Lisekwa
Ndimbola: Liloba ya Grɛki Anastasis oyo ebongolami na “lisekwa,” elimboli mpenzampenza “kotɛlɛma lisusu” mpe ezali kopesa likanisi ya kotɛlɛma uta na liwa. Biblia esaleli mbala na mbala maloba “lisekwa ya bakufi.” (Mat. 22:31; Mis. 4:2; 1 Ko. 15:12) Na Ebre, liloba yango ezali techiyath hammethim, oyo elimboli “kozonga ya mokufi na bomoi.” (Mat. 22:23, msl, NW ya mitindami) Kosekwisa ezali bongo kozongisa lisusu moto na bomoi, ná makambo na ye nyonso oyo Nzambe abatelaki na makanisi. Na kolanda ndenge oyo Nzambe alingi mpo na moto yango, akozongisa ye lisusu na bomoi na nzoto ya mosuni to ya elimo, kasi moto yango akozala kaka ndenge azalaki, elingi koloba na bomoto na ye mpe makambo nyonso oyo ayebaki liboso akufa. Lisekwa ezali mpenza komonisa boboto monene ya Yehova; ezali komonisa bwanya mpe nguya na ye mpe na nzela na yango nde mokano na ye ya ebandeli mpo na mabele ekokokisama.
Lisekwa ekosangisa nde molimo oyo emonanaka te ná nzoto ya mosuni?
Mpo yango esalema, bato basengeli kozala na molimo oyo emonanaka te, oyo ekoki kokabwana na nzoto ya mosuni. Kasi Biblia eteyaka bongo te. Liteya yango euti na filozofi ya Bagrɛki. Talá nkasa 391-393, mpo na koyeba oyo Biblia eteyaka mpo na molimo. Mpo na koyeba esika bokristo ya nkombo mpamba ezwá liteya ya molimo oyo emonanaka te mpe ekufaka te, talá nkasa 394, 395.
Yesu asekwaki na nzoto ya mosuni, mpe lelo oyo azali kaka na nzoto yango na likoló?
1 Pe. 3:18: “Kristo mpenza akufaki mbala moko mpo na libela mpo na masumu, moyengebene moko mpo na bato oyo bazangi boyengebene, mpo amema bato epai ya Nzambe. Abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi na elimo [“na nzela ya elimo,” KJ].” (Yesu asekwaki na nzoto ya elimo. Na makomi ya Grɛki, bakesenisi liloba “mosuni” ná “elimo”; na yango, soki mobongoli asaleli maloba “na elimo,” bipai nyonso asengeli mpe kosalela maloba “na mosuni” to soki asaleli maloba “na nzela ya mosuni,” asengeli mpe koloba “na nzela ya elimo.”)
Mis. 10:40, 41: “Nzambe alamwisaki Moto yango [Yesu Kristo] na mokolo ya misato mpe apesaki ye likoki ya komonana, epai ya bato nyonso te, kasi epai ya batatoli oyo baponamá na Nzambe liboso.” (Mpo na nini bato mosusu bamonaki ye te? Mpo akómaki ekelamu ya elimo mpe azalaki kolata nzoto ya mosuni ndenge na ndenge mpo amonana, ndenge baanzelu bazalaki kosala yango kala; amonanaki kaka epai ya batatoli oyo baponamaki.)
1 Ko. 15:45: “Ekomamá kutu ete: ‘Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.’ Adama ya nsuka [Yesu Kristo, oyo azalaki moto ya kokoka lokola Adama ntango akelamaki] akómaki elimo oyo apesaka bomoi.”
Luka 24:36-39 emonisi ete Yesu asekwaki na nzoto ya lolenge nini?
Luka 24:36-39: “Ntango [bayekoli] bazalaki kolobela makambo wana ye moko atɛlɛmaki na katikati na bango mpe alobaki na bango ete: ‘Kimya ezala na bino.’ Kasi lokola bazalaki na nsɔmɔ, mpe bakómaki kobanga, bakanisaki ete bamoni elimo moko boye. Bongo ye alobaki na bango ete: ‘Mpo na nini bozali kobulungana, mpe mpo na nini mitema na bino ezali kotya ntembe? Bótala mabɔkɔ na ngai mpe makolo na ngai, ezali ngai mpenza; bósimba ngai mpe bómona, mpo elimo ezalaka na misuni ná mikuwa te ndenge bozali komona ngai nazali na yango.’”
Moto akoki komona elimo te, yango wana bayekoli bakanisaki ete bazali komona emonaneli to emonamona. (Talá Marko 6:49, 50.) Yesu ayebisaki bango ete ezali bongo te; bazalaki komona nzoto na ye ya mosuni mpe bakokaki kosimba ye, koyoka mikuwa na ye; alyaki mpe elongo na bango. Ndenge moko mpe na ntango ya kala, baanzelu bazalaki kolata nzoto ya mosuni mpo bato bámona bango; bazalaki kolya, mpe basusu kati na bango babalaki basi mpe babotaki bana. (Eba. 6:4; 19:1-3) Yesu azalaki kolataka nzoto ya mosuni ndenge na ndenge nsima ya lisekwa na ye (mbala mosusu mpo na komonisa bayekoli na ye ete akómi ekelamu ya elimo), yango wana bayekoli na ye bazalaki koyeba ye mbala moko te. (Yoa. 20:14, 15; 21:4-7) Nzokande, lokola azalaki kobimela bango mbala na mbala na nzoto ya mosuni ndenge na ndenge mpe azalaki koloba mpe kosala makambo oyo ekokaki kosalisa bango báyeba ete ezali Yesu oyo bayebaki liboso, alendisaki bango mpo bándima ete asekwaki solo.
Soki bayekoli bámonaka mpenza Yesu na nzoto oyo azali na yango lelo na likoló, ntoma Paulo alingaki te koloba ete Kristo oyo azwi nkembo “azali elilingi [ya Nzambe] mpenza,” mpo Nzambe azali elimo mpe alatá nzoto ya mosuni ata mokolo moko te.—Ebr. 1:3; talá 1 Timote 6:16.
Ntango tozali kotánga masolo oyo elobeli ndenge Yesu azalaki kobimela bato nsima ya lisekwa na ye, tokokanga ntina na yango malamu soki tobosani te ndimbola ya 1 Petro 3:18 mpe 1 Bakorinti 15:45, oyo ezali na nkasa 295, 296.
Talá mpe lokasa 436, na motó ya likambo “Yesu Kristo.”
Banani bakosekwa mpo na kozala na bomoi elongo na Kristo na likoló, mpe bakosala nini kuna?
Luka 12:32: “Bóbanga te, etonga moke, mpo Tata na bino andimi kopesa bino bokonzi.” (Etonga yango ezali te bato nyonso oyo bandimeli Yesu; ezali kaka motángo moke ya bato. Bazali na mosala oyo bakokende kosala na likoló.)
Em. 20:4, 6: “Namonaki bakiti ya bokonzi, mpe ezalaki na baoyo bafandaki na yango, mpe bapesaki bango nguya ya kosambisa. . . . Moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso azali moto ya esengo mpe mosantu; liwa ya mibale ezali na bokonzi likoló na bango te, kasi bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000) yango.”
Talá mpe nkasa 270-276, na motó ya likambo “Likoló.”
Baoyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló bakozwa nzoto ya mosuni oyo ekolata nkembo na likoló?
Flp. 3:20, 21: “Nkolo Yesu Kristo . . . akobongisa lisusu nzoto na biso oyo ekitisamá mpo ezala ndenge moko na nzoto na ye ya nkembo na mosala ya nguya oyo azali na yango.” (Yango elingi nde koloba ete nzoto na bango ya mosuni ekolata nkembo na likoló? To elingi nde koloba ete na esika ya nzoto na bango ya mosuni oyo ekitisami, bakozwa nzoto ya elimo oyo ezali na nkembo ntango bakosekwa mpo na bomoi na likoló? Bavɛrsɛ oyo elandi ekopesa biso eyano.)
1 Ko. 15:40, 42-44, 47-50: “Nzoto ya likoló ezali, nzoto ya mabele mpe ezali; kasi nkembo ya nzoto ya likoló ezali na ndenge na yango, mpe oyo ya mabele ezali na ndenge na yango mosusu. Ezali mpe bongo mpo na lisekwa ya bakufi. . . . Elonami nzoto ya mosuni, elamwisami nzoto ya elimo. . . . Moto ya liboso [Adama] auti na mabele mpe asalemi na putulu; moto ya mibale [Yesu Kristo] auti na likoló. Ndenge moto oyo asalemaki na putulu azali, baoyo basalemi na putulu bazali mpe ndenge wana; mpe ndenge moto ya likoló azali, baoyo bazali bato ya likoló bazali mpe ndenge wana. Mpe kaka ndenge tolatá elilingi ya moto oyo asalemaki na putulu, tokolata mpe elilingi ya moto yango ya likoló. Nzokande, bandeko, nazali koloba likambo oyo, ete mosuni ná makila ekoki kozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Bavɛrsɛ epesi likanisi ata moke te ete nzoto ya mosuni ná ya elimo ekosangana to ete moto akokende na likoló na nzoto ya mosuni.)
Yesu amonisaki ete lisekwa ekolimbola nini mpo na bato?
Yoa. 11:11, 14-44: “[Yesu alobaki na bayekoli na ye ete:] ‘Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.’ . . . Yesu alobaki na bango polelepolele ete: ‘Lazare akufi.’ . . . Ntango Yesu akómaki, akutaki ete [Lazare] asilaki kosala mikolo minei na lilita. . . . Yesu alobaki na ye [Marta, ndeko ya Lazare] ete: ‘Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.’ . . . Agangaki na mongongo makasi ete: ‘Lazare, bimá!’ Moto oyo akufaki abimaki, makolo ná mabɔkɔ ekangami na bilamba ya kozinga, mpe elongi na ye ekangami na elamba. Yesu alobaki na bango ete: ‘Bófungola ye mpe bótika ye akende.’” (Soki Lazare azalaki na bomoi ya bisengo na esika mosusu, elingaki kozala malamu te Yesu azongisa ye na bomoi ya mpasi awa na mabele. Kasi lokola Yesu azongisaki Lazare na bomoi, amoniselaki ye ná bandeko na ye ya basi boboto. Lazare akómaki lisusu moto ya bomoi.)
Mrk. 5:35-42: “Bato mosusu oyo bautaki na ndako ya mokambi ya sinagoga bayaki mpe balobaki ete: ‘Mwana na yo ya mwasi akufi! Mpo na nini kotungisa moteyi lisusu?’ Kasi Yesu, ayokaki, kaka boye, liloba oyo elobamaki, alobaki na mokambi ya sinagoga ete: ‘Kobanga te, monisá kaka kondima.’ . . . Akamataki tata ná mama ya mwana moke yango mpe baoyo bazalaki elongo na ye, mpe akɔtaki epai mwana yango ya moke azalaki. Mpe azwaki lobɔkɔ ya mwana yango ya moke, alobi na ye: ‘Talita kumi,’ oyo, soki babongoli, elakisi: ‘Elenge mwasi, nalobi na yo: Tɛlɛmá!’ Mpe na mbala moko elenge mwasi yango atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola, mpamba te azalaki na mbula zomi na mibale. Mpe na mbala moko bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.” (Ntango lisekwa ya bato nyonso ekosalema na Mbula Nkóto ya boyangeli ya Kristo, na ntembe te bamilio ya baboti mpe bana na bango bakosepela mingi ntango bakokutana lisusu.)
Makambo nini ezali kozela baoyo bakosekwa mpo na bomoi awa na mabele?
Luka 23:43: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.” (Mabele mobimba ekokóma paradiso na boyangeli ya Kristo Mokonzi.)
Em. 20:12, 13: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango. . . . Mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye.” (Kofungwama ya barulo emonisi ete ezali na ntango oyo bato bakoyekola mokano ya Nzambe ndenge yango emonisami na Yisaya 26:9. Lokola “rulo ya bomoi” ekofungwama, yango emonisi ete bankombo ya bato oyo bakotosa mateya yango ekokomama na rulo yango. Bato yango bakozala na elikya ya kokóma bato ya kokoka mpe bakozwa bomoi ya seko.)
Talá mpe nkasa 117-122, na motó ya likambo “Bokonzi.”
Bato mosusu bakosekwa kaka mpo bákatela bango etumbu ya liwa ya mibale?
Yoane 5:28, 29 elimboli nini? Vɛrsɛ yango elobi boye: “Baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” Mpo na kokanga ntina ya maloba yango ya Yesu, esengeli kotalela emoniseli oyo apesaki Yoane. (Talá Emoniseli 20:12, 13, ezali na nkasa 299.) Baoyo basalaki makambo ya malamu ná baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe, “moto na moto [akosambisama] na kolanda misala na ye.” Misala nini? Soki tokanisi ete bato bakosambisama na kotalela makambo oyo basalaki kala na bomoi na bango, yango ekoyokana te na vɛrsɛ ya Baroma 6:7 oyo elobi: “Mpo moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” Ekozala sembo te kosekwisa bato mpo na koboma bango na nsima. Na yango, na Yoane 5:28, 29a, Yesu alobelaki lisekwa; kasi na eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 29, alobelaki ndenge makambo ekozala ntango bato oyo basekwi bakokóma bato ya kokoka mpe bakosambisama.
Emoniseli 20:4-6 ezali komonisa nini mpo na baoyo bakosekwa awa na mabele?
Em. 20:4-6: “Namonaki bakiti ya bokonzi, mpe ezalaki na baoyo bafandaki na yango, mpe bapesaki bango nguya ya kosambisa. Ɛɛ, namonaki milimo ya baoyo babomamaki na sóka mpo na litatoli oyo bapesaki mpo na Yesu mpe mpo balobelaki Nzambe . . . Mpe bazongaki na bomoi mpe bayangelaki elongo na Kristo mbula nkóto moko (1 000). (Bakufi oyo batikalaki bazongaki na bomoi te tii ntango mbula nkóto [1 000] yango esukaki.) Wana nde lisekwa ya liboso. Moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso azali moto ya esengo mpe mosantu; liwa ya mibale ezali na bokonzi likoló na bango te, kasi bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000) yango.”
Na vɛrsɛ oyo NW mpe Mo esaleli paranteze mpo na kosalisa motángi akangisa maloba oyo ezali liboso ya paranteze ná oyo ezali nsima ya paranteze. Ndenge vɛrsɛ emonisi yango, ezali te “bakufi oyo batikalaki” nde bakozwa lisekwa ya liboso. Lisekwa ya liboso ezali mpo na baoyo bakoyangela elongo na Kristo mpo na mbula nkóto moko. Yango elingi nde koloba ete bato mosusu bakozala na bomoi te na boumeli ya mbula nkóto yango, longola kaka baoyo bakoyangela elongo na Kristo? Te; mpamba te soki ezali bongo, mosala na bango ya bonganga-nzambe ekozala mpo na moto moko te, mpe bakoyangela mabele oyo ezali na bato te.
Bongo, “bakufi oyo batikalaki” ezali banani? Ezali bato nyonso oyo bakufaki mpo na lisumu ya Adama mpe bato oyo, atako bakobika na bolɔzi monene to bakobotama na boumeli ya mbula nkóto, basengeli kosikwama na lisumu mpe na liwa.—Talá Baefese 2:1.
Maloba “bazongaki na bomoi” te tii ntango mbula nkóto yango ekosuka elimboli nini? Maloba yango ezali kolobela lisekwa te. ‘Kozonga na bomoi’ elimboli kaka te kozala na bomoi. Elimboli ete moto akómi na bomoi ya kokoka, mpe asikolami na makambo nyonso oyo lisumu ya Adama ebimisá. Simbá ete liboso vɛrsɛ 5 elobela likambo yango, vɛrsɛ 4 elobi ete baoyo bakozala na bomoi na likoló “bazongaki na bomoi.” Mpo na bango, kozonga na bomoi elimboli ete basikolami na makambo nyonso oyo lisumu ya Adama ebimisá; kutu bazwi libaku monene ya kozwa bomoi ya kozanga kokufa. (1 Ko. 15:54) Kasi mpo na “bakufi oyo batikalaki,” kozonga na bomoi elimboli kokóma na bomoi ya kokoka mpenza.
Banani mosusu bakosekwa awa na mabele?
Yoa. 5:28, 29: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [mongongo ya Yesu] mpe bakobima.” (Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “malita ya kokanisama” ezali te taphos [nkunda, esika oyo bakundi moto] to haides [nkunda ya bato nyonso oyo bakufá] kasi ezali nde mnemeion [kokanisa, lilita ya kokanisa]. Liloba yango emonisi ete babombi na makanisi moto oyo akufá. Bato oyo bakosekwa mpe bakozwa bomoi ya seko ezali baoyo Nzambe akokanisa, kasi baoyo basalaki masumu oyo elimbisamaka te bakokanisama te mpo bakei na Gehena, mpe bakosekwa te.—Mat. 10:28; Mrk. 3:29; Ebr. 10:26; Mal. 3:16.)
Mis. 24:15: “Nazali na elikya epai ya Nzambe . . . ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Bato oyo bazalaki kolanda boyengebene ya Nzambe na bomoi na bango mpe bato oyo bazalaki kosala makambo ya kozanga boyengebene mpo na kozanga koyeba, bango nyonso bakosekwa. Biblia ezali kolobela makambo nyonso te mpo na koyeba soki moto songolo oyo akufaki akosekwa to te. Kasi tokoki kotya motema ete Nzambe, oyo ayebi makambo nyonso etali moto, akokata makambo kozanga kopona bilongi; boyengebene na ye etambolaka nzela moko na motema mawa na ye oyo etalelaka mitinda na ye ya sembo. Talá Ebandeli 18:25.)
Em. 20:13, 14: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe liwa ná Nkunda ezongisaki bakufi oyo bazalaki kuna, mpe moto na moto asambisamaki na kolanda misala na ye. Mpe liwa ná Nkunda ebwakamaki na laki ya mɔtɔ. Laki yango ya mɔtɔ elakisi liwa ya mibale.” (Na yango, bato oyo bakufaki mpo na lisumu ya Adama bakosekwa, ezala bakufaki na mai to bakundamaki na nkunda ya bato nyonso oyo bakufá.)
Talá mpe motó ya likambo “Lobiko.”
Soki bamiliare ya bato basekwi, bakofanda wapi?
Balobaka ete motángo ya bato oyo basilá kofanda na mabele ezali miliare 20. Ndenge tomonaki yango, bango nyonso te nde bakosekwa. Kasi, ata soki bango nyonso basekwi, esika ekozala mpo na bango nyonso. Bisika ya mabele ekauká oyo bato bakoki kofanda ezali na bonene ya bakilomɛtrɛ karé soki milio 150. Ata soki ndambo ya bakilomɛtrɛ yango esalelami mpo na makambo mosusu, esika oyo ekotikala ekokoka mpo moto na moto azwa hektarɛ soki 0,40, oyo ekoki kobimisa bilei ebele mpo na moto nyonso. Soki lelo oyo bato bazali kozanga bilei, ezali te mpo mabele ezali kobota biloko te; ezali nde mpo na kowelana ya bakonzi ya politiki mpe lokoso ya bato ya mombongo.