Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mpo na nini tolataka malamu na makita na biso?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 8

      Mpo na nini tolataka malamu na makita na biso?

      Tata moko ná mwana na ye ya mobali bazali komibongisa mpo na makita ya lisangá

      Islande

      Mama moko na mwana na ye ya mwasi bazali komibongisa mpo makita

      Mexique

      Batatoli ya Yehova balati malamu, na Guinée-Bissau

      Guinée-Bissau

      Bato ya libota moko na Philippines bazali kokende makita

      Philippines

      Na bililingi ya mwa buku oyo, omoni ndenge biso Batatoli ya Yehova tolataka malamu na makita na biso? Mpo na nini tobongisaka molato mpe tosalaka monzɛlɛ ndenge wana?

      Mpo na kopesa Nzambe na biso limemya. Ezali solo ete Nzambe atyaka likebi mingi na motema ya moto koleka elongi na ye. (1 Samwele 16:7) Kasi, ntango toyanganaka mpo na kosambela ye, tozalaka na mposa makasi ya komonisa ete tomemyaka Nzambe mpe bandeko na biso. Na ndakisa, soki tolingi kokutana na mokonzi moko, na ntembe te tokolata malamu mpo na komonisa ete tozali kopesa ye limemya. Ndenge moko mpe, molato mpe monzɛlɛ na biso na makita emonisaka ete tozali komemya Yehova Nzambe, oyo azali “Mokonzi ya bikólo” nyonso mpe tozali komemya esika oyo tosambelaka ye.​—Yirimia 10:7.

      Mpo na komonisa ete tosalelaka mpenza mateya na biso. Biblia elendisi bakristo “bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu” na molato na bango. (1 Timote 2:9, 10) ‘Kolekisa ndelo te’ na molato elimboli koboya kobenda likebi ya bato epai na biso mpo tolati bilamba ya mindɔndɔmindɔndɔ, oyo etiki biteni mosusu ya nzoto polele to ekangi nzoto, to oyo ezali kolamwisa mposa ya nzoto. Lisusu, ‘kozala na makanisi malamu’ esalisaka biso tóyeba kopona bilamba oyo ebongi, kasi te bilamba ya bongobongo to ya mobulumobulu. Atako bongo, toli yango etikeli moto na moto bonsomi ya kopona molato oyo alingi. Molato na biso ya malamu mpe oyo ebongi ekoki kopesa lokumu na ‘mateya ya Mobikisi na biso’ mpe ‘kopesa Nzambe nkembo.’ (Tito 2:10; 1 Petro 2:12) Soki tozali kolata malamu na makita na biso, yango ekotinda basusu básepela na losambo ya Yehova.

      Kasi ata soki ozali na bilamba ya kitoko te, tokoyamba yo na esengo na makita na biso, na Ndako ya Bokonzi. Esɛngi te kolata bilamba ya ntalo to ya kitoko mingi mpo obima malamu mpe omonana pɛto na miso ya bato.

      • Mpo na nini ezali na ntina tólataka malamu ntango tozali kosambela Nzambe?

      • Wapi toli ya Biblia oyo tolandaka na likambo etali molato mpe monzɛlɛ?

  • Wapi lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa makita?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 9

      Wapi lolenge ya malamu mpenza ya kobongisa makita?

      Motatoli ya Yehova moko azali kobongisa makita ya lisangá

      Cambodge

      Motatoli ya Yehova moko azali kobongisa makita ya lisangá
      Motatoli ya Yehova azali kopesa eyano na makita

      Ukraine

      Soki oyekolaka Biblia na Motatoli ya Yehova moko, na ntembe te osalaka makasi otalela liboso lisolo nyonso oyo bokoyekola. Soki osali mpe bongo liboso ya kokende na makita, ekosalisa yo mingi. Kasi soki okómisi yango momeseno, ekozala malamu mingi koleka.

      Poná ntango mpe esika oyo okoyekola. Ntango nini omoni ete okoyekola malamu mpenza? Na ntɔngɔntɔngɔ liboso obanda mosala, to na butu ntango bana balali? Ata soki okoki koyekola bangonga ebele te, poná ntango boni okoyekola, mpe kotika eloko moko te epekisa yo kosala yango. Luká esika ya kimya, kangá eloko nyonso oyo ekoki kolongola likebi na yo, na ndakisa radio, televizyo mpe telefone ya mabɔkɔ. Kobondela liboso ya koyekola ekosalisa yo otya makanisi nyonso na Liloba ya Nzambe, na esika otya yango na mitungisi ya mokolo wana.​—Bafilipi 4:6, 7.

