Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Makambo nini okomona na makita na biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 5

      Makambo nini okomona na makita na biso?

      Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi na Argentine

      Argentine

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Sierra Leone

      Sierra Leone

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Belgique

      Belgique

      Makita ya Batatoli ya Yehova na Malaisie

      Malaisie

      Bato mingi bakendeke lisusu losambo te, mpo bazwaka te biyano na mituna na bango oyo etali bomoi mpe bazwaka libɔndisi te. Kasi, mpo na nini ebongi oyanganaka na makita ya Batatoli ya Yehova? Makambo nini okomona kuna?

      Okoyoka esengo ya kozala elongo na bato oyo balinganaka mpe batyelanaka likebi. Bakristo ya liboso babongisamaki na kati ya masangá mpe bazalaki kosala makita mpo na kosambela Nzambe, koyekola Biblia mpe kolendisana. (Baebre 10:24, 25) Na makita yango epai bazalaki komonisana bolingo, bazalaki komiyoka ete bazali mpenza elongo na baninga ya solosolo, elingi koloba, bandeko na bango bakristo. (2 Batesaloniki 1:3; 3 Yoane 14) Biso mpe tolandaka ndakisa na bango mpe toyokaka esengo ya ndenge wana.

      Okomona ete koyekola kosalela toli ya Biblia epesaka matomba. Ndenge moko na ntango ya kala, lelo oyo mpe mibali, basi ná bana bayanganaka esika moko. Mibali oyo bayebi mpenza koteya basalelaka Biblia mpo na kosalisa biso tóyeba kosalela toli na yango na bomoi na biso. (Kolimbola Mibeko 31:12; Nehemia 8:8) Moto nyonso akoki koyemba, to kopesa biyano soki lisolo esɛngi bayangani báloba; yango epesaka biso nzela tólobela elikya na biso.​—Baebre 10:23.

      Okomona ete kondima na yo epai ya Nzambe ekokóma makasi. Ntoma Paulo ayebisaki lisangá moko ya ntango na ye ete: “Nazali na mposa makasi ya komona bino, . . . mpo tólendisana, moto na moto alendisama na kondima ya mosusu, ya bino elendisa ngai mpe ya ngai elendisa bino.” (Baroma 1:11, 12) Ntango toyanganaka mbala na mbala na makita elongo na bandeko na biso bakristo, kondima na biso mpe ekateli na biso ya kotosa mibeko ya Biblia ekómaka makasi.

      Tosɛngi yo oya na makita na biso ya mbala oyo ekoya mpo yo moko omona makambo oyo touti kolobela! Tokoyamba yo na esengo mpenza. Makita nyonso ezali ofele, mpe tokɔngɔlaka mabonza te.

      • Tolandaka ndakisa ya banani na ndenge ya kosala makita na biso?

      • Matomba nini tokoki kozwa soki tozali koyangana na makita?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Soki olingi komona ndenge Ndako ya Bokonzi ezalaka na kati liboso okende na makita kuna, okoki kosɛnga Motatoli ya Yehova moko akende kolakisa yo.

  • Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 6

      Koyangana elongo na bandeko na biso bakristo esalisaka biso na nini?

      Batatoli ya Yehova elongo na bandeko na bango bakristo

      Madagascar

      Motatoli moko ya Yehova azali kosalisa moninga mokristo mosusu

      Norvège

      Bankulutu bakei kotala mokristo mosusu

      Liban

      Batatoli ya Yehova bayangani

      Italie

      Biso Batatoli ya Yehova tosalaka nyonso tózangisa te makita na biso, ezala moi makasi, mbula to malili makasi, to ata soki esɛngi tókatisa zamba monene to mai. Mpo na nini tosalaka milende tóyangana elongo na baninga na biso ata soki tolɛmbi nsima ya kosilisa mosala to tozali na mikakatano ya bomoi?

      Ezali mpo na bolamu na biso. Ntoma Paulo akomaki mpo na baoyo toyanganaka na bango na lisangá ete: “Tótyelanaka likebi.” (Baebre 10:24) Maloba yango emonisi ete tosengeli koluka koyebana malamumalamu na basusu. Na yango, maloba ya ntoma Paulo ezali kolendisa biso tókipaka basusu. Ntango tozali koluka koyeba bandeko mosusu ya lisangá, tokomona ete basusu kati na bango balongaki mikakatano oyo ekokani na oyo ya biso mpe bakoki kosalisa biso tólonga.

      Ekolisaka boninga na biso. Bato oyo toyanganaka na bango na makita na biso bazali mpenza baninga na biso, kasi te kaka bato oyo toyebani na bango. Ntango mosusu, tolekisaka ntango na bandeko mpo na kosepela elongo na ndenge ebongi. Matomba nini tozwaka? Esalisaka biso tóyeba mpe tósepela lisusu na bizaleli malamu ya baninga na biso, bango mpe básepela na oyo ya biso, mpe yango ekolisaka bolingo na biso. Boye, soki bandeko na biso bakutani na mikakatano, tosalisaka bango mbala moko mpo tokómá mpenza baninga. (Masese 17:17) Soki tozali koyangana na bandeko nyonso ya lisangá, tokomonisa ete biso nyonso totyelanaka likebi.​—1 Bakorinti 12:25, 26.

      Tozali kolendisa yo opona baninga kati na bato oyo bazali kosala mokano ya Nzambe. Okozwa baninga ya ndenge wana na kati ya Batatoli ya Yehova. Kotika eloko moko te epekisa yo koyangana na makita na biso.

      • Mpo na nini koyangana na makita ezali mpo na bolamu na biso?

      • Okosepela koyangana na makita ya lisangá na biso mokolo nini?

  • Makita na biso esalemaka ndenge nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 7

      Makita na biso esalemaka ndenge nini?

      Likita moko ya Batatoli ya Yehova na Nouvelle-Zélande

      Nouvelle-Zélande

      Likita moko ya Batatoli ya Yehova na Japon

      Japon

      Elenge Motatoli moko azali kotánga Biblia na Ouganda

      Ouganda

      Batatoli mibale na Lituanie bazali kosala elakiseli ya kosolola na moto na Biblia

      Lituanie

      Ntango bakristo ya liboso bazalaki kosala makita na bango, bazalaki mingimingi koyemba, kobondela, kotánga Makomami mpe kolimbola yango, kasi milulu ezalaki te. (1 Bakorinti 14:26) Okomona ete makita na biso mpe ezalaka mpenza ndenge wana.

      Mateya eutaka na Biblia mpe esalisaka mpenza. Na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo, lisangá mokomoko eyanganaka mpo na koyoka Diskur ya bato nyonso oyo eumelaka miniti 30, mpe emonisaka ndenge oyo Biblia elobelaka makambo oyo etali bomoi na biso mpe eleko na biso. Moto na moto alendisamaka ete alanda na Biblia na ye. Nsima ya diskur, tozalaka na Boyekoli ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli,” oyo eumelaka ngonga moko, mpe moto nyonso akoki kopesa biyano oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli. Boyekoli yango esalisaka biso tósalela toli ya Biblia na bomoi na biso. Lisangá mokomoko kati na masangá koleka 110 000 ya mokili mobimba eyekolaka kaka lisolo moko.

      Esalisaka biso tókolisa mayele na biso ya koteya. Tokutanaka mpe mokolo mosusu na kati ya pɔsɔ mpo na likita moko ya biteni misato, oyo ebengami Bomoi mpe mosala ya bakristo, oyo masolo na yango euti na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala oyo tozwaka sanza na sanza. Eteni ya liboso ya likita yango, Makambo ya motuya na Liloba ya Nzambe, esalisaka biso tóyeba malamu eteni moko ya Biblia oyo bandeko ya lisangá batángaki liboso. Eteni ya mibale, Omipesa na mosala ya kosakola, ezali na bilakiseli oyo emonisi ndenge ya kosolola na bato masolo ya Biblia. Ndeko moko apesaka toli mpo na kosalisa biso tókolisa mayele na biso ya kotánga mpe ya kosolola na bato. (1 Timote 4:13) Eteni ya nsuka, Bomoi ya bakristo, emonisi ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso ya mokolo na mokolo. Ezali mpe na lisolo ya mituna mpe biyano, oyo esalisaka biso tóbakisa boyebi na biso ya Biblia.

      Soki oyei na makita na biso, na ntembe te okosepela na mateya ya Biblia oyo ebongisami malamu mpenza, oyo okozwa kuna.​—Yisaya 54:13.

      • Makambo nini okoyoka soki okei na makita ya Batatoli ya Yehova?

      • Okosepela koya na likita nini ya mbala oyo ezali koya?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Talelá makambo oyo tokolobela na makita ya mbala ya nsima. Talelá makambo oyo tokoyekola na Biblia, oyo ekosalisa yo na bomoi na yo ya mokolo na mokolo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto