Loyembo 88
Bana bazali mokumba Nzambe apesi
Ya Papye
1. Ntango mobali aboti
Mpe mwasi aboti ya ye mwana,
Báyeba ’te bazwi mokumba,
Mokumb’ango, bazwi kozwa.
Yehova apesi likabo;
Bomoi ná bolingo Ye Liziba.
Apesi baboti malako
Oy’ekopesa bango bwanya.
(MONDIMO)
Nzamb’apesi bino mokumba;
Bomoi’asimbisi bino.
Lipamboli ya ntina mingi;
Bóteya bana mibeko.
2. Mitindo Nzambe apesi—
Ezala na mitema na bino.
Bokoyebis’ango na bana;
Wana mokumba na bino.
Bósololak’ango na bango,
Na nzela mpe ntango boz’opema.
Lobi bábosana yango te,
Bázala sembo, bápambwama.
(MONDIMO)
Nzamb’apesi bino mokumba;
Bomoi’asimbisi bino.
Lipamboli ya ntina mingi;
Bóteya bana mibeko.
(Talá mpe Mib. 6:6, 7; Ef. 6:4; 1 Tim. 4:16.)