi ya Leta bapekisá kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Lisangá oyo ezali pene na esika oyo afandaka ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 400; na yango Gulistan azalaka na mabaku mingi te ya kokutana na bandeko mosusu oyo bakɔmɛli na elimo. Atako akutanaka na botɛmɛli mpe mikakatano mosusu, asakolaka ndako na ndako mpe akutanaka na bato mingi oyo basepelaka na nsango malamu. Lapolo moko ya mikolo oyo emonisi ete azali koyekola Biblia na bato soki 20 mpe azali kosalisa etuluku moko ya bampate ya Yehova oyo ezali kokola na elimo.
23 Kaka ndenge Nzambe asalisaki Yirimia ná Batatoli mosusu lokola Gulistan, Nzambe azali pene ya kosalisa yo ná basaleli na ye mosusu oyo batosaka ye. Zwá ekateli ya kotosa Nzambe mpo azali Mokonzi, na esika ya kotosa bato. Na yango, botɛmɛli mpe mikakatano mosusu ekopekisa yo te kokumisa Nzambe ya solo kaka moko epai ya bato ya teritware na bino.—Yir. 15:20, 21.
24. Matomba nini okozwa soki ozali kotosa Nzambe?
24 Tokoki kozala na esengo ya solo te na bomoi na biso soki toboyi Mozalisi na biso atambwisa biso. (Yir. 10:23) Nsima ya koyekola makambo oyo Yirimia akomaki mpo na botosi, na makambo nini omoni ete okoki kotika Yehova atambwisa makolo na yo malamu koleka? Kaka mibeko na ye nde ekoki kotambwisa biso mpe kosalisa biso tózala na bomoi ya esengo mpe makambo na biso etambola malamu. Yehova alobi, “Bótosa mongongo na ngai . . . , mpo makambo na bino etambola malamu.”—Yir. 7:23.
Ndenge nini okoki kosalela makambo oyo ezali kolobela botosi na mokanda ya Yirimia mpo boyokani na yo na Nzambe ezala malamu?
a Na vɛrsɛ yango, Yehova azali koloba na bato ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele. Bayuda yango oyo bazalaki na bokonzi ya mabota zomi bakendaki na boombo esilaki koleka mbula soki 100 ntango Yirimia asakwelaki bango nsango yango. Mosakoli amonisi ete uta ntango bakendeki boombo tii na ntango na ye, bato ya ekólo yango babongolaki motema te. (2 Bak. 17:16-18, 24, 34, 35) Ata bongo, moto mokomoko akokaki kondimama lisusu na Nzambe mpe Nzambe akokaki kozongisa bango uta na boombo.