      Tyá bilembo na lisolo oyo bokoyekola, mpe mibongisá mpo na kopesa biyano. Luká liboso koyeba likambo oyo lisolo yango elobeli. Talelá motó ya likambo ya lisolo to ya mokapo yango, ndenge mitó ya likambo moke mokomoko eyokani na motó ya likambo ya lisolo, talelá bililingi nyonso mpe tángá mituna ya bozongeli oyo esimbi makanisi ya ntina. Na nsima, tángá paragrafe mokomoko, mpe luká biyano na mituna oyo batye wana. Tángá bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na paragrafe te, mpe kanisá na ndenge eyokani na lisolo. (Misala 17:11) Soki omoni eyano, tyá mokɔlɔtɔ to elembo na mwa maloba ya ntina mpo esalisa yo omona eyano mbala moko ntango okozala na makita. Na nsima, ntango okozala na makita, okoki kotombola lobɔkɔ mpe kopesa eyano ya mokuse na maloba na yo moko.

      Soki ozali kobongisa masolo ndenge na ndenge oyo esalemaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ, okokolisa boyebi na yo ya Biblia.​—Matai 13:51, 52.

      • Momeseno nini okoki kozwa mpo na kobongisa makita?

      • Ndenge nini okoki komibongisa mpo opesa eyano na makita?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Na kolanda ndenge ya kosala oyo touti kolobela, bongisá Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Boyekoli ya Biblia na lisangá. Sɛngá ndeko oyo ayekolaka na yo Biblia asalisa yo obongisa eyano oyo okoki kopesa na makita ya mbala ekoya.

  • Losambo na kati ya libota ezali nini?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
    • LITEYA 10

      Losambo na kati ya libota ezali nini?

      Bandeko ya libota moko bazali kosala losambo na kati ya libota

      Corée du Sud

      Mobali moko ná mwasi na ye bazali koyekola Biblia elongo

      Brésil

      Motatoli ya Yehova moko azali koyekola Biblia

      Australie

      Bandeko ya libota moko bazali kolobela lisolo moko ya Biblia

      Guinée

      Banda kala, Yehova alingaka ete bato ya libota moko bálekisaka ntango elongo mpo na kolendisa boyokani ya bango na Nzambe mpe ya bango na bango. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Yango wana, mabota ya Batatoli ya Yehova baponaka mokolo moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola Biblia elongo. Na ntango yango, basololaka makambo ya Nzambe oyo eyokani na bamposa ya libota na bango na ndenge oyo moto nyonso akomiyoka malamu. Ata soki ozali yo moko, okoki mpe kopona ntango mpo ozala elongo na Nzambe mpe oyekola lisolo moko ya Biblia oyo oponi.

      Ezali ntango ya kopusana penepene na Yehova. Biblia elobi boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yakobo 4:8) Tokómaka koyeba Yehova malamumalamu ntango tozali koyekola makambo etali bomoto mpe misala na ye na kati ya Biblia, Liloba na ye. Lolenge ya pɛtɛɛ ya kobanda losambo na kati ya libota na bino ezali ya kozwa mwa miniti mpo na kotánga Biblia elongo na mongongo makasi; bokoki kolanda programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo epesamaka na likita Bomoi mpe mosala ya bakristo. Bokoki kopesa moto mokomoko ya libota eteni oyo akotánga, mpe na nsima bino nyonso bokoki kolobela makambo oyo boyekoli na Biblia.

      Ezali ntango ya kokómisa boyokani ya libota makasi. Boyokani ya mwasi ná mobali mpe ya baboti ná bana ekómaka makasi soki bazali koyekola Biblia elongo na libota. Esengeli kozala ntango moko ya nsai, ya kimya mpe oyo moto nyonso azelaka na esengo pɔsɔ na pɔsɔ. Baboti bakoki kopona masolo na kotalela mbula ya bana na bango, na ndakisa bakoki kosalela mitó ya masolo mosusu oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! to na site na biso ya Internet, jw.org. Bokoki mpe kolobela mokakatano moko oyo bana na bino bakutanaki na yango na kelasi mpe ndenge ya kolonga yango. Mpo na nini te kotala emisyo ya televizyo na biso JW télédiffusion (tv.jw.org) mpe na nsima kolobela yango elongo? Bokoki mpe koyekola nzembo oyo ekoyembama na makita, mpe kolya mwa eloko nsima ya boyekoli.

      Ntango wana oyo bozali kolekisa pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosambela Yehova elongo, ekosalisa mokomoko na kati ya libota asepela koyekola Liloba ya Nzambe mpe Nzambe akopambola milende na bino.​—Nzembo 1:1-3.

      • Mpo na nini toponaka mokolo moko na kati ya pɔsɔ mpo na losambo na kati ya libota?

      • Ndenge nini baboti bakoki kosala ete ntango wana epesa libota mobimba esengo?

      MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

      Tuná bandeko mosusu ya lisangá báyebisa yo ndenge oyo basalaka losambo na bango na kati ya libota. Lisusu, luká koyeba mikanda nini ezali na Ndako ya Bokonzi oyo okoki kosalela mpo na koteya bana na yo makambo ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